Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g96 Octobre nk. 21-23
  • ‘Ata lolemo na bato na likɛkuma ekoloba mbango mpe polele’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Ata lolemo na bato na likɛkuma ekoloba mbango mpe polele’
  • Lamuká!—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mokakatano na ngai ya koloba
  • Naluki lisalisi
  • Bokutani na ngai na Batatoli ya Yehova
  • Nzela oyo ezali komema kino na elikya
  • Nalóngi mokakatano monene
  • Natambolaki na kondima epai na Nzambe kati na mokili moko ya Koministe
    Lamuká!—1996
  • Ndɔtɔ na ngai ekokisamaki
    Lamuká!—2002
  • ‘Nakopumbwa lokola mboloko’
    Lamuká!—2007
  • Sikoyo namoni ete nakoki kosalisa basusu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Lamuká!—1996
g96 Octobre nk. 21-23

‘Ata lolemo na bato na likɛkuma ekoloba mbango mpe polele’

EZALAKI bongo na eteni ya nsima ya nzánga ya liyangani ya mokolo moko ya Batatoli ya Yehova na Tchécoslovaquie (sikawa République Tchèque), mpe bankáma ya bato bayanganaki mpo na koyoka mateya ya Biblia. Natɛlɛmaki na nsima ya ebaelo wana nazalaki kotalela lisusu makambo oyo nasengelaki koloba ntango nakosala mokumba na ngai. Ezalaki mokumba monene te. Bilenge mibale Batatoli basengelaki kolobela makambo oyo bakutanaki na yango, mpe nazalaki bobele motambwisi ya eteni yango. Na ntɔ́ngɔ́ ya mokolo yango, nabulunganisamaki mpenza, mpe sikawa ezalaki komata. Namiyokaki lokola ete nzoto mobimba elɛmbi, namitungisaki mingi, mpe nazalaki na likoki ya koloba te.

Mbala mosusu okokanisa ete moto nyonso akoki kobanga na libaku motindo wana. Kasi yango ezalaki bobele kobanga te. Tiká ete nalimbola mpo na nini bongo.

Mokakatano na ngai ya koloba

Ntango nakómaki na mibu 12, nakweyaki mpe nazokaki na motó, na nkingo mpe na mokɔngɔ. Nsima na yango, na bantango mosusu nazalaki bobele koloba na likɛkuma to kokakatana mpo na kobimisa maloba, mingimingi maloba oyo mazali kobanda na balɛtɛlɛ p, k, t, d, mpe m. Mbala mosusu kútu nazalaki kokoka koloba te.

Na ebandeli, mokakatano yango mozalaki kotungisa ngai te; emonanaki lokola ete ezalaki bobele mwa mbeba moko boye. Kasi wana bambula ezalaki koleka, nakómaki kobanga koloba liboso ya bato, ata na libaku nini. Mokolo moko nasenzwaki na kelasi ntango nazalaki kopesa lapólo ya bolukiluki moko oyo nasalaki. Mpe na bantango mosusu, wana nazalaki kosomba biloko, ntango batɛki batuni ngai eloko oyo nalingi kosomba, nazalaki kokoka koyanola bango te. Wana natɛlɛmaki kobundana mpo na koloba, nkanda na bango ezalaki komata: “Salá noki. Nasengeli kozela mokolo mobimba te. Bakiliya mosusu bazali kozela.” Na mawa nyonso, nazalaki kokoka te kosomba biloko oyo nazalaki na yango mposa.

Bambula na ngai na eteyelo ezalaki na mokakatano mingi. Ntango nasengelaki koyebisa lapólo na ngai epai na baninga ya kelasi, bazalaki kosɛka likɛkuma na ngai. Kasi, nazwaki lipolómi ya eteyelo ya ntei mpe na 1979 nakóbaki kotánga na Inivɛrsité moko na Prague, na Tchécoslovaquie. Lokola nazalaki kosepela na masano, nayekolaki mateya ya kokóma molakisi ya ngalasisi. Kasi ndenge nini nakokaki kokokisa mokano na ngai? Atako nazalaki kokakatana, kasi nazwaki ekateli ya kokenda liboso.

Naluki lisalisi

Esengelaki kozala na mwango moko ya kolónga mokakatano na ngai ya koloba. Na bongo, nsima ya kozwa lipolómi na Inivɛrsité, nazwaki ekateli ya kozwa lisalisi ya malamu. Nalukaki lopitalo moko na Prague oyo esalisaka mikakatano ya koloba. Ntango bazalaki kotalela ngai na mbala ya liboso, lifulumɛ́ moko alobaki polele ete: “Mobulungano na yo ezali mpenza ya lolenge mosusu!” Yango ezokisaki ngai mpe epusaki ngai na kokanisa ete azalaki kotalela ngai lokola moto oyo abulungani, atako minganga bandimaka ete likɛkuma ezali ezalela ya kobulungana te. Nokinoki namonaki ete nakutanaki na mokakatano moko oyo mokeseni na misusu: Nazalaki elenge mobali ya mibu 24, mpe babɛ́li mosusu nyonso bazalaki bobele bana mike.

Nokinoki, basáli nyonso na lopitalo, bakisa mpe psychologiste babandaki kosalisa ngai. Bamekaki myango nyonso. Mbala moko, bapekisaki ngai kosolola na bato na boumeli ya pɔ́sɔ mitano. Na mbala mosusu, bapesaki ngai ndingisa ya koloba na lolaka moko mpe malɛmbɛ m-p-e-n-z-a. Atako myango yango mizalaki kosalisa, bapesaki ngai nkombo ya lisɛki ete Molɛngoli-nyoka mpamba te bato mingi bazalaki kolala ntango nazalaki koyebisa balapólo na ngai.

Bokutani na ngai na Batatoli ya Yehova

Mokolo moko na eleko ya molungé na 1984, wana nazalaki kotambola na engumba, bilenge mibali mibale basololaki na ngai. Ezalaki te elateli na bango nde ekamwisaki ngai kasi makambo oyo balobaki. Balobaki ete Nzambe azali na boyangeli moko, Bokonzi moko, oyo ekotya nsuka na mikakatano nyonso ya bato. Bapesaki ngai nimero na bango ya telefone, mpe na nsima nasololaki na bango.

Na ntango wana, Batatoli ya Yehova bandimamaki te lokola lingomba oyo liyebani na Letá na Tchécoslovaquie. Nzokande, nokinoki mposa na ngai ekólaki makasi na boye ete nabandaki koyangana na makita na bango. Nazalaki mpenza komona bolingo mpe komibanzabanza oyo Batatoli bazalaki na yango moko epai na mosusu.

Nzela oyo ezali komema kino na elikya

Lisalisi mpo na mokakatano na ngai ya koloba emonanaki na nzela ya Eteyelo mpo na mosala ya Teokrasi, eteyelo moko etambwisamaka pɔ́sɔ na pɔ́sɔ kati na masangá nyonso ya Batatoli ya Yehova. Nalendisamaki ete nakomisa nkombo mpe nasalaki bongo. Kozwáká moboko likoló na makanisi mapesami kati na moko ya mikanda ya eteyelo, Mokanda mpo na Eteyelo, nasalaki mikumba na kotaleláká makoki ya koloba lokola, koloba kozanga kokakatana, ebéngeli malamu ya maloba, konyata maloba mpe kosanzɛ́ lolaka na ntango esengeli.a

Lisoló na ngai ya liboso ya mwanakelasi ezalaki bongo botángi ya Biblia, nazwaki pwɛ́ ya malamu te na yango. Nabulunganisamaki mpe esɛngaki na ngai mpiko mingi mpenza mpo na kozonga na ndako. Nazali na botɔ́ndi mingi mpo ete ntango nasukolaki na mai ya mɔ́tɔ, namiyokaki malamu!

Nsima ya lisoló wana ya mbala ya liboso, na boboto mpenza mokɛngɛli ya eteyelo atyelaki ngai mpenza likebi ya solosolo. Apesaki ngai bobele te toli ya kolendisa kasi apesaki ngai mpe longonya. Yango epesaki ngai mpiko ya kokóba komeka. Mosika te, na 1987, nakómaki Motatoli oyo azwi batisimo. Nsima ya mwa basanza, nalongwaki na Prague mpe nakendaki na engumba moke mpe ya kimya ebéngami Žďár nad Sázavou. Etuluku moke ya Batatoli ya mboka yango eyambaki ngai malamu mpenza. Bandimaki mpe elobeli na ngai ya kokata maloba mpe yango ekólisaki limemya na ngai moko.

Nsukansuka, nabandaki kotambwisa etuluku moko moke ya boyekoli ya Biblia, mpe na nsima nasalaki lisukúlu na ngai ya liboso ya bato nyonso. Na nsima ntango mbongwana ya boyangeli ya Tchécoslovaquie esalemaki, nabandaki kosala masukúlu motindo wana na masangá ya mpembenimpembeni. Na bisika oyo namesanaki na yango te mokakatano na ngai ya koloba ezalaki kozonga. Kasi natikaki te.

Nalóngi mokakatano monene

Mokolo moko nkulutu moklisto moko abyangaki ngai na esika na ye ya mosala. Alobaki ete: “Petr, nazali na nsango moko ya malamu mpo na yo! Tosepeli ete osala mokumba na liyangani ya zongazonga oyo lizali koya.” Mayele mabalukaki mpe nayokaki mposa ya kofanda. Na mawa nyonso epai ya moninga na ngai, naboyaki lipesi yango.

Koboya yango etungisaki ngai mingi. Nakokaki kolongola yango kati na makanisi na ngai te. Na boumeli ya makita ya boklisto ntango nyonso oyo bazalaki kolobela likambo litali kotya motema na Nzambe, koboya oyo naboyaki ezalaki kozonga kati na makanisi na ngai mpe kotungisa ngai. Gideona, na litambwisi ya Nzambe abundaki na limpinga mobimba ya Midiani bobele na bato 300, likambo yango lizalaki mbala mosusu kolobelama na makita. (Basambisi 7:1-25) Azalaki mpenza mobali oyo atyaki motema na Nzambe na ye, Yehova! Nalandaki ndakisa ya Gideona ntango naboyaki mokumba wana? Na bosembo nyonso, nakokaki koloba te ete nalandaki ndakisa na ye. Nayokaki nsɔ́ni.

Nzokande, bandeko na ngai baklisto balɛmbaki te kosalisa ngai. Bapesaki ngai libaku mosusu. Nabyangamaki mpo na kosala mokumba na manáka ya liyangani ya mokolo moko. Na mbala oyo nandimaki. Wana nazalaki na botɔ́ndi mpo na libaku yango, mpo na koloba solo, likanisi ya koloba liboso ya ebele ya bato libangisaki ngai mingi. Nasengelaki kosala milende mpo na kokólisa elikya na ngai epai na Yehova. Kasi na lolenge nini?

Na kotaleláká malamumalamu kondima mpe elikya oyo Batatoli mosusu bazalaki na yango epai na ye. Kosala bongo elendisaki ngai mingi. Ata nkomá ya Verunka, mwana mwasi ya mibu motoba ya moninga na ngai moko, ezalaki ndakisa malamu mpo na ngai. Akomaki boye: “Na Sɛtɛ́mbɛ, nakokɔta kelasi. Nayebi te ndenge nini ekozala mpo na loyembo ya ekólo. Nazali na elikya ete Yehova akobunda mpo na ngai, ndenge asalaki mpo na Yisalaele.”

Wana ezali mwa moko ya makambo oyo masalemaki mwa moke liboso ya eteni ya nsima ya nzánga na liyangani ya mokolo moko oyo nalobelaki na ebandeli. Nabondelaki na etingya. Sikawa nazalaki lisusu te komibanzabanza mingi na ntina na elobeli malamu lokola nazalaki komibanzabanza mpo na kokumisa nkombo monene ya Nzambe liboso ya bayangani mingi.

Na bongo, natɛlɛmaki liboso ya mikro, kotala bankáma ya bato. Na nsima, kososoláká ete nsango ezali na ntina koleka momemi na yango, napɛmaki na mozindo mpe na bandaki. Na nsima, nazwaki ntango ya kopesa motuya na makambo oyo nazalaki koloba. Nazalaki kobanga? Ezali bongo, kútu nakɛkumaki na mwa bantango mosusu. Nzokande, kozanga lisungi ya Nzambe nayebaki ete nakokaki te kozala na likoki ya koloba.

Na nsima nabandaki komanyola likoló na likambo moko ndeko moklisto moko ayebisaki ngai: “Zalá na esengo mpamba te ozali na likɛkuma.” Na ntango alobaki likambo yango nakamwaki mingi. Ndenge nini akokaki koloba likambo motindo wana? Kozongisáká makanisi na nsima, nasosoli sikawa nini alingaki kolobela. Mokakatano ya koloba oyo nazali na yango esalisaki ngai ete natya motema na Nzambe na esika ete namityela motema.

Mwa bambula esili koleka uta nsima ya nzánga ya liyangani wana ya mokolo moko. Na boumeli ya bambula oyo nazwaki mikumba misusu mitali koloba liboso ya bayangani mingi. Naponamaki lokola nkulutu moklisto na Žďár nad Sázavou mpe nakómaki mobongisi-nzela, lokola baministre ya ntango nyonso Batatoli ya Yehova babéngamaka. Kanisá naino! Nalekisaka sikawa ngonga koleka monkáma sanza na sanza koyebisa basusu Bokonzi ya Nzambe, kozanga kolobela ntango oyo nalekisaka pɔ́sɔ na pɔ́sɔ koteya na makita na biso ya boklisto. Mpe sikawa nazali kosala lokola mokɛngɛli ya zongazonga, kopesáká masukúlu na masangá makeseni pɔ́sɔ na pɔ́sɔ.

Motema na ngai etondaka na botɔ́ndi mingi ntango nyonso oyo natángaka esakweli oyo ya ntina na mokanda ya Biblia oyo ekomamaki na Yisaya ete: “Ata lolemo na bato na likɛkuma ekoloba mbango mpe polele.” (Yisaya 32:4; Exode 4:12) Emonani mpenza ete Yehova azalaki elongo na ngai, kosalisáká ngai ete ‘naloba makambo ya polele’ mpo na lokumu, masanzoli mpe nkembo na ye. Nazali na esengo mpe na nsai ya kozala na likoki ya kosanzola Nzambe na biso oyo atondi na ngɔlu.​—Lisoló ya Petr Kunc.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto