Sanza ya 9
Mwayambo, 1 sanza ya 9
Tokomona pole euti na likoló, oyo ezali kongɛnga lokola kotana ya ntɔngɔ.—Luka 1:78.
Nzambe apesi Yesu nguya ya kosilisa mikakatano nyonso ya bato. Na nzela ya makamwisi oyo asalaki, Yesu amonisaki nguya oyo azali na yango ya kosilisa mikakatano oyo tokoki te kosilisa na makasi na biso moko. Na ndakisa, azali na nguya ya kosikola biso na lisumu mpe na makambo oyo yango ememelá bato, na ndakisa maladi mpe liwa. (Mat. 9:1-6; Rom. 5:12, 18, 19) Makamwisi oyo asalaki emonisaki ete akoki kobikisa maladi ya “ndenge nyonso” ata mpe kosekwisa bakufi. (Mat. 4:23; Yoa. 11:43, 44) Lisusu, azali na nguya ya kokitisa mopɛpɛ ya makasi mpe ya kobengana bilimo mabe. (Mrk. 4:37-39; Luka 8:2) Koyeba ete Yehova apesi Mwana na ye nguya ya kosala makambo ya ndenge wana ezali mpenza kokitisa biso motema! Tosengeli komindimisa ete mapamboli oyo Nzambe alaki biso na nse ya bokonzi na ye ekokokisama. Makamwisi oyo Yesu asalaki ntango azalaki awa na mabele ezali koteya biso makambo ya minene oyo akosala awa na mabele lokola azali mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe. w23.04 3 par. 5-7
Mwamibale, 2 sanza ya 9
Elimo elukalukaka na kati ya makambo nyonso, ata na makambo mozindo ya Nzambe.—1 Ko. 2:10.
Soki ozali na lisangá oyo ezali na basakoli mingi mpe esalaka ete mbala mingi bámona lobɔkɔ na yo te, okoki kokóma na likanisi ete otika kopesa biyano. Kasi kolɛmba nzoto te. Bongisá biyano mingi mpo na eteni mokomoko ya makita. Na bongo, soki baponi yo te na ebandeli ya boyekoli, okozala na mabaku ya kopesa biyano ata na boumeli ya makita. Ntango ozali kobongisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya boyekoli, kanisá ndenge paragrafe mokomoko eyokani na motó ya likambo ya lisolo yango. Soki osali bongo, okozanga te biyano ya malamu ya kopesa na boumeli ya boyekoli yango. Lisusu, okoki komibongisa mpo na kopesa biyano na baparagrafe oyo ezali kolobela mateya ya mozindo ya Biblia oyo ezalaka mpasi mingi mpo na kolimbola. Mpo na nini? Mpamba te, ekoki kozala na bato moke kaka oyo batomboli mabɔkɔ na eteni wana ya boyekoli. Okosala nini soki osaleli makanisi yango kasi nsima ya makita mingi ozwi kaka te libaku ya kopesa eyano? Yebisá ndeko oyo akotambwisa lisolo yango motuna ya paragrafe oyo okosepela koyanola. w23.04 21-22 par. 9-10
Mwamisato, 3 sanza ya 9
Yozefe . . . asalaki ndenge anzelu ya Yehova atindaki ye; atyaki mwasi na ye na ndako.—Mat. 1:24.
Yozefe asalelaki malako oyo Yehova apesaki mpe yango esalaki ete azala mobali ya malamu. Mbala soki misato mobimba, Yehova apesaki ye malako na oyo etali libota na ye. Na mbala nyonso, atosaki na motema na ye mobimba, ata na ntango oyo esɛngaki ete asala bambongwana. (Mat. 1:20; 2:13-15, 19-21) Kotosa malako ya Yehova esalisaki Yozefe abatela Maria, apesa ye mabɔkɔ mpe akokisa bamposa na ye. Meká kokanisa ndenge makambo oyo Yozefe asalaki esalisaki Maria alinga ye mingi mpe amemya ye! Mibali, bokoki komekola Yozefe soki bozali koluka batoli ya Biblia mpo na kokokisa bamposa ya libota na bino. Soki bosaleli batoli yango, ata soki esɛngi ete bósala bambongwana, bokomonisa ete bolingaka basi na bino mpe bokokómisa libala na bino makasi. Ndeko mwasi moko oyo afandaka na Vanuatu, oyo eleki sikoyo mbula 20 banda abalá, alobi boye: “Ntango mobali na ngai alukaka mpe asalelaka malako oyo Yehova azali kopesa, yango esalaka ete namemya ye lisusu mingi. Namonaka ete nabatelami, mpe nandimaka bikateli oyo azwaka.” w23.05 21 par. 5
Mwaminei, 4 sanza ya 9
Balabala moko ya monene ekozala kuna, ɛɛ nzela oyo ekobengama Nzela ya Bosantu.—Yis. 35:8.
Bayuda oyo balongwaki na Babilone mpe bazongaki basengelaki kokóma “eloko na ye moko” mpo na Nzambe na bango. (Mib. 7:6) Kasi yango elimbolaki nde ete basengelaki kosala bambongwana te mpo na kosepelisa Yehova? Ezali bongo te! Bayuda mingi babotamaki na Babilone, bamesanaki na makanisi mpe mibeko mosusu ya bato ya Babilone. Bambula mingi na nsima, wana Bayuda ya liboso bazongaki na Yisraele, Guvɛrnɛrɛ Nehemia akamwaki ntango ayaki koyeba ete bana na bango oyo babotamaki na Yisraele bayebaki kutu te monɔkɔ ya Bayuda. (Mib. 6:6, 7; Neh. 13:23, 24) Ndenge nini bana yango balingaki koyekola kolinga Yehova mpe kosambela ye lokola bayebaki Ebre te, monɔkɔ oyo basalelaki mpo na kokoma Biblia? (Ezr. 10:3, 44) Na yango, Bayuda yango basengelaki kosala bambongwana mingi, kasi ekozala pɛtɛɛ básala bambongwana yango na Yisraele, epai losambo ya pɛto ezalaki kozongisama malɛmbɛmalɛmbɛ.—Neh. 8:8, 9. w23.05 15 par. 6-7
Mwamitano, 5 sanza ya 9
Yehova asalisaka baoyo nyonso bazali kokwea mpe atombolaka baoyo nyonso bagumbami.—Nz. 145:14.
Likambo ya mawa, ata soki tozali na mposa makasi to tomipesi disiplini, kwɔkɔsɔ ekoki komonana. Na ndakisa, “makambo oyo ekanami te” ekoki kolya biso ntango oyo tosengeli na yango mpo na kosala makasi tókokisa mokano oyo tomityeli. (Mos. 9:11) Tokoki kokutana na mokakatano oyo ekoki kolɛmbisa biso nzoto mpe kosala ete tózala lisusu na makasi mingi te. (Mas. 24:10) Nzoto na biso ya kozanga kokoka ekotinda biso tósala likambo oyo ekoki kopekisa biso tókokisa mokano oyo tomityeli. (Rom. 7:23) To mpe tokoki kolɛmba. (Mat. 26:43) Nini ekoki kosalisa biso tólonga ntango tozwi kwɔkɔsɔ moko boye? Kobosana te ete soki ozwi kwɔkɔsɔ yango elimboli te ete olongi te. Biblia elobi ete tokoki kokutana na mikakatano mbala na mbala. Kasi, elobi mpe ete tokoki kotɛlɛma lisusu. Soki ozali kokende liboso ata soki ozwi kwɔkɔsɔ, okomonisa Yehova ete olingi kosepelisa ye. Na ntembe te, Yehova akosepela mpenza soki amoni ete ozali kosala makasi mpo na kokokisa mokano na yo ya elimo, ata soki kosala yango ezali pɛtɛɛ te. w23.05 30 par. 14-15
Mwapɔsɔ, 6 sanza ya 9
Bókóma nde bandakisa mpo na etonga.—1 Pe. 5:3.
Mosala ya mobongisi-nzela esalisaka elenge mobali ayekola ndenge ya kosala malamu elongo na bato ya ndenge na ndenge. Esalisaka ye mpe ayeba kosalela mbongo mpe aboya kokɔta banyongo. (Flp. 4:11-13) Mosala ya mobongisi-nzela mosungi nde ebongisaka moto mpo akɔta na mosala ya ntango nyonso, mpe yango esalisaka moto mpo na kobanda mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Mosala ya mobongisi-nzela epesaka moto libaku ya kosala lolenge mosusu ya mosala ya ntango nyonso, na ndakisa mosala ya botongi to kokɔta betele. Bandeko mibali basengeli komityela mokano ya kokokisa masɛngami mpo na kosala lokola bankulutu na lisangá. Biblia elobi ete mibali oyo bakokisaka masɛngami mpo na kozwa mokumba yango bazali na “mposa ya mosala moko ya malamu mingi.” (1 Tim. 3:1) Liboso, ndeko mobali asengeli kokokisa masɛngami mpo na kokóma mosaleli na misala. Basaleli na misala bapesaka bankulutu mabɔkɔ na makambo mingi. Bankulutu mpe basaleli na misala basalelaka bandeko na bango na komikitisa nyonso mpe bazalaka na molende na mosala ya kosakola. w23.12 28 par. 14-16
Mwalomingo, 7 sanza ya 9
Wana azalaki naino elenge, Yosiya abandaki koluka Nzambe ya nkɔkɔ na ye Davidi.—2 Nt. 34:3.
Mokonzi Yosiya azalaki elenge ntango abandaki koluka Yehova. Azalaki na mposa ya koyekola makambo etali Yehova mpe kosala mokano na Ye. Kasi, makambo ezalaki pɛtɛɛ te mpo na elenge yango oyo azalaki mokonzi. Asengelaki kolongisa losambo ya pɛto na ntango oyo losambo ya lokuta epalanganaki mingi na ekólo. Mpe yango nde asalaki! Liboso Yosiya akokisa mbula 20, abandaki kolongola losambo ya lokuta na ekólo. (2 Nt. 34:1, 2) Ata soki ozali mpenza elenge, okoki kozwa ekateli ya komekola Yosiya, elingi koloba, koluka Yehova mpe koyekola bizaleli na Ye ya kokamwa. Soki osali bongo, okoyoka mposa ya komipesa na ye. Komipesa na Nzambe ekosala nini na bomoi na yo ya mokolo na mokolo? Luke, oyo azwaki batisimo na mbula 14, alobi boye: “Sikoyo, nakotya mosala ya Yehova na esika ya liboso mpe nakosala nyonso mpo na kosepelisa ye.” (Mrk. 12:30) Ekozala mpenza lipamboli soki yo mpe ozwi ekateli ya kosala bongo! w23.09 11 par. 12-13
Mwayambo, 8 sanza ya 9
Bótosaka baoyo bazali kosala mosala makasi na kati na bino mpe kokamba bino na kati ya Nkolo.—1 Tes. 5:12.
Ntango ntoma Paulo akomaki mokanda oyo, lisangá ya Tesaloniki ekokisaki naino mbula moko te. Ekoki kozala ete mibali oyo batyamaki bankulutu bayebaki makambo mingi te mpe ekoki kozala ete basalaki mwa mabunga. Atako bongo, esengelaki komonisela bango limemya. Wana bolɔzi monene ezali se kobɛlɛma, tokozala na mposa ya kosalela malako oyo eutaka epai ya bankulutu na biso koleka ndenge tozali kosala sikoyo. Mbala mosusu tokozwa te malako epai ya bandeko ya biro monene mpe ya biro ya filiale. Yango wana, ezali na ntina tóyekola kolinga mpe komemya bankulutu na biso banda sikoyo. Ezala likambo nini esalemi, tiká tóbatela makanisi na biso, tótya likebi na mabunga na bango te, kasi tótya nde likebi na bilembo oyo ezali komonisa ete na nzela ya Yesu, Yehova azali kokamba mibali wana ya sembo. Kaka ndenge ekɔti ezalaki kobatela motó ya soda, elikya na biso ya lobiko ebatelaka makanisi na biso. Tondimaka ete biloko oyo mokili elaki kopesa biso ezali na ntina te. (Flp. 3:8) Elikya na biso esalisaka biso tózala motema ya kokita mpe tótɛlɛma ngwi. w23.06 11-12 par. 11-12
Mwamibale, 9 sanza ya 9
Mwasi ya zoba asilá nsɔni. Azali zobazoba.—Mas. 9:13.
Baoyo bazali koyoka “mwasi ya zoba” basengeli kopona soki bakondima libyangi na ye to te. Ezali na bantina oyo tosengeli koboya kosala pite. Bamonisi ete “mwasi [yango] ya zoba” azali koloba boye: “Mai ya koyiba ezalaka elɛngi.” (Mas. 9:17) “Mai ya koyiba” ezali nini? Biblia ekokanisi kosangisa nzoto ya mwasi ná mobali na kati ya libala na mai ya mpiɔ. (Mas. 5:15-18) Mwasi ná mobali oyo babalani na kolanda mibeko ya Leta nde bazali na lotomo ya kosangisa nzoto. Yango ekeseni mpenza na “mai ya koyiba.” Mai yango elimboli pite, lolenge ya kosangisa nzoto oyo epekisami. Mbala mingi bato basalaka pite na kobombana mpo basusu báyeba te, kaka ndenge moyibi ayibaka na kobombana. Mbala mingi bato bamonaka ete “mai ya koyiba” ezalaka elɛngi mpo bakanisaka ete moto moko te akoyeba likambo oyo basali. Oyo nde lokuta monene! Yehova amonaka nyonso. Soki Yehova aboyi biso, yango ezali likambo oyo eleki mabe mpenza, mpe ezali mpenza likambo ya “elɛngi” te.—1 Ko. 6:9, 10. w23.06 22 par. 7-9
Mwamisato, 10 sanza ya 9
Soki nazali kosala yango na bolingo na ngai moko te, mokumba monene oyo bapesá ngai ezali kaka. —1 Ko. 9:17.
Bongo soki na ntango moko boye, omoni ete mabondeli na yo ekómi kaka likolólikoló mpe mosala ya kosakola ezali kosepelisa yo lisusu te? Kokanisa mbala moko te ete ozali lisusu na elimo ya Yehova te. Tozali bato ya kozanga kokoka, mpe mayoki na biso ebongwanaka mpambampamba. Soki molende na yo ekiti, kanisá ndakisa ya ntoma Paulo. Asalaki makasi amekola Yesu, kasi ayebaki ete na bantango mosusu azalaki na mposa mpenza te ya kosala oyo asengeli kosala. Na maloba mosusu, Paulo azalaki na ekateli ya kokokisa mosala na ye ata soki azali komiyoka ndenge nini na ntango yango. Ndenge moko mpe, kotika te mayoki na yo ya kozanga kokoka ezwela yo bikateli. Zalá na mokano ya kosala oyo ezali malamu ata soki ozali komiyoka ndenge nini. Na nsima, soki okobi kosala oyo ezali malamu, mayoki na yo ekoki kobonga.—1 Ko. 9:16. w24.03 11-12 par. 12-13
Mwaminei, 11 sanza ya 9
Bólakisa bango elembeteli ya bolingo na bino.—2 Ko. 8:24.
Tokoki komonisa bolingo mpo na bandeko na biso soki tozali kokómisa bango baninga na biso. (2 Ko. 6:11-13) Mingi kati na biso tozali na masangá oyo esangisi bandeko oyo bauti bisika ekeseni mpe bazali na bomoto ekeseni. Tokoki kokómisa makasi bolingo na biso mpo na bango soki tozali kotya likebi mingi na bizaleli na bango ya malamu. Soki tozali koyekola kotalela bato ndenge Yehova atalelaka bango, yango ekomonisa ete tolingaka bango. Bolingo ekozala na ntina mingi na ntango ya bolɔzi monene. Ntango bolɔzi monene ekobanda, epai wapi tokoluka libateli? Tótala oyo Yehova ayebisaki bato na ye básala ntango bayaki kobundisa Babilone na ntango ya kala: “Kende, ekólo ya bato na ngai, kɔtá na bashambrɛ na yo ya kati, mpe kangá baporte na yo. Omibomba kaka mpo na mwa ntango tii nkanda ekosila.” (Yis. 26:20) Mbala mosusu ekosɛnga biso mpe tótosa maloba yango na ntango ya bolɔzi monene. w23.07 6-7 par. 14-16
Mwamitano, 12 sanza ya 9
Makambo ya mokili oyo ezali kobongwana.—1 Ko. 7:31.
Luká koyebana lokola moto oyo azali makambo makasimakasi te. Omituna boye: ‘Bato bamonaka ete nazalaka makambo makasimakasi te, nabongolaka makanisi, mpe natingamaka na makambo te? To bamonaka ngai lokola moto ya makambo makasimakasi, moto ya boboto te to moto ya lolendo? Nayokaka basusu na likebi mpe nandimaka kosalela makanisi na bango soki esengeli?’ Soki tozalaka makambo makasimakasi te, tokomekola Yehova mpe Yesu lisusu mingi. Tosengeli kozalaka makambo makasimakasi te, ntango makambo ya bomoi na biso ebongwani. Bambongwana ya ndenge wana ekoki kobimisela biso mpasi oyo tokanaki te. Tokoki kokutana na mikakatano ya nzoto. To bambongwana ya mbalakaka na makambo ya nkita to ya politiki epai tozali kofanda ekoki kosala ete bomoi na biso ekóma mpasi. (Mos. 9:11) Ekoki kozala ata mpasi mpo na biso soki ebongiseli ya Yehova esɛngi biso tósalela ye na lolenge mosusu to na esika mosusu. Tokoki kolonga mikakatano ntango tozali komesana na makambo oyo ekómeli biso sikoyo soki tosali makambo oyo minei: (1) kondima likambo oyo ebongwani, (2) kokanisa makambo oyo ezali liboso, (3) kotya makanisi na makambo ya malamu, mpe (4) kosalisa basusu. w23.07 21-22 par. 7-8
Mwapɔsɔ, 13 sanza ya 9
Ozali moto ya motuya mingi. —Dan. 9:23.
Mosakoli Danyele azalaki naino elenge ntango bato ya Babilone bakangaki ye na etumba mpe bamemaki ye mosika ya mboka na ye. Kasi atako Danyele azalaki elenge, likebi ya bakonzi ya Babilone ekendaki epai na ye. Batalaki oyo ‘ezalaki komonana na miso,’ ete Danyele azalaki ‘na mbeba ata moko te na nzoto, azalaki kitoko’ mpe autaki na libota moko ya lokumu. (1 Sa. 16:7) Yango wana, bato ya Babilone bapesaki ye formasyo mpo akóma kosala na ndako ya mokonzi. (Dan. 1:3, 4, 6) Yehova azalaki kolinga Danyele mpo na lolenge ya moto oyo aponaki kozala. Na yango, ekoki kozala ete Danyele azalaki na mbula soki 20 ntango Yehova alobaki ete Danyele azalaki lokola Noa mpe Yobo. Yango wana, Yehova abengaki elenge Danyele moto ya sembo lokola Noa mpe Yobo, oyo basalelaki ye na bosembo na boumeli ya bambula mingi. (Eba. 5:32; 6:9, 10; Yobo 42:16, 17; Ezk. 14:14.) Lisusu, Yehova akobaki kolinga Danyele bomoi na ye mobimba mpe Danyele asalaki makambo mingi ya malamu na bomoi na ye.—Dan. 10:11, 19. w23.08 2 par. 1-2
Mwalomingo, 14 sanza ya 9
Bózala mpenza na likoki ya kososola malamumalamu bonene, bolai, bosanda mpe bozindo.—Ef. 3:18.
Ntango olingi kosomba ndako moko, yo moko okolinga kotala makambo nyonso oyo etali ndako oyo olingi kosomba. Tokoki kosala mpe bongo ntango tozali kotánga mpe koyekola Biblia. Soki otángi yango kaka mbangumbangu, okoki koyeba kaka makambo na mokuse, “mateya ya ebandeli ya maloba mosantu ya Nzambe.” (Ebr. 5:12) Kasi, ndenge moko na ndako oyo tolobeli, osengeli kokɔta “na kati” mpo omona makambo mikemike oyo ekosalisa yo okanga malamu ntina ya Biblia. Lolenge eleki malamu ya koyekola Biblia ezali ya komona ndenge oyo makambo oyo elobi na esika moko eyokani na makambo oyo elobi na esika mosusu. Salá makasi osukaka kaka te na koyeba makambo oyo ondimaka kasi mpe ntina oyo ondimaka yango. Mpo tókanga malamumalamu ntina ya Liloba ya Nzambe, tosengeli koyekola mateya na yango ya mozindo. Ntoma Paulo alendisaki bandeko na ye bakristo báyekolaka Liloba ya Nzambe na likebi mpenza mpo bázala na “likoki ya kososola malamumalamu bonene, bolai, bosanda mpe bozindo” ya mateya ya solo. Na ndenge yango, ‘bakopika misisa mpe bakotɛlɛma lisusu makasi’ na kondima na bango. (Ef. 3:14-19) Biso mpe tosengeli kosala bongo. w23.10 18 par. 1-3
Mwayambo, 15 sanza ya 9
Bandeko, mpo na likambo etali kokanga motema na mpasi mpe ya komonisa motema molai, bólanda ndakisa ya basakoli oyo balobaki na nkombo ya Yehova.—Yak. 5:10.
Biblia ezali na bandakisa mingi ya bato oyo bamonisaki motema molai. Ekoki kozala malamu otya programɛ mpo na koyekola bandakisa na bango. Na ndakisa, atako Davidi atyamaki mafuta na bolenge mpenza mpo akóma mokonzi na Yisraele, asengelaki kozela bambula mingi liboso azwa kiti ya bokonzi. Simeone mpe Ana basalelaki Yehova na bosembo nyonso wana bazalaki kozela komona Masiya oyo alakamaki. (Luka 2:25, 36-38) Ntango ozali koyekola masolo ya ndenge wana, luká biyano na mituna oyo elandi: Ekoki kozala nini esalisaki moto yango amonisa motema molai? Matomba nini azwaki lokola azalaki na motema molai? Ndenge nini nakoki komekola ye? Okoki mpe kozwa mateya na bandakisa ya baoyo bamonisaki motema molai te. (1 Sa. 13:8-14) Okoki komituna boye: ‘Ekoki kozala nini esalaki ete bámonisa te motema molai? Yango ebimiselaki bango makama nini?’ w23.08 25 par. 15
Mwamibale, 16 sanza ya 9
Biso tosili kondima mpe tosili koyeba ete ozali Mosantu ya Nzambe. —Yoa. 6:69.
Ntoma Petro azalaki sembo; atikaki eloko moko te elɛmbisa ye libela. Amonisaki bosembo na ye na libaku moko, ntango Yesu alobaki likambo moko oyo bayekoli na ye bakangaki ntina te. (Yoa. 6:68) Na esika bázela ndimbola ya maloba na ye, mingi batikaki kolanda Yesu. Kasi Petro asalaki bongo te. Ayebaki ete kaka Yesu nde azalaki “na maloba ya bomoi ya seko.” Yesu ayebaki ete Petro ná bantoma mosusu bakosundola ye. Kasi, Yesu alobaki ete ayebi ete Petro akozonga mpe akotikala sembo. (Luka 22:31, 32) Yesu ayebaki malamu ete “elimo ezali na molende, kasi nzoto ezali na bolɛmbu.” (Mrk. 14:38) Na yango, ata ntango Petro awanganaki ye, Yesu aboyaki ntoma yango te. Ntango asekwaki, abimelaki Petro, emonani ete ezalaki na ntango oyo Petro azalaki ye moko. (Mrk. 16:7; Luka 24:34; 1 Ko. 15:5) Na ntembe te, yango elendisaki mpenza ntoma yango oyo alɛmbaki nzoto! w23.09 22 par. 9-10
Mwamisato, 17 sanza ya 9
Esengo na bato oyo balimbisi misala na bango ya kobuka mibeko mpe oyo bazipi masumu na bango.—Rom. 4:7.
Nzambe alimbisaka to azipaka masumu ya baoyo bazali na kondima epai na ye. Ntango Yehova alimbisaka bango ndenge wana, atángaka lisusu masumu na bango te. (Nz. 32:1, 2) Amonaka bato yango ete bazangi mbeba mpe bazali sembo mpo na kondima na bango. Atako batángamaki bato ya sembo to bayengebene, Abrahama, Davidi, mpe basambeli mosusu ya sembo ya Nzambe bazalaki kaka bato ya masumu, bato ya kozanga kokoka. Kasi mpo na kondima na bango, Nzambe amonaki bango lokola bato oyo bazangi mbeba, mingimingi ntango akokanisi bango na bato oyo bazalaki na boyokani te elongo na ye. (Ef. 2:12) Ndenge ntoma Paulo amonisaki yango polele na mokanda na ye, moto asengeli kozala na kondima mpo akóma moninga ya Nzambe. Ezalaki bongo mpo na Abrahama ná Davidi. Biso mpe tokoki kozala baninga ya Nzambe soki tozali na kondima. w23.12 3 par. 6-7
Mwaminei, 18 sanza ya 9
tópesa Nzambe mbeka ya lisanzoli ntango nyonso, elingi koloba, mbuma ya mbɛbu na biso oyo ezali kosakola nkombo na ye polele.—Ebr. 13:15.
Lelo oyo, bakristo nyonso bazali na libaku kitoko ya kopesa Yehova bambeka na kosaleláká ntango, makasi, mpe biloko na bango mpo na matomba ya Bokonzi ya Nzambe. Tokoki komonisa botɔndi mpo na libaku kitoko oyo tozali na yango ya kosambela Yehova soki tozali kopesa ye bambeka na biso oyo eleki malamu. Ntoma Paulo alobeli makambo ndenge na ndenge ya losambo na biso oyo tosengeli kozongisa nsima te. (Ebr. 10:22-25) Makambo yango ezali: Kobondela Yehova, kosakwela basusu elikya na biso, koyangana na makita, mpe kolendisa basusu “mingi koleka awa tozali komona mokolo [ya Yehova] ezali kopusana.” Na nsuka ya mokanda ya Emoniseli, anzelu ya Yehova asaleli maloba oyo mbala mibale mpo na kobɛta nsɛtɛ: “Sambelá Nzambe!” (Em. 19:10; 22:9 ) Tiká ete tóbosana ata moke te mateya mozindo oyo etali tempelo monene ya elimo ya Yehova mpe libaku kitoko oyo tozali na yango ya kosambela Nzambe na biso monene! w23.10 29 par. 17-18
Mwamitano, 19 sanza ya 9
Tókoba kolingana.—1 Yoa. 4:7.
Biso nyonso tozali na mposa “tókoba kolingana.” Kasi, ezali na ntina tóbosana te ete Yesu alobaki “bolingo ya bato mingi ekokita.” (Mat. 24:12) Yesu alobaki te ete mingi ya bayekoli na ye bakotika kolingana. Kasi, tosengeli kozala ekɛngɛ mpo tókóma te na ezaleli ya kozanga bolingo oyo ezali lelo na mokili. Wana tobateli likanisi wana, tótalela sikoyo motuna oyo ya ntina: Nini ekoki kosalisa biso tóyeba soki bolingo na biso epai ya bandeko ezali makasi? Lolenge moko oyo ekosalisa biso tóyeba soki bolingo na biso ezali makasi ezali koyeba oyo tosalaka ntango tokutani na likambo moko. (2 Ko. 8:8) Ntoma Petro alobeli likambo moko, alobi: “Koleka nyonso, bólinganaka makasi, mpo bolingo ezipaka masumu ebele.” (1 Pe. 4:8) Na yango mabunga mpe kozanga kokoka ya basusu ekoki kosalisa biso tóyeba soki bolingo na biso mpo na bango ezali makasi. w23.11 10-11 par. 12-13
Mwapɔsɔ, 20 sanza ya 9
Bólinganaka bino na bino. —Yoa 13:34.
Tokokoka te kotosa etinda oyo Yesu apesaki ete tólinganaka soki tozali kolinga bandeko mosusu na lisangá, kasi basusu tozali kolinga bango te. Ya solo, tokoki kozala na baninga mosusu ya motema, ndenge Yesu mpe azalaki na bango. (Yoa. 13:23; 20:2) Kasi ntoma Petro akundweli biso ete tosengeli kosala makasi tózala na “bolingo ya bondeko” mpo na bandeko na biso nyonso ya mibali mpe ya basi; tómonaka ete tozali mpenza libota moko. (1 Pe. 2:17) Petro alendisi biso boye: “Bólinganaka makasi, na motema moko.” (1 Pe. 1:22) Na esika yango, kolinga “makasi” elimboli kolinga moto ata soki ezali mpasi tómonisela ye bolingo. Kanisá ete ndeko moko asali likambo oyo epesi biso nkanda to ezokisi biso! Motema ekoki kotinda biso tózongisa mabe na mabe na esika ya komonisa bolingo. Nzokande, Petro ayekolaki epai ya Yesu ete kozongisa mabe esepelisaka Nzambe te. (Yoa. 18:10, 11) Petro akomaki: “Bózongisaka mabe na mabe te, kofinga na kofinga mpe te. Kasi bózongisaka nde lipamboli.” (1 Pe. 3:9) Soki ozali na bolingo makasi, okozala na boboto mpe na limemya. w23.09 28-29 par. 9-11
Mwalomingo, 21 sanza ya 9
Basi mpe basengeli kozala bato oyo . . . oyo balekisaka ndelo te na bizaleli na bango, bato ya sembo na makambo nyonso.—1 Tim. 3:11.
Tokamwaka ndenge mwana aumelaka te mpo na kokóma mokóló. Emonanaka ete bokoli yango esalemaka yango moko. Kasi, kokola mpo na kokóma mokristo oyo akɔmɛli esalemaka yango moko ata moke te. (1 Ko. 13:11; Ebr. 6:1) Mpo na kokokisa mokano yango, tosengeli kozala na boyokani makasi mpenza na Yehova. Tozali mpe na mposa ya elimo santu ya Nzambe wana tozali kolona bizaleli oyo esepelisaka ye, koyekola makambo oyo ekosalisa biso, mpe komibongisa mpo na mikumba na mikolo ezali koya. (Mas. 1:5) Yehova asalaki moto mpo azala mobali to mwasi. (Eba. 1:27) Na yango, mwasi ná mobali bakeseni na nzoto, kasi bakeseni mpe na makambo mosusu. Na ndakisa, Yehova akelaki mwasi ná mobali mpo mokomoko akokisa mikumba oyo ebongi na ye; na yango basengeli na bizaleli mpe makoki oyo ekosalisa bango bákokisa mikumba na bango.—Eba. 2:18. w23.12 18 par. 1-2
Mwayambo, 22 sanza ya 9
Bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, bóbatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana.—Mat. 28:19.
Yesu alingaki ete bato básalela nkombo ya Tata na ye? Ɛɛ. Bakonzi mosusu ya mangomba ya ntango wana bazalaki komona ete nkombo ya Nzambe ezali mosantu mingi mpe esengeli kobenga yango te, kasi Yesu atikaki te ete makanisi wana oyo eyokanaki te na Makomami epekisa ye kokumisa nkombo ya Tata na ye. Tólobela ntango abikisaki mobali oyo azalaki na bademo na etúká ya Bageraza. Bato babangaki mingi mpe basɛngaki Yesu alongwa na mboka na bango, mpe alongwaki kuna. (Mrk. 5:16, 17) Atako bongo, Yesu alingaki nkombo ya Yehova eyebana kuna. Na yango, asɛngaki mobali oyo abikaki ayebisa bato, makambo oyo Yesu asalaki te, kasi nde oyo Yehova asalaki. (Mrk. 5:19) Lelo oyo mpe, alingi ete tóyebisa nkombo ya Tata na ye na mokili mobimba! (Mat. 24:14; 28:20) Ntango tosalaka yango, tosepelisaka Mokonzi na biso, Yesu. w24.02 10 par. 10
Mwamibale, 23 sanza ya 9
Ondimi komona mpasi mpo na nkombo na ngai.—Em. 2:3.
Ezali mpenza lipamboli ndenge tozali na ebongiseli ya Yehova na mikolo ya nsuka oyo ya yikiyiki. Wana makambo ya mokili ezali se kobeba, Yehova apesi biso libota ya elimo, ya bandeko mibali mpe bandeko basi oyo bazali na bomoko. (Nz. 133:1) Lisusu, asalisaka biso tózala na bomoi ya libota ya esengo. (Ef. 5:33–6:1) Mpe apesaka biso bososoli mpe bwanya oyo esengeli mpo tózala na kimya ya solosolo ya motema. Kasi, tosengeli kosala makasi mpo tókoba kosalela Yehova na bosembo. Mpo na nini? Mpo na bantango mosusu, basusu bakoki kosala makambo oyo ezokisi biso. Tokoki mpe kolɛmba nzoto mpo na mabunga na biso moko, mingimingi soki tosali libunga moko mbala na mbala. Osengeli kokoba kosalela Yehova (1) ntango ndeko moko ya lisangá azokisi yo, (2) ntango molongani na yo alɛmbisi yo nzoto, mpe (3) ntango olɛmbi nzoto mpo na mabunga na yo moko. w24.03 14 par. 1-2
Mwamisato, 24 sanza ya 9
Ata soki tokei liboso tii wapi, tókoba kaka kotambola na molɔngɔ na nzela moko wana.—Flp. 3:16.
Na bantango mosusu, okoyoka masolo ya bandeko mibali mpe bandeko basi oyo bazwaki ekateli ya kosala lisusu mingi na mosala ya Nzambe. Mbala mosusu bakɔtaki Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi, to bakendaki esika mposa ezali mingi. Soki okoki komityela mokano ya ndenge wana, salá yango. Basaleli ya Yehova basepelaka kosala mingi na mosala na ye. (Mis. 16:9) Bongo soki ozali na likoki te ya kosala mingi sikoyo? Kokanisa te ete baoyo bakoki kosala yango baleki yo. Bomoi ya bokristo esɛngi koyika mpiko. (Mat. 10:22) Komona mpamba te motuya ya mosala oyo ozali kosalela Yehova na kolanda makoki mpe makambo ya bomoi na yo. Yango ezali lolenge ya ntina mingi ya kokoba kolanda Yesu nsima ya batisimo.—Nz. 26:1. w24.03 10 par. 11
Mwaminei, 25 sanza ya 9
Alimbisaki biso mabunga na biso nyonso na boboto mpenza. —Kol. 2:13.
Tata na biso ya likoló alaki ete akolimbisa biso soki tobongoli motema. (Nz. 86:5) Na yango, soki toyoki mpenza mawa mpo na masumu oyo tosali, tokoki kondima ete Yehova alobaki solo, ete alimbisi biso. Tóbosana te ete Yehova azali mindɔndɔ to makambo makasimakasi te. Asɛngaka biso ata moke te tósala koleka oyo tokoki mpenza kosala. Asepelaka na nyonso oyo tosalaka mpo na ye, soki eyokani na makoki na biso. Lisusu, kanisá bandakisa ya Biblia ya bato oyo basalelaki Yehova na molimo na bango mobimba. Tólobela ntoma Paulo. Amipesaki na molende bambula mingi, asalaki mibembo ya milai mpe afungolaki masangá mingi. Atako bongo, ntango akokaki lisusu kosala mingi te na mosala ya kosakola, Nzambe atikaki nde kondima ye? Te. Paulo akobaki kosala oyo akokaki, mpe Yehova apambolaki ye. (Mis. 28:30, 31) Ndenge moko mpe, makambo oyo tokoki kosala mpo na Yehova ekoki kozala mingi to moke. Kasi, asepelaka mingi nde na ntina oyo tozali kosala yango. w24.03 27 par. 7, 9
Mwamitano, 26 sanza ya 9
Na ntɔngɔntɔngɔ, [Yesu] akendaki na esika oyo bato bazalaka te, mpe kuna abandaki kobondela.—Mrk. 1:35.
Mabondeli oyo Yesu asalaki epai ya Yehova, ezali ndakisa malamu oyo bayekoli na ye basengeli kolanda. Ntango azalaki awa na mabele, Yesu azalaki kobondela mbala na mbala. Asengelaki komityela ntango mpo na kobondela mpo azalaki na makambo mingi ya kosala mpe bato mingi bazalaki kolanda ye. (Mrk. 6:31, 45, 46) Azalaki kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpo azwa ntango ya kobondela na esika na ye moko. Mokolo moko, abondelaki butu mobimba mpo na kozwa ekateli moko ya ntina mingi. (Luka 6:12, 13) Lisusu, abondelaki mbala mingi na butu liboso akufa, wana azalaki kokanisa mpasi oyo ezalaki kozela ye na nsuka ya mosala na ye awa na mabele. (Mat. 26:39, 42, 44) Ndakisa ya Yesu eteyi biso ete, ezala tozali na makambo mingi ya kosala, tosengeli komityela ntango mpo na kobondela. Lokola Yesu, ekoki kosɛnga tótya programɛ mpo na kobondelaka, mbala mosusu na ntɔngɔntɔngɔ to na butu liboso ya kolala. Soki tosali bongo, tokomonisa Yehova ete tozali na botɔndi mpo na likabo kitoko oyo apesá biso. w23.05 3 par. 4-5
Mwapɔsɔ, 27 sanza ya 9
Bolingo ya Nzambe etondi na mitema na biso na nzela ya elimo santu, oyo apesi biso.—Rom. 5:5.
Simbá liloba “etondi” na mokapo ya lelo. Buku moko oyo elimbolaka maloba ya Biblia elobi ete ezali lokola nde “eyei kosopama lokola ebale.” Ezali maloba ya malamu mpenza mpo na komonisa bolingo monene oyo Yehova alingaka baoyo batyami mafuta! Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bayebi ete “Nzambe Tata alingaka” bango. (Yuda 1) Ntoma Yoane amonisaki mayoki ya bakristo yango ntango akomaki: “Bótala bolingo monene oyo Tata amoniseli biso, mpo tóbengama bana ya Nzambe!” (1 Yoa. 3:1) Bolingo ya Yehova esuki kaka na baoyo batyami mafuta? Te, Yehova amonisi ete alingaka mpe mokomoko na biso. Likambo nini ya monene emonisaka ete Yehova alingaka biso? Ezali lisiko, oyo emonisaka bolingo oyo eleki nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba!—Yoa. 3:16; Rom. 5:8. w24.01 28 par. 9-10
Mwalomingo, 28 sanza ya 9
Banguna na ngai bakozonga nsima na mokolo oyo nakobenga mpo na koluka lisalisi. Nazali kondima likambo oyo: Nzambe azali na ngámbo na ngai.—Nz. 56:9.
Mokapo ya lelo emonisi likambo moko oyo esalisaki Davidi alongola kobanga. Atako bomoi na ye ezalaki na likama, amanyolaki na makambo oyo Yehova akosala na nsima mpo na ye. Davidi ayebaki ete Yehova akobikisa ye na ntango oyo ebongi. Kutu, Yehova alobaki ete Davidi akokóma mokonzi ya Yisraele nsima ya Saulo. (1 Sa. 16:1, 13) Davidi ayebaki ete makambo oyo Yehova alakaki ekokokisama. Yehova alaki ete akosala nini mpo na yo? Tozelaka te ete Yehova abatela biso na mikakatano nyonso. Kasi ata soki okutani na komekama nini na mokili oyo, Yehova akolongola yango nyonso na mokili ya sika oyo ezali koya. (Yis. 25:7-9) Mozalisi na biso azali mpenza na nguya ya kosekwisa bakufi, ya kobikisa biso na nzoto mpe na makanisi, mpe ya kolongola banguna nyonso.—1 Yoa. 4:4. w24.01 6 par. 12-13
Mwayambo, 29 sanza ya 9
Esengo na moto oyo balimbisi likambo na ye ya kobuka mibeko, oyo bazipi lisumu na ye.—Nz. 32:1.
Kanisá ntina oyo omipesaki mpe ozwaki batisimo. Osalaki makambo wana mibale mpo olingaki kozala na ngámbo ya Yehova. Kobosana te makambo oyo esalisaki yo ondima ete ozwaki solo. Ozwaki boyebi ya sikisiki ya Yehova mpe obandaki komemya mpe kolinga ye lokola Tata na yo ya likoló. Okómaki na kondima mpe obongolaki motema. Motema na yo etindaki yo otika bizaleli ya mabe mpe oyokanisa bomoi na yo na mokano ya Nzambe. Oyokaki malamu ntango oyebaki ete Nzambe alimbisaki yo. (Nz. 32:2) Obandaki koyangana na makita ya lisangá mpe kosakola makambo kitoko oyo oyekolaki. Lokola ozali mokristo oyo amipesaki mpe azwaki batisimo, ozali sikoyo kotambola na nzela ya bomoi, mpe salá makasi okoba kotambola na nzela yango. (Mat. 7:13, 14) Tiká tótɛlɛma ngwi, mpe tókoba kolinga Yehova mpe kotosa mibeko na ye. w23.07 17 par. 14; 19 par. 19
Mwamibale, 30 sanza ya 9
Nzambe azali sembo, mpe akotika te ete bómekama koleka oyo bokoki kokangela motema. Ntango bomekami, Nzambe akobongisela bino nzela ya kobima mpo bózala na likoki ya koyikela yango mpiko.—1 Ko. 10:13.
Soki ozali kokanisa libondeli na yo ya komipesa na Yehova, okozwa makasi ya kotɛmɛla ata komekama nini. Na ndakisa, okoluka nde kozala seresere na moto oyo azali molongani na yo te? Okosala bongo te! Osilaki kolaka ete okosala makambo ya bongo te. Na ndenge yango, okomona te mpasi ya kolongola mayoki ya mbindo mpo esili kozwa misisa na motema na yo. ‘Okolongwa’ na “nzela ya basali-mabe.” (Mas. 4:14, 15) Soki okanisi lisusu ekateli makasi oyo Yesu azalaki na yango ya kosepelisa Tata na ye, okoboya nokinoki mpe na motema moko likambo nyonso oyo oyebi ete ekosepelisa te Nzambe oyo omipesá na ye. (Mat. 4:10; Yoa. 8:29) Kobosana te ete komekama mpe mikakatano epesaka moto libaku ya komonisa soki azali na ekateli ya ‘kokoba kolanda’ Yesu. Soki osali bongo, yebá ete Yehova akosalisa yo. w24.03 9-10 par. 8-10