Kokwea ya Kelasi
Baboti bazali kotinda bana na bango na eteyelo bobele te mpo báyekola kotánga, kokoma mpe kotánga mituya. Bazali komizela ete bana bábongisama mpenza mpo bákoma mikóló oyo bakosepelisa bango. Kasi bilikya yango mbala mingi bikokisamaka te. Mpo na nini? Mpo ete kelasi ezali kokwea kati na mokili mobimba.
KATI na mikili mingi, kozanga mosolo mpe kozanga balakisi ezali kopesa kwokɔsɔ mingi na likambo litali kelasi. Na ndakisa, zulunalo Time eyebisaki ete na Etats-Unis kokita ya nkita na bambula oyo esili koleka esɛngisaki na biteyelo bisusu ete ebamba ‘babúku na yango ya kala, kotika te nsambá ete etanga, kolongola liteya ya konyolisa nzoto mpe makambo ya ntɔ́ki, to kokanga eteyelo na mikolo mwa mingi milandani.’
Na Afrika, mbongo oyo balɛngɛli mpo na eteyelo ezali moke. Engebene zulunalo Daily Times ya Lagos, na Nigeria, ezali na molakisi bobele moko mpo na banakelasi 70, mpe “ekoki mpenza kozala ete molakisi moko kati na misato azali na lipɔlɔ́mi te.” Na Afrika ya Súdi, longola bozangi ya balakisi, bakelasi etondi na bana mpe yikiyiki ya politiki ebimisi oyo South African Panorama ebengi yango ete “mobulungano kati na biteyelo ya Baindo.”
Ya solo, bisaleli malamu mpe basáli ya makoki na motuya mobongi, ezali ndanga ya bolóngi te. Na ndakisa, na Autriche, pene na mwana moko kati na misato ya bambula 14 ayebi kotánga malamu te, mpe azali na mikakatano mpo na oyo etali mituya. Zulunalo Times ya Londres emonisi ete na Grande-Bretagne bolóngi na mimekano ya matematiki, ya siansi mpe ya lingelesi, nkótá ya mboka ezali mpenza na “nsé soki tokokanisi yango na oyo ya Allemagne, France mpe Japon.”
Na Etats-Unis, balakisi bazali na mawa, mpo ete bana mingi ya kelasi bazali kozwa bilembo mingi na mimekano, kasi bazali na makoki te ya kokoma mokanda ya malamu, koyanola malamu na matematiki to mpe ya koloba na mokuse makambo oyo mazwami na liteya moko to mpe na búku moko. Likambo motindo wana, ezali kosɛnga na bakonzi oyo batalelaka makambo ya kelasi na mikili mingi ete bátalela lisusu manáka mpe myango mitali lolenge ya kolóngisa mimekano.
Mobulu na eteyelo
Balapólo emonisi koyikana ya mobulu kati na biteyelo. Na Allemagne, na likita moko ya balakisi elobamaki ete banakelasi 15 kati na 100 bazali pene na “kosala mobulu mpe 5 kati na 100 bakokakatana te kosala mobulu ya nsɔ́mɔ, lokola konyata moto moko oyo alali na mabelé mpe azangi libateli.”—Frankfurter Allgemeine Zeitung.
Makambo ya lolenge oyo mazali kobimisa nsɔ́mɔ epai na bato. Nsima na kobebisama ya elenge mwasi moko ya mibu 15 na bilenge minei ya mibali kati na batwalɛti ya eteyelo moko na Paris, banakelasi batambolaki na balabála mpo na kosɛnga libateli malamu na eteyelo. Baboti bazali kobanga mpo na bokóli ya matumoli mpe mobulu ya kosangisa nzoto, kobotola mosolo, mpe mafinga. Makambo oyo mabe mazali komonana bobele na Mpótó te, kasi lisusu na mokili mobimba.
Na Japon, ministɛrɛ oyo etalelaka makambo ya kelasi emonisi bokóli ya mobulu na biteyelo. Na motó na likambo “Biteyelo bizingelami na banakelasi oyo bazali na bibundeli,” zulunalo The Star ya Afrika ya Súdi ekokanisaki oyo ezali kosalema kati na biteyelo bisusu ya Soweto na “Far West” ya Etats-Unis, na ekeke ya zomi na libwa. Engebene Guardian ya Londres, ezala New York, oyo eyebani mpo na mobulu na yango, ekokisaki “motángo ya sika na kotalela maloba oyo malobamaki na kompanyi moko oyo ekosalaka bilamba oyo ebatelaka bato na masasi ete bato bakómi koluka yango mingi.”
Mobulu na biteyelo ezali mpe komonana na Grande-Bretagne. Mokonzi moko ya Sɛndiká ya bateyi alobaki ete: “Na mibu 10 oyo miuti koleka, tozali komona ezaleli oyo ezali bobele kokóla ya kosalela bibundeli. Ezaleli yango ekómi komonana epai ya bana mike mpenza mpe ata epai ya bilenge basi.”
Na kotalela makambo nyonso oyo touti kolobela, likambo ya kokamwa ezali te na komona ete baboti basusu bazwi ekateli ya kolongola bana na bango na eteyelo mpe kotángisa bango na ndako.a Mingi kati na baoyo bamoni ete likanisi oyo ezali malamu te, bazali komibanzabanza na ntina na bopusi mabe oyo eteyelo ezali na yango likoló ya bana na bango mpe bazali komituna ndenge nini kobundisa yango. Bakoki kosala nini mpo na kosalisa bana na bango na kolónga mikakatano oyo bazali kokutana na yango na eteyelo? Ndenge nini bakoki koyokana na balakisi, na lolenge boye ete bana na bango bázwa matomba malamu na bambula oyo bakolekisa na eteyelo? Masoló malandi mamonisi biyano na mituna oyo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Likanisi oyo etalelamaki na lisoló “L’enseignement au foyer: est-ce pour vous?” (Kolakisama na ndako: ebongi mpo na yo?) ebimaki na nimero na biso ya Apríli 8, 1993 (na ebimeli ya lifalansé).