Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g96 Octobre nk. 16-17
  • Ntina oyo kobimisama na lisangá ezali ebongiseli ya bolingo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntina oyo kobimisama na lisangá ezali ebongiseli ya bolingo
  • Lamuká!—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Etombolaka nkombo ya Nzambe
  • Ebatelaka lisangá
  • Ezali libateli mpo na moto mokomoko
  • Kozonga epai na Nzambe
  • Mpo na nini kobimisa moto na lisangá ezali ebongiseli ya bolingo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Discipline oyo ezali kobota mbuma na kimya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Ndimáká disipilini ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Kobimisa moto na lisangá​—Ebongiseli ya bolingo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Lamuká!—1996
g96 Octobre nk. 16-17

Engebene Biblia

Ntina oyo kobimisama na lisangá ezali ebongiseli ya bolingo

KOBENGANA MOTO NA LINGOMBA​—likanisi yango lizali kolamusa mayoki ya ndenge na ndenge epai na bato mingi kati na mangomba.a Bato mingi bandimaka ete disipilíni ya lolenge moko to mosusu esengeli kopesama kati na mangomba. Kasi bato mingi batalelaka kobengana moto na lingomba lokola momeseno moko ya kalakala​—motindo makasi ya disipilíni oyo ezali kokundwela bango minyoko ya ntango ya kala mpe inquisitions.

Longola likambo yango ezali lisusu na bopusi ya mokili. Na yango, mangomba mingi ya boklisto ya nkombo mpamba masili kopesa nzela na lisumu. Na yango, likambo ya kokamwa ezali te ete ministre episkɔ́pɔ moko alobaki ete: “Kobengana moto na lingomba ezali moko ya mimeseno na biso ya kala, kasi nakanisi te ete ezali kosalelama kino na ekeke oyo.”

Nzokande, bato mingi bakoki kokamwa na koyeba ete epai ya Batatoli ya Yehova, kobimisama na lisangá (oyo ekokani na kobengana moto na lingomba) etalelamaka na bopɔtu te. Ya solo, ezalaka likambo ya pɛtɛɛ te mpo na kosala yango, kasi ezali ebongiseli ya bolingo. Na lolenge nini?

Etombolaka nkombo ya Nzambe

Yehova azali Nzambe ya bulɛɛ. Akangaka miso te soki baoyo bazali komiloba ete basambelaka ye basali masumu na nkó. Ntoma Petelo akomaki epai na baklisto ete: “Bózala bulɛ na bizaleli nyonso na bino, zambi esili kokomama ete, Bokozala bulɛ mpo ete ngai nazali bulɛ.” (1 Petelo 1:15, 16) Na bongo, kobimisa na lisangá basáli na masumu oyo baboi kobongola motema ezali kotombola nkombo ya Nzambe; ezali komonisa bolingo mpo na nkombo yango.​—Kokanisá na Baebele 6:10.

Yango elingi koloba ete soki moklisto moko abɛti libaku mpo na bolɛmbu to akwei kati na lisumu moko monene, na mbala moko abimisami na lisangá? Ezali bongo te! Yehova azali te mokonzi oyo anyokolaka bato. Azali na ngɔlu mpe amityaka na esika ya basusu. Amikundolaka ete tozali bato ya kozanga kokoka. (Nzembo 103:14) Yehova ayebi ete “bato nyonso babungi mpe bazangi nkembo na Nzambe.” (Baloma 3:23) Nzambe asili kosala ebongiseli kati na lisangá na boye ete soki moklisto moko “abɛti libaku” to mpe asali lisumu monene, akoka ‘kosembolama’ na bolingo nyonso mpe na elimo ya bopɔlɔ. (Bagalatia 6:1) Na kondimáká toli oyo euti na Liloba ya Nzambe mpe na komonisáká mayoki ya motema mpasi mpe kobongola motema ya solosolo, ye oyo atangwaki longwa na boyengebene akoki “kobikisama” na elimo.​—Yakobo 5:13-16.

Kasi, ezali boni soki moklisto oyo asili kozwa batisimo azindi mpenza na lisumu mpe milende nyonso ya kozongisa ye na nzela ya malamu mizali kolónga te? Na maloba mosusu, ezali boni soki azali koboya na motó makasi nyonso kobongola motema?

Ebatelaka lisangá

Biblia ezali kopesa etindá epai na baklisto ete: “Bósangana na moto moko te oyo abyangami ndeko mpenza soko ye azali moto na pite, soko na bilulela, soko mosambeli na bikeko, soko motuki, soko molangi masanga, soko moyibi. Bólya esika moko na moto na ndenge yango te.”​—1 Bakolinti 5:11.

Mobeko yango ya Biblia moleki makasi mpe mozangi kolongobana? Tótalela likambo oyo: Soki mosáli na mabe atindami na bolɔ́kɔ mpo ete abukaki mobeko, yango ezali likambo ya kozanga kolongobana to ya kozanga bolingo? Te, mpamba te, Letá azali na lotómo ya kobatela kimya kati na bato. Ya solo, mosáli na mabe abimisami na esika bato bazali na boumeli ya ntango oyo akolekisa na bolɔ́kɔ.

Bobele bongo, lisangá ya boklisto ezali na lotómo ya kobimisa basáli na mabe oyo baboi kobongola motema. Mpo na nini? Mpamba te lisangá esengeli kozala esika ya libateli epai kuna bato na mbindo mpe bato mosusu oyo basalaka masumu na nko bazali te.

Koyebáká ete “moto moko na masumu akoki kobebisa makambo mingi na malamu,” ntoma Paulo apesaki etindá epai na baninga na ye bandimi ete: “Benganá moto yango mabe na kati na bino.” (Mosakoli 9:18; 1 Bakolinti 5:13) Ekateli yango ezali kopekisa mosali na mabe kopalanganisa libebi kati na lisangá, mpe ekobatelaka nkombo malamu ya lisangá.​—Kokanisá na 1 Timoté 3:15.

Ezali libateli mpo na moto mokomoko

Kobimisa moto na lisangá ebatelaka mpe mosangani moko na moko ya lisangá. Tiká tópesa ndakisa: Kanisá ete olamuki na mpɔngi na makɛlɛlɛ ya loseba ya motuka. Makɛlɛlɛ makasi ezalaka mpasi mpo na kobosana yango; ya solo, ekobangisa yo! Bobele bongo, soki moto moko abimisami na lisangá, likambo yango ebendaka likebi ya basangani nyonso ya etonga. Ebulunganisaka mayoki na bango. Bakoki kobosana yango te. Lolenge nini yango ekoki kozala libateli?

Motatoli moko alobaki ete: “Ntango nayokaki mpo na mbala ya liboso kati na Ndako ya Bokonzi ete moto moko abimisami na lisangá, mayoki na ngai ya liboso ezalaki nkanda. Na nsima epusaki ngai ete namikitisa. Esalaki ete nayeba ete ngai mpe nakoki kokwea.” Lokola maloba na ye mamonisi yango, kobimisama ya moto na lisangá ekoki kopusa basusu ete bátalela etamboli na bango.​—1 Bakolinti 10:12.

Na komitunáká biso moko mituna lokola oyo: ‘Ezali na makambo mosusu kati na bomoi na ngai oyo ekoki kotya ngai na likámá na elimo?’ tokoki kosalisama ete tótalela malamu etɛlɛmɛlo na biso liboso na Nzambe. Na lolenge yango tokoki kokóba ‘koluka sasaipi nzela na kobika na biso na nsɔ́mɔ mpe na kolɛnga.’​—Bafilipi 2:12.

Kozonga epai na Nzambe

Moklisto moko oyo abimisamaki mpe na nsima azongisamaki alobaki ete: “Atako esalaki ngai mpasi, nzokande disipilíni ezalaki na ntina mpe esengelaki mpenza, mpe ebatelaki bomoi na ngai.” Yango ezali komonisa likambo mosusu ya ntina ya kobimisama na lisangá. Ekoki kolendisa basali na mabe oyo baboi kobongola mitema ete básala litambe ya liboso ya kozonga epai na Nzambe.

Ntoma Paulo alobaki ete: “Nkolo akopesaka bitumbu epai na baoyo akolingaka bango.” (Baebele 12:6) Mpe wana ezali solo ete “bitumbu nyonso iyokani na esengo te kasi na mpasi; nde nsima ikozwisa mbuma na kimya na boyengebene epai na bango baoyo balendisami na yango.”​—Baebele 12:11.

Ezali yango nde ekómelaki Richard. Nsima ya kobimisama na lisangá na boumeli ya mbula soko mibale, abongolaki motema, abongisaki etamboli na ye oyo ezalaki kobebisa lokumu ya Nzambe, mpe andimamaki kozongisama na lisangá ya boklisto. Kokanisáká oyo elekaki, alobaki na ntina na oyo akutanaki na yango ete: “Namonaki ete nasengelaki kobimisama na lisangá mpe nabongaki kobimisama mpenza. Yango ezalaki mpenza ntina mpe esungaki ngai na komona lolenge oyo etamboli na ngai ekómaki mpe mposa ya koluka bolimbisi ya Yehova.”

Disipilíni ekoki kozala mbala mosusu mpasi mpo na koyikela yango mpiko. Kondima yango esɛngaka komikitisa, kasi baoyo bazwaka liteya na yango babukaka mbuma malamu.

Na yango, kobimisama na lisangá ezali ebongiseli moko ya bolingo mpamba te etombolaka nkombo mosantu ya Nzambe mpe ebatelaka lisangá na bopusi ya libebi ya lisumu. Lisusu, emonisaka bolingo mpo na mosali na mabe na kolendisáká ye ete abongola motema mpe “abutwa ete apɛtwa na masumu ete ntango na kopema euta na Nkolo.”​—Misala 3:19.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Kobengana moto na lingomba ezali lolenge moko ya kopesa disipilíni oyo esalaka ete moto yango atángama lisusu te lokola mosangani ya lingomba moko.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 16]

Kondimana ya sika: Elilingi euti na mikanda ya Ekeke ya zomi na libwa, ebimisami na Don Rice/Dover Publications, Inc.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto