Mituna oyo bilenge batunaka . . .
Nasala nini mpo nasepela na solo?
“Nabɔkwami na libota ya Batatoli ya Yehova, mpe nazalaki ntango nyonso kokanisa ete soki obɔkwami bongo, oyebi Yehova. Nazalaki mpenza komikosa!”—Antoinette.
“SOLO ezali nini?” Pilata, moto oyo abomisaki Yesu, atunaki motuna monene wana. (Yoane 18:38) Nzokande, ntango Pilata atunaki motuna yango—ezalaki te mpo na kobanda lisolo elongo na molobani na ye—kasi alingaki nde kosukisa yango. Azalaki kosepela na “solo” te. Ezali boni mpo na yo? Osepelaka na solo?
Uta bikeke mingi, bafilozofe bazali komanyola mpo na koyeba mpenza ndimbola ya solo. Kasi milende na bango ebimisaka matomba mpenza te. Nzokande, okoki kozwa eyano na motuna oyo Pilata atunaki. Yesu Klisto ateyaki ete Liloba ya Nzambe ezali solo. Alobaki mpe mpo na ye moko ete azali “solo.” Mpe ntoma Yoane akomaki ete: “Solo eyei mpo na Yesu Klisto.” (Yoane 1:17; 14:6; 17:17) Mateya nyonso ya boklisto, oyo na nsima makomamaki na Biblia, mabéngami mpe ete “solo” to “solo ya nsango malamu.” (Tito 1:14; Bagalatia 2:14; 2 Yoane 1, 2) Mateya yango ya boklisto mazali na makambo lokola, nkombo mpenza ya Nzambe, kotyama ya Bokonzi ya Nzambe, lisekwa mpe lisiko ya Yesu Klisto.—Nzembo 83:18; Matai 6:9, 10; 20:28; Yoane 5:28, 29.
Bankóto ya bilenge bayekolaki Biblia na baboti na bango baklisto. Kasi yango elingi koloba ete bilenge yango bazali “kotambola kati na makambo ya solo”? (3 Yoane 3, 4) Ezali mpenza bongo te. Na ndakisa, Jennifer, elenge ya mibu ntuku mibale akolaki na libota ya Batatoli ya Yehova. Alobi ete: “Mama na ngai azalaki kokende na ngai na mayangani ya Batatoli mpe azalaki kolendisa ngai ete nasengeli kokanisa batisimo. Kasi ‘ngai nazalaki na mposa ya kokóma Motatoli te. Nazalaki kolinga bobele kosakana!’”
Bilenge mosusu bandimaka makambo oyo bateyaka bango, kasi bakangaka mpenzampenza ntina te ya makambo oyo Biblia ezali koteya. Yango ekoki kozala na likama nini? Yesu akebisaki biso ete bato mosusu ‘bazali na misisa te.’ Bato motindo wana bakoki ‘koumela moke, na nsima ntango mpasi mpe minyoko ekobima, na ntina na Liloba, bakobɛta libaku noki.’ (Malako 4:17) Basusu bakoki kolimbola bindimeli na bango na lolenge moko to mosusu, kasi bayekoli koyeba Nzambe malamumalamu te. Elenge mwasi na nkombo Aneesa alobi ete: “Nandimi te ete nazalaki na boyokani malamumalamu elongo na Nzambe ntango nazalaki mpenza elenge . . . Nakanisi ete ezalaki kotalela mingimingi boyokani oyo baboti na ngai bazalaki na yango elongo na ye.”
Ezali boni mpo na yo? Yehova azali bobele Nzambe ya baboti na yo? To, lokola mokomi na nzembo moko na Biblia alobi yango, okoki mpe koloba ete: “Nazali na elikya epai na yo, ɛ [Yehova]; nalobi ete, Yo ozali Nzambe na ngai”? (Nzembo 31:14) Esɛngeli kozala na mpiko mpo na kolonga. Elenge mobali na nkombo Alexandre alobi ete: “Mpo na ngai, litambe ya liboso oyo nasalaki ezalaki komitalela na bosembo nyonso.” Nsima ya komitalela na mozindo, okoki komona ete oyebi naino solo malamumalamu te (mateya nyonso ya ntina oyo matali boklisto). Ekoki kozala ete omindimisi naino mpenza te, mpe mbala mosusu okoki komona ete bomoi na yo ezali na ntina te, to ezali kotambwisama mpenza malamu te.
Mbala mingi, na makita na bango ya boklisto, Batatoli ya Yehova bayembaka loyembo oyo ezali na motó ya likambo ete “Monisá solo.”a Toli yango ekoki kozala malamu mpo na yo. Kasi ndenge nini okoki kosalela yango? Okobanda wapi?
Monisá yango yo moko
Na Baloma 12:2, tozali kokuta toli ya ntoma Paulo oyo elobi: “Bókoka kososola mokano na Nzambe, yango malamu, yango bokoki koyamba, yango mpe ebongi kwa.” Ndenge nini okoki kosala yango? Na koyebáká “solo malamumalamu.” (Tito 1:1, NW) Bafandi ya kala ya engumba Beloya bazalaki kotuna mituna na makambo oyo bazalki koyekola. Nzokande, “[batángaki] Makomami mokolo na mokolo na likebi, mpo na koyeba soki makambo [oyo bazalaki koyekola] ezalaki bongo.”—Misala 17:11, NW.
Elenge mwasi moko moklisto na nkombo Erin amonaki ntina ya kosala bongo. Alobi ete: “Nasalaki bolukiluki. Namitunaki, ‘Ndenge nini nayebi ete oyo ezali lingomba ya solo? Ndenge nini nayebi ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova?’” Mpo na nini te kosala manaka ya boyekoli ya yo moko? Okoki kobanda na buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko.b Tángá yango malamumalamu. Talelá bavɛrsɛ nyonso ya Makomami oyo etángami mpe luká kokanga ntina na boyokani na motó na likambo oyo elobelami. Okoki kokamwa na komona bokeseni monene na lolenge ozalaki kokanisa na ntina na solo liboso mpe sikoyo ntango okómi “mosali oyo abongi koyoka nsɔni te, awa ezali yo kosembola liloba na solo”!—2 Timote 2:15.
Ntoma Petelo alobaki ete ezali ‘mpasi mpo na kokanga ntina ya makambo mosusu oyo ezali kati na Biblia,’ mpe okomona ete yango ezali mpenza solo. (2 Petelo 3:16, NW) Kasi, elimo ya Nzambe ekoki kosalisa yo ete okanga ntina ata ya makambo ya makasi. (1 Bakolinti 2:11, 12) Bondelá Nzambe asalisa yo soki ozali na mikakatano mpo na kokanga ntina ya likambo moko. (Nzembo 119:10, 11, 27) Salá bolukiluki na mikanda ya la Société Watch Tower. Soki oyebi mpenza ndenge ya kosala bolukiluki yango te, sɛngá lisalisi. Baboti na yo to mpe bandeko mosusu ya lisangá oyo bakɔmeli bakoki kosalisa yo.
Omikundola ete ozali koyekola mpo na komilakisa na miso ya bato mosusu te. Elenge na nkombo Collin alobi ete: “Ozali koyekola mpo na koyeba bizaleli ya Yehova.” Zwá ntango mpo na komanyola makambo oyo ozali kotánga mpo ete ekɔtela yo na motema.—Nzembo 1:2, 3.
Koyangana na makita ya lisangá ekoki mpe kosalisa yo. Lokola ntoma Paulo akomaki yango, lisangá ezali “likonzi mpe [esimbeli] na makambo na solo.” (1 Timote 3:15) Bilenge mosusu bamilelaka ete makita elɛmbisaka. Collin amikundoli ete: “Soki obongisi makita te, okozwa mpenza matomba na yango te.” Na yango, bongisaká makambo oyo bokoyekola na makita liboso ya kokende koyangana na yango. Makita esepelisaka soki ozali kopesa biyano—kasi bobele kotala mpamba te.
Makambo mingi ya kosala, kasi ngonga ya koyekola ezali te?
Esengeli koyeba ete lokola osengeli kosala badevuare mpe misala na ndako, mbala mosusu ekoki kozala mpasi mpo na kozwa ntango ya koyekola. Elenge mwasi na nkombo Susan akomi ete: “Na boumeli ya bambula, nazalaki kosala makasi mpo na kozwa ntango ya kobongisa makita mpe koyekola ngai moko, kasi nazalaki kokoka kosala yango te.”
Susan ayekolaki ‘kobomba ntango,’ na kolongoláká makambo mosusu oyo ezali na ntina te. (Baefese 5:15, 16) Libosoliboso, akomaki makambo nyonso oyo asengelaki koyekola. Na nsima, asalaki manaka ya koyekola yango. Kasi, atyaki mpe ntango ya bopemi na manaka na ye. Apesi toli oyo: “Kotondisa manaka na yo te na makambo ya kosala. Biso banso tozalaka na mposa ya mwa ntango ya bopemi.” Kosala manaka ekoki mpe kopesa yo matomba.
Yebisá basusu makambo oyo ozali koyekola
Kosalela makambo oyo ozali koyekola ezali mingimingi malamu soki omonisi yango. Teyá bato mosusu. Mokomi na nzembo alobaki ete: “Monɔkɔ na ngai ekoloba makambo na mayele mpe motema na ngai ekobanza mpo na bososoli.”—Nzembo 49:3.
Soki ozali koyoka nsɔni te mpo na nsango malamu, okokakatana te mpo na koyebisa yango na baninga na yo ya kelasi mpe na bato mosusu oyo okutanaka na bango. (Baloma 1:16) Na kosaleláká mabaku nyonso oyo okokutana na yango mpo na kolobela solo epai na bato mosusu, okosalela makambo oyo ozali koyekola. Na lolenge wana, okokɔtisa solo na makanisi na yo mpe na motema na yo.
Poná malamumalamu baninga na yo
Baklisto mosusu ya ekeke ya liboso bakolaki malamu na elimo. Kasi, ntoma Paulo atindelaki bango mokanda mpe atunaki bango ete: “Nani apekisi bino ete bótosa makambo ya solo te?” (Bagalatia 5:7) Likambo motindo wana ekómelaki mpe elenge mobali na nkombo Alex. Andimi ete milende na ye mpo na koyekola Liloba ya Nzambe ebebisamaki mpamba te azalaki “koyengayenga na baninga mabe.” Mpo na kokola malamu na elimo, mbala mosusu yo mpe osengeli kosala mbongwana na likambo yango.
Nzokande, kotambola na baninga malamu ekoki mpenza kosalisa yo ete okola malamu na elimo. Masese 27:17 (NW) elobi ete: “Ebende epelisaka ebende mosusu, boye moto akolendisaka moninga na ye.” Luká bandakisa ya malamu—bato oyo bazali kosalela solo na bomoi na bango. Osengeli koluka bango mosikamosika te, okoki kozwa bango bobele na ndako na yo. Elenge Jennifer alobi ete: “Nkɔkɔ na ngai ya mobali azalaki ndakisa malamu mpenza. Azalaki ntango nyonso kolekisa ngonga misato mpo na kobongisa makita ya lisangá ya mokolo ya lomingo. Azalaki kotalela bavɛrsɛ nyonso ya lisolo na kati ya mabongoli ndenge na ndenge ya Biblia mpe kotala ndimbola ya maloba na diksionere. Ayebaki makambo mingi ya Biblia oyo eyebani mpenza te. Okoki kotuna ye motuna ata ya ndenge nini, akopesa yo eyano.”
Soki omonisi solo kati na bomoi na yo, okozwa eloko moko ya motuya mingi—eloko oyo okotika yango te. Na bongo, kotalela solo te lokola ‘lingomba ya baboti na yo.’ Osengeli komindimisa lolenge moko na mokomi ya nzembo oyo alobaki ete: “Ata tata mpe mama bakotika ngai, nde [Yehova] akolɔkɔta ngai.” (Nzembo 27:10) Na koyebáká malamumalamu makambo oyo Biblia ezali koteya, na kokangamáká na makambo yango, na koyebisáká basusu bindimeli na yo, mpe koleka nyonso, na kotambwisáká bomoi na yo na boyokani na bindimeli yango, ekomonana mpenza ete ozali kosepela na solo.
Maloba na nse ya lokasa
a Euti na buku Nzembo mpo na kokumisa Yehova, ebimisami na Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania.
b Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Elilingi na lokasa 13]
Meká koyeba solo na kosaláká bolukiluki mpe boyekoli ya yo moko