Natambolaki na kondima epai na Nzambe kati na mokili moko ya Koministe
LISOLÓ YA ONDREJ KADLEC
NA BOUMELI ya eleko ya molungé na mobu 1966, nazalaki kolakisa mboka-mokonzi Prague epai na baturiste na Tchécoslovaquie. Lokola nazalaki na molende na kondima na ngai ya sika, nazalaki koloba na ntina na Nzambe na kolakisáká batempelo mpe bandakonzambe mineneminene ya engumba na biso.
Moamerika moko, profɛsɛrɛ ya makambo matali nkita (économie), atunaki ngai ete: “Ozali Motatoli ya Yehova?”
Nazongiselaki ye ete: “Te. Nayoka ata moke te nkombo wana, Batatoli ya Yehova. Nazali mokatolike.”
Nakómi mondimi na Nzambe
Baboti na ngai batángaki mingi, bayebaki makambo ya politiki mpe ya monganga. Mwa moke nsima ya kobotama na ngai na 1944 mpe ebandeli ya Etumba ya mibale ya Mokili mobimba, tata na ngai akómaki koministe. Azalaki bongo moko ya babandisi ya ebongiseli ya koministe ebéngami réformiste, mpe na mobu 1966, akómaki chancelier de la faculté d’économie na Prague. Nsima ya mwa bambula, aponamaki lokola ministre ya makambo matali biteyelo na Tchécoslovaquie, ntango wana ezalaki mokili ya koministe mpe ya bato bandimaka Nzambe te.
Mama na ngai azalaki moto ya sembo mpenza mpe azalaki mwasi ya makoki mingi. Azalaki monganga oyo ayebaki kosalisa makɔnɔ ya miso malamu koleka na mokili wana. Nzokande, azalaki kosalisa babóla kozanga kofutisa bango mosolo. Azalaki na momeseno ya koloba ete: “Makoki nyonso oyo mapesameli biso masengeli kotyama mpo na kosunga banamboka mpe ekólo.” Mpo na kozala ntango nyonso na kliníki na ye, azwaki ata loi te ntango nabotamaki.
Baboti na ngai bazalaki kolinga ete nazala mwanakelasi ya mayele koleka. Tata azalaki kotuna ngai ete: “Moto mosusu azwi bilembo mingi koleka yo?” Nazalaki kosepela na momekano yango kati na eteyelo, yango ezalaki komemela ngai mbano mingi awa nazalaki kobima moto ya liboso. Nayekolaki lokóta Russe, Lingelesi mpe lokóta Allemand mpe nasalaki mibembo mingi na mikili ya koministe mpe bipai mosusu. Nazalaki kosepela kokweisa bindimeli ya mangomba mpamba te nazalaki komona yango lokola biyambayamba bizangi ntina. Nzokande, atako nazalaki moto oyo andimaka Nzambe te, nakómaki koyina lolenge ya koboya kondima Nzambe oyo ezalaki komonisama na politiki.
Na mobu 1965, ntango nazalaki bobele na mibu 21, nakendaki na Angleterre, mobembo yango ebongolaki bomoi na ngai. Kuna nakutanaki na bato oyo bazalaki koyambola kondima na bango na kondimisama nyonso mpe bazalaki kososola ete Moto moko aleki likoló azali. Ntango nazongaki na Prague, moto moko ya lingomba katolike oyo azalaki moninga na ngai apesaki ngai likanisi ete: “Kotánga mokanda moko te etali boklisto. Tángá bobele Biblia.” Nasalaki bongo. Nasilisaki kotánga yango na boumeli ya basanza misato.
Nakamwaki mingi na lolenge oyo bakomi ya Biblia bazalaki komonisa nsango na bango. Ndenge bazalaki kolobela mabunga na bango na bosembo nyonso. Yango endimisaki ngai ete bobele Nzambe moko ya solo nde akoki kopesa mpe kokokisa elikya kitoko oyo balobeli kati na yango.
Nsima ya kotánga mpe komanyola Biblia na boumeli ya basanza mingi, namiyokaki ete nakómaki pene na kokutana na botɛmɛli ya tata na ngai mpe baninga na ngai. Nayebaki ete bakoluka kokweisa kondima na ngai oyo ezalaki naino ya sika mpenza. Na nsima, nakómaki mobongolisi bato na makasi. Moto nyonso oyo azalaki koluka kosolola na ngai—lokola profɛsɛrɛ Moamerika oyo alobelami na ebandeli—azalaki komitamba na mosala na ngai ya kobongola bato na makasi. Kútu natyaki ekulusu moko likoló ya mbeto na ngai mpo na komonisa kondima na ngai.
Kasi, mama na ngai azalaki koloba ete ezalaki mpasi mpo na ngai ete nazala moklisto, mpo ete nakokani mpenza na tata na ngai oyo azali koministe monene. Atako bongo, nalendendelaki. Natángaki Biblia mpo na mbala ya mibale, na nsima mbala ya misato. Na yango, nasosolaki ete mpo na kosala bokóli mingi esengelaki ete nazwa litambwisi.
Bolukiluki na ngai ezwi mbano
Namipesaki na Lingomba ya katolike. Sángo moko elenge amipesaki na koteya ngai mateya ya moboko ya Lingomba mpe nandimaki yango kozanga ntembe. Na nsima, na mobu 1966—likambo oyo epesaki nsɔ́ni monene epai ya tata na ngai—nazwaki batisimo. Nsima ya komwangisa ngai mai na motó, sángo apesaki ngai likanisi ete natánga Biblia mpe abakisaki ete: “Sikawa, pápa asili kondima liteya ya evolisyó, na yango komitungisa te; kotalela makambo nyonso te.” Nabulunganaki mpamba te batyolaki búku oyo epesaki ngai kondima.
Na eleko ya ebandeli ya mpiɔ ya mobu 1966, nasololaki na moninga moko oyo abotamaki na libota ya katolike, nayebisaki ye bindimeli na ngai. Ye mpe ayebaki Biblia, mpe alobelaki ngai na ntina na Armagedon. (Emoniseli 16:16) Ayebisaki ngai ete azalaki kosolola na Batatoli ya Yehova, oyo nayokaki koloba na ntina na bango mpo na mbala ya liboso mwa basanza eleki ntango nazalaki kolakisa baturiste engumba. Kasi mpo na ngai, etuluku wana ezalaki na ntina te na bokokanisi na Lingomba na ngai ya nguya, ya bozwi mpe oyo lizalaki na bandimi ebele.
Na ntango ya masoló oyo elandaki tolobelaki mituna misato ya ntina. Ya liboso, Lingomba katolike ezali mosangoli ya boklisto ya ekeke ya liboso? Ya mibale, Biblia to Lingomba—nini nde ekoki kotalelama lokola mokati likambo? Ya misato, tozalisamaki, lokola Biblia ezali kolobela yango, to touti na evolisyó?
Lokola biso nyonso mibale tondimaki ete Biblia ezali na bokonzi likoló na makambo matali kondima, moninga na ngai azwaki mokakatano soko moke te mpo na kondimisa ngai ete mateya ya Lingomba katolike makeseni makasi na oyo ya boklisto ya liboso. Na ndakisa, nayaki koyeba ete ata mikanda ya katolike mindimaka ete liteya ya Bosato oyo ezali bongo liteya ya moboko ya Lingomba yango, liutaki na Yesu te ata mpe na bantoma na ye te.
Na nsima tomitunaki, Biblia to Lingomba, nini nde ekoki kotalelama lokola mokati likambo. Nazalaki kokangama na likanisi oyo ya santu Augustin: “Roma locuta est ; causa finita est,” elingi koloba “Roma alobi: likambo lindimami.” Moninga na ngai akanisaki ete mpo na ye Biblia ezalaki mokati likambo. Nakokaki te kotɛmɛla maloba oyo ya ntoma Paulo: “Nzambe azali sembo ata bato nyonso bazali na lokuta.”—Baloma 3:4.
Na nsuka, moninga na ngai apesaki ngai mokanda moko oyo mobɛtamaki na masini mpe mopasuka oyo mozalaki na motó na likambo L’évolution opposée au monde nouveau. Batatoli ya Yehova bazalaki na nsé ya epekiseli na Tchécoslovaquie kobanda na nsuka ya bambula 1940, na yango bazalaki kosala bakɔpi ya mikanda na bango mpe bazalaki komanyola malamu liboso ya kopesa yango na moto. Nsima ya kotánga mwa búku wana, nandimisamaki ete nazwaki solo. Nabandaki koyekola Biblia elongo na moninga na ngai. Azalaki kopesa ngai bobele mwa ndambo ya nkasa ya búku “Que Dieu soit reconnu pour vrai!” mpe tozalaki kotalela yango elongo.
Tobandaki koyekola Biblia kala mingi te—na eleko ya bafɛ́ti ya nsuka ya mbula na 1966, baninga ya Allemagne de l’ouest bayaki kotala ngai na Prague. Na boumeli ya lisoló moko, babandaki kotyola baklisto, kolobáká ete bazali bakosi mpo na komikɔtisa na bango na bitumba. Balobaki ete: “Soki tozalaki basodá, lokola mboka na biso ezali mosangani ya O.T.A.N., mbɛlɛ tokokaki kobundisa yo, lokola ozali komiloba ete ozali moklisto, mpamba te mboka na yo ezali kati na kondimana ya Varsovie.” Basukisaki mpo na yango ete: “Ezaleli ya koboya kolanda mitindá mindimami ezali malamu koleka bokosi.” Nakanisaki ete mbala mosusu bazali na elónga. Lisusu, na ntango ya boyekoli ya Biblia oyo elandaki, natunaki moninga na ngai ndenge nini baklisto batalelaka kokɔta na bitumba mpe mosala ya sodá.
Nazwi bikateli
Nakamwaki mingi na bandimbola ya polele ya moninga na ngai. Nzokande, mpo na komiyokanisa mpenza na etindá ya Biblia ya ‘kotula mipanga ete mízala bitimweli,’ esengelaki ete nabongola noki bomoi na ngai mpe mosala oyo nazalaki kokana kosala. (Yisaya 2:4) Nsima ya basanza mitano, nasengelaki kozwa lipɔlɔ́mi ya eteyelo monene ya minganga. Esengelaki lisusu na ngai kolekisa eleko moko na mosala ya sodá oyo bazalaki kosɛngisa na makasi. Nasengelaki kosala nini? Nazalaki kati na mobulungano. Na bongo nabɛlɛmaki epai na Nzambe na nzela ya libɔndeli.
Nsima ya komanyola na mozindo na boumeli ya mikolo, namonaki ntina moko te ya malonga oyo ekokaki kopekisa ngai ete nabongola bomoi na ngai na lisɛngisi lityami mpo na moklisto oyo litali kozala moto na kimya. Ntango nazwaki lipɔlɔ́mi, nazwaki ekateli ete kino nakokangama lokola moto oyo aboyi mosala ya sodá mpo na lisosoli na ye, nakondima mosala moko na lopitalo. Kasi nayekolaki ete Biblia ezali koloba ete tosengeli koboya makila. Kososoláká ete mosala wana ekoki kopusa ngai na kozongisa bato makila, nazwaki ekateli ya kolongwa na mosala na lopitalo. (Misala: 15:19, 20, 28, 29) Ekateli wana ebungiselaki ngai lokumu epai na bato mingi.
Tata na ngai, komindimisáká liboso ete nazalaki te kosala mwango mpo na kokweisa mosala na ye ya politiki, akɔtelaki ngai mpo ete mosala na ngai ya sodá epusama mbula moko na nsima. Eleko ya molungé ya 1967 ezalaki mpasi mpo na ngai. Kanisá naino: Nabandaki koyekola Biblia elekaki kala mingi te mpe Motatoli bobele moko oyo nayebaki akendaki loi ya eleko ya molungé. Lisusu, mpo na boyekoli na ngai moko, atikelaki ngai bobele mwa mikapo ya búku “Que Dieu soit reconnu pour vrai!” Nyonso oyo nazalaki na yango mpo na komipesa litambwisi na elimo, ezalaki bobele Biblia mpe mikapo ya búku yango.
Na nsima, nayebanaki na Batatoli mosusu mpe na mwa 8 Mársi 1968, napesaki bomoi na ngai epai na Yehova na nzela ya batisimo. Mobu molandaki, basɛngaki na ngai ete nalanda boyekoli ya sipesiale na boumeli ya mibu mibale na Angleterre, na eteyelo monene ya Oxford. Basusu bapesaki ngai toli ete nandima lipesi wana mpe nakenda na Angleterre, yango ekopesa ngai nzela ya kokóla na elimo kati na mokili oyo Batatoli bazalaki na bonsomi. Na libaku yango, nakobongisama mpo na mosala moko kitoko. Kasi, nkulutu moko ya lisangá alobaki na ngai ete nakozala na litomba mingi awa na Tchécoslovaquie koleka kuna na Angleterre. Na bongo, nazwaki ekateli ya koboya libaku oyo bazalaki kopesa ngai ya koyekola mingi, mpe natikalaki na Tchécoslovaquie mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala na biso ya kosakola oyo ezalaki kosalema na nkuku.
Na mbula 1969, nabyangamaki mpo na kolanda mateya ya Eteyelo ya mosala ya Bokonzi oyo ezalaki kosalema mpo na bakɛngɛli baklisto. Na mobu wana, nazwaki mpe búrse lokola elenge pharmacologiste oyo alóngaki moto ya liboso na Tchécoslovaquie. Na yango, nayanganaki na likita moko ya Union internationale de pharmacologie na Suisse.
Nganga-mayele moko abongoli makanisi
Na likita moko oyo nayanganaki na yango na mbula 1970, nganga-mayele Frantis̆ek Vyskočil, alimbolaki ebongiseli ya kokamwa oyo bɔɔngɔ́ etindaka makambo na binama ya nzoto. Amonisaki ete soki mposa emonani na enama moko ya nzoto, yango ekokokisama na lolenge moko ya kokamwa. Na yango asukisaki ete: “Banguya ya mokili eyebi yango moko ndenge ya kosala.”
Nsima ya likita nasololaki na ye. Na tunaki ye ete: “Okanisi te ete ebongi kozongisa botɔ́ndi epai na Nzambe na ntina na kobongisama kitoko ya biloko ya bomoi?” Motuna na ngai ekamwisaki ye mpamba te azalaki kondima Nzambe te. Na eyano na ye, atunaki ngai mituna mingi. Na ndakisa: “Mabe eutaki wapi?” mpe “Nani asengeli kopamelama na kotaláká motuya monene ya bana bitiké oyo nyonso?”
Biyano bibongi mpe biuti na Biblia oyo napesaki ye bilamwisaki bosepeli na ye. Nzokande, atunaki ngai mpo na nini Biblia epesaka makanisi ya sikisiki te na makambo matali siansi, na ndakisa komonisama na lolenge ya sikisiki ya selile, na boye ete bato bándima kozanga nkaka ete Mozalisi nde asalaki yango. Na esika wana, natunaki ye ete: “Likambo nini lizali mpasi koleka, kolobela to kozalisa?” Na nsima natikelaki ye búku L’homme est-il le produit de l’évolution ou de la création?
Bobele nsima ya kotánga yango likolólikoló, Frantis̆ek alobaki ete ezali na ntina te mpe elongobani te. Atyolaki mpe oyo Biblia ezali koloba na ntina na ndɔngɔ́ mpe ekobo ya Davidi bakisá mpe ndenge abomaki mobali oyo asalaki likambo te. (Genese 29:23-29; 2 Samwele 11:1-25) Nalongolaki ntembe na ye na komonisáká ye ete Biblia ezali kolobela na bosembo nyonso mabunga mpe masumu minene, ata soki esalemaki na basaleli ya Nzambe.
Na nsuka, na moko ya masoló na biso, nayebisaki Frantis̆ek ete likanisi moko te, elobeli moko te, ekoki kondimisa moto oyo makanisi na ye mazali mabe mpe alingaka mpenza solo te mpe andimaka te ete Nzambe azali. Nazalaki pene na kotika ye, kasi akangisaki ngai mpo na kosɛnga na ngai ete tóyekola Biblia. Ayebisaki ngai ete mbala oyo akotánga lisusu na mozindo búku L’homme est-il le produit de l’évolution ou de la création?—na nsima abongolaki makanisi na ye mpenza. Lokola yango emonisami na mikapo oyo atángaki na moko ya nkomá na ye: “Nzombo na moto ekosokisama mpe lolendo na bato ekokitisama; mpe [Yehova] akokumisama, bobele ye moko na mokolo yango.”—Yisaya 2:17.
Na eleko ya molungé na 1973, Frantis̆ek mpe mwasi na ye babatisamaki lokola Batatoli ya Yehova. Sikawa Frantis̆ek azali nkulutu na lisangá moko ya Prague.
Mosala ya kosakola na ntango ya epekiseli
Na ntango ya epekiseli, basɛngaki na biso ete tózala na bokɛngi na ntango tozali kosakola. Mokolo moko, elenge moko Motatoli asɛngaki na ngai na etingya ete nakenda elongo na ye na mosala ya kosakola. Azalaki kondima te ete baoyo bazalaki kotambwisa ebongiseli ya Batatoli ya Yehova bazalaki kosangana na mosala ya kosakola. Tosololaki makambo mingi ya kosepelisa na kopesáká litatoli ya libaku malamu. Kasi, nsukansuka tokutanaki na mobali moko oyo nayebaki te na ntango wana, ye ayebaki elongi na ngai, amonaki yango na fɔtɔ́ moko na zulunalo ya bapolisi. Atako nakangamaki te, kobanda ntango wana, babandaki koluka ngai, yango epekisaki molende na ngai na mosala ya kosakola na nkuku.
Na eleko ya molungé na 1983, lokola nazalaki na momeseno ya kosala yango na boumeli ya bambula oyo elekaki, nakendaki na boumeli ya mikolo mingi elongo na bilenge mosusu Batatoli mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu mosika na mboka. Kozanga koyoka batoli ya mayele oyo tozalaki kozwa, nazwaki motuka na ngai, kokanisáká ete yango ekozala malamu koleka kokenda na bísi. Totɛlɛmaki moke mpo na kosomba mwa biloko kati na butíki moko, mpe natemisaki motuka liboso ya butíki yango. Na kɛ́si, nasololaki na mosáli mwasi moko ya bambula mingi na kolakisáká ye bilenge oyo bazalaki kosala lokola basungi, nalobaki ete: “Na mikolo mizali koya, biso nyonso tokoki kokóma bilenge.” Mwasi yango asɛkaki moke. Nabakisaki ete: “Yango eleki makoki ya bato. Esengeli ete lisungi liuta na likoló.”
Lokola azongisaki liloba te, nabimaki. Nzokande, nayebaki te ete mosáli yango, komonáká ete nazalaki kopalanganisa makanisi ya lingomba, azalaki kotala ngai na matalatála wana nazalaki kokɔtisa liboke na ngai na motuka. Na yango, abéngaki bapolisi. Mwa bangonga na nsima ya kopesa litatoli ya libaku malamu na bisika mosusu ya engumba, nazongaki esika motuka ezalaki, elongo na ndeko mobali oyo nazalaki na ye. Na ntango wana, bapolisi mibale babimaki pwasa mpe bakangaki biso.
Na biro ya bapolisi, batunaki biso mituna na boumeli ya bangonga mingi liboso ete bátika biso. Na ntango yango, nakanisaki oyo nasengelaki kosala mpo na baadrɛsi nazalaki na yango ya bato oyo tosololaki na bango. Na bongo, nakendaki na twalɛ́ti mpo na kobwaka yango. Kasi, liboso ete nabwaka, engambe ya polisi moko asimbaki ngai na lobɔkɔ. Azwaki bankasa yango na twalɛ́ti mpe asukolaki yango. Nabangaki mingi kokanisáká ete bato oyo bapesaki ngai baadrɛsi na bango bazalaki sikawa na likámá.
Na nsima, bamemaki biso na lɔtɛ́lɛ oyo tozalaki kofanda epai kuna bapolisi basilaki kosala bolukiluki kati na eteni na biso ya kolala. Kasi bazwaki baadrɛsi ya bato mosusu te oyo bazalaki kosepela na Biblia, atako ebombamaki malamu te. Na nsima, na kompanyi oyo nazalaki kosala lokola neuropharmacologue, nazwaki mpamela liboso ya bato banso mpo ete nasanganaki na mosala oyo mondimamaki te na Leta. Lisusu, Motatoli oyo azalaki kotambwisa mosala ya kosakola na Tchécoslovaquie apamelaki ngai, bobele ye nde akebisaki ngai liboso ete nasalelaka motuka na ngai te na mosala ya kosakola.
Namisokisi na disipilíni
Uta na mobu 1976, nazalaki kosala kati na komité oyo ezalaki kotambwisa mosala ya kosakola ya Batatoli ya Yehova na Tchécoslovaquie. Kasi, lokola bapolisi bazalaki konɔ́ngɔ makambo mpe bikela na ngai nyonso na ntina na kozanga bokɛngi ya motindo oyo nauti kolobela, balongolaki ngai na komité yango mpe bakitisaki ngai mikumba misusu. Nzokande, nazalaki kolinga mingi mpenza moko na yango, oyo ezalaki ya kopesa mateya na bakɛngɛli batamboli mpe babongisi-nzela to baministre baklisto ya ntango nyonso.
Nandimaki disipilíni yango, kasi na nsuka ya bambula 1980, motuna moko makasi ebimaki mpo na komitalela ngai moko. Nakokoka koyekola kosala mosala na ngai na bokɛngi koleka mpe kopɛngola makámá mosusu? Nzembo 30 versɛ́ 5 elobi ete: “Kolela ekozala na butu, nde esengo ekoya na ntɔ́ngɔ́.” Ntɔ́ngɔ́ yango eyaki mpo na ngai ntango ebongiseli ya koministe ekweyaki na Tchécoslovaquie, na Novɛ́mbɛ 1989.
Mapamboli kitoko
Oyo nde mbongwana ya kosakola nsango malamu na bonsomi nyonso mpe kosolola kozanga nkaka na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, New York! Mwa moke na nsima, naponamaki lokola mokɛngɛli ya zongazonga, mosala oyo nabandaki kosala na Yanuáli 1990.
Na nsima, na 1991, nazwaki libaku ya kosangana na Eteyelo mpo na kobongisa basungi na Manchester, Angleterre. Oyo nde lipamboli ya kolekisa sanza mibale elongo na baklisto bateli na elimo oyo bazalaki kopesa biso mateya! Mokolo na mokolo, ntango moko ebongisamaki mpo na mosala, mosala na ngai ezalaki ya kosukola matalatála. Ezalaki ntango ya bopemi moko kitoko na manáka na biso ya boyekoli ya mozindo.
Ntango nautaki na Angleterre, napesaki mabɔkɔ na kolɛngɛlama ya liyangani monene oyo Batatoli ya Yehova basalaki kobanda mwa 9 kino 11 Augústo 1991 na libándá ya masano Strahov na Prague. Na libaku yango, bato 74 587 bautaki na mikili mingi bayanganaki na bonsomi nyonso mpo na kosambela Yehova Nzambe na biso!
Mobu oyo molandaki, natikaki mosala na ngai ya neuropharmacologue. Esili koleka soko mibu minei, nazali kosala na biro ya Prague, epai kuna nazali kosala lisusu kati na komité oyo ezali kotambwisa mosala ya kosakola ya Batatoli ya Yehova na République tchèque. Ndako moko ya bitáze libwa oyo bapesaki na Batatoli ya Yehova, ebongisamaki kala mingi te mpe babiro ya filiale etyami sikawa kuna. Ndako yango efungwamaki mpo na mosala ya Yehova na mwa 28 Máí 1994.
Moko ya mapamboli oyo nasili kozwa ezali bongo oyo ya koyebisa mateya ya Biblia na bazalani na ngai, bakisá mpe bato ya libota na ngai. Kino lelo, tata mpe mama na ngai bakómi naino Batatoli te, kasi basepelaka na mosala na ngai. Na bambula oyo euti koleka, bayanganaki na makita mosusu. Mposa na ngai makasi ezali ete, lokola bamilió ya bato mosusu ya motema sembo, bámikitisa na bopɔlɔ nyonso na nsé ya boyangeli ya Bokonzi ya Nzambe mpe básepela na mapamboli ya seko oyo Nzambe abombeli baoyo baponi kosalela ye.
(Mikanda oyo milobelami kati na lisoló oyo, mibimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.)
[Elilingi na lokasa 12]
Ntango nazalaki na Eteyelo monene
[Bililingi na lokasa 13]
Tata na ngai azalaki ministre ya biteyelo, mpe mama na ngai azalaki monganga ya makɔnɔ ya miso oyo ayebanaki mingi
[Elilingi na lokasa 15]
Frantis̆ek Vyskočil, nganga-mayele mpe moto oyo azalaki kondima Nzambe te, akómaki Motatoli
[Elilingi na lokasa 16, 17]
Uta kokwea ya kominisme, Batatoli ya Yehova basali mayangani minene mingi na Mpótó ya Ɛ́sti. Awa na nsé, koleka bato 74 000 bayanganaki na oyo na Prague na 1991
[Elilingi na lokasa 18]
Nazali kosala mosala na ngai na boumeli ya Eteyelo mpo na kobongisa basungi na Angleterre
[Elilingi na lokasa 18]
Ndako ya filiale ya sika na Prague, efungwamaki na mwa 28 Máí 1994