Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g99 Juillet lok. 24
  • Esengeli kolalisa mwana moke ndenge nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Esengeli kolalisa mwana moke ndenge nini?
  • Lamuká!—1999
  • Masolo mosusu
  • Oyo bana bazalaka na yango mposa mpe balingaka
    Lamuká!—2004
  • Kobotama ya mwana ekɔtisaka mbongwana na libala
    Okoki kozala na libota ya esengo
  • Matomba ya mabɛlɛ ya mama
    Lamuká!—1993
Lamuká!—1999
g99 Juillet lok. 24

Esengeli kolalisa mwana moke ndenge nini?

NA MOKILI mobimba, bana mingi bakufaka liwa ya mbalakaka. Na États-Unis, bana mingi ya sanza 1 kino sanza 12 bazali kokufa mbalakaka. Mwango moko ezali mpo na kobatela bana na likama yango? The Journal of the American Medical Association (JAMA) elobi ete bolukiluki oyo esalemaki na bambula oyo euti koleka emonisi ete bana bakokufa lisusu mingi te na mbalakaka, soki bazali kolalisa bango na mokɔngɔ na esika ya kolalisa bango na libumu. Bikólo mingi esalaki kampanye mpo na kokebisa baboti báyeba ete ndenge ya kolalisa mwana ekoki kobatela ye to komema ye na liwa ya mbalakaka. Na Australie, Angleterre, Danemark, Nouvelle-Zélande, mpe Norvège, bana mingi (50 %) bazali lisusu kokufa liwa ya mbalakaka te nsima ya mbula moko to mbula mibale mpo na kampanye oyo esalemaki mpo na koyebisa baboti bálalisaka bana na bango na mokɔngɔ.

Bato bayebi te ete kolalisa mwana na libumu ekoki koboma ye na mbalakaka, mpe balukiluki mosusu balobi ete kolalisa mwana na libumu ekoki kosala ete akóma komɛla mpema oyo azali kobimisa, na yango gaz carbonique ekotonda na makila na ye. Nzoto ya mwana ekoki mpe kokóma mɔ́tɔ makasi mpamba te ekobengana molunge te ndenge ekokaki kosala soki alalaki na mokɔngɔ. Na lolenge nyonso, bana oyo balalisaka bango na libumu to na mokɔngɔ batikalaka ndenge balalisi bango. Bolukiluki mpe emonisi ete kolalisa mwana ya nzoto kolɔngɔnɔ na mokɔngɔ ezali malamu koleka kolalisa ye na mopanzi.

Mpo na nini bamama baponaka lolenge ya kolalisa bana na bango? Zulunalo JAMA elobi ete bamama balandaka mimeseno ya bato—balalisaka bana na bango na mbeto lolenge oyo bamama na bango moko to bato mosusu na esika oyo bafandi basalaka yango. To mbala mosusu bamekolaka lolenge ya kolalisa bana oyo bamonaki na lopitalo. Bamama mosusu bakanisaka ete bana na bango balingaka to balalaka malamu na lolenge moko boye. Bamama mingi balalisaka bana na bango ntango nyonso na mokɔngɔ na boumeli ya sanza ya liboso kasi na nsima bakómaka kolalisa bango na libumu. Zulunalo JAMA elobi ete “kosala bongo ezali mabe mpamba te bana ya sanza 2 kino sanza 3 nde bazalaka na likama monene ya liwa ya mbalakaka.” Minganga bazali kosala milende ya kolimbolela bamama ya bana mike lolenge oyo bamoni ete ezali pɛtɛɛ mpe malamu mpo na kobatela bana na likama ya liwa ya mbalakaka—kolalisa bana na bango na mbeto na mokɔngɔ.a

[Maloba na nse ya lokasa]

a Soki mwana azali kopema malamu te to soki azali kobimabima nsɔi na monɔkɔ, ekozala malamu kokenda epai ya monganga mpo na koyeba lolenge malamu ya kolalisa ye.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto