Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g95 Juillet lok. 3
  • Batekisamaki lokola baombo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batekisamaki lokola baombo
  • Lamuká!—1995
  • Masolo mosusu
  • Bamilió ya bato bakómi baombo
    Lamuká!—1995
  • Koluka kolongwa na boombo na ntango ya kala mpe lelo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Nzambe andimaki likambo ya kotɛkisa bato baombo?
    Lamuká!—2002
  • Mokakatano ya Lingomba ntango Brésil ezalaki na mabɔkɔ ya Portugal
    Lamuká!—2003
Makambo mosusu
Lamuká!—1995
g95 Juillet lok. 3

Batekisamaki lokola baombo

Euti na mokomani na biso na Afrika

OLAUDAH EQUIANO abotamaki na 1745 kati na mboka moko na eteni ya mokili oyo eyebani sikawa lokola Nigeria ya Ɛ́sti. Bomoi kati na mboka na ye ezalaki lolenge mosusu ntango wana. Mabota bazalaki kosala mosala elongo, kolóna masangu, kotó, mbomá mpe madesu. Mibali bazalaki koleisa bampate mpe bantaba. Basi bazalaki kobimisa mpe kotonga kotó.

Tata ya Equiano azalaki nkumu mpe mosambisi kati na mboka. Ezalaki etɛlɛmɛlo oyo Equiano akokaki kosangola mokolo mosusu. Kasi yango esalemaki te. Wana Equiano azalaki elenge, bayibaki ye mpe batekisaki ye lokola moombo.

Atekisamaki longwa na moto ya mombongo moko nsima na mosusu, ayaki komona mindɛlɛ ya Mpótó bobele ntango akómaki na libongo. Bambula mingi na nsima, amonisaki mayoki na ye: “Eloko ya liboso oyo namonaki ntango nakómaki na libongo ezalaki Mai Monene, mpe masuwa ya baombo oyo esemaki na libongo mpo na kozela ete bátya masandisi. Yango ekamwisaki ngai mingi, mpe kokamwa yango ebongwanaki nsɔ́mɔ ntango bamatisaki ngai. Nokinoki basáli na masuwa batalaki ngai mpe babalolaki ngai lisusu mpo na koyeba soki nazali na nzoto kolɔngɔ́nɔ́, mpe namonaki sikawa ete namemamaki kati na mokili ya bilimu mabe mpe ete bakoboma ngai.”

Kotaláká zingazinga na ye, Equiano amonaki “limpinga ya baindo ya lolenge nyonso bakangamaki na monyɔlɔ́lɔ esika moko, bango nyonso na bilongi na bango bazalaki komonisa kolɛmba mpe mawa.” Abulunganaki mpe asɛnzwaki. Baninga na ye Baafrika bapesaki ye makasi mpe balendisaki ye. Equiano alobi: “Natunaki bango soki mindɛlɛ yango bakolya biso.”

Equiano akendaki na masuwa na Barbade, na Virginie mpe na nsima na Grande-Bretagne. Kapitɛ́ni ya masuwa asombaki ye mpe atambolaki mingi. Ayekolaki kotánga mpe kokoma mpe mbala mosusu afutaki mosolo mpo na kozwa bonsomi na ye, mpe atambwisaki ebongiseli oyo esalemaki mpo na kosukisa boombo na Grande-Bretagne. Na 1789, abimisaki lisoló ya bomoi na ye, moko ya masoló ya motuya (mpe mbala mosusu oyo eleki kitoko) oyo ezali kolobela mombongo ya baombo, ekomamaki na Moafrika moko oyo azalaki moombo.

Bamilió ya Baafrika mosusu bazalaki na libaku malamu boye te. Balongolaki bango na makasi na bandako na bango mpe na mabota na bango, bakendaki na bango na masuwa na Mai Monene Atlantique na monyokoli makasi. Elongo na bana na bango, basombaki bango mpe batekisaki bango lokola bibwɛlɛ mpe basalisaki bango mosala makasi kozanga lifuti mpo na kokólisa bozwi ya bankolo na bango bapaya. Mingi bazalaki na lotómo ata moko te mpe bakokaki kopesa bango bitumbu, kobebisa bango to ata kobomama mpo na bisálela ya bankolo na bango. Mpo na mingi oyo banyokwamaki, lobiko bobele moko mpo na kolongwa na boombo ezalaki bongo liwa.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto