Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g95 Avril nk. 25-27
  • Kosopa zemi​—⁠Yango ezali nde mwango ya malamu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kosopa zemi​—⁠Yango ezali nde mwango ya malamu?
  • Lamuká!—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini basusu basopaka zemi
  • Mitungisi na mayoki
  • Luká lisungi
  • Kosopa zemi—Yango nde nzela mokuse ya kosilisa mikakatano?
    Lamuká!—2009
  • Biblia elobi nini mpo na likambo etali kolongola zemi?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Mangomba oyo makoki kopesa eyano?
    Lamuká!—1993
  • Kokakatana likoló na kosopa zemi—Nzela ezali nde na koboma milió 60 ya bana?
    Lamuká!—1993
Makambo mosusu
Lamuká!—1995
g95 Avril nk. 25-27

Mituna oyo bilenge batunaka . . .

Kosopa zemi​—Yango ezali nde mwango ya malamu?

“Ntango makango na ngai ayaki koyeba ete ekzame emonisaki solo ete nazalaki na zemi, nokinoki asɛngaki na ngai ete násopa yango. Apesaki ngai nkutu mosolo mpo na yango.” Maloba ya Judith, elenge mwasi ya mibu 17.a

NTANGO Marthe, elenge mwasi ya mibu 15, ayaki koyeba ete azalaki na zemi, asololaki na mopesi-toli moko kati na lopitalo ya kosopa zemi. Marthe alobi: “Alimbwelaki ngai makambo nyonso. Ayebisaki ngai ete nakoki kosopa yango, to akosalisa ngai mpo na koyeba lisangá moko oyo ekamataka bana to lopitalo ya kobota, soki yango nde nazalaki koluka.”

Bobele na Etats-Unis, bilenge basi koleka milió moko bazali kozwa zemi mbula na mbula. Kati na bango, ezali mpe na bilenge oyo, atako bazwi mateya ya boklisto, batosaki te mobeko ya Nzambe motali ‘kotika makambo na pite,’ elingi koloba kosangisa nzoto liboso ya kobala. (1 Batesaloniki 4:3) Misala wana ya mbindo mibendelaka bango bampasi mingi oyo bakokaki kopɛngola. Nzokande, mingi kati na bilenge yango, basukaka na kooka mawa na ntina na etamboli na bango mpe balingi kobongisa bomoi na bango. Kasi, kobanga mpo na likoki ya kozala na mwana kozanga kobala, basusu bakoki komituna soki kosopa zemi ezali mwango ya malamu mpo na mikakatano na bango. Nkutu, mbula na mbula pene na bilenge basi nkoto nkámá mitano oyo bazali na zemi na Etats-Unis baponaka kosopa yango. Yango ekoki mpenza kozala mwango ya malamu mpo na zemi oyo olingaki yango te?

Mpo na nini basusu basopaka zemi

Emonani mpenza ete mayoki mosusu ya makasi, nkutu ya mobulungano ekoki koya. Elenge mwasi azalaka na mayoki ya bomoto mpo na mwana oyo azali kokóla kati na ye, kasi akoki mpe kozala na kotungisama mpe na kobanga.

Na ndakisa, Vicky, azali na mibu 18, “alingaki kokende na eteyelo ya monene, nkutu kozwa lipɔlɔ́mi monene.” Kati na makanisi na ye, kozala na mwana ekoki kobebisa mikano na ye. (Zulunalo ‘Teen, Mársi 1992) Makanisi lolenge moko mpo na Marthe, alobi: “Soki ozali mama, okofanda na ndako elongo na mwana na yo, mpe kelasi esili. Namibongisaki te mpo na yango.” Engebene bolukiluki moko, 87 % ya bilenge oyo basopaka zemi babangaka ete kozala na mwana ekoki mpenza kobongola bomoi na bango na lolenge oyo bamibongisaki mpo na kondima yango te.

Kobanga na ntina na mikakatano mitali mosolo mpe mikumba ya mama-monzemba ezali mpe bantina mosusu mpo na yango mingi baponaka kosopa zemi. Vicky amonisaki yango na maloba oyo: “Nazalaki kati na libota oyo baboti na ngai babomaki libala mpe mama na ngai abɔkɔlaki bana na ye misato bobele ye moko. Namonaki ndenge azalaki komona mpasi . . . Nakokaki komimona ngai moko kozala moboti moko lokola mama na ngai.”

Bopusi ya basusu, mingimingi ya makango oyo atyaki yo zemi, ekoki mpe kopusa elenge mwasi na kosopa zemi. Makango ya Judith apesaki ye liponi moko ya makasi: “Soki osopi zemi yango te, nakolinga komona yo lisusu te.” Mpo na Nancy, bopusi mpo na kosopa zemi eutaki epai na mama na ye mpe epai na biboto na ye mosusu.

Likanisi lipalangani mingi oyo ete kosopa zemi ezali mpenza koboma mwana te, yango mpe esalaka bopusi makasi. Vicky alobi: “Nazalaki komitika te kokanisa ete ezali mwana . . . Natángaki ete na pɔ́sɔ ya mitano na boumeli ya zemi, likei lizali moke koleka linzaka ya mosapi ya moke. Nakangamaki mpenza makasi na likanisi wana. Namilobelaki ete soki ezali bobele lokola linzaka ya mosapi ya moke, ezali mpenza mwana te. Namekaki kotya yango lokola mwa eloko moko ya mpamba kati na makanisi na ngai mpo nákoka kosopa yango.”

Basusu balobaka mpe ete bobele na mikili ya bozwi kosopa zemi ezali kosalema kozanga likámá​—mpe ezali na mikakatano moke koleka mikakatano oyo zemi ekoki komema na elenge oyo azali na yango. Na bongo, kotalela nyonso wana, kosopa zemi ekoki komonana lokola mwango malamu. Nzokande, makambo mamonisi ete mingi oyo baponaki kosopa zemi bamiyokaki mawa na nsima. Mwasi moko alobi: “Nasopaki zemi ntango nazalaki na mibu 20. Sikawa nazali na mibu 34 mpe ezali mpasi mpo na ngai kokanisa likambo oyo nasalaki. Nalingaki mwana na ngai, kasi makango na ngai alingaki te. Kino sikawa nazali kotungisama; mpasi ezali na ngai mpo na bomoi na ngai mobimba.”

Mitungisi na mayoki

Na esika ete ezala mwango malamu, kosopa zemi ekoki kobakisa mikakatano. Ezokisaka liyoki na biso ya ntéi ya koyeba mabe mpe malamu, lisosoli oyo Nzambe atya kati na bato. (Baloma 2:15) Lisusu, kosopa zemi esɛngaka epai na elenge mwasi ete azanga mayoki ya bolingo mpo na ekelamu moke ya bomoi oyo ezali kokóla kati na ye. (Kokanisá na 1 Yoane 3:17.) Oyo nde likambo ya mpasi!

Marthe alobi: “Bobele mwa bapɔ́sɔ [nsima ya kosopa zemi] nde nabandaki kokóma na mayoki ya komema ngambo mpe ya nsɔ́ni na likambo nasalaki.” Mayoki yango eyaki makasi ntango ekómaki na Febwáli, sanza oyo asengelaki kobota. Élise, mpo na ye alobi ete: “Esili koleka mibu zomi na mitano, nasopaki zemi. Na nsima na yango, natungisamaki mingi na makanisi, kino nasengelaki kokɔta lopitalo mbala na mbala. Nalingaki nkutu komiboma.”

Ya solo, bilenge basi nyonso basalaka motindo wana te. Mingi bakanisaka mpenza ete likei ezali bomoi ya moto te. Kasi, Mozalisi, “eutelo ya bomoi” alobi nini na ntina yango? (Nzembo 36:9) Biblia ezali komonisa yango polele ete epai na Yehova Nzambe, mwana oyo abotami naino te oyo azali kokóla kati na libumu ya mama aleki mosika mwa mosisa moko boye. Mokonzi Davidi apemamaki mpo na kokoma ete: “Miso na yo imonaki ngai naino esalamaki ngai te; mikolo na ngai ikomamaki nyonso na mokanda na yo.” (Nzembo 139:16) Na yango, mpo na Mozalisi, ata likei ezali mpenza moto mobimba, moto oyo azali na bomoi. Mpo na ntina yango, alobaki ete moto oyo akoboma mwana oyo abotami naino te akozongisa monɔkɔ. (Exode 21:22, 23) Ɛɛ, lokola Nzambe atalelami kati na likambo yango, koboma mwana oyo azali kati na libumu ezali kolongola bomoi ya moto. Na bongo, elenge mwasi oyo alingi kosepelisa Nzambe, akolinga te kotalela kosopa zemi lokola likanisi ya malamu​—ezala ata bopusi ya lolenge nini akoki kozwa.b

Luká lisungi

Judith oyo tolobelaki na ebandeli, aponaki kotika mwana na ye na bomoi. Alobi: “Bobele na ebandeli, ndeko na ngai ya mwasi ayebaki yango mpe azalaki kosunga ngai, mingimingi na mayoki. Alobaki nkutu ete akokóba kosunga ngai nsima wana nakobota. Yango ezalaki nyonso oyo nalingaki koyoka mpo na kosala na lolenge oyo nazalaki kokanisa ete ezali malamu kati na motema na ngai. Nazwaki ekateli na ngai mpe nabotaki.” Yango esalemaki esili koleka mibu libwa. Kotaláká mwana na ye ya mobali ya mibu mwambe, Judith alobi: “Soki nasopaki zemi, mbɛlɛ nasalaki libungá monene koleka na bomoi na ngai.”

Bobele bongo, elenge moko na nkombo Natisa alobaki: “Esili koleka mibu mitano, nakendaki na lopitalo moko ya kosopa zemi. Ntango nazalaki kozela ngala na ngai mpo nakɔta, namanyolaki na mozindo mpe mbala moko nabimaki. Sikawa nazali na mwana mobali kitoko ya mibu minei, nazali kozela mwana mosusu mpe nazali na mobali oyo atondi na bolingo.”

Elenge mwasi oyo akumbi zemi naino abali te, asengeli te kokamata ekateli ya nokinoki. Atako ezalela yango ekoki komonana mabe koleka, yango ezali nsuka ya mokili te. Nzokande elenge motindo wana azali na mposa ya lisungi mpe litambwisi ya bato oyo bakɔmeli. Kofungola motema epai na baboti ezali litambe ya malamu, mingimingi soki bazali baklisto. (Masese 23:26) Ya solo, na ebandeli bakoyoka motema mpasi mpe bakosilika. Kasi, na nsima bakomiyoka ete bapusami na kopesa lisungi. Bakoki mbala mosusu, na ndakisa, kozwa bibongiseli mpo ete asalisama liboso ya kobota. Bakoki mpe kosalisa elenge ete azwa lisungi ya Leta oyo azali na lotómo na yango. Oyo eleki ntina, bakoki kolendisa ye ete azwa lisungi ya elimo oyo euti na bankulutu ya lisangá.​—Yakobo 5:14, 15.

Kobangáká ete bakokoka te kobɔkɔla bana na bango, bamama mosusu oyo bazali minzemba baponi kopesa bango epai na bato mosusu. Atako yango ezali malamu koleka kosopa zemi, kasi Nzambe apesi na moboti nyonso mokumba ya ‘koleisa bato na ye.’ (1 Timoté 5:8) Mbala mosusu, mama-monzemba akokoka te kokokisa bamposa ya mosuni ya mwana na ye, kasi akoki kopesa ye eloko mosusu oyo eleki ntina: bolingo. (Masese 15:17) Na bongo, kati na makambo mingi, ezali malamu ete mama-monzemba abɔkɔla ye moko mwana na ye.

Ezali boni mpo na mokumba ya kobɔkɔla mwana​—mpe mbongwana oyo, kozanga ntembe ekosalema na bomoi na ye? Nyonso wana ekoki kotungisa. Nzokande, Biblia ezali kopesa batoli ya malamu oyo ekoki kosunga baoyo bakutani na mikakatano yango. Mama-monzemba oyo abongoli motema akoki mpe kozwa lisungi ya elimo oyo lizwi moboko na yango likoló na Liloba ya Nzambe. Ɛɛ, na lisungi ya bolingo mpe na litambwisi malamu, akoki kolónga.c Ya solo, kosopa zemi ezali mwango ya malamu te!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bankombo mosusu ebongwamaki.

b Baoyo, na ntango ya kala basilaki kosopa zemi bákanisa te ete makambo nyonso mabebi. Bakoki kondimisama ete Yehova asungaka basumuki oyo babongoli motema mpe ‘alimbisaka na motema mobimba.’ (Yisaya 55:7) Mbala mosusu mitungisi na mayoki ekoki kotikala, kasi mokomi na Nzembo azali kopesa kondimisama oyo: “Mosika pelamoko yango kati na epai na ebimelo na ntango mpe epai na elimwelo na yango, mosika boye asili kolongola bipɛngwɛli na biso.”​—Nzembo 103:12.

c Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Desɛ́mbɛ 1980 (ebimeli ya Lifalansé), “Ndenge nini kobɔkɔla bana yo moko?” Bakisá mpe nimero na biso ya Lamuká! ya 8 Ɔkɔtɔ́bɛ 1994 (ebimeli ya Lifalansé), “Mituna oyo bilenge batunaka . . . Bamama-minzemba: lolenge nini bokoki kobongisa ezalela na bino?”

[Elilingi na lokasa 26]

Tata ya mwana amekaka ntango nyonso kopusa elenge mwasi ete asopa zemi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto