Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yirimia 2:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Banganga-nzambe balobaki te ete: ‘Wapi Yehova?’+ Mpe bato oyo bateyaka mobeko bayebaki ngai te;+ mpe babateli ya mpate babukaki mibeko na ngai,+ mpe basakoli basakolaki na nkombo ya Baala,+ mpe balandaki baoyo bakokaki kopesa ata litomba moko te.+

  • Yirimia 14:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Soki nabimi mpo na kokɔta na elanga, bongo talá bato babomami na mopanga!+ Mpe soki nakɔti na engumba, bongo talá bamaladi ya nzala!+ Mpo mosakoli ná nganga-nzambe bakei kotambolatambola na mokili oyo bayebi te.’”+

  • Yirimia 23:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 “Mpo mosakoli ná nga-nga-nzambe bango nyonso bakómi mbindo.+ Lisusu kati na ndako na ngai nakuti mabe na bango,”+ yango nde liloba ya Yehova.

  • Mika 3:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 “Talá oyo Yehova alobi mpo na basakoli oyo bazali kosala ete bato na ngai báyengayenga,+ oyo bazali koswa na mino na bango+ mpe oyo bazali mpenza koganga ete: ‘Kimya!’+ nzokande, soki moto atye eloko na minɔkɔ na bango te, bazali mpenza kosantisa etumba mpo na kobundisa ye:+

  • Mika 3:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Bankumu na ye bazali kosambisa kaka mpo na kanyaka,+ mpe banganga-nzambe na ye mpenza bazali kolakisa kaka mpo na lifuti,+ mpe basakoli na ye mpenza bazali kosakola makambo ebombaná kaka mpo na mbongo;+ ata bongo bazali kokoba kotya motema epai ya Yehova, wana bazali koloba ete: “Yehova azali nde katikati na biso te?+ Mpasi ekoyela biso te.”+

  • Sefania 3:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Basakoli na yango bazalaki na lofundo, bazalaki bato ya bokosi.+ Banganga-nzambe na yango bakómisaki eloko ya bosantu eloko mpamba; basakanaki na mobeko.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto