Sanza ya 12
Mwayambo, 1 sanza ya 12
Na oyo etali lisekwa ya bakufi. —Luka 20:37.
Yehova azali mpenza na nguya ya kosekwisa bakufi? Ɛɛ, azali na yango! Azali “Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.” (Em. 1:8) Na yango, azali na nguya ya kolonga ata monguna ya ndenge nini, ezala mpe liwa. (1 Ko. 15:26) Ntina mosusu oyo endimisi biso ete Nzambe azali na likoki ya kosekwisa bakufi, ezali ete makanisi na ye ezangi nsuka. Abengaka monzoto mokomoko na nkombo na yango. (Yis. 40:26) Lisusu, abosanaka te baoyo bakufá. (Yobo 14:13; Luka 20:38) Akoki kobosana te ata makambo ya mikemike ya baoyo akosekwisa, ezala bilongi mpe bomoto na bango, makambo oyo basalaki ntango bazalaki na bomoi, mpe makanisi na bango. Ya solo, tosengeli kondimela elaka ya Yehova ya kosekwisa bato na mikolo ezali koya, mpo toyebi ete azali na mposa mpe na nguya ya kokokisa yango. Tótala ntina mosusu oyo tosengeli kondima ete Nzambe akosekwisa bato ndenge alaki yango: Yehova asilá kosekwisa bato. Na ntango ya kala, apesaki mwa basaleli na ye ya sembo, ata mpe Yesu nguya ya kosekwisa bakufi. w23.04 9-10 par. 7-9
Mwamibale, 2 sanza ya 12
Maloba na bino ezala ntango nyonso kitoko, eyeisama elɛngi na mungwa.—Kol. 4:6.
Soki tozali koloba na mayele mpe tomonisi motema pɛtɛɛ, bato bakondima koyoka biso mpe tokokoba kosolola. Kasi, soki moto alingi kaka kokweisa biso to azali kotyola bindimeli na biso, ntina ya kokoba koyanola ye ezali te. (Mas. 26:4) Kasi, bato ya ndenge wana bazalaka mpenza mingi te; bato mosusu, to kutu bato mingi bakosepela koyoka biso. Ya solo, tokozwa matomba mingi soki tomityeli mokano ya komonisa motema pɛtɛɛ. Bondelá Yehova apesa yo makasi oyo esengeli mpo okoba komonisa motema pɛtɛɛ ntango batuni yo mituna ya mindɔndɔ to batyoli bindimeli na yo. Kobosana te ete ezaleli na yo ya motema pɛtɛɛ ekoki kopekisa koswana ebima kaka mpo makanisi na bino ekeseni. Mpe eyano na yo ya boboto mpe ya limemya ekoki kotinda bato mosusu bábongola ndenge na bango ya kotalela biso mpe mateya ya Biblia. Zalá “ntango nyonso pene” mpo na kolobela bindimeli na yo, saláká yango “na boboto mpe na limemya makasi.” (1 Pe. 3:15) Ya solo, tiká motema pɛtɛɛ ezala makasi na yo! w23.09 19 par. 18-19
Mwamisato, 3 sanza ya 12
Bólata . . . motema molai.—Kol. 3:12.
Tótalela makambo minei oyo ekoki kosalisa biso tómonisa motema molai. Ya liboso, moto ya motema molai asilikaka noki te. Asalaka makasi abatela kimya mpe aboyaka kozongisa mabe ntango basusu batumoli ye to ntango azali na mitungisi. (Kob. 34:6) Ya mibale, moto ya motema molai azelaka na kimya nyonso. Soki likambo moko eumeli koleka ntango oyo akanisaki, moto ya motema molai asalaka makasi akóma te motema mɔtɔmɔtɔ to nkandankanda. (Mat. 18:26, 27) Ya misato, moto ya motema molai asalaka makambo mbangumbangu te. Ntango moto ya motema molai azali na mosala moko ya ntina mingi ya kosala, akendaka na yango mbangumbangu te mpo kaka esila noki. Kasi, alukaka koyeba soki azali mpenza na ntango mpo na kosala mosala yango malamu. Na yango, azwaka ntango oyo esengeli mpo na kosala mosala yango. Ya minei, moto ya motema molai ayebaka kokanga motema ntango amekami kozanga komilelalela. Asalaka nyonso oyo akoki mpo akoba koyika mpiko mpe abatela makanisi malamu ntango akutani na komekama. (Kol. 1:11) Lokola tozali bakristo, tosengeli komonisa motema molai na makambo wana nyonso. w23.08 20-21 par. 3-6
Mwaminei, 4 sanza ya 12
Yehova nde atalatalaka mitema.—Mas. 17:3.
Ntina ya libosoliboso oyo tosengeli kobatela motema na biso ya elilingi ezali ete Yehova atalaka mitema na biso. Yango elingi koloba ete amonaka makambo oyo bato bakoki komona te mpe ayebi lolenge ya bato oyo tozali mpenza. Akolinga biso soki totondisi makanisi na biso na toli na ye ya bwanya oyo ekosalisa biso tózala na bomoi ya seko. (Yoa. 4:14) Soki tosali bongo, tokobebisama soki moke te na bizaleli mabe, na lokuta ya Satana, mpe na mokili na ye. (1 Yoa. 5:18, 19) Soki tozali kopusana penepene na Yehova, tokokóma lisusu kolinga ye mingi mpe komemya ye makasi. Lokola tolingaka te kosilikisa Tata na biso, toboyaka ata kozala na likanisi ya kosala lisumu. Marta, ndeko mwasi moko na Croatie oyo amekamaki mpo na kosala pite, akomaki boye: “Ezalaki mpasi mpo nakanisa malamu mpe nabengana mposa ya kosala mabe. Kasi kobanga Yehova ebatelaki ngai.” Ndenge nini kobanga Nzambe ebatelaki ye? Marta alobi ete akanisaki na mozindo makama oyo ekateli ya mabe ekobimisa. Biso mpe tokoki kosala bongo. w23.06 20-21 par. 3-4
Mwamitano, 5 sanza ya 12
“Bikólo ekoyeba mpenza ete nazali Yehova, ntango nakosantisama na kati na bino na miso na bango,” Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki- Nyonso alobi bongo.—Ezk. 36:23.
Yesu ayebaki ete mokano ya Yehova ezali ya kosantisa nkombo na Ye, kosukola yango na makambo nyonso ya lokuta. Yango wana Moteyi na biso ateyaki bayekoli na ye bábondelaka ete: “Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama.” (Mat. 6:9) Yesu ayebaki ete yango nde likambo eleki monene oyo etali bozalisi nyonso. Ekelamu moko te ya mayele na molɔ́ngɔ́ mobimba asilá kosala mingi mpo na kosantisa nkombo ya Yehova koleka Yesu. Kasi ntango bakangaki Yesu, banguna bafundaki ye na likambo nini? Ete afingi Nzambe! Na ntembe te, Yesu azalaki komona ete kofinga to kolobela nkombo mosantu ya Tata na ye mabe ezali lisumu oyo eleki mabe. Abulunganaki mingi koyeba ete bakofunda ye ete asali lisumu yango mpe bakokatela ye etumbu. Ekoki kozala mpo na yango nde Yesu “azalaki kotungisama mingi mpenza” mwa bangonga liboso bákanga ye.—Luka 22:41-44. w24.02 11 par. 11
Mwapɔsɔ, 6 sanza ya 12
Ndako etongamaka na bwanya.—Mas. 24:3.
Na momekano na biso ya kopota mbangu mpo na bomoi, tosengeli kolinga Yehova mpe Yesu koleka bandeko na biso ya libota. (Mat. 10:37) Kasi yango elingi koloba te ete, tosengeli kosundola mikumba na biso na kati ya libota. Nzokande, mpo tóndimama na Nzambe mpe Yesu, tosengeli kokokisa mikumba na biso na kati ya libota. (1 Tim. 5:4, 8) Ntango tosalaka yango, tokómaka lisusu na esengo mingi. Oyo eleki ntina, Yehova ayebi ete libota ekozala na esengo ntango mwasi ná mobali bazali kolingana mpe komoniselana limemya, ntango baboti bazali kolinga mpe kobɔkɔla bana na bango, mpe ntango bana bazali kotosa baboti na bango. (Ef. 5:33; 6:1, 4) Ezala ozali na mokumba nini na libota, tyelá bwanya ya Biblia motema na esika ya kotya motema na mayoki, mimeseno, to makambo oyo bato ya mayele balobaka. Saleláká malamu mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia. Mikanda yango ezalaka na batoli oyo esalisaka biso tósalela mitinda ya Biblia. w23.08 28 par. 6-7
Mwalomingo, 7 sanza ya 12
Osengeli kotánga yango na mongongo ya nse butu moi, mpo otosa mpenza makambo nyonso oyo ekomami na kati na yango; mpo, na ndenge yango nde nzela na yo ekolonga mpe okosala makambo na bwanya.—Yos. 1:8.
Mwasi mokristo asengeli koyekola makambo oyo ekosalisa ye na bomoi. Makambo mosusu oyo mwana mwasi azali koyekola na bomwana ekokoba kosalisa ye bomoi na ye mobimba. Na ndakisa, yekolá kotánga mpe kokoma malamu. Na mimeseno ya bamboka mosusu, bamonaka ete ezali na ntina te basi báyekola kotánga mpe kokoma. Kasi, koyeba kotánga mpe kokoma ezali na ntina mingi mpo na mokristo nyonso. (1 Tim. 4:13) Na yango, kotika eloko moko te epekisa yo koyekola kotánga mpe kokoma malamu. Yango ekomemela yo matomba nini? Makoki ya ndenge wana ekoki kosalisa yo ozwa mosala mpe obatela yango. Okokóma moyekoli mpe moteyi malamu mpenza ya Liloba ya Nzambe. Oyo eleki, okokóma mpenza moninga ya penepene ya Yehova wana ozali kotánga Liloba na ye mpe komanyola yango.—1 Tim. 4:15. w23.12 20 par. 10-11
Mwayambo, 8 sanza ya 12
Yehova ayebi kobikisa na komekama bato oyo bakangami na ye. —2 Pe. 2:9.
Sɛngá Yehova asalisa yo okwea te soki omekami. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tobundaka ntango nyonso na mposa ya kosala mabe. Satana asalaka nyonso oyo akoki mpo tólonga te kosala malamu. Lolenge moko oyo asalelaka mpo na kobebisa makanisi na biso ezali kominanola ya mbindo. Kominanola ya ndenge wana ekoki kotondisa motó na biso na makanisi ya mbindo, mpe makanisi yango ekoki kokómisa biso mbindo liboso ya Yehova mpe kotinda biso tósala lisumu ya monene. (Mrk. 7:21-23; Yak. 1:14,15) Mpo tólonga komekama mpe tósala oyo ezali malamu, tozali na mposa ya lisalisi ya Yehova. Yesu alobelaki likambo yango na libondeli ya ndakisa. Alobaki boye: “Salisá biso tókwea na komekama te, kasi bikisá biso na moto mabe.” (Mat. 6:13) Yehova azalaka na mposa ya kosalisa biso, kasi tosengeli naino kosɛnga ye yango. Tosengeli mpe kosala makambo oyo eyokani na libondeli na biso. w23.05 6-7 par. 15-17
Mwamibale, 9 sanza ya 12
Nsinga oyo esalemi na bansinga misato ekatanaka nokinoki te.—Mos. 4:12.
Soki mwasi ná mobali bazali kozwa boyokani na bango ná Tata na bango ya likoló na motuya mingi, bakosalela na motema mobimba toli oyo azali kopesa bango, mpe yango ekosalisa bango báboya mpe bálonga mikakatano oyo ekoki kosala ete bolingo na bango ekita. Bato ya elimo basalaka makasi bámekola Yehova mpe bámonisa bizaleli na ye, na ndakisa, boboto, motema molai, mpe ezaleli ya kolimbisa. (Ef. 4:32–5:1) Soki mwasi ná mobali bazali komonisa bizaleli yango, ekozala mpasi te mpo bolingo na bango ekola. Ndeko mwasi moko na nkombo Lena, oyo asali mbula koleka 25 na libala alobi boye, “Ezalaka mpasi te kolinga mpe komemya moto ya elimo.” Tótalela ndakisa moko ya Biblia. Ntango Yehova asengelaki kopona mwasi ná mobali moko oyo bakozala baboti ya Masiya, aponaki Yozefe ná Maria, na kati ya bakitani mingi ya Davidi. Mpo na nini? Bango nyonso mibale bazalaki na boyokani ya malamu elongo na Yehova, mpe Yehova ayebaki ete bakotya ye na esika ya liboso na libala na bango. w23.05 21 par. 3-4
Mwamisato, 10 sanza ya 12
Bótosaka baoyo bazali kokamba bino.—Ebr. 13:17.
Mokonzi na biso Yesu azali moto ya kokoka, kasi bato oyo azali kosalela mpo na kokamba biso awa na mabele, bazali bato ya kokoka te. Ekoki kozala mpasi tótosa bango, mingimingi soki basɛngi biso tósala likambo oyo tolingi kosala te. Na libaku moko, ntoma Petro azalaki na mokakatano mpo na kotosa. Ntango anzelu moko ayebisaki ye alya banyama oyo Mobeko ya Moize elobaki ete ezali mbindo, Petro aboyaki kotosa—kaka mbala moko te, kasi mbala misato mobimba! (Mis. 10:9-16) Mpo na nini? Malako wana ya sika ekɔtaki ye te. Na ngambo mosusu, ntoma Paulo atosaki ntango bankulutu ya Yerusaleme basɛngaki ye akende na tempelo ná mibali minei mpe asala molulu ya komipɛtola mpo na komonisa ete azalaki kotosa Mobeko. Paulo ayebaki ete bakristo bazalaki lisusu na nse ya Mobeko te. Lisusu, asalaki eloko moko ya mabe te. Atako bongo, Paulo “amemaki mibali yango mpe amipɛtolaki elongo na bango na ndenge milulu ezalaki kosɛnga.” (Mis. 21:23, 24, 26) Botosi ya Paulo elendisaki bomoko kati na bandeko.—Rom. 14:19, 21. w23.10 10 par. 15-16
Mwaminei, 11 sanza ya 12
Yehova azali moninga ya motema ya baoyo babangaka ye.—Nz. 25:14.
Ekoki kozala ete okanisaka ata moke te ete kobanga ezali ezaleli ya ntina mingi oyo ekoki kosalisa moto azala na boninga ya malamu. Kasi, baoyo balingi kozala na boninga ya penepene ná Yehova basengeli ‘kobanga ye.’ Ezala tosali bambula boni na mosala ya Yehova, biso nyonso tosengeli kokoba kobanga ye na ndenge ya malamu. Kasi kobanga Nzambe elimboli nini? Moto oyo abangaka Nzambe na ndenge ya malamu alingaka ye mpe alingaka te kosala likambo nyonso oyo ekobebisa boyokani na ye ná Yehova. Ndenge wana nde Yesu azalaki “kobanga Nzambe.” (Ebr. 5:7) Azalaki kobanga Yehova na ndenge ya mabe te. (Yis. 11:2, 3) Kutu, azalaki nde kolinga ye mingi mpe kosepela kotosa ye. (Yoa. 14:21, 31) Lokola Yesu, tozalaka na limemya makasi epai ya Yehova mpe tobangaka ye mpo azali bolingo, azali sembo, azali na bwanya mpe na nguya. Toyebi mpe ete Yehova alingaka biso mingi mpenza mpe atyaka likebi na makambo oyo tosalaka ntango ateyaka biso. Yango wana, ntango tosalaka makambo oyo esepelisaka Yehova ayokaka esengo, kasi ntango tosalaka makambo oyo esepelisaka ye te, ayokaka mawa.—Nz. 78:41; Mas. 27:11. w23.06 14 par. 1-2; 15 par. 5
Mwamitano, 12 sanza ya 12
Ntango kaka akómaki makasi, motema na ye ekómaki na lolendo mpe yango ememelaki ye libebi. Bongo azangaki bosembo epai ya Yehova Nzambe.—2 Nt 26:16.
Ntango Mokonzi Uzia akómaki na nguya mingi, abosanaki ete Yehova nde apesaki ye makasi mpe bozwi. Liteya ezali nini? Tosengeli kobosanaka te ete mapamboli mpe mikumba oyo tozwaka, Yehova nde apesaka biso yango. Na esika ya komikumisa mpo na oyo tosali, tosengeli nde kopesa Yehova lokumu mpo na makambo oyo tolongi kokokisa. (1 Ko. 4:7) Tosengeli kondima na komikitisa nyonso ete tozali bato ya kozanga kokoka mpe tozalaka na mposa básembola biso. Ndeko mobali moko oyo azali na bambula 60, akomaki boye: “Nayekolá koboya komizwa na valɛrɛ mingi. Ntango basemboli ngai mpo na libunga oyo nasali, ntango mosusu lokola mwana moke, nasalaka makasi nabongisa mpe nakoba kokende liboso.” Ya solo, soki tozali kobanga Yehova mpe tozali ntango nyonso na komikitisa, tokozala na bomoi ya esengo.—Mas. 22:4. w23.09 10 par. 10-11
Mwapɔsɔ, 13 sanza ya 12
Bosengeli kozala na ezaleli ya koyika mpiko, mpo nsima ya kosala mokano ya Nzambe, bózwa eloko oyo alakaki.—Ebr. 10:36.
Bakristo mingi na eleko ya ntoma Paulo basengelaki koyika mpiko. Longola mikakatano oyo bato nyonso bazalaki kokutana na yango na ntango wana, bazalaki mpe na mikakatano mosusu oyo etali bango mpo bazalaki bakristo. Mingi na bango bazalaki konyokola bango, kaka na bakonzi ya Bayuda mpe ya Roma te kasi mpe na bato ya mabota na bango moko. (Mat. 10:21) Longola yango, na kati ya lisangá, ntango mosusu basengelaki kotɛmɛla bapɛngwi mpe mateya na bango oyo ekɔtisaka bokabwani. (Mis. 20:29, 30) Atako bongo, bakristo yango bayikaki mpiko. (Em. 2:3) Nini esalisaki bango? Bakanisaki na bandakisa ya basaleli mosusu ya Yehova oyo bayikaki mpiko, na ndakisa, Yobo. (Yak. 5:10, 11) Babondelaki mpo na kozwa makasi. (Mis. 4:29-31) Mpe batyaki makanisi na bango nyonso na mapamboli oyo bakozwa soki bakobi koyika mpiko. (Mis. 5:41) Biso mpe tokoki koyikela mikakatano mpiko soki tozali koyekola mpe komanyola na bandakisa oyo ezali na Biblia mpe na mikanda na biso, oyo elobeli basaleli ya Yehova oyo bayikaki mpiko. w23.07 3 par. 5-6
Mwalomingo, 14 sanza ya 12
Boye, bókoba koluka liboso Bokonzi mpe bosembo na ye, mpe bakobakisela bino biloko nyonso wana mosusu.—Mat. 6:33.
Yehova ná Yesu bakosundola biso te. Ntoma Petro asengelaki kozwa ekateli moko monene nsima ya kowangana Kristo. Akolɛmbisa mabɔkɔ libela, to akokoba kozala moyekoli ya Kristo? Yesu abondelaki Yehova ete kondima ya Petro elɛmba te. Yesu ayebisaki Petro libondeli yango mpe ayebisaki ye ete atye motema ete na nsima Petro akolendisa bandeko na ye. (Luka 22:31, 32) Na ntembe te, Petro azalaki kozwa mpiko ntango azalaki kokanisa maloba yango ya Yesu! Ntango tosengeli kozwa ekateli moko ya monene na bomoi na biso, Yehova akoki kosalela babateli ya mpate ya bolingo mpo báyebisa biso makambo oyo ekosalisa biso tótikala sembo. (Ef. 4:8, 11) Ndenge kaka Yehova akokisaki bamposa ya mosuni ya Petro mpe ya bantoma mosusu, akosala mpe bongo mpo na biso ntango totye mosala ya kosakola na esika ya liboso na bomoi na biso. w23.09 24-25 par. 14-15
Mwayambo, 15 sanza ya 12
Moto oyo amoniselaka moto mpamba boboto azali kodefisa Yehova, mpe akofuta ye mpo na oyo azali kosala.—Mas. 19:17.
Yehova amonaka ata likambo ya moke ya boboto oyo tosalelaka basusu. Atalelaka yango lokola mbeka ya motuya mpe nyongo oyo akofuta. Soki kala ozalaki nkulutu to mosaleli na misala, Yehova abosani te mosala makasi oyo osalá mpe bolingo oyo etindaki yo osala mosala yango. (1 Ko. 15:58) Atyaka mpe likebi na bolingo oyo ozali kokoba komonisa ata lelo oyo. Yehova alingi biso nyonso tókóma lisusu kolinga ye mpe basusu mingi. Tokoki kokómisa makasi bolingo na biso mpo na Yehova soki tozali kotánga mpe komanyola Liloba na ye mpe kosololaka na ye mbala na mbala na libondeli. Tokoki kokolisa bolingo na biso mpo na bandeko na biso soki tozali kosunga bango na makambo ndenge na ndenge. Wana bolingo na biso ezali kokola, tokopusana lisusu penepene na Yehova mpe na bandeko na biso bakristo. Mpe boninga na biso ekozala mpo na libela na libela! w23.07 10 par. 11; 11 par. 13; 13 par. 18
Mwamibale, 16 sanza ya 12
Moto na moto akomema mokumba na ye moko.—Gal. 6:5.
Mokristo mokomoko asengeli kopona ndenge ya kobatela nzoto na ye kolɔngɔnɔ. Ntango bakristo baponaka lisalisi ya minganga, bazalaka na mposa ya mibeko ya Biblia mpo na kokoba koboya makila mpe misala ya bilimo mabe. (Mis. 15:20; Gal. 5:19, 20) Kasi na makambo mosusu, bakoki kopona bango moko lisalisi nini ya minganga bakondima kozwa. Ata soki tondimaka lolenge nini ya lisalisi, tosengeli komemya lotomo ya bandeko na biso ya kozwa bango moko bikateli na oyo etali bokɔlɔngɔnɔ na bango ya nzoto. Mpo na yango, tosengeli kobosana te makambo oyo minei: (1) Kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa maladi nyonso mpo na libela. (Yis. 33:24) (2) Mokristo nyonso asengeli ‘komindimisa mpenza’ nini eleki malamu mpo na ye. (Rom. 14:5) (3) Tosambisaka basusu te to totyaka eloko moko te oyo ekobɛtisa bango libaku. (Rom. 14:13) (4) Bakristo bamonisaka bolingo mpe bamonaka ete bomoko ya lisangá ezali na ntina mingi koleka makambo oyo basepelaka na yango.—Rom. 14:15, 19, 20. w23.07 24 par. 15
Mwamisato, 17 sanza ya 12
Azali mosantu mpo na Yehova mikolo nyonso ya Bonaziri na ye.—Mit. 6:8
Ozwaka na motuya boyokani na yo ná Yehova? Na ntembe te ezali bongo! Banda na ntango ya kala, bato mingi balingaka Yehova lokola yo. (Nz. 104:33, 34) Mingi bamipimelaka makambo mosusu ya bomoi mpo na kosambela Yehova. Ezalaki mpe bongo mpo na basaleli ya Nzambe na Yisraele ya kala, oyo bazalaki kobengama Banaziri to moto oyo amipesi. Liloba yango ebongi mpenza mpo na kolobela Bayisraele ya molende oyo bamipimelaki makambo mosusu mpo na kosalela Yehova na ndenge mosusu. Mibeko ya Moize epesaki mobali to mwasi nyonso nzela ya kosala elako epai ya Yehova ete aponi kozala na bomoi ya Monaziri na boumeli ya ntango moko boye. (Mit. 6:1, 2) Moto oyo asali elako yango, to elaka monene, asengelaki kosala makambo oyo Bayisraele mosusu basɛngisamaki kosala te. Boye, mpo na nini Moyisraele akokaki kopona kosala elako ya Bonaziri? Na ntembe te, bolingo makasi mpo na Yehova mpe botɔndi mpo na ebele ya mapamboli na Ye nde ezalaki kotinda Moyisraele asala elako yango.—Mib. 6:5; 16:17. w24.02 14 par. 1-2
Mwaminei, 18 sanza ya 12
Yehova . . . amonisaka bolingo ya sembo epai ya baoyo balingaka ye mpe batosaka mitindo na ye.—Dan. 9:4.
Na Biblia, liloba ya Ebre oyo elimboli “bosembo,” to “bolingo ya sembo,” epesaka likanisi ete Nzambe amonisaka ezaleli yango kaka epai ya bato oyo balingaka ye mpe basalelaka ye. Kaka liloba yango mpe esalelamaka mpo na kolobela bolingo oyo basaleli ya Nzambe bamoniselanaka. (2 Sam. 9:6, 7) Bosembo na biso ekoki kokóma lisusu makasi ntango nyonso. Talá ndenge Danyele akangamaki lisusu makasi na bosembo na ye. Bosembo ya Danyele epai ya Yehova emekamaki na boumeli ya bomoi na ye mobimba. Kasi emekamaki lisusu makasi koleka ntango akómaki na mbula koleka 90. Bato oyo bazalaki kosala na ndako ya mokonzi bazalaki kosepela na Danyele te mpe bazalaki komemya ye mpenza te mpo na Nzambe oyo azalaki kosambela. Yango wana, basalaki mwango mabe mpo na koboma Danyele. Basalaki ete mokonzi atya sinyatire na mobeko moko oyo esengelaki komeka soki Danyele akotikala sembo epai ya Nzambe na ye to epai ya mokonzi. Mpo Danyele amonisa bosembo na ye epai ya Mokonzi asengelaki kotika kosambela Yehova na boumeli ya mikolo 30. Danyele aponaki kotikala sembo epai ya Yehova.—Dan. 6:12-15, 20-22 w23.08 5 par. 10-12
Mwamitano, 19 sanza ya 12
Tókoba kolingana.—1 Yoa. 4:7.
Yehova alingi ete tókoba kolinga bandeko nyonso ya lisangá. Soki ndeko moko azangi bizaleli mosusu ya bokristo, tómona kaka ete apesi biso mpasi na nko te mpe ete asalaka makasi alanda mitinda ya Biblia. (Mas. 12:18) Nzambe alingaka basaleli na ye ya sembo atako mabunga na bango. Abwakaka biso te ntango tosali mabunga; akangelaka mpe biso nkanda mpo na libela te. (Nz. 103:9) Ezali na ntina mingi tómekola Tata na biso oyo ayebi kolimbisa! (Ef. 4:32–5:1) Tóbosana mpe te ete lokola nsuka ekómi pene, tosengeli kozala na bomoko na bandeko nyonso. Mbala mosusu botɛmɛli ekoya makasi. Bakoki kutu kokɔtisa biso bolɔkɔ mpo na kondima na biso. Soki likambo ya bongo esalemi, tokozala mpenza na mposa makasi ya bandeko na biso.—Mas. 17:17. w24.03 15-16 par. 6-7
Mwapɔsɔ, 20 sanza ya 12
Matambe ya moto etambwisami na Yehova.—Mas. 20:24.
Biblia ezali na masolo ya bilenge oyo bapusanaki penepene na Yehova, asepelaki na bango, mpe yango esalaki ete bázala na bomoi ya esengo. Moko na bango ezali Davidi. Ntango azalaki elenge, Davidi aponaki kosambela Nzambe mpe na nsima akómaki mokonzi moko ya sembo. (1 Bak. 3:6; 9:4, 5; 14:8) Soki oyekoli lisolo ya bomoi ya Davidi mpe ndenge asalelaki Nzambe na bosembo, yango ekolendisa yo mpe osala bongo. Okoki mpe koyekola masolo ya bomoi ya Marko to ya Timote na mozindo. Okomona ete basalelaki Yehova banda na bolenge na bango, asepelaki na bango. Ndenge oyo bomoi na yo ekozala etaleli ndenge oyo ozali kosalela yango sikoyo. Soki ozali kotyela Yehova motema kasi mayele na yo moko te, akotambwisa yo mpe okozwa bikateli ya malamu. Okoki kozala na bomoi ya esengo mpe ya malamu mpenza. Kobosana te, Yehova azwaka na motuya makambo oyo osalelaka ye. Kosalela Tata na biso ya likoló, oyo atondi na bolingo, nde lolenge eleki malamu ya kosalela bomoi na yo! w23.09 13 par. 18-19
Mwalomingo, 21 sanza ya 12
Bókoba . . . kolimbisana na motema moko.—Kol. 3:13.
Ntoma Paulo ayebaki ete bandeko na ye bakristo bazali bato ya kozanga kokoka. Na ndakisa, bandeko mosusu bakaniselaki ye mabe ntango akómaki moyekoli ya Yesu. (Mis. 9:26) Na nsima, basusu batɔngaki ye mpo na kobebisa lokumu na ye. (2 Ko. 10:10) Paulo amonaki ndenge ndeko moko oyo azali na mikumba azwaki ekateli ya mabe oyo mbala mosusu ebɛtisaki basusu libaku. (Gal. 2:11, 12) Mpe moko ya moninga ya Paulo ya mosala, Marko, asalaki likambo moko oyo elɛmbisaki ye mpenza nzoto. (Mis. 15:37, 38) Paulo akokaki kotika moko ya makambo yango etinda ye akabwana na bato oyo bapesaki ye mpasi. Kasi, akobaki kotalela bandeko nyonso na ndenge ya malamu mpe abatelaki molende na ye na mosala ya Yehova. Nini esalisaki Paulo akoba? Paulo azalaki kolinga bandeko nyonso. Bolingo na ye mpo na basusu esalisaki ye atya likebi na mabunga na bango te, kasi nde na bizaleli na bango ya malamu. Bolingo esalisaki mpe Paulo asala likambo oyo mokapo ya mokolo ya lelo elobeli. w24.03 15 par. 4-5
Mwayambo, 22 sanza ya 12
Moombo ya Nkolo asengeli kowelana te, kasi asengeli nde kozala na boboto na bato nyonso.—2 Tim. 2:24.
Biblia elobeli masolo mingi oyo emonisi ntina ya ezaleli ya motema pɛtɛɛ. Tózwa ndakisa ya Yisaka. Ntango azalaki kofanda na Gerare, na teritware ya Bafilistia, bato ya esika yango bayokelaki ye likunya mpe bakundaki mabulu ya mai oyo basaleli ya tata na ye batimolaki. Na esika Yisaka abunda mpo na mabulu na ye, amemaki libota na ye mosika mpe atimolaki mabulu mosusu ya mai kuna. (Eba. 26:12-18) Kasi Bafilistia balobaki ete mai ya esika yango mpe ezalaki ya bango. Atako bongo, Yisaka alukaki kotya kimya. (Eba. 26:19-25) Nini esalisaki ye akoba komonisa motema pɛtɛɛ atako emonanaki ete basusu bazalaki kosala nyonso mpo na kosilikisa ye? Na ntembe te amonaki ndakisa ya baboti na ye, ayekolaki ndenge Abrahama azalaki kosilisa makambo na kimya mpe ayebaki “elimo ya kimya mpe ya boboto” oyo Sara azalaki na yango.—1 Pe. 3:4-6; Eba. 21:22-34. w23.09 15 par. 4
Mwamibale, 23 sanza ya 12
Nakani yango, mpe nakosala yango.—Yis. 46:11.
Na bolingo na ye, Yehova atindaki Mwana na ye ya liboso na mabele mpo na koteya bato makambo etali Bokonzi yango mpe kopesa bomoi na ye lisiko mpo na kosikola biso na lisumu mpe na liwa. Na nsima, Yesu asekwaki mpe azongaki na likoló mpo na koyangela lokola Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe. Motó ya likambo monene ya Biblia ezali ete nkombo ya Yehova ekolongisama wana akokokisa mokano na ye mpo na mabele na nzela ya Bokonzi na ye oyo Kristo azali koyangela. Mokano ya Yehova ekoki kobongwana te. Alaki ete akokokisa yango kaka ndenge alobaki. (Yis. 46:10, msl.; Ebr. 6:17, 18) Na nsima, mabele ekobongwana paradiso, esika oyo bakitani ya Adama oyo bakozala bato ya kokoka mpe ya sembo ‘bakosepela na bomoi mpo na libela.’ (Nz. 22:26) Kasi, Yehova azali na mokano moko monene koleka. Mokano monene ya Yehova ezali ya kosangisa na bomoko bikelamu na ye nyonso ya mayele ya likoló mpe ya mabele. Na ntango yango, baoyo nyonso bakozala na bomoi bakozala sembo mpe bakotosa Mokonzi oyo aleki nyonso, Yehova. (Ef. 1:8-11) Ezali kokamwisa mpenza komona ndenge oyo Yehova azali kokokisa malamu mokano na ye! w23.10 20 par. 7-8
Mwamisato, 24 sanza ya 12
“Zalá makasi, . . . mpo nazali elongo na bino,” Yehova ya mampinga alobi bongo.—Hag. 2:4.
Ntango Bayuda oyo balongwaki na Babilone bakómaki na Yerusaleme, eumelaki te bakutanaki na mikakatano ya mbongo, kobeba ya makambo ya politiki mpe botɛmɛli. Na yango ezalaki mpasi mpo basusu bátya mosala ya kotonga lisusu tempelo ya Yehova na esika ya liboso. Yango wana, Yehova atindaki basakoli mibale, Hagai ná Zekaria, básalisa Bayisraele yango bázongela molende na bango, mpe esalisaki bango mpenza. (Hag. 1:1; Zek. 1:1) Kasi, pene na bambula 50 na nsima, Bayuda bazalaki lisusu na mposa ya kolendisama. Na nsima, Ezera, mosali-bakopi ya Mobeko, alongwaki na Babilone mpe ayaki na Yerusaleme mpo na kolendisa bato ya Nzambe bátya losambo ya Yehova na esika ya liboso. (Ezr. 7:1, 6) Kaka ndenge bisakweli ya Hagai ná Zekaria esalisaki basaleli ya Nzambe na kala bákoba kotyela Yehova motema na ntango ya botɛmɛli, ekoki mpe kosalisa biso lelo oyo na mikakatano oyo tozali kokutana na yango.—Mas. 22:19. w23.11 14-15 par. 2-3
Mwaminei, 25 sanza ya 12
Bólata bolingo, mpo ezali ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.—Kol. 3:14.
Ndenge nini tomonisaka ete tolingaka bandeko na biso? Lolenge moko oyo tosalaka yango ezali ya kobɔndisa bango. Tokozala na likoki ya ‘kokoba kobɔndisana’ soki tozali na motema mawa epai ya basusu. (1 Tes. 4:18) Ndenge nini tokoki kokoba kolingana makasi? Soki tozali kosala nyonso mpo na kolimbisa mabunga ya basusu. Mpo na nini ezali mpenza na ntina lelo oyo tómoniselanaka bolingo? Talá ntina oyo Petro apesi: “Nsuka ya makambo nyonso ekómi pene. Yango wana, . . . bólinganaka makasi.” (1 Pe. 4:7, 8) Lokola nsuka ya mokili mabe oyo ekómi mpenza pene, tokoki komizela na nini? Ntango azalaki kolobela bayekoli na ye, Yesu asakolaki ete: “Bikólo nyonso ekoyina bino mpo na nkombo na ngai.” (Mat. 24:9) Mpo na koyikela koyinama wana mpiko, tozali na mposa ya kozala na bomoko. Soki tozali kolinga bandeko na biso, Satana akolonga ata moke te kokabola biso, mpo bolingo nde esangisi biso.—Flp. 2:1, 2. w23.11 13 par. 18-19
Mwamitano, 26 sanza ya 12
Tozali bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe.—1 Ko. 3:9.
Solo ya Liloba ya Nzambe ezali na nguya mingi. Ntango toteyaka bato makambo ya Yehova mpe bizaleli na ye, tomonaka likambo ya kokamwa. Miso ya bato oyo ezipamaki na lokuta ya Satana ekómaka kofungwama mokemoke, mpe bakómaka komona Tata na biso ya bolingo ndenge biso tomonaka ye. Bakamwaka mpenza nguya na ye oyo ezangi nsuka. (Yis. 40:26) Bayekolaka kotyela ye motema mpo na bosembo na ye ya kokoka. (Mib. 32:4) Bayebaka makambo mingi na lisalisi ya bwanya na ye monene. (Yis. 55:9; Rom. 11:33) Mpe babɔndisamaka na koyeba ete azali bolingo. (1 Yoa. 4:8) Wana bazali kopusana penepene na Yehova, elikya na bango ya kozala na bomoi libela na libela lokola bana na ye ekómaka makasi. Ezali mpenza lokumu monene kosalisa bato bápusana penepene na Tata na bango! Ntango tosali bongo, Yehova amonaka ete tozali “bato oyo bazali kosala elongo” na ye.—1 Ko. 3:5. w24.02 12 par. 15
Mwapɔsɔ, 27 sanza ya 12
Malamu osala elako te na esika osala yango mpe okokisa yango te.—Mos. 5:5.
Soki ozali koyekola Biblia to ozali kobɔkwama na baboti oyo bazali Batatoli ya Yehova, ozali kokanisa kozwa batisimo? Ezali mokano moko ya malamu mpenza! Kasi liboso ya kozwa batisimo, osengeli komipesa na Yehova. Ndenge nini moto amipesaka na Yehova? Mpo na komipesa, okosala libondeli mpo na kolaka Yehova ete okosambela kaka ye mpe okotya mokano na ye na esika ya liboso na bomoi na yo. Elingi koloba ete olaki Yehova ete okokoba kolinga ye “na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na makanisi na yo nyonso, mpe na makasi na yo nyonso.” (Mrk. 12:30) Libondeli ya komipesa esalemaka na miso ya bato te; etali kaka yo ná Yehova. Kasi, batisimo esalemaka na miso ya bato; emonisaka bato ete osilaki komipesa na Yehova. Komipesa ezali elako moko mosantu, mpe Yehova azelaka ete okokisa yango, kaka ndenge yo mpe olingaka kokokisa yango.—Mos. 5:4. w24.03 2 par. 2; 3 par. 5
Mwalomingo, 28 sanza ya 12
Mokomoko na bino asengeli kolinga mwasi na ye ndenge amilingaka ye moko; mpe mwasi asengeli kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye.—Ef. 5:33.
Makambo ezangaka te na libala nyonso. Biblia elobi polele ete bato oyo babali bakokutana na “mikakatano na bomoi na bango.” (1 Ko. 7:28) Mpo na nini? Mpo libala esangisaka bato mibale ya kozanga kokoka, moto na moto na bizaleli na ye, makambo oyo alingaka, mpe oyo alingaka te. Ekoki mpe kozala ete mwasi ná mobali bautá na mimeseno moko te to babɔkwamá ndenge moko te. Kendekende, bakoki kobimisa bizaleli mosusu oyo emonanaki te liboso bábalana. Makambo oyo tolobeli ekoki kobimisa matata. Na esika bándima ete mokomoko azali na mbeba mpe na nsima básala makasi básilisa yango, bakoki kobanda kopesana foti. Bakoki kutu komona ete malamu bákabwana to báboma libala. Kasi kosundola libala nde ekobongisa makambo? Te. Yehova asɛngi bato oyo babalá bátosa ebongiseli ya libala ata soki molongani na bango azali na bizaleli mabe. w24.03 16 par. 8; 17 par. 11
Mwayambo, 29 sanza ya 12
Elikya yango eyokisaka nsɔni te.—Rom. 5:5.
Nsima ya komipesa na Nzambe mpe kozwa batisimo, elikya na yo ya kozala na bomoi libela na libela na paradiso awa na mabele ezalaki se kokóma makasi wana okobaki koyekola makambo mosusu mingi mpe kokola na elimo. (Ebr. 5:13–6:1) Na ntembe te omonaki bosolo ya likambo oyo Baroma 5:2-4 elobeli. Okutanaki na mikakatano ndenge na ndenge, kasi oyikelaki yango mpiko mpe omonaki ete Nzambe andimi yo. Lokola oyebi ete Nzambe azali kosepela na yo, sikoyo ozali na ntina mingi lisusu ya kozela kozwa makambo oyo alakaki. Elikya na yo ekómi makasi mingi koleka ndenge ezalaki liboso. Ekómi eloko ya solo mpo na yo, likambo na yo mpenza. Ekómi kotambwisa likambo mokomoko ya bomoi na yo, ebongoli ndenge na yo ya kosalela bato ya libota na yo makambo, ndenge na yo ya kozwa bikateli, mpe ata ya kosalela ntango na yo. Ntoma Paulo abakisaki likambo mosusu ya ntina na oyo etali elikya oyo okómi na yango nsima ya kondimama na Nzambe. Alobi ete elikya na yo ekokokisama.—Rom. 15:13. w23.12 12-13 par. 16-19
Mwamibale, 30 sanza ya 12
[Yehova] moto asalaka ete ozwa libateli.—Yis. 33:6.
Ntango tozali kolekisa ntango moko ya mpasi, mayoki, makanisi, to mpe makambo oyo tozali kosala ezalaka mpenza na bokatikati te. Tokoki komona lokola nde mayoki na biso ezali kokatisa mbonge. Ndenge nini Yehova asalisaka biso ntango mayoki na biso ezali kimya te? Yehova ayebisi biso ete akosala ete tózwa libateli, elingi koloba tótɛngatɛnga te. Soki masuwa ekutani na mopɛpɛ makasi, ekoki kobanda koningana makasi ngámbo na ngámbo. Mpo na kopekisa likambo yango, batyaka biloko mibale na eteni ya nse ya masuwa ngámbo na ngámbo mpo na kosimba yango. Biloko yango ekoki kosalisa masuwa mpo eningana mingi te, mpe bato oyo bazali na kati bayokaka ete babatelami mpe babangaka te. Kasi, biloko yango oyo batyaka na nse ya masuwa esalaka malamu koleka soki masuwa ezali kotambola. Ndenge moko mpe, Yehova akosalisa biso tóyoka ete tobatelami wana tozali kokoba kosalela ye na bosembo na ntango ya komekama. w24.01 22 par. 7-8
Mwamisato, 31 sanza ya 12
Natyeli Nzambe motema; nakobanga te.—Nz. 56:4.
Ntango ozali kobanga, omituna boye, ‘makambo nini Yehova asili kosala?’ Kanisá biloko oyo akelá. Na ndakisa, ntango tozali ‘kotala malamumalamu’ ndenge oyo Yehova aleisaka bandɛkɛ mpe abatelaka fololo—oyo kutu ekelamaki na elilingi na ye te mpe ezali na likoki ya kosambela ye te, tokotya lisusu motema mingi ete akokokisa mpe bamposa na biso. (Mat. 6:25-32) Kanisá mpe makambo oyo Yehova asalelá basaleli na ye. Okoki koyekola lisolo ya moto moko oyo Biblia elobeli oyo amonisaki kondima makasi, to okoki kotánga lisolo ya bomoi ya mosaleli moko ya Yehova ya ntango na biso. Longola yango, kanisá ndenge oyo Yehova asili komonisa ete atyelaka yo likebi. Ndenge nini abendaki yo na solo? (Yoa. 6:44) Ndenge nini ayanoli na mabondeli na yo? (1 Yoa. 5:14) Matomba nini ozali kozwa mokolo na mokolo mpo na mbeka oyo Mwana na ye ya bolingo apesaki?—Ef. 1:7; Ebr. 4:14-16. w24.01 4 par. 6; 7 par. 17