Nzete ya mbila—Nzete ya misala ndenge na ndenge
Euti na mokomani na biso na Bisanga Salomon
GUADALCANAL—mpo na bato mingi nkombo ya esanga yango ekundwelaka bango bitumba mosusu makasi oyo esalemaki na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Nzokande, lelo oyo, moto nyonso oyo akozonga na esika yango ya Bisanga Salomon oyo bitumba makasi ezalaki, akokuta bokeseni monene—na esika ya milɔngɔ milaimilai ya basoda, akokuta nde milɔngɔ ya banzete ya mbila.
Mabelé oyo baloná banzete yango ya mbila oyo ekómi milaimilai mpe ya kitoko etondaki liboso na batɔne ya babɔmbi oyo basundolaki mpe bibundeli mosusu ya mabe oyo bakundaki na ntango ya bitumba. Kasi balongolaki bibundeli yango mpo na kolona banzete ya mbila. Ndenge nini babandaki kolona nzete yango? Mpe mpo na nini tokoki koloba ete nzete yango ya kitoko mpe ya milai esalisaka na misala ndenge na ndenge?
Lisolo ya nzete ya mbila ezali molai
Alvise Ca’da Mosto moto ya Vénitie, asalaki mobembo na ekeke ya 15 na bokula ya wɛsti ya Afrika, mpe alobelaki nzete moko oyo ekokani na nzete ya mbila mpo na mbala ya liboso. Mbula soko 500 na nsima, baombo oyo bautaki na Afrika bamemaki mbuma ya nzete yango na mikili oyo ezalaki na ngámbo ya Mai Monene ya Atlantique. Na yango, mafuta ya mbila ezali lolenge moko ya mafuta ya milona oyo bato basalelaka yango lelo mingi koleka na mokili mobimba. Hectare moko ya nzete ya mbila ebimisaka mafuta mingi koleka milona mosusu nyonso oyo ebimisaka mafuta. Lisusu, nzete ya mbila ezali molona oyo ebotaka mbuma mpe ebimisaka mafuta ntango nyonso na mobu mpe ekosala bongo na boumeli ya mbula 25 kino mbula 30.
Likambo moko ya ntina etali kobimisa mafuta ya mbila, mingimingi na mikili mosusu ya Extrême-Orient, emonanaki na nsuka ya bambula ya 1970. Liboso mpenza, bato bazalaki kokanisa ete mopɛpɛ nde ememaka putulu ya nzete (pollen) mpo ebota bafololo ya mbila. Na bongo, soki nzete ya mbila eboti malamu te, bazalaki koloba ete klima ezalaki malamu te. Nzokande, bolukiluki oyo euti kosalema emonisi ete nyamankɛkɛ oyo epumbwaka nde ememaka putulu yango na nzete ya mbila moko kino na nzete ya mbila mosusu mpo ebota! Na yango, kotambolatambola ya nyamankɛkɛ oyo epumbwaka banda na wɛsti ya Afrika kino na Extrême-Orient ezali bongo na ntina mingi mpamba te ememaka putulu mpo na kobotisa banzete ya mbila.
Mbila oyo ezalaka motane-ngwaa ebimisaka mafuta ndenge mibale. Mafuta yango esalelamaka mpo na kosalela biloko ndenge na ndenge, mbala mosusu osalelaka mpe biloko mosusu na yango. Liboso ya kotalela yango, tókenda naino kotala izini moko oyo basalaka mafuta mpe tómona ndenge babimisaka yango.
Ndenge babimisaka mafuta ya mbila
Ntango tokómi na izini, motambwisi na biso apesi biso mbote mpe akɔtisi biso na kati. Zingazinga na biso, masini moko ya monene ezali kosala. Alobi ete, likambo ya liboso mpo na kosala mafuta ya mbila ezali kotya bituka ya mbila na kati ya mombonda moko ya monene oyo ezalaka na mɔ́tɔ makasi. Etuka mokomoko ezalaka na mbila soko 200 moko pene na mosusu. Molunge ya mombonda yango elɛmbisaka mbila mpo elongwa na bolɛmbu nyonso na bituka.
Likambo ya mibale ezali kokabola mbila na bituka na yango na kosaleláká masini moko oyo esalaka yango. Mbila oyo ekabwani na bituka etindami sikoyo na masini moko ya monene oyo etutaka mbila mpe ekabolaka mosuni na ndika na yango. Na nsima bakotuta misuni ya mbila yango oyo ezalaka nsingansinga to bakokamola yango mpo na kobimisa mafuta ya mbila. Nsima ya kokɔngɔlɔ mpe kopɛtola yango, mafuta kitoko oyo ebimisami ekotindama bipai oyo esengeli kokenda.
Nzokande, ezali na lolenge mosusu ya mafuta. Yango eutaka na ndika ya mbila. Bapasolaka yango liboso mpo na kozwa ndika oyo ezali na kati. Na nsima, bakamolaka ndika yango mpo ebimisa mafuta na yango. Babéngaka yango mafuta ya ndika.
Basalelaka bosɔtɔ ya ndika oyo etikalaka mpo na kobimisa bilei ya vitamini mpo na bibwele. Bobele bongo, nsima ya kokabola mbila na bituka na yango, mintika ya bituka ya mbila batyaka yango na bilanga lokola bipɔli mpo ete mabelé ebota malamu. Bansingansinga ya mbila mpe mposo ya ndika ezali lisusu na ntina, basalelaka yango mpo na kopelisa mɔ́tɔ oyo etɔkisaka banzungu minene ya izini.
Longwa na krɛmɛ ya kolya kino mafuta ya kopakola
Longola mafuta ya soya, mafuta ya mbila ezali mafuta oyo basalelaka mingi koleka na mokili mobimba. Buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi ete: “Na boumeli ya bambula ya 1700, bato ya Angleterre bazalaki kosalela mafuta ya mbila lokola nkisi ya monganga mpe mafuta ya kopakola na mabɔkɔ.” Nzokande, lelo oyo, basalelaka mafuta ya mbila mpo na kosala krɛmɛ ya malili oyo balyaka, manteka, mafuta ya kolambela, mpe biloko lokola sabuni mpe baprodwi ya kopakola na nzoto.
Mafuta ya ndika esalelamaka mpe mpo na kosala manteka mpe chocolat mpe biloko mosusu ya elɛngi. Kasi basalelaka mafuta ya mbila mpe na biloko mosusu. Nsima ya kosalela myango mosusu, basalelaka bosɔtɔ ya mafuta ya mbila mpe ya mafuta ya ndika mpo na kobimisa bankisi ya monganga, sabuni ya makasi, sabuni ya mputulu to ya maimai mpo na kosukola bosɔtɔ, babuji, mpe kutu babɔmbi!
Ya solo, na Bisanga Salomon, bato balingaka mafuta ya mbila mingi. Mafuta ya mbila ezali na ntina mingi mpo na bokoli ya nkita ya ekólo yango mpamba te biloko 13 likoló na monkama oyo bazali kotinda na mikili mosusu, euti na mafuta ya mbila.
Ntango totali nzete ya mbila, ezali likambo ya kokamwa soki tokanisi ete mafuta ya mbuma yango ya motane-ngwaa, ekoki kosangisama mpo na kosala na yango krɛmɛ ya malili oyo ezali kotanga na monɔkɔ ya mwana oyo azali kolɛmbola yango na komungamunga, ekoki mpe kosangisama mpo na kobimisa mafuta oyo mama na ye apakolaka na elongi mpo na monzɛlɛ. Ɛɛ, nzete ya mbila ezali nzete oyo esalelamaka na misala ndenge na ndenge mpe tosengeli kozala na botɔndi mpo na ebele na matomba na yango.
[Etanda/Elilingi na lokasa 27]
Bamemaka tɔne mibale na mabɔkɔ mokolo na mokolo
Tuu . . . tuu. Tuu. . . tuu! Wana ezali lokito ya bituka ya mbila oyo ezali kokweya ntango basali bazali kokata yango na elanga. Ndenge nini bakokaka kokata bituka ya mbila oyo nzete na yango ezali molai mpenza?
Basalelaka mbeli moko egumbamá oyo bapelisi malamumalamu mpe bakangisaka yango na nsɔngɛ ya nzete moko ya molai. Na yango basali bakataka bituka ya mbila oyo ezwami na bolai ya bamɛtɛlɛ ata zomi. Na mokolo moko, mosali mokomoko akoki kokata bituka ya mbila 80 kino 100 mpe akomema yango kino na nzela mpo bálɔkɔta yango na motuka. Lokola etuka moko ya mbila ezalaka na kilo soko 25, mosali amemaka kilo mingi mpenza! Esɛngaka tɔne ya mbila minei na ndambo mpo na kobimisa tɔne moko ya mafuta.