Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g96 Juillet nk. 19-22
  • Sida na Afrika—Ngambo nini boklisto ya nkombo mpamba ezali na yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sida na Afrika—Ngambo nini boklisto ya nkombo mpamba ezali na yango?
  • Lamuká!—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mangomba​—Mazali na mokumba?
  • Lolenge Afrika emibongolaki na “boklisto”
  • Kopalangana ya kominanola na lolenge ya Mpótó
  • Eyano mpo na likambo yango
  • Mpo na nini Afrika?
    Lamuká!—1993
  • SIDA na Afrika: Lolenge oyo yango esili kopalangana
    Lamuká!—1993
  • SIDA: Tokoki kolikya nini mpo na mikolo mizali koya?
    Lamuká!—1993
  • Bato ya SIDA bazali kobakisama na ndenge ya nsɔmɔ!
    Lamuká!—2001
Lamuká!—1996
g96 Juillet nk. 19-22

Sida na Afrika—Ngambo nini boklisto ya nkombo mpamba ezali na yango?

Euti na mokomani na biso na afrika

Kati na lisoló oyo, liloba “boklisto ya nkombo mpamba” ezali komonisa boklisto oyo ekeseni na boklisto ya solo oyo ezali kati na Biblia.

Boklisto ya nkombo mpamba

“Biteni ya mokili epai ebele na bafandi na yango bazali koyambola kondima ya boklisto.”​—Ebongolami uta na diksionere Webster’s New World Dictionary.

Sida

“Syndrome makasi, mpe ebomaka, emonisami na kobeba ya mbalakaka ya makoki ya komibatela, oyo euti na virus (rétrovirus).”​—Diksionere Le Robert.

SIDA ezali bokɔnɔ oyo bopalangani na mokili mobimba. Ekanisami ete bato milió 17 basili kozwa V.I.H., virus ya sida. Mpe ezali kopalangana nokinoki mpenza.

Wana bato batyaka likebi na bango mingi na makambo matali minganga, makambo ya politiki mpe bizaleli ya bato mpo na bokɔnɔ yango, balobelaka mingi te mokumba ya mangomba. Kasi, mpo na batángi mosusu, likanisi ya kosala boyokanisi kati na kopalangana ya sida mpe mangomba ekoki komonana lokola elongobani te. Nzokande, ezali bozoba te soki totaleli ezalela yango ndenge ezali koleka na Afrika.

Sida epalangani mpenza na Afrika.a Basusu bazali koloba ete 67 % ya bato oyo bazwi sida bazali na Afrika. Na Tchad, motángo ya bato oyo bayebani ete bazali na sida eyikanaki mbala 100 na boumeli ya mibu mitano oyo miuti koleka. Nzokande, ekanisami ete bobele moto moko kati na bato misato ayebani. Engebene lapólo moko ya Banque mondiale, sida ekómi ntina ya liwa epai na mikóló kati na bingumba mingi na Afrika.

Mangomba​—Mazali na mokumba?

Ya solo, boklisto​—elingi koloba lingomba oyo Yesu ateyaki​—likoki te kozala na ngambo na mabe wana. Nzokande, lokola yango elobelami awa na nsé, “boklisto ya nkombo mpamba” ezali komonisa mikili oyo kati na yango bato bazali komiloba ete bazali baklisto. Emonani polele ete boklisto ya nkombo mpamba ekɔtisami kati na likambo litali sida. Elingi koloba te ete mangomba mabimisi to mapalanganisi sida. Kasi soki sida epalangani ndenge wana na Afrika, ezali libosoliboso mpo na likambo litali kosangisa nzoto na bato mingi.b Na bongo, ekoki kotalelama lokola likambo moko ya bizaleli mpe, na yango, ezali kobimisa makambo mingi ya kobulunganisa na ntina na mangomba. Nzokande, “boklisto” ya Afrika euti mpenza na mikili ya Mpótó. Bakonzi ya mangomba basalaki milende ya kobongola Baafrika ete bakóma na mangomba na bango, kokanisáká ete yango ekopesa bango lolenge ya bomoi oyo eleki bizaleli ya bonkɔ́kɔ ya mboka. Bopusi ya boklisto etomboli mpenza bizaleli malamu ya bandimi na yango ya sika? Mobulungano oyo mobimisami na sida emonisi ete esalemaki bongo te.

Tókamata na ndakisa mboka Tchad. Na bingumba na yango minene minei, bingumba misato kati na yango bifandami na bato mingi oyo bazali “baklisto.” Engumba ya minei etondi na bamizilmá. Nzokande, kati na bingumba misato ya “boklisto” virus ezali nde kopalangana mingi koleka! Likambo yango lizali ndenge moko na Afrika mobimba. Na ntei mpe na súdi ya Afrika, oyo emonisamaka lokola ete ezali ya baklisto, ezali na motángo monene ya bato oyo bazwi sida koleka Afrika ya nɔ́rdi, oyo ezali mingi na bamizilmá.

Lolenge Afrika emibongolaki na “boklisto”

Mpo na nini virus epalangani mingi epai na baoyo bamilobaka ete bazali bayekoli ya Klisto? Ya solo, atako Baafrika mingi bamilobaka ete bazali baklisto, baoyo bamitambwisaka engebene mitinda ya bizaleli malamu ya boklisto, lolenge Biblia ezali komonisa yango polele, bazali mingi te. Emonani ete ezali litomba mabe ya myango oyo misalelamaki na bamisionere ya boklisto ya nkombo mpamba mpo na “kobongola” Baafrika.

Na boumeli ya ekeke ya 18 mpe ya 19, bindimeli oyo biteyamaki uta kala na boklisto ya nkombo mpamba bizwaki mikakatano. Lokola likambo ya kotya ntembe na bosolo ya Biblia lipalanganaki, bato mingi bakómaki kokokanisa Biblia na mokanda moko ya masoló ya kala mozangi ntina. Liteya ya evolisyó mpe likɔtaki, ata kati na bakonzi ya mangomba. Ntembe elónamaki. Kondima kati na Makomami Mosantu etɛngatɛngaki. Na yango, likambo ya kokamwa lizali te ete milende ya boklisto ya nkombo mpamba mpo na “kobongola” Baafrika mityamaki mingi likoló na makambo ya mosuni. Bamisionere ya mangomba bateyaki evanzile etaleli makambo ya bato, kolobeláká mingimingi likoló na misala ya kosunga bato na esika ya kolendisa bandimi ya sika ete bámitambwisa engebene bizaleli malamu ya Biblia. Mbala mosusu kozanga koyeba, bamisionere bapesaki mabɔkɔ na kobebisama ya bizaleli malamu oyo ezalaki liboso.

Na ndakisa, ndɔngɔ́ ezali momeseno ya bonkɔ́kɔ kati na bamboka mingi ya Afrika. Nzokande, likambo litali kosangisa nzoto na bato ebele lizalaki mpenza kosalema mingi te, mpamba te bitúlúká mingi bizalaki mpenza kokweisa ekobo. Joseph Darnas, molakisi oyo asilá-sanza mpe ayebani mingi na Tchad, alobaki na Lamuká! ete liboso ete bamisionere ya boklisto ya nkombo mpamba bákóma, “tozalaki kokanisa ete ekobo ezalaki likambo moko lizalaki komema botutu.” Na yango, “moto oyo azwami na ekobo azalaki kozwa etumbu makasi​—mbala mosusu etumbu ya liwa, mpo ete atyaki bato nyonso kati na likámá.” Biyambayamba? Ezali bongo, kasi endimeli motindo wana ezalaki kopekisa likambo litali kosangisa nzoto na bato ebele.

Ntango bamisionere ya boklisto ya nkombo mpamba bakómaki, batɛmɛlaki ezaleli ya ndɔngɔ́, kasi basalaki likambo moko ya malonga te mpo na kotosisa mitindá ya bizaleli malamu oyo bizwami kati na Biblia. Atako Biblia ezali koloba ete basáli na pite mpe bato na ekobo oyo balingi kobongola motema te basengeli kobimisama na lisangá ya boklisto, mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba makamataka mpenza meko te mpo na baoyo basalaka makambo lolenge wana. (1 Bakolinti 5:11-13) Lelo oyo lisusu, bato mingi ya politiki bayebani na bomoi na bango ya mbindo, kasi bazali ntango nyonso basangani ya lokumu na mangomba na bango. Bosembo kati na libala emonanaka mpenza te epai na baklisto ya nkombo mpamba na Afrika.

Tólobela mpe ndakisa mabe oyo epesami na bakonzi ya mangomba. Na bonkɔ́kɔ oyo libota ezali ntei ya bomoi ya bato, ezali malamu kobala mpe kobota bana mingi. Ezali mbala mosusu na ntina wana nde basángo mingi ya katolike bazali komimona ete bazali na lotómo ya kobuka ndai na bango ya bopɛto to ya bonzemba. Zulunalo The New York Times ya 3 Máí 1980 ekomaki ete: “Kati na bamboka mingi ya zamba, . . . basángo mpe baepiskɔ́pɔ bazali na basi mingi.”

Na momeseno, mabala wana makomisamaka te na mikanda ya Leta, mpe “basi” yango bazali bobele makango. Ezaleli mabe motindo wana esengeli kotalelama na bopɔtu te, lokola nde ezali likambo lizangi ntina. Engebene zulunalo Times, “mokonzi moko ya lokumu na lingomba ya katolike” andimaki ete “sángo Moafrika azali lokola mokonzi mpe moto ya mpipo na esika ete azala mosaleli ya Yesu Klisto.” Likanisi oyo “bakonzi” yango bapesaka ekoki kozala oyo ete, “Salá oyo nazali koloba, kasi oyo nazali kosala te.”

Kopalangana ya kominanola na lolenge ya Mpótó

Esengeli mpe te kotalela na bopɔtu mitindo ndenge na ndenge ya kominanola oyo etondi na Afrika na bambula oyo euti koleka mpe oyo ezali kolendisa kosangisa nzoto na lolenge ya mbindo. Na Tchad, bisika ya video oyo bizali na bonsomi nyonso mpe bizali kolakisa masano motindo wana bifungolami pene na bipai binso​—na bandako ya bato, na bisika babongisaka mituka mpe mingimingi na mabándá ntango molili ekɔtaka. Esengeli bobele kozala na centimes 25 mpo na kotala filime. Bana mike mpe bazali wana. Bafilime oyo balakisaka eutaka wapi? Mingimingi na États-Unis​—mokili oyo momibéngaka ete mozali ya boklisto!

Kopalangana wana ya mimeseno ya Mpótó ezali mpenza na bopusi likoló na batáli? Motatoli ya Yehova moko oyo azali misionere na Afrika ya ntei esili koleka mibu 14, alobaki ete: “Bato ya awa bakutanaka mingi te na makambo ya bato ya Mpótó, longolá bobele na nzela ya oyo bamonaka na video. Balukaka kokóma lokola bato ya Mpótó oyo bamonaka na bafilime wana. Namona naino te boyekoli mozindo oyo ekoki kondimisa maloba na ngai, kasi emonani mpenza epai na moto nyonso awa ete kominanola motindo wana ezali kolendisa etamboli ya mbindo.”

Oyo nde lisɛki ya komona bakonzi oyo batalelaka kolɔngɔ́nɔ́ komeka kosilisa bokóli ya bokɔnɔ oyo ezwamaka na nzela ya kosangisa nzoto, nzokande mabota oyo mazali komitánga ete ya boklisto mazali kosala propagande mpo na etamboli ya mbindo oyo ezali kotya bomoi ya bato na likámá monene! Awa mangomba masali likambo moko te ya malonga mpo na kopekisa ezalela wana, ezala na mikili na bango moko to na mikili ya bapaya, biyangeli mosusu na Afrika, na ndakisa Tchad mpe Cameroun bimekaki kopekisa to mpe kosɛngisa bato ete básomba te bakasɛti video oyo elakisaka bolumbu mpe kosangisa nzoto. Kasi mbala mingi milende na bango ezwi litomba te.

Nyonso wana esili kobebisa bizaleli malamu epai na “baklisto” ya Afrika. Kobeba ya nkita ezali mpe na matomba mabe. Lokola bisika ya mosala bizali komonana mpenza te, mibali basɛngisami kotika mabota na bango na boumeli ya basanza mpo na kokenda koluka mosala. Mibali yango bazali bakiliya malamu ya bandumba. Nzokande, mingimingi bandumba bazalaka bango moko babóla. Mosolo mingi ya libala oyo baboti mosusu basɛngaka ezali mpe likambo mosusu. Mibali mingi bazali kobala te mpamba te bakokaka te kozwa mosolo mokoki mpo na libala. Nsukansuka, basusu bamikɔtisaka na bomoi ya mbindo ya kosangisáká nzoto na bato kilikili. Kati na makambo motindo wana matali bizalela mpe nkita, sida esili kopalangana mingi.

Eyano mpo na likambo yango

Ezali mpenza solo ete boklisto yango moko te esengeli komema ngambo ya mabe oyo euti na sida na Afrika. Kasi, likambo ya mawa, emonani polele ete boklisto ezali na ndambo monene ya ngambo. Yango ezali na bopusi makasi likoló na bato oyo balingi kozala kati na baoyo Yesu abéngaki ete “basambeli na solo.”​—Yoane 4:23, NW.

Soki totye bifundeli nyonso pembeni, esengeli kosala nini mpo na kotya nsuka na kopalangana ya sida? Biyangeli ya Afrika bisili kosala bakampanye ya komibatela na kolendisáká bato ete básalela bakapɔti. Kasi profɛsɛrɛ Samuel Brew-Graves, momonisi ya Organisation mondiale de la santé na Nigeria, alobaki polele ete: “Esengeli ete bato bákóma na lolenge ya bomoi ya pɛto . . . , mpe mabota masengeli . . . kokima bizaleli ya kosangisa nzoto na lolenge ya mbindo.”

Liboso ete liloba sida likɔta kati na maloba ya nkóta na biso, Biblia esilaki kokweisa kosangisa nzoto na lolenge ya mbindo mpe esilaki kolendisa bopɛto, komipekisa mpe bosembo kati na libala. (Masese 5:18-20; 1 Bakolinti 6:18) Bankóto ya Batatoli ya Yehova oyo bazali na Afrika bazali elembeteli malamu mpo na komonisa ete kolanda mitinda yango ezali kopesa libateli malamu ya kopɛngola sida mpe makɔnɔ mosusu oyo mazwamaka na kosangisa nzoto. Na bokangami na bango na mitinda ya bizaleli malamu ya Biblia, bakweisaka boklisto ya nkombo mpamba. Baklisto wana ya solo balikyaka mpe na mokili moko ya sika kati na yango “boyengebene ekozala.” (2 Petelo 3:13, NW) Mpo na bato oyo bazali na kondima, ezali mwango ya kotya nsuka na mabe oyo euti na sida.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba makambo mosusu mingi, talá masoló ya nimero na biso ya 8 Augústo 1992 (ebimeli ya Lifalansé), oyo ezali na motó na likambo “Le sida en Afrique: que réserve l’avenir?”

b Bokɔnɔ yango bokoki mpe kopalangana na nzela ya kozongisa makila to kosalelama ya ntonga moko na bato ebele mpo na komituba bilangwiseli. Baklisto mosusu oyo bayebi likambo te bazwaki bokɔnɔ yango na babalani na bango oyo bazangi sembo to oyo bazalaki kosalela bilangwiseli.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa  20]

“Kati na bamboka mingi ya zamba, . . . basángo mpe baepiskɔ́pɔ bazali na basi mingi.”​—The New York Times

[Elilingi na lokasa 20]

Ndakisa mabe oyo epesami na bakonzi ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba na Afrika elendisi ezaleli ya kosangisa nzoto na bato ebele

[Elilingi na lokasa 21]

Bana bakabami kati na kominanola ya mbindo oyo euti na mabota ya “boklisto”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto