Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g96 Octobre nk. 18-20
  • Kobimisa makiki ya ndembo—Mosala oyo mozali kosimba bomoi na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kobimisa makiki ya ndembo—Mosala oyo mozali kosimba bomoi na yo
  • Lamuká!—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ebele ya biloko bisalemi na ndembo
  • Lolenge ya kosala ndembo
  • Nzete oyo bakati ekoki kobimisa lisusu bitape ya sika?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Lamuká!—1996
g96 Octobre nk. 18-20

Kobimisa makiki ya ndembo—Mosala oyo mozali kosimba bomoi na yo

Euti na mokomani na biso na Nigeria

NA NGONGA ya mitano na ntɔ́ngɔ́, zámba monene ya Nigeria ezalaka molili mpe mpiɔ. Kati na ndako moko etongami na mabelé na katikati ya zámba, John alamuki mpe alati bilamba na ye. Na nsima akɔti kati na molili ya butu, amemi mwinda, katini ya kopále, mpe kanífi egumbama. Na boumeli ya ngonga minei oyo ekolanda, akotambola longwa na nzeté moko kino na mosusu, kokatáká bampota na lomposo ya nzeté moko na moko.

Oyo ezali likambo ya liboso kati na molɔngɔ́ ya makambo oyo mbala mosusu makosimba bomoi na yo. Na lolenge nini? Na boye ete nzeté oyo John akataka ezali nzeté ya ndembo. Mpe gɔ́mɛ ebéngami bongo mpo na likoki na yango ya koboma makomi ya kiliyó, ezali eloko oyo eleki komonana mpe kosalelama bipai mingi.

Ebele ya biloko bisalemi na ndembo

Kanisá naino moke na ntina na mosala oyo ndembo ezali na yango kati na bomoi na yo. Matámbe mpe matindi ya sapato na yo mbala mosusu masalemaki na ndembo. Biloko oyo bityami na nsé ya bakiti to mesa na yo mbala mosusu bisalemi na ndembo. Elastíki oyo ezali na elamba na yo esalemi na ndembo. Ntango mbula ezali konɔ́ka, okoki kolata elamba ya mbula mpe sapato ya mbula oyo esalemi na ndembo. Ezali boni soki okei kobɛta mai. Bilamba ya kozinda muntubɛ, manɛ́ti ya kobatela miso na mai, mpe bipɛpɛ oyo balataka na makolo mpo na kobɛta mai esalemi na ndembo. Okolinga kobɛta mai te? Mbala mosusu okosepela bobele kotepa likoló ya matela ya mai to kosakana na bále na zɛ́lo oyo esalemi na ndembo. Kati na ndako na yo mbala mosusu ezali na lasitíki ya ndembo, bagómɛ ya ndembo, mpe kɔ́lɛ ya ndembo. Soki okei kolala na mpokwa, okoki komilalisa likoló ya matelá mpe kusɛ́ oyo esalemi na biloko biuti na ndembo. Soki oyoki mpiɔ, okoki komibandisa pembeni ya molangi moko oyo mosalemi na ndembo mpo na koyoka mwa mɔ́tɔ.

Longolá biloko wana nyonso, ezali na bisaleli mingi oyo bikokaki kosala mosala te kozanga ndembo​—rondelles, courroies, garniture de joint, tiyó ya ndembo, blanchets ya konyata mikanda. Na ndakisa motuka ezali na moyene ya biloko soko 600 oyo bisalemi na ndembo. Na nyonso wana, engebene búku The World Book Encyclopedia, bisaleli 40 000 to 50 000 bisalemi na ndembo.

Nini esalaka ete ndembo esalelama mingi ndenge wana? Ezali mpo ete eumelaka mingi, ebebaka te na molungé, ezalaka bonitoi, ebebaka mpe te na mai, elekisaka mopɛpɛ te mpe elɛmbisaka kotutana. Tókamata na ndakisa pinɛ́, ezala ya velo, ya motuka to ya mpepo. Mpo ete ezali ndembo, pinɛ́ ebebaka noki te atako ntango nyonso ezalaka likoló ya nzela, elɛmbaka mpe te atako edendaka ntango nyonso. Wana ozali kotambwisa motuka na nzela ya pɔtɔpɔ́tɔ, ntina ya kobanga ezali te, mpamba te pinɛ́ ekobeba te, ekopola te, ekoguga mpe te. Ndembo yango epekisaka bobele mai te ete mákɔta na kati ya pinɛ́ kasi mpe epekisaka mopɛpɛ oyo ezali na kati ete ebima te. Lisusu, wana ozali kokenda, nguya ya kolɛmbisa ya ndembo kati na pinɛ́ na yo esalisaka yo ete koningananingana ya motuka na nzela epesa yo mpasi te. Ya solo mpenza, kozanga ndembo, baizinɛ mbɛlɛ izali kokoka kosala pinɛ́ te.

Na bongo, okotya ntembe te ete babimisi ya makiki ya ndembo lokola John, bazali kosala mosala oyo mozali kosimba bomoi na biso na lolenge moko ya malamu. Ya solo, ndembo nyonso eutaka bobele na nzeté te. Ndembo mosusu ebimisamaka na balaboratware mpe esalaka mosala mingi mpo na kobimisa biloko. Mitindo nyonso mibale ya ndembo mizali na matomba mpe mbeba na yango. Biloko mingi bikoki kosalema na moko to na mosusu, mpe liponi esalemaka mbala mingi na kotalela ntalo na yango. Biloko mosusu bikembisamaka na ndembo ya laboratware to na ndembo ya nzeté. Bapinɛ́ mingi ya mituka esalemi na ndembo ya laboratware koleka ndembo ya nzeté. Nzokande, lokola ndembo ya laboratware ebebaka noki na molungé, ndambo monene ya ndembo ya nzeté esalelami na bapinɛ́ ya vuatirɛ ya masano, mituka ya minene, babísi mpe mpepo.

Lolenge ya kosala ndembo

Nzeté ya ndembo ekólaka malamu na bisika ya molungé, ya mai pene na equateur. Makiki ya ndembo mingi eutaka na bilanga ya súdi-ɛ́sti ya Azia, mingimingi na Malaisie mpe na Indonesie. Mosusu eutaka na Amerika ya súdi mpe ya wɛ́sti mpe na Afrika ya ntei.

John abandaka kobimisa makiki ya ndembo na ntango nzeté yango ekómi na mibu motoba. Nsima na yango nzeté yango ekobimisa makiki na boumeli ya mbula 25 to mbula 30 oyo ekolanda mpe ekokóla na bolai ya mɛtɛlɛ soko 20. Ntango nzeté ya ndembo etiki kobimisa makiki na yango, ekoki kokóba kokóla, kino na bolai ya mɛtɛlɛ soko 40, mpe ekoumela kino mibu soko 100 to koleka.

Makiki oyo mauti mbala moko na nzeté ya ndembo mamonanaka mingi mpenza lokola míliki, kasi te lokola pinɛ́ ya motuka. Makiki yango oyo emonanaka lokola míliki, ebéngami latex, ezalaka na biloko mikemike ya ndembo. Pene na 35 % ya latex ezali ndembo. Oyo etikali ezali mingi mpenza mai.

Mpo na kobimisa latex, John akataka mpota ya kokekama na lomposo ya nzeté ya ndembo. Bampota etandamaka zingazinga ya mobimbi ya nzeté. Asalaka na likebi na boye ete akata bampota mozindo te, mpamba te yango ekoki kobebisa nzeté. Makiki ebandaka kobima mbala moko nsima ya kokata mpota na nzeté; ekitaka na kolandáká monkɔ́lɔ́tɔ́ mpe kotonda kati na kɔ́pɔ ya bambu oyo John akangisi na mobimbi ya nzeté. Makiki yango etangaka na boumeli ya ngonga mibale to misato; na nsima etiki.

Nsima ya mokolo moko to mibale, ntango John akokata bampota na nzeté, akokata bampota mosusu na nsé ya oyo akataki liboso. Mbala oyo ekolanda akokata na nsé ya oyo wana. Na nsuka, lomposo mobimba ya nzeté elongwe. Sikawa John akobanda kokata mpota na eteni mosusu ya nzeté, kopesáká nzela na eteni oyo ekatamaki bampota ete ezipama mpo ete ekoka kokatama na mbala mosusu ya nsima.

John asalaka mosala na ye nokinoki, kotamboláká ye moko kati na zámba ya kimya, kokatáká mpota na nzeté mpo na kobimisa makiki. Na nsima, azongelaka kotala nzeté mokomoko mpe kokɔngɔla kati na katini na ye makiki oyo matangaki. Na nsima, John abakisaka acide formique mpe mai kati na latex. Yango ekómisaka yango kiló mpe ekangisaka yango lolenge moko vinɛ́grɛ esalaka na miliki. Na nsima John akomema katini ya latex na motó mpe akokenda kino na nzela ya monene, epai kuna motuka moko ya monene eyaka kozwa yango oyo eutaka na izínɛ moko oyo elambaka makiki ya ndembo.

Sikawa John akozonga ndako mpo na kosukola nzoto, kolya mpe komipemisa. Na nsima ya nzánga, ntango akolongwa na ndako na ye lisusu, alati malamu mpe azwi sakosi na ye. Mbala oyo akokenda lisusu te longwa na nzeté moko kino na nzeté mosusu kasi nde ndako na ndako. Lokola azali ministre mobongisi-nzela ya sanza na sanza, John asanganaka mingi kati na mosala ya kosakola mpe kozalisa bayekoli.

Wana John azali kotambwisa boyekoli na ye ya liboso ya Biblia, makiki oyo akɔngɔlaki masili kokóma na izínɛ oyo elambaka yango. Kuna makiki makokabolama na mai, makokaukisama mpe na nsima makotyama na maboke liboso ya kotindama na bamboka mosusu. Mosika te makokenda na Angleterre, na Japon, to na États-Unis. Ndembo oyo ezali kobimisama na mokili mobimba ezali koleka batɔ́nɛ milió mitano mbula na mbula. Mbala mosusu ekoki kozala ete ndembo oyo ekotyama na sapato na yo oyo okosomba nsima ekouta na mosala ya nzeté oyo John asalaki.

[Elilingi na lokasa 18]

John kati na mosala na ye ya kokata mpota na nzeté ya ndembo

[Elilingi na lokasa 20]

John kati na mosala ya kosakola

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto