Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g95 Avril nk. 17-20
  • Minkɔ́lɔ́tɔ́ oyo mikanisami mpe ya ntina

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Minkɔ́lɔ́tɔ́ oyo mikanisami mpe ya ntina
  • Lamuká!—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Koyeba esika yo ozwami
  • Minkɔ́lɔ́tɔ́ mpe lisoló na yango
  • Botamboli mpe ba fuseaux horaires
  • Ezali ntango nyonso na ntina
  • Ntango oyo batángaka yango mpe matomba oyo bazwi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Makambo ya esengo ya mbula eleki
    Buku ya mobu 2017 ya Batatoli ya Yehova
Lamuká!—1995
g95 Avril nk. 17-20

Minkɔ́lɔ́tɔ́ oyo mikanisami mpe ya ntina

EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA GRANDE-BRETAGNE

TALÁ kálati ya mokili to libungutulu ya mokili. Ozali komona ebele na minkɔ́lɔ́tɔ́ ya semba mpe ya kolala oyo batyá likoló na yango? Ntembe ezali te ete oyebi nokinoki monkɔ́lɔ́tɔ́ babéngi équateur, oyo molala mpe mozali kokata kálati na biteni mibale. Kasi ezali boni mpo na minkɔ́lɔ́tɔ́ misusu? Mizali nini?

Minkɔ́lɔ́tɔ́ yango mibéngami minkɔ́lɔ́tɔ́ ya latitude mpe minkɔ́lɔ́tɔ́ ya longitude. Minkɔ́lɔ́tɔ́ ya latitude to parallèles bayemaka yango na lolenge ya kolala likoló ya kálati, ekangisaka bisika oyo bizali na ntáká ndenge moko longwa na équateur kino na mabelé. Nzokande, minkɔ́lɔ́tɔ́ ya longitude, to méridiens, mityami longwa na nɔ́rdi kino na súdi kati na nsɔ́ngɛ́ mibale ya libungutulu. Mbala mosusu ozali komikundola ete oyekolaki yango na eteyelo na liteya ya mambí ma nsé to géographie. Kasi, ntina ya minkɔ́lɔ́tɔ́ yango ezali nini? Misalaka nini? Mpe miutaki wapi?

Koyeba esika yo ozwami

Na lisalisi ya kongumba oyo ebimisi minkɔ́lɔ́tɔ́ ya latitude mpe ya longitude, ezali na likoki ya koyeba na bosikisiki esika moko na moko ya etando ya mabelé, na lisalisi ya bimekeli mibalé bibéngami coordonnées. Na ndakisa, okoki komona engumba New York likoló ya kálati na lisalisi ya eutelo 40° 42’ ya latitude nɔ́rdi mpe 74° 0’ ya longitude wɛ́sti, elingi koloba ete engumba ezwami na 40 degrés mpe miniti 42 na nɔ́rdi ya équateur mpe na 74 degrés na wɛ́sti ya méridien ya ebandeli oyo endimami na mikili minso, monkɔ́lɔ́tɔ ya longitude oyo elekaka na Greenwich, na Grande-Bretagne, na engumba Londres.a Soki tobakisi ba secondes na ba coordonnées yango, ezali nkutu na likoki ya koyeba esika bandako ya engumba moko ezali. Na ndakisa, mairie ya New York ezwami na 40° 42’ 45” ya latitude nɔ́rdi mpe na 74° 0’ 23” ya longitude wɛ́sti.

Minkɔ́lɔ́tɔ́ yango mpe misalisaka na koluka bantáká. Na ndakisa, bolai ya mille marin moko ekokani na miniti moko ya latitude oyo emekami na ntáká ya méridien moko. Na koyebáká ete nsɔ́ngɛ́ moko na moko ezwami na 90 degrés, to miniti 5 400 ya latitude longwa na équateur (90 × 60=5 400), mille marin moko ezali mbala 1/5 400 ya bolai longwa na nsɔ́ngɛ́ moko kino na équateur. Na bongo, mille marin moko ezali na bolai ya bamɛ́tɛlɛ 1 852.

Likoki ya koyeba na bosikisiki esika moko na moko ezali mpenza na ntina, mingimingi mpo na batamboli na masuwa (navigateurs). Nzokande, mpo na kosalela lolenge yango, esengeli kozala na biutelo (points de référence). Equateur ezali liponi oyo libongi mpamba te esalisaka lokola eutelo mpo na koluka latitude. Kasi mpo na nini Greenwich eponamaki lokola esika ya méridien ya ebandeli, oyo longwa na yango bamekaka longitude ɛ́sti-wɛ́sti? Na maloba mosusu, lolenge nini likanisi wana ya kotya minkɔ́lɔ́tɔ́ mikanisami likoló na bakálati libimaki?

Minkɔ́lɔ́tɔ́ mpe lisoló na yango

Na ebandeli ya ekeke ya mibale L.T.B., Hipparque, astronome ya Grèce, asilaki kosalela minkɔ́lɔ́tɔ́ mikanisami mpo na koyeba bisika na etando ya mabelé. Azalaki kolekisa minkɔ́lɔ́tɔ́ na ye ya eutelo na esanga ya Grèce Rhodes longwa na yango mpo na koyeba bitɛlɛmɛlo ya Ɛ́sti mpe ya Wɛ́sti. Ekanisami ete Claude Ptolémée, astronome ya Ezipito na ekeke ya mibale ya T.B. azalaki moto ya liboso mpo na kosalela lolenge oyo ekokani mpenza na oyo ezali kosalelama na eleko na biso. Akataki minkɔ́lɔ́tɔ́ na ye ya latitude na lolenge ya kolala na boye ete ekokaki te kokutana na équateur. Mpo na komeka longitude, akamataki lokola esika ya ebandeli, monkɔ́lɔ́tɔ́ oyo mozalaki koleka na bisanga Fortunées, nkombo ya kala ya bisanga Canaries, oyo, na ntango ya kala ezalaki kotalelama lokola nsuka ya mokili ya epai ya Wɛ́sti.

Ezalaki na mobu 1884 nde liponi ya méridien ya ebandeli endimamaki na mokili mobimba, longwa na yango bakoki komeka bitɛlɛmɛlo na epai ya Ɛ́sti to ya Wɛ́sti. Na mobu yango, Likita lya Mokili Mobimba mpo na méridien lisalemaki na Washington mpe lisangisaki batindami 41 oyo bautaki na mikili 25. Mpo ete botalitali ya ntina esalema longwa na méridien ya ebandeli, batindami bakanisaki na monkɔ́lɔ́tɔ́ oyo mokoleka na observatoire oyo etondi na bisaleli. Mingi baponaki monkɔ́lɔ́tɔ́ oyo mozalaki koleka na Greenwich, na Angleterre.

Botamboli mpe ba fuseaux horaires

Liponi wana ya Greenwich lokola esika ya méridien ya ebandeli eyaki bobele bongo te. Uta na ekeke ya zomi na mwambe, batambwisi ya masuwa oyo bazalaki koleka na Mai Monene longwa na libongo ya Londres bamonaki ete ntango bazalaki kotambola na epai ya wɛ́sti ya Atlantique, moi ezalaki kokóma na zénith (nzánga) na mwa nsima mokolo na mokolo. Bayebaki ete mabelé lokola ebalukaka na 360 degrés na mokolo mobimba, bokeseni ya ngonga moko ekokanaki na 15 degrés ya longitude longwa na Greenwich. Na bongo, na lisalisi ya ba chronomètres emekami malamu likoló ya horloge maîtresse ya observatoire ya Greenwich, bakokaki koyeba etɛlɛmɛlo na bango kati na Mai Monene na kokamatáká bokeseni kati na ngonga ya Greenwich mpe oyo ya bango. Na ndakisa, soki na esika oyo bango bazali moi ekomi na nzánga na 15 h 30, ngonga ya Greenwich, na mwa boluki moke na bongo, bakoki koyeba etɛ́lɛmɛlo na bango: 52,5 degrés (15 × 3,5) na wɛ́sti ya Greenwich, elingi koloba mosika te na bokúla ya Ɛ́sti ya Terre-Neuve, loba soki batikali bobele na latitude yango.

Ezalaki likambo ya mpasi te na kotikala bobele na latitude moko. Uta bikeke mingi, bato ya mai ya epai ya Nɔ́rdi bamonaki ete monzɔ́tɔ ya nsɔ́ngɛ́ ezalaki kotambola te na kokokanisa yango na minzɔ́tɔ misusu. Babandaki kotalela na ntáká nini bazalaki na Nɔ́rdi mpe na Súdi na komekáká bosándá ya monzɔ́tɔ wana na horizon. Ntango bazalaki kati na Mai Monene, bayebaki ete bazalaki kotambola semba epai na Ɛ́sti to epai na Wɛ́sti wana monzɔ́tɔ yango etikalaki bobele na bosándá moko.

Koponama ya Greenwich lokola eutelo ezalaki na matomba mosusu mpo na Grande-Bretagne. Na kobima ya nzela ya bingbunduka, esengelaki sikawa kokamata ngonga bobele moko kati na mboka mobimba. Oyo nde likambo ya mawa mpo na moto ya mobembo oyo akokóma na gare ya Exeter mpo na kokende na engbunduka ya 11 h 33 mpe koya koyeba ete ekendaki esili koleka miniti 14! Yango esalami ndenge nini? Moto ya mobembo azalaki na ngonga ya Exeter; nzela ya bingbunduka izali na ngonga ya Londres. Kondimama ya ngonga ya G.M.T. (Greenwich Mean Time) kati na mboka mobimba esilisaki mikakatano ya lolenge wana.

Mikakatano minene koleka mizalaki na États-Unis. Bakompanyi ekeseni ya bingbunduka ezalaki kolanda ngonga moko te. Na ezalela motindo wana, likita monene ya banzela ya bingbunduka mpo na ngonga lisalemaki na 1883. Kati na États-Unis, ba fuseaux horaires minei etyamaki, moko na moko ezalaki na 15 degrés ya longitude, oyo ekokani na ngonga moko. Bingumba nyonso oyo bizwami na fuseau horaire bobele moko bisengelaki mpe kozala na ngonga bobele moko.

Na nsima, kokabolama wana ya ba fuseaux horaires endimamaki na mokili mobimba. Mabelé ekabolamaki na ba fuseaux horaires 24. Ntéi ya ebongiseli yango ezalaki Fuseau 0 ezalaki na 7, 5 degrés ngambo nyonso mibale ya méridien ya Greenwich. Na bongo, moto oyo azali kokende na epai ya Ɛ́sti asengeli kopusa montɛlɛ na ye na ngonga moko ntango nyonso oyo akoleka fuseau moko mpo na kokóma na mosusu. Na Wɛ́sti, asengeli kokitisa ngonga moko.

Na kotamboláká na mokili mobimba longwa na Greenwich, likambo moko ya kobenda likebi esalemaka na ntango okómi na katikati ya nzela. Na esika yango, na méridien oyo ezwami na 180 degrés, bokeseni ezali ya bangonga 24 longwa na ngambo moko ya monkɔ́lɔ́tɔ́ kino na ngambo mosusu. Na bongo, ezali na méridien wana ya 180 degrés nde batye monkɔ́lɔ́tɔ́ ya mokili mobimba ya mbongwana ya dati, na mwa bolongoli mosusu oyo ezali kopesa nzela na kotosa bandelo ya mikili. Na kolekáká monkɔ́lɔ́tɔ́ wana na epai ya wɛ́sti, motamboli akobungisa mokolo mobimba. Soki akei epai na Ɛ́sti, akozwa mokolo mobimba.

Ezali ntango nyonso na ntina

Eleko oyo bimekeli ya ngonga etalelamaki na Greenwich liboso ete básalela yango na Mai Monene mpo na koluka longitude esili koleka. Tekiniki ya sika eyei kokitana nyonso wana. Na lisalisi ya radiobalises, ya radars mpe ya télécommunications internationales, tozali na nsango ya sikisiki. Nzokande, mpo na koyeba etɛlɛmɛlo na yo likoló na kálati esengeli na biso kotalela ntango nyonso minkɔ́lɔ́tɔ́ wana mikanisami ya latitude mpe ya longitude. Tokoki kozala na botɔ́ndi mpo na minkɔ́lɔ́tɔ́ wana ya ntina oyo mikanisami.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na bimekeli ya matúmu, degré (°) moko ekabolami na miniti  60 (‘) mpe miniti moko na moko ekabolami na ba secondes 60 (“).

[Etanda/​Bililingi na lokasa 20]

NGONGA EBÉNGAMI GREENWICH MEAN TIME

Na 1675, Charles II, Mokonzi ya Angleterre atongaki “observatoire ya moke” na Greenwich, engumba moke mpembeni ya Londres, “mpo na koyeba longitude ya bisika mpe kobongisa kotambola na mai mpe astronomi.” Montɛlɛ mibale oyo esalami sika, na bimekeli ya bamɛtɛlɛ 4 na molai, etyamaki mpo na kosala bolukiluki ya sikisiki likoló na kobaluka ya mabelé.

Mosika te, basavá ya Royal Observatory bayaki koyeba ete kobaluka ya mabelé ezalaki isochrone (lombangu ndenge moko) te. Ntina ezali ete mabelé esalaka te zolongano ya kokoka zingazinga na moi mpe ete axe na yango etengama. Na bongo, boumeli ya moi​—ntáká oyo ebandaka longwa na midi kino na midi mosusu​—ezalaka na bokeseni na bolai na yango na boumeli ya mobu. Na lisalisi ya bamontɛlɛ ya Greenwich, likoki ezwamaki mpo na koyeba mwayene ya boumeli ya mokolo.

Midi na ngonga ya G.M.T. ekokaka soki moi ekómi na zénith likoló na esika nyonso ya méridien (na latin meridianus, ya midi), to monkɔ́lɔ́tɔ́ ya longitude, ya Greenwich. Engebene liloba wana ya latin, ekómaki kobénga bangonga oyo ezali liboso ya midi ante meridiem (a.m.) mpe bangonga oyo ezali nsima ya midi post meridiem (p.m.).

[Bililingi]

Likoló: Greenwich Royal Observatory. Na lobɔkɔ ya mobali: Méridien ya ebandeli ekatami na libándá moko bapalisa na simá

[Karte na lokasa 18]

BA FUSEAUX HORAIRES

-11 4:00

-10 5:00

-9 6:00

-8 7:00

-7 8:00

-6 9:00

-5 10:00

-4 11:00

-3 12:00

-2 1:00

-1 2:00

0 3:00

+1 4:00

+2 5:00

+3 6:00

+4 7:00

+5 8:00

+6 9:00

+7 10:00

+8 11:00

+9 12:00

+10 1:00

+11 2:00

+12 3:00

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto