Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • hf eteni 7 biteni 1-4
  • Ndenge ya kobɔkɔla mwana na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kobɔkɔla mwana na yo
  • Okoki kozala na libota ya esengo
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • 1 SALÁ ETE BANA NA YO BÁBANGAKA TE KOSOLOLA NA YO
  • 2 LUKÁ KOYEBA OYO BALINGI MPENZA KOLOBA
  • 3 BÓZALA NA BOMOKO
  • 4 BÓYEBA OYO ESENGELI KOSALA
  • Teyá mwana na yo uta azali naino moke mpenza
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Baboti​—Bóbɔkɔla bana na bino na bolingo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Biblia ekoki kosalisa yo na kobɔkɔla bana?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Lolenge ya kozala na libota oyo ezali makasi na elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Okoki kozala na libota ya esengo
hf eteni 7 biteni 1-4
Tata ná mwana bazali kobongisa velo elongo

ETENI 7

Ndenge ya kobɔkɔla mwana na yo

“Maloba oyo nazali kopesa yo mitindo lelo esengeli kozala na motema na yo; mpe osengeli kokɔtisa yango malamumalamu na kati ya mwana na yo.”​—Kolimbola Mibeko 6:6, 7

Ntango Yehova abandisaki libota, apesaki baboti mokumba ya kobɔkɔla bana na bango. (Bakolose 3:20) Lokola ozali moboti, ozali na mokumba ya koteya mwana na yo alinga Yehova mpe kosalisa ye akola malamu. (2 Timote 1:5; 3:15) Osengeli mpe koyeba makambo oyo ezali na motema ya mwana na yo. Kobosana te ete yo mpe osengeli kopesa ndakisa. Okoteya mwana Liloba ya Yehova malamu koleka soki yo moko okɔtisi yango na motema na yo.​—Nzembo 40:8.

1 SALÁ ETE BANA NA YO BÁBANGAKA TE KOSOLOLA NA YO

OYO BIBLIA ELOBI: “Moto nyonso asengeli koyokaka noki, kowelaka koloba te.” (Yakobo 1:19) Na ntembe te, mposa na yo ezali ete bana na yo bábangaka te kosolola na yo. Na yango, yebisá bango ete ntango bazali na mposa ya koloba, okoyoka bango. Kitisá bango motema mpo bábimisa makanisi na bango polele. (Yakobo 3:18) Soki bamonaka ete ozalaka maloba mabe to osambisaka bango, mbala mosusu bakosolola na yo mpenza polele te. Zalá motema molai epai ya bana na yo, mpe yebisáká bango mbala na mbala ete olingaka bango.​—Matai 3:17; 1 Bakorinti 8:1.

OKOKI KOSALA BOYE:

  • Ntango mwana azali na mposa ya kosolola na yo, pesá ye ntango

  • Sololáká na bana na yo mbala na mbala, kaka te ntango makambo ebimi

2 LUKÁ KOYEBA OYO BALINGI MPENZA KOLOBA

OYO BIBLIA ELOBI: “Ye oyo amonisaka mayele ya kososola na likambo akozwa bolamu.” (Masese 16:20) Na bantango mosusu, maloba ya bana na yo ekomonisa mpenza te ndenge bazali komiyoka; yo moko osengeli kososola yango. Bilenge mingi balekisaka ndelo na maloba na bango to mpe balobaka makambo mosusu, nzokande na motema bazali na makambo mosusu. “Ntango moto azali koyanola na likambo liboso ya koyoka yango, wana ezali bozoba.” (Masese 18:13) Kowelaka kosilika te.​—Masese 19:11.

Mama asiliki mpo na makambo oyo mwana na ye auti koloba

OKOKI KOSALA BOYE:

  • Kokata mwana maloba te, kosilika mpe te, ata soki alobi likambo nini

  • Meká kokanisa lisusu ndenge ozalaki ntango ozalaki na mbula na ye mpe nini ezalaki na ntina mpo na yo

3 BÓZALA NA BOMOKO

OYO BIBLIA ELOBI: “Mwana na ngai, yoká disiplini ya tata na yo, mpe kotika mobeko ya mama na yo te.” (Masese 1:8) Yehova apesi mokumba ya kobɔkɔla mwana epai ya tata ná mama. Bosengeli koteya bana bámemyaka bino mpe bátosaka bino. (Baefese 6:1-3) Bana bayebaka soki baboti na bango bazali “liboke moko mpenza na makanisi kaka moko” to te. (1 Bakorinti 1:10) Soki boyokani te, bómonisa yango na miso ya bana te mpo yango ekoki kokitisa limemya oyo bazali na yango epai na bino.

Tata abendi mwana na ye pembeni mpo apesa ye disiplini wana mama ná mwana mosusu bazali esika mosusu

OKOKI KOSALA BOYE:

  • Sololá na molongani na yo mpe bóyokana ndenge oyo bokopesa bana disiplini

  • Soki bozali na likanisi ndenge moko te mpo na ndenge ya kobɔkɔla bana, meká naino kotalela likanisi ya molongani na yo

4 BÓYEBA OYO ESENGELI KOSALA

OYO BIBLIA ELOBI: “Bɔkɔlá mwana mobali na kolanda nzela oyo esengeli mpo na ye.” (Masese 22:6) Kobɔkɔla bana malamu esɛngaka milende mingi. Bosengeli koyeba ndenge ya kobɔkɔla bana, mpe kopesa bango disiplini. (Nzembo 127:4; Masese 29:17) Kopesa disiplini elimboli kaka te kopesa etumbu; elimboli mpe kosalisa bana báyeba ntina oyo botye mobeko boye to boye na ndako. (Masese 28:7) Lisusu, teyá bango bálinga Liloba ya Yehova mpe báyeba kososola mitinda na yango. (Nzembo 1:2) Yango ekosalisa bango bákóma na lisosoli ya malamu.​—Baebre 5:14.

OKOKI KOSALA BOYE:

  • Salisá bana na yo bámonaka ete Nzambe azali Moto ya solo oyo bakoki kotyela motema

  • Salisá bango báyeba mpe bákima makambo oyo ekoki kobebisa bizaleli na bango, na ndakisa na nzela ya Internet to na basite oyo bato ya mokili mobimba bakoki kosolola na Internet. Lakisá bango ndenge ya kokima bato oyo bakoki koluka kosangisa na bango nzoto

Mwana mobali azali kozwa formasyo epai ya baboti na ye mpo asalela Yehova, kobanda na bomwana tii ntango akozwa batisimo

“Bɔkɔlá mwana mobali na kolanda nzela oyo esengeli mpo na ye”

YEHOVA AKOPAMBOLA MILENDE NA YO

Lokola ozali moboti, ozali na mokumba moko ya ntina mingi: koteya mwana na yo makanisi ya Yehova. (Baefese 6:4) Yehova ayebi ete ezali mosala monene, kasi yebá ete mbuma oyo yango ekobimisa ekokumisa Nzambe mpe ekopesa yo esengo mingi.​—Masese 23:24.

OMITUNA BOYE . . .

  • Nasala nini mpo mwana na ngai ayebisaka ngai likambo nyonso oyo azali na yango?

  • Liteya nini nakoki kozwa na ndenge oyo baboti mosusu babɔkɔlaka bana na bango?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto