Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g99 Avril nk. 28-29
  • Makambo mazali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo mazali koleka na mokili
  • Lamuká!—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Mobu oyo bisika mingi ezikaki mɔ́tɔ”
  • Basengeli na Calcium mingi na nzoto
  • Dolare-mokonzi
  • Ndingisa ya kobɔtɔla biloko ya kolya
  • Nyongo eleki motó
  • Kosakana na liwa
  • Motángo ya bawei
  • Lisolo ya nyama ebéngami lemming ezali ya lokuta
  • Bazali koyiba biloko ya bato ya maladi
  • Bilembo ya matoi
  • Mbongo ezali nkolo na yo to moombo na yo?
    Lamuká!—2009
  • Ndenge nakoki kosalela mbongo malamu
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Ndenge ya kosalela mbongo na mayele
    Lamuká!—2014
Lamuká!—1999
g99 Avril nk. 28-29

Makambo mazali koleka na mokili

“Mobu oyo bisika mingi ezikaki mɔ́tɔ”

Jean-Paul Jeanrenaud, mokambi ya ebongiseli moko ya mikili mingi oyo etali kobatela bazamba, na Mosolo ya mokili mobimba mpo na kobatela molɔ́ngɔ́ (Fonds mondial pour la nature), alobi ete mobu “1997 bato bakokanisa yango lokola mobu oyo bisika mingi ezikaki mɔ́tɔ.” Mɔ́tɔ ezikisaki bisika mingi na bakɔntina nyonso longola bobele kɔntina Antarctique. Na ndakisa, bazamba minene na Indonesie mpe na Brésil, oyo ekokani na etando ya ekólo Suisse, etumbamaki. Bantina ya kozika yango euti na kotumba bilanga mpo na kolona mpe kozanga mai, oyo ekanisami ete euti na moi makasi na ntina na El Niño. Zulunalo The Independent ya Londres elobi ete bokoli ya gaz carbonique oyo euti na kosalelama mingi ya esansi ezali bobele kobebisa ezingelo lisusu mingi mpe kokolisa likama ya molunge makasi. Mr. Jeanrenaud akebisi ete: “Tozali kobebisa ezingelo, wana tozali kotumba mɔ́tɔ mingi mpe yango ekomema mbongwana ya klima.”

Basengeli na Calcium mingi na nzoto

Zulunalo Gesundheit in Wort und Bild (Kolɔngɔnɔ ya nzoto na maloba mpe na elilingi) ya Allemagne elobi ete: “Mpo ete mikuwa na bango mizali kokola, bilenge basengeli na calcium mingi.” Mokolo na mokolo esengeli kolya biloko oyo ekopesa miligrame 1 200 ya calcium, kasi bobele bilenge basi 56 likoló ya monkama mpe bilenge mibali 75 likoló ya monkama ya mbula 15 kino mbula 19 na Allemagne nde bakómisaka motángo yango. Mary Fraser ya ebongiseli ebéngami Ligue européenne contre l’ostéoporose alobi ete “na Mpoto mobimba bilenge basi bazali mpenza na calcium te na nzoto na bango.” Atako likambo yango ya kozanga calcium eyebanaki te na boumeli ya ntango molai, ekoki kopesa moto maladi ya mikuwa to ostéoporose na ntango akómi mokóló. Lisolo yango elobi ete: “Biloko oyo epesaka calcium na nzoto ezali fromage, miliki, yaourt, sésame, bitekuteku, soya, ndunda mobesu, mbuma lokola kokoti, mpe mbisi.”

Dolare-mokonzi

Zulunalo U. S. News & World Report elobi ete: “Bobele mwa bato moke ya États-Unis nde bakoki koyeba ete dolare ezali na mabɔkɔ ya bato mingi na mikili ya bapaya koleka na États-Unis. Kati na dolare miliare 450 ya nkasa mpe bibende oyo ezali sikawa na mabɔkɔ ya bato, na mikanda, na babanki, mpe na bakompanyi, soko ndambo mibale kati na misato​—to dolare miliare 300​—ezali na mikili ya bapaya.” Mpe motángo yango ezali komata kobanda na dolare miliare 15 kino dolare miliare 20 mbula na mbula. Lokola na États-Unis mbongo oyo etambolaka na mabɔkɔ ya bato ezalaka mingimingi lokasa ya dolare 20, dolare mingi oyo ezali kotambola na mabɔkɔ ya bato na mikili mosusu ezali lokasa ya dolare 100. Mbongo yango ezali kosalelama mpo na kosomba mwa biloko moke ya mokolo na mokolo te kasi mpo na kobomba mpe kosala mombongo. Bato bazali kosala bongo mingimingi na mikili oyo mosolo ya mboka ezali lisusu na motuya te mpe bato batyelaka babanki motema te. Soko 60 % ya bankasa ya dolare 100 oyo basalaki na 1997 etindamaki mbala moko na mikili ya bapaya. Guvernema ya États-Unis ekanisi ete, mbongo mingi oyo ezali kotambola na mikili ya bapaya ekokani na mbongo oyo badefisi guvernema ya États-Unis nzokande yango esengeli kozongisama na biloko te to na misala te, na bongo bamiliare ya dolare ya guvernema ekoki kobombama.

Ndingisa ya kobɔtɔla biloko ya kolya

Zulunalo ENI Bulletin elobi ete: “Bakonzi ya Lingomba ya Katolike bandimaki ete babola mpe bato oyo bazali kokufa nzala oyo bazali koyiba biloko ya kolya mpo na kobikela bazali kosala mabe te.” Lokola mbula ezali konuka lisusu te mpe milona mikauki na nɔrdi-ɛsti ya Brésil, likambo ya kobɔtɔla biloko ya kolya na bamagazini minene mpe na bibombelo endimamaki. Mpo na episkɔpɔ-mokonzi ya Belo Horizonte, kardinale Serafim Fernandes de Araujo, “Lingomba ya Katolike ezali kokweisa moto moko te oyo akamati bilei, epai nyonso akokuta yango mpo na kozala na bomoi.” Mpe elobami boye na ntina na makambo oyo kardinale Paulo Evaristo alobaki: “Tokobundisa ezaleli oyo ezali komonana: bozwi nyonso ezali na mabɔkɔ ya bato ya bozwi nzokande babola bazali kokóma babola koleka.” Abakisaki ete: “Ntango ekoki mpo na bato ya bingumba mpe ya bamboka ete bálamuka.”

Nyongo eleki motó

Zulunalo The Vancouver Sun elobi ete: “[Moto mokomoko ya ekólo Canada] asalelaka dolare 1 236 mpo na kopesa bakado, kominanola mpe kosala mibembo na boumeli ya eleko ya konje,” mpe “mbongo yango mingi efutamaka na kalati ya kredi.” Bapesi-toli na makambo ya mbongo balobi ete bato bapusamaka makasi kolya mbongo na ntango ya Noele, mpe soki bazali na mbongo na mabɔkɔ te, basalelaka bakalati ya kredi. Mopesi-toli moko alobi emonani lokola bayebi ete mosala na bango ezali, bato bazali “kokɔta banyongo mingi koleka na esika ete báfuta banyongo na bango.” Na nsuka ya mobu 1997, bato ya ekólo Canada bakómaki na nyongo miliare 20,42 na bakalati ya kredi oyo efutamaki naino te​—motángo oyo ezali mbala mibale koleka oyo ya mobu 1991. Bato ya mayele bakanisi ete esalaka soko sanza motoba mpo ete kiliya afuta bafaktire nyonso ya konje mpe ete bato mingi bakotikala naino na nyongo kino bakobanda “kosomba mingi” lisusu na eleko ya Noele oyo ekoya.

Kosakana na liwa

Zulunalo Jornal do Brasil elobi ete: “Baboti mpe balakisi bato basengeli kokitisa bolombe oyo ezali kolendisama na bafilime mpe na televizyo mpo na kosakana na liwa te.” Bolukiluki moko oyo esalemi na engumba Rio de Janeiro emonisi ete bana ya nse ya mibu 13 bazali kosala mabe minene 10 likoló ya monkama. Lisolo yango elobi ete: “Ezali na bana oyo bazali kotambola na mandoki, bazali kobundisa bato, kozokisa, to koboma baninga ya kelasi, mpe bazali kosangisa nzoto na makasi na baoyo bazali bilenge koleka bango.” Alfredo Castro Neto, monganga ya maladi ya motó alobi ete: “Momeseno lokola oyo tozali na yango sikawa, oyo ezali kolendisa kowelana mpe komonisa na bafilime ete moto moko akoki koboma moninga mpo na kozwa eloko oyo alingi, ekoki bobele kobulunganisa mayele ya bana yango.” Ntango asɛngaki ete ezali malamu kopesa mwana biloko ya masano oyo ekoki kopesa liteya na esika ya kopesa ye mandoki, molakisi Josefa Pech alobi ete esengeli komonisa na mwana ete na filime, “elilingi ya elombe oyo azali koboma moto nyonso ezali bozoba mpe ezali likambo ya solo te mpe ete bibundeli emonisaka makasi te, kasi ezali nde bisaleli oyo ebomaka bato.”

Motángo ya bawei

University of California Berkeley Wellness Letter elobi ete: “Komɛla likaya ezali koboma bato mingi na États-Unis mbula na mbula koleka bato oyo bakufaki na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba mpe na etumba ya Vietnam soki basangisi yango. Mokolo na mokolo bato 1 200 na États-Unis bazali kokufa na maladi oyo euti na komela likaya, yango ekokani na mpɛpɔ ya minene misato to minei oyo ebéngami jumbo etondi na bato epanzani mpe bato nyonso bakufi.”

Lisolo ya nyama ebéngami lemming ezali ya lokuta

Lemming​—ezali mwa nyama moke oyo efandaka na bisika ya malili na nɔrdi ya mokili​—emibomaka ebele na komibwakaka na mai? Bato mingi bazali kondima likambo yango kino lelo. Nzokande, uta kala, banganga-mayele bandimaka yango mpenza te, mpe sikawa ekipe moko ya bato ya televizyo BBC balakisaki bafilime oyo bazwaki na boumeli ya sanza motoba na wɛsti ya Canada, emonisi ete likambo yango ezali lokuta. Ntango bilei na bango ezali mingi, lemming ikómi komonana mingi. Na bongo, ndenge nini lisolo ya komiboma ebandaki? Zulunalo The Guardian ya Londres elobi ete lisolo yango ebimaki ntango bato bamonaki lemming ya Norvège ikweaki na mai ntango izalaki kokita na ngomba mpo na kolya matiti ya lobwaku.

Bazali koyiba biloko ya bato ya maladi

Mapitalo ya Allemagne etungisami na bayibi. Zulunalo Emsdettener Tageblatt elobi ete: “Na mapitalo ya engumba Cologne moyibi ezali kosalema mbala 300 mbula na mbula. Bayibi bazali koya na maboke ya fololo na mabɔkɔ, komungamunga na monɔkɔ​—mpo na koluka mwango ya koyiba eloko ya motuya ya bato ya maladi.” Bazali komikómisa lokola bato oyo bayei kotala bato ya maladi, mpe bayibaka na bamesa ya mpembeni ya mbeto mpe na bisika ya kotya bilamba na lopitalo. Mingimingi bayibaka na bolɛmbu nyonso mpamba te mibange oyo bazali maladi nde bakómisaka likambo yango pɛtɛɛ. Na ndakisa, bakutaki mobange moko azalaki kobomba ebele ya bankoto ya deutsche marks na nse ya kusɛ ya mbeto na ye ya lopitalo. Kozanga kotya ndelo na ntango ya kotala bato ya maladi epesaka bayibi bonsomi monene, mpe moto nyonso akoki kokɔta na lopitalo ndenge alingi. Na yango, bakebisi bato ya maladi ete bákangaka mbongo na bango to biloko mosusu ya motuya na fungola na ebombelo ya lopitalo to esika mosusu, to bápesaka yango na moto moko oyo akoki kobombela bango.

Bilembo ya matoi

Ntango batondolaki angwalima moko mpo na moyibi na Londres, litoi na ye efundaki ye. Ndenge nini? Atako azalaki kokeba mingi ete atika soko moke te elembo ya mosapi na bisika azalaki koyiba, kasi liboso ya kobuka ndako moko, azalaki na momeseno ya kotya litoi na ye na lininisa to na lidusu ya fungola mpo na koyeba soki moto azali na kati. Na yango, bilembo ya matoi na ye ezalaki kotikala na lidusu ya fungola to na lininisa. Profesere Peter Vanesis, monganga na Iniversite ya Glasgow na ekólo Écosse alobi ete: “Bilembo ya matoi ya moto moko ekeseni na mosusu nyonso lolenge moko na bilembo ya misapi.” Zulunalo The Daily Telegraph ya Londres elobi ete na bokeseni na bilembo ya misapi, matoi ekobaka kokola na boumeli ya bomoi mobimba, lokola nsuki mpe manzaka. Nzokande, bapolisi bayebi ete matoi na biso, ezala ata bonene na yango nini, ekeseni na mosusu nyonso, lokola ya angwalima oyo bakangaki. Azalaki moto ya liboso oyo bakangaki na Grande-Bretagne na elembeteli ya elembo ya litoi, mpe andimaki ete abukaki bandako mbala mitano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto