Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g95 Avril nk. 21-24
  • Monzɛlɛ motali elateli ya Grèce ya kala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Monzɛlɛ motali elateli ya Grèce ya kala
  • Lamuká!—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lolenge ya kosala mpe ya kolata bilamba ya kobakisa
  • Eloko nini lisusu mwasi ya mboka Athènes akokaki kolata?
  • Biloko ya wolo
  • Lolenge ya kosala nsuki
  • Basi oyo basalaka monzɛlɛ
  • Kitoko ya solo
  • Mituna na batangi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Lamuká!—1995
g95 Avril nk. 21-24

Monzɛlɛ motali elateli ya Grèce ya kala

EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA GRÈCE

MPO na nini bakomi baklisto Paulo mpe Petelo basengelaki kopesa batoli ya sikisiki mpo na molato ya basi na ekeke ya liboso? Na ndakisa, Paulo akomaki: “Basi bamilatisa njoto na bango na lolenge na bopɔlɔ mpe na makanisi malamu, na kotongatonga nsuki tɛ, na wɔlɔ tɛ, na mabanga na motuya tɛ, na bilamba na motuya monɛnɛ tɛ.” (1 Timɔtɛ 2:9) Bobele bongo, Petelo amonaki yango malamu na kolobela na ntina na “kitɔkɔ na libanda, lokola na kotongana na nsuki, komizingela na bilɔkɔ na wɔlɔ,” mpe “kolata bilamba ya motuya mingi.”​—1 Pɛtɛlo 3:3, NW.

Bakomelaki baklisto oyo bazalaki kobika na nse ya bopusi ya ntɔ́ki ya Bagreke, oyo euti na mimeseno ya Grèce ya kala. Monzɛlɛ moko ezalaki na ntango ya Grèce ya kala? Ntango bato mingi bakanisaka na Grèce moko ya kala, bakoki mbala mosusu kokanisa mobali moko to mwasi moko alati elamba ebéngami khi·tonʹ, to tunique​—lolenge moko ya zambala oyo elatami na bango nyonso​—ezala basi to mibali, bileko nyonso to bikólo nyonso.a Elilingi wana ezali na bokokani na bosolo ya likambo ndenge ezali? Soko moke te!

Lolenge ya kosala mpe ya kolata bilamba ya kobakisa

Botaleli ya mozindo ya bikeko, bambeki oyo epakolami lángi mpe makomami ya kelasi emonisi ete molato ya Bagreke ya kala esukaki bobele te na zambala molai ya mpɛmbɛ. Lolenge ya kotonga, bilamba, lángi mpe biloko mosusu ezalaki mingi mpe ya ndenge na ndenge. Mingimingi basi bazalaki kosalela lolenge mingi ya kosala monzɛlɛ mpo na kokóma kitoko koleka.

Batángi ya Odyssée, maloba ya ntɔ́ki ya Greke ya kala ya Homère, oyo ezali kolobela mibu zomi ya koyengayenga ya elombé ya masoló mpamba na nkombo Ulysse, bakoki mbala mosusu komikundola ete, wana azalaki kozela kozonga ya mobali na ye, Pénélope, mwasi ya elombé yango, azalaki kotonga mpe kofungola elamba bobele moko na boumeli ya bambula. Misala ya Homère mizali na bisika mosusu oyo bizali komonisa ete kotonga bilamba ezalaki moko ya misala ya ntina mpo na basi uta kala.

Na nsima wana esili yango kotongama, elamba ekatamaki mpo na kosala khi·tonʹ, simisi ya lin mpe ya molai ezanga mabɔkɔ, mbala mosusu na mikungé ya mpate (laine), oyo ezalaki moboko ya molato ya basi mpe mibali. Na ntango ya kala (kati na 630 mpe 480 L.T.B.), khi·tonʹ ya basi (oyo ezalaki kobengama ésthês na ntango wana) ezalaki limbunza ya elamba basangisa ya bonene soko ndenge moko na bosánda ya mwasi mpe na bolai oyo ekokani na mbala mibale molai ya mabɔkɔ na ye. (Kokanisá na Yoane 19:23; Misala 10:30, The Kingdom Interlinear.) Khi·tonʹ ekangisamaki na bapɛ́ngɛlɛ oyo esalemaki liboso na mikuwa ya makolo ya banyama ya mike mpe na nsima na bibende. Ezalaki polele bipai nyonso mibale, eteni ya nsé ekangisamaki esika moko na loketo na nkámba, yango ezalaki komonana lokola bilamba mibale oyo ekabwaná.

Na nsima, na ebandeli ya ekeke ya motoba L.T.B. khi·tonʹ ya mboka Ionie ekómaki kokokana mingi na robe koleka simisi ya molai ezanga mabɔkɔ, mpamba te batongaki yango na mipanzi mpe egumbamaki lisusu te na eteni ya bosánda. Na yango, ezalaki kopesa nzela na kosalela bobele mwa elamba moke. Na esika ete ezala na mobimba na yango ya mpɛmbɛ, elamba yango ezalaki mbala mosusu na babándi semba ya lángi ekeseni, to mpe bazalaki kobakisa mayemi. Lángi ya mwa lokola mosaka mpe ya motane ngbaa ezalaki kosalelama mingi. Kasi, na nsima, na bileko bibéngami hellénistique, na bopusi ya Azia, balángi mosusu ya sika mpe ya kongɛnga, lokola rose, bulé, mai ya vinyo mpe mosaka eyaki kobima. Mambunza mosusu, oyo ekembisami na nsinga ya wolo to na fololo, na ebandeli, ezalaki bobele mpo na bikeko ya banzambe to na bato oyo bazalaki komonisa bango.

Eloko nini lisusu mwasi ya mboka Athènes akokaki kolata?

Mwasi moko te ya mboka Athènes oyo azalaki kopesa nzoto na ye kiló akokaki kobima kozanga kolata hi·maʹti·on, to kazaka. Limbunza wana ya etando rectangle, esangisami ekokaki kolatama na mitindo mingi​—kotya likoló ya mapeka lokola châle, kozinga likoló ya lipeka ya lobɔkɔ ya mobali mpe eleki na nsé ya lobɔkɔ ya mwasi, to mpe etyami na motó mpo na komibatela na moi. Kazaka mpe ezalaki ya bolai ekeseni, oyo ya monene koleka ezalaki kolatama na ntango ya mpiɔ lokola cape. Hi·maʹti·on mingimingi na nsuka na yango bazalaki kokembisa yango, mpe esengelaki mpenza kozala na ntɔ́ki mingi mpo na kongumba mpe kolata yango na lolenge ya kobimisa mikuwa.

Kyʹpas·sis, lolenge moko ya jacket ya mokuse oyo ezali na babutɔ́ liboso, ezalaki mbala mosusu kolatama na esika ya hi·maʹti·on. Basi bazalaki na bikɔti te lokola lelo, kasi na mikolo ya moi makasi bazalaki kolata ntango mosusu ski·aʹdei·on to lingɛmbu ya moke. Basi ya bozwi bazalaki mbala mingi kolata elamba ya loposo ya mpate, ebéngami peʹplos. Makomami ya Greke mazali kolobela mpe “litambála” (na greke, pe·ri·-boʹlai·on) kati na mikanda ya Paulo.​—1 Bakorinte 11:15, Liloba lya Nzambe.

Epai na bango, Bagreke ya kala bazalaki na momeseno ya kotambola makolo-ngulu, mbala mosusu ata soki abimi. Engebene mokomi ya ntɔ́ki Hésiode, bato ya mboka bazalaki kolata basandale ya mposo ya ngɔ́mbɛ́ etongami na elamba oyo euti na mikungé ya mpate. Basi mikuse bazalaki mbala mosusu kolata basapato ya taló molai mpo na kotombwana.

Biloko ya wolo

Biloko oyo basala na nkasa ya wolo, bakembisa na lolenge ya nyama mpe ya milóna, ezalaki komonana mingi. Lolenge moko babiju oyo ezalaki na elilingi ya scarabée, mosusu ya lolenge wana etyamaki na ekɔ́mɔ oyo ebalukaka (anneau pivotant). Bikɔ́mɔ​—mbala mosusu ebéngamaki o·phis (nyoka) to dra·kon (dalagona)​—ezalaki biloko kitoko mpo na atelié ya babiju.

Biloko ya kala oyo babimisaka na nsé ya mabelé emonisi bazikida, midai, mingali, biloko ya matoi ya kolɛngisa, bikɔ́mɔ mpe biloko mosusu. Biloko wana ya monzɛlɛ esalemaki mingimingi na wolo, na ebendé to na motáko, mingi mpenza te na palata mpe bazalaki kotya likoló na yango mayaka ya mbɛ́lɛ to mabanga mosusu ya motuya mingi te.

Biloko ya matoi ezalaki mpe komonana mingi. Mbala mosusu ezalaki na bilembo oyo ezalaki komonana ya lokumu, ya nguya to ya bozwi. Na momeseno, bazalaki kotobola bana basi matoi uta na bolenge mpenza.

Lolenge ya kosala nsuki

Lolenge ya kosala nsuki ezalaki mpenza mingi mpe ekeseni kati na Grèce ya kala. Moko kati na oyo bato balingaki mingi ezalaki ya kotya nzela na katikati mpe kokangisa nsuki na nsima na eteni moko ya elamba ya lángi. Basi mosusu bazalaki kosangisa nsuki na bango mpe kolínga yango na nsɔ́ngɛ́ ya motó. Basusu bazalaki kokata lisumba ya kotɛlɛma. Eteni yango ya elamba ekembisamaki na mwa butɔ́ ya moke ya ebende na liboso ezalaki mbala mosusu kozingama na elongi. Bazalaki kobumbisa nsuki na lisalisi ya fɛ́lo ya kotya babulé. Emonani ete basi ya mboka Athènes ya kala bazalaki kotya mikóbo na nsuki. Lucien, savá ya makambo matali koloba malamu, alobaki mabe mpo na bizalela mabe ya basi oyo bazalaki kosalela “bamasíni” mpo na komisalela bikɔ́mɔ mpe bazalaki kobebisa bozwi ya mibali na bango na kosombáká batɛntirɛ ya Baarabe mpo na nsuki na bango.

Lolenge ya kosala nsuki oyo ezalaki kolakisama na basi ya bozwi na Grèce ya kala ezalaki mpenza mpasi koleka. Na ntalo mingi, ezalaki kosɛnga bangonga mingi epai na mokangi-nsuki ete asala yango. Lolenge na yango ya kokamwisa ezalaki kobenda likebi likoló na baoyo bazalaki kosala yango.

Basi oyo basalaka monzɛlɛ

Kokembisa elongi ezalaki mpe momeseno mosusu ya Ɛ́sti oyo ekɔtaki na Grèce na batamboli mpe bato ya mombongo. Na ekeke ya mitano L.T.B., basi ya mboka Athènes bazalaki kongɛngisa bilongi na lángi oyo euti na mondɔlu babéngi blanc de céruse. Bazalaki kotya lángi ya motane na bibɛbu mpe ngóla na matáma oyo esalemaki na matiti ya Mai Monene to na misisa ya nzeté. Bazalaki koyindisa nkiki na mputulu mpe na bitɛkɛ ya miso bazalaki kolekisa minkɔ́lɔ́tɔ́ ya tilí. Bazalaki kosala mascara euti na nyei ya ngɔ́mbɛ́ to na kosangisama ya mai ya mpɛ́mbɛ ya likei na molembo ya nzeté ebéngami acacia.

Bolukiluki ya biloko oyo bibombamá na nsé ya mabelé, oyo esalemaki kati na bandako minene, na bankunda mpe na bingumba emonisi biloko mingi oyo bizalaki kosalelama mpo na monzɛlɛ ya basi. Kati na bisaleli ndenge na ndenge ezalaki na batalatála, masanyola, bipɛ́ngɛlɛ, bambeli mike ya kitoko, nzwaalɛ́, mbɛki ya mike mpo na malási, mafuta ya kopakola mpe biloko oyo bipesaka lángi kitoko na loposo.

Kitoko ya solo

Atako mpo na maloba ya kozokisa ya bakomi ya ntɔ́ki ya Bagreke, bonzengá ezalaki eloko kitoko epai na basi, mpe basi Bagreke bazalaki kolekisa ntango, milende mpe likebi mingi mpo na yango.

Talá mpenza makambo oyo makokaki kotinda baklisto basi na kotalela mpamba bizaleli na bango ya elimo. Yango wana, ntoma Petelo amonisaki ete elamba oyo eleki kitoko mpe ya ntina mingi oyo mwasi akoki kolata ezali “eloko ebombami na motema, kitoko oyo ekobeba te, oyo na [elimo, NW] na bopɔlɔ mpe na kimia; yango ezali na motuya monene na miso na Nzambe.” (1 Petelo 3:3, 4) Mwasi oyo alati lolenge ya molato wana ya kati, bakisá mpe bilamba ya pɛto mpe elongobani, akozala ntango nyonso kitoko, na elateli ezangi mbeba mpe oyo ekoleka ngala soki moke te. Paulo akomelaki Timoté: “Basi bamilatisa nzoto na bango na lolenge na bopɔlɔ mpe na makanisi malamu, na kotongatonga nsuki tɛ, na wolo te, na mabanga na motuya te, na bilamba na motuya monene te, kasi na misala na kitoko lokola ebongi na basi baoyo bayamboli ete bazali kondima Nzambe.”​—1 Timoté 2:9, 10.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Liloba khi·tonʹ ezwami mbala 11 kati na makomami ya Greke mpe ebongolami na “vêtement de dessous” kati na Les Écritures grecques chrétiennes​— Traduction du monde nouveau. Talá Expository Dictionary of New Testament Words ya W. E. Vine, volimi 1, lokasa 198, na nsé ya eteni “Clothing.”

[Etanda na lokasa 24]

Biloko bikembisami mpe losambo

Biloko bikembisami ya Grèce ya kala bizalaki mbala mingi komonisa makambo matali losambo. Na bantango mosusu, ezalaki midai na elongi ya banzambe ndenge na ndenge ya mibali mpe ya basi, lokola Artémis, to nzambe-ndambo lokola Héraclès. Makabo mingi oyo mazalaki kopesama na bisika ya losambo na Grèce ezalaki biloko bikembisami oyo bizalaki komonisa milulu ya losambo. Komonisáká likanisi ya bapakano ya molimo oyo ekóbaka kozala na bomoi na nsima ya liwa ya nzoto, biloko mingi bikembisami bityamaki kati na malita pembeni ya mowei. Bolukiluki ya biloko ya kala oyo bibombama na nsé ya mabelé oyo esalemi kala mingi te emonisi ete biloko yango bizali na ntina te mpo na bakufi; ezali na ntina nde mpo na bayibi oyo bazali na bomoi oyo bapunzaka malita yango uta bikeke mingi.

[Bililingi na lokasa 23]

Na lobɔkɔ ya mwasi: Parthénon, tempelo ya nzambe Athéna

Likoló: Modai ya wolo ekembisami na ekeko ya Artémis.

Na lobɔkɔ ya mobali: Elenge mwasi alati robe ezangá mabɔkɔ.”

Na nsé na lobɔkɔ ya mobali: Diadème ya wolo

Na nsuka na lobɔkɔ ya mwasi: nzambe ya mwasi alati “khitôn” mpe “robe ya molai ezangá mabɔkɔ.”

Na lobɔkɔ ya mwasi: Ekɔ́mɔ ya wolo na motó ya nyoka

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Na likoló na lobɔkɔ ya mobali: Ndako ya ebombelo ya biloko ya kala, Acropole, na Grèce

Bafɔtɔ́ mosusu nyonso: Ndako ya ebombelo ya biloko ya kala bikundolamaki na Athènes

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 22]

Engumba Athènes, na Grèce

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto