Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g95 Juillet nk. 4-6
  • Bamilió ya bato bakómi baombo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bamilió ya bato bakómi baombo
  • Lamuká!—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mombongo ya bipai misato
  • Kokende na ngambo mosusu ya Atlantique
  • Kokóma na Amerika
  • Mosala mpe mfimbo
  • Batekisamaki lokola baombo
    Lamuká!—1995
  • Mokakatano ya Lingomba ntango Brésil ezalaki na mabɔkɔ ya Portugal
    Lamuká!—2003
  • Na nzela ya baombo
    Lamuká!—2011
  • Koluka kolongwa na boombo na ntango ya kala mpe lelo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
Makambo mosusu
Lamuká!—1995
g95 Juillet nk. 4-6

Bamilió ya bato bakómi baombo

NA NTANGO oyo Olaudah Equiano abotamaki, bamasuwa ya Mpótó esilaki kobanda kokumba baombo Baafrika kokatisáká bango Mai Monene Atlantique uta bikeke mibale na ndambo. Kasi, boombo ebandaki mpenza liboso koleka wana. Boombo ya bato, mingimingi na ntina ya bitumba, esili kosalema na mokili mobimba longwa na ntango ya kala.

Lisusu, na Afrika, boombo ezalaki kosalema liboso ete masuwa ya Mpótó ekóma. Búku La Nouvelle Encyclopédie britannique elobi ete: “Soki toluki kino mosika mpenza kati na lisoló ya bato, tokomona ete boombo ezalaki ntango nyonso kosalema kati na Afrika ya baindo . . . Boombo ezalaki kosalema bipai binso nkutu liboso ya kobima ya lingomba Islām; mpe baombo baindo oyo bamemaki bango longwa na Afrika batekisamaki bipai binso na mokili ya bamizilmá.”

Eloko oyo ekesenisaki mombongo ya baombo oyo bazalaki kokatisa Mai Monene Atlantique ezalaki bonene mpe boumeli na yango. Engebene mituya ya sikisiki, motángo ya baombo oyo bakatisaki Mai Monene Atlantique uta na ekeke ya zomi na motoba kino ya zomi na libwa ezalaki kati na milió 10 mpe milió 12.

Mombongo ya bipai misato

Mwa moke nsima na mobembo ya Christophe Colomb na 1492, mindɛlɛ oyo bautaki na Mpótó babongisaki misala ya koluka mabanga ya ntalo mpe bilanga ya kokó na Amerika. Batyaki na boombo bafandi ya mokili wana, kasi na nsima bamonaki ete ekoki te mpe babandaki komema baombo longwa na Afrika.a Na ebandeli na yango (katikati ya ekeke ya zomi na motoba) mombongo ya baombo oyo bazalaki komema bango na ngambo mosusu ya Mai Monene Atlantique ezalaki eloko moke, kasi na ntango ya Equiano, na katikati ya ekeke ya zomi na mwambe, ekómaki makasi​—bakangami soko 60 000 mbula na mbula.

Masuwa oyo mazalaki kouta na Mpótó mazalaki kolanda mingimingi nzela ya bipai misato. Liboso, bazalaki kosala mobembo na Súdi longwa na Mpótó kino na Afrika. Na nsima, basɛ́maki na Amerika. Na nsuka, basɛ́maki lisusu na Mpótó.

Esika moko na moko oyo bazalaki kosɛ́ma, bakapitɛ́ni ya masuwa bazalaki kosala mombongo. Masuwa elongwaki na mabongo ya Mpótó etondi na biloko​—bilamba, bibende, mindóki mpe masanga makasi. Wana bakómaki na libongo ya Afrika ya Wɛ́sti, bakapitɛ́ni bazalaki kosombitinya biloko yango na baombo oyo bapesamelaki bango na bakonzi Baafrika. Bakɔtisaki baombo na masuwa mpe na nsima bakendaki na Amerika. Na Amerika, bakapitɛ́ni batekisaki baombo mpe na nsima bakɔtisaki kati na masuwa biloko oyo bibimisamaki na mosala ya baombo​—sukali, masanga ya kokó, mbɔtɔ ya sukali, makaya, loso mpe banda bambula 1780, kotó. Na nsima, masuwa mazongaki na Mpótó mpo na kosukisa mobembo na yango.

Mpo na bato ya mombongo ya Mpótó mpe ya Afrika, bakisá mpe mindɛlɛ oyo bakenda kosala bilanga na Amerika, mombongo oyo bango moko babéngaki yango ete masandisi ya bomoi, ezalaki kokɔtisela bango mosolo mingi. Mpo na baoyo bakangaki bango baombo​—mibali mpe basi, batata mpe bamama, bana mibali mpe bana basi​—mombongo yango elimbolaki nde monyoko makasi mpe makambo na nsɔ́mɔ.

Baombo bautaki wapi? Basusu bayibaki bango, lokola basalaki Olaudah Equiano, kasi mingi bakangaki bango na ntango ya bitumba oyo bibimaki kati na bikolo na Afrika. Bateki bazalaki Baafrika. Mokomi na lisoló ya bato, Philip Curtin, nganga-mayele mpo na makambo matali mombongo ya baombo, akomaki: “Mosika te, mindɛlɛ bamonaki ete kokɔta kati na zámba ya Afrika mpo na kokanga baombo ezalaki likámá mpo na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na bango. Kokanga baombo eyaki kokóma mosala oyo mokokisamaki na Baafrika bango moko . . . Bato mingi oyo batekisamaki lokola baombo bakangaki bango mingimingi ntango ya bitumba.”

Kokende na ngambo mosusu ya Atlantique

Mobembo na Amerika ezalaki likambo ya nsɔ́mɔ mingi. Bakangami Baafrika batambolaki na molɔngɔ́ mpe na makolo kino na libongo, wana bakangami na minyɔlɔ́lɔ kati na bituluku. Kuna bakɔtisaki bango na ndako ya mabanga to ya mabaya, mpe bazalaki kozela wana na mpasi na bango, mikolo mingi, mpe ntango mosusu basanza mingi. Na ntango oyo masuwa ya baombo ekómi mpo na kokamata baombo komema bango na Amerika, bakangami mbala mingi basili kokɔnda mpo na monyoko oyo bazwaki. Nzokande, mpasi eleki oyo wana ezalaki kozila bango.

Nsima na kobenda bango lokola banyama mpe kokɔtisa bango na masuwa, balongoli bango bilamba nyonso mpo monganga to kapitɛ́ni ya masuwa atalatala bango. Na nsima, mibali bakangamaki na minyɔlɔ́lɔ́ mpe bakendaki na bango na nkɔbɛ́. Bakapitɛ́ni ya masuwa bazalaki kotya baombo mingi kati na nkɔbɛ́ mpo na kokólisa matomba na bango. Basi mpe bana bakangamaki na minyolɔ́lɔ́ te, nzokande basi bakokaki kobebisama na kosangisa nzoto na basali ya masuwa.

Mopɛpɛ kati na nkɔbɛ́ ezalaki malamu te, nsolo mabe. Equiano amonisi mayoki na ye: “Boke ya nkɔbɛ́ mpe molungé, bakisá motuya monene ya bato kati na masuwa, oyo ezalaki nkaká na boye ete moko na moko azalaki na mpasi mpo na kobaluka ye moko, nsolo mabe ezalaki kokata biso mpema. Tozalaki kotɔka mingi, na boye ete mopɛpɛ ebebaki nyonso mpo na nsolo ndenge na ndenge, mpe ebimisaki makɔnɔ kati na baombo oyo mingi na bango bakufaki . . . Kolela ya basi mpe kokimela ya bato oyo bazalaki pene na kokata motema ebimisaki nsɔ́mɔ moko oyo ekoki kokanisama te.” Bakangami basengelaki koyika mpiko na makambo ya lolenge wana na boumeli ya mobembo, oyo ezalaki kosala soko sanza mibale, mbala mosusu koleka.

Lokola bopɛto ata moke ezalaki te, makɔnɔ matondaki. Pulúpulú ya makila mpe kolokóto ezalaki komonana mingi. Mingi bazalaki kokufa. Bolukiluki emonisi ete kino na bambula 1750, Moafrika moko kati na mitano oyo batyamaki na masuwa akufaki na nzela. Bakufi babwakamaki na mai.

Kokóma na Amerika

Wana masuwa ya baombo ekómaki pene na Amerika, bato ya masuwa babongisaki Baafrika mpo na kotekisa bango. Balongolaki bakangami na minyɔlɔ́lɔ, baleisaki bango mpo baya minene mpe bapakolaki bango mafuta mpo ete bámonana lokola bazali nzoto kolɔngɔ́nɔ́, kobombáká bilɛmbo ya mpota mpe bampota.

Na momeseno, bakapitɛ́ni bazalaki kotekisa bakangami moko na moko. Kasi, mbala mosusu bazalaki kosala “mopɔ́tɔnɔ,” kokɔngɔla mosolo ya basombi liboso ete bápesa bango liboke nyonso ya baombo. Na bongo, basombi bakopesa mosolo ndenge moko. Equiano akomi: “Wana bapesaki elembo (na ndakisa, kobetama ya mbonda), basombi bapotaki bango nyonso na mbala moko na esika oyo baombo batyamaki mpe babandaki kopona oyo basepelisaki bango. Makɛlɛlɛ mpe kolela na botekisi wana mpe lokoso ya basombi ekólisaki kobanga mpe nsɔ́mɔ epai ya Baafrika.”

Equiano abakisi ete: “Na lolenge yango, kozanga mawa, bazalaki kokabola baninga mpe baboti, oyo mingi kati na bango bakomonana lisusu te.” Mpo na mabota oyo bazwaki nkonzo ya kofanda esika moko na boumeli ya bomoi wana ya nsɔ́mɔ ya basanza oyo euti koleka, kokabwana yango ezalaki mpenza mpasi koleka.

Mosala mpe mfimbo

Baombo Baafrika basalaki mosala makasi na bilanga mpo na kobimisa kafé, loso, makaya, kotó mpe mingimingi sukali. Basusu bazalaki kotimola mabanga ya ntalo. Bamoko basalaki lokola basáli-mabaya, batúli ya bibende, babongisi-mɔńtrɛ, basáli ya bibundeli to basali na masuwa. Nzokande, basusu bazalaki kosala misala ya ndako​—bɔ́i, ndɛ́li ya bana, basɔni-bilamba, balámbi. Baombo bazalaki kolongola bosɔtɔ, kobongisa banzela, kotonga bandako mpe kotimola batálásɛ́.

Nzokande, atako basalaki nyonso wana, baombo batalelamaki lokola biloko ya bankolo na bango mpe engebene mibeko nkolo azalaki na bokonzi nyonso likoló na eloko na ye. Nzokande, boombo eumelaki bobele te na nzela ya koboyela bango lotómo nyonso mpe bonsomi nyonso. Eumelaki lisusu mpo na mfimbo. Bokonzi ya bankolo mpe bakɛngɛli na misala etalelaki makoki na bango ya konyokola baombo. Mpe bamonisaki ete bayebi solo konyokolo.

Mpo na kolɛmbisa botomboki mpe kotosisa baombo na bango, bankolo bazalaki kopesa bitumbu ya nzoto ata mpo na mwa mabungá mike. Equiano akomi: “Ezalaki komonana mingi epai na baombo [na Antilles] kotyama elɛmbo ya balɛ́tɛlɛ ya liboso ya nkombo ya nkolo na bango na kosaleláká libende ya mɔ́tɔ mpe bazalaki kolatisa bango minyɔlɔ́lɔ ya kiló na nkingo. Ata mpo na mabunga mike, bazalaki kokanga bango na minyɔlɔ́lɔ mpe mbala mingi bisaleli ya konyokola bibakisamaki. Ebende ya kokanga monɔkɔ, minɔ́ti ya monene, mpe bongo na bongo . . . esalelamaki mbala mosusu ata mpo na mabungá ya mike mpenza. Nasilaki komona moto moíndo kobetama kino mikuwa na ye mosusu mibukani bobele mpo ete atikaki nzungu etɔkaki kino supu esopanaki.”

Mbala mosusu, baombo bazalaki kolinga kotomboka. Nzokande, mingi oyo bazalaki kotomboka balóngaki te mpe babomamaki kozanga mawa lokola banyama mabe.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mikili ya Mpótó oyo mikɔtaki na mombongo ya kotekisa baombo na ngambo mosusu ya Mai Monene Atlantique ezalaki Grande-Bretagne, Danemark, France, Hollande, Portugal mpe Espagne.

[Elilingi na lokasa 5]

Bakufi babwakamaki na mai

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Culver Pictures

[Elilingi na lokasa 5]

Baombo ebele mpenza batyamaki kati na nkɔbɛ́

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Schomburg Center for Research in Black Culture / The New York Public Library / Astor, Lenox and Tilden Foundations

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto