Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • es25 nk. 108-118
  • Sanza ya 11

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sanza ya 11
  • Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2025
  • Mitó ya makambo mike
  • Mwapɔsɔ, 1 sanza ya 11
  • Mwalomingo, 2 sanza ya 11
  • Mwayambo, 3 sanza ya 11
  • Mwamibale, 4 sanza ya 11
  • Mwamisato, 5 sanza ya 11
  • Mwaminei, 6 sanza ya 11
  • Mwamitano, 7 sanza ya 11
  • Mwapɔsɔ, 8 sanza ya 11
  • Mwalomingo, 9 sanza ya 11
  • Mwayambo, 10 sanza ya 11
  • Mwamibale, 11 sanza ya 11
  • Mwamisato, 12 sanza ya 11
  • Mwaminei, 13 sanza ya 11
  • Mwamitano, 14 sanza ya 11
  • Mwapɔsɔ, 15 sanza ya 11
  • Mwalomingo, 16 sanza ya 11
  • Mwayambo, 17 sanza ya 11
  • Mwamibale, 18 sanza ya 11
  • Mwamisato, 19 sanza ya 11
  • Mwaminei, 20 sanza ya 11
  • Mwamitano, 21 sanza ya 11
  • Mwapɔsɔ, 22 sanza ya 11
  • Mwalomingo, 23 sanza ya 11
  • Mwayambo, 24 sanza ya 11
  • Mwamibale, 25 sanza ya 11
  • Mwamisato, 26 sanza ya 11
  • Mwaminei, 27 sanza ya 11
  • Mwamitano, 28 sanza ya 11
  • Mwapɔsɔ, 29 sanza ya 11
  • Mwalomingo, 30 sanza ya 11
Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2025
es25 nk. 108-118

Sanza ya 11

Mwapɔsɔ, 1 sanza ya 11

Osali ete monɔkɔ ya bana mpe ya bana oyo bazali komɛla mabɛlɛ ebimisa lisanzoli.—Mat. 21:16.

Soki ozali moboti, salisá bana na yo ya mike bábongisaka biyano oyo ebongi na kotalela mbula na bango. Na bantango mosusu, ekoki kozala ete lisolo moko ezali kolobela mikakatano ya libala to bizaleli ya pɛto, kasi ekoki kozala na paragrafe moko to mibale oyo mwana akoki kopesa eyano. Lisusu, salisá bana na yo báyeba ntina oyo bakopona bango te ntango nyonso oyo batomboli mabɔkɔ. Soki osali bongo, ekosalisa bango bálɛmba nzoto te ntango bazali kopona bato mosusu. (1 Tim. 6:18) Biso nyonso tokoki kobongisa biyano ya malamu oyo ezali kokumisa Yehova mpe kolendisa bandeko na biso Bakristo. (Mas. 25:11) Atako na bantango mosusu tokoki kolobela makambo oyo tokutanaki na yango, tosengeli koboya kolobela mingi makambo etali biso moko. (Mas. 27:2; 2 Ko. 10:18) Tosengeli kolobelaka mingimingi makambo etali Yehova, Liloba na ye, mpe basaleli na ye.—Em. 4:11. w23.04 24-25 par. 17-18

Mwalomingo, 2 sanza ya 11

Tólala mpɔngi te ndenge bamosusu basalaka, kasi tózala nde ekɛngɛ mpe tóbatela makanisi na biso.—1 Tes. 5:6.

Bolingo ezali na ntina mingi mpo tósɛnzɛla mpe tóbatela makanisi na biso. (Mat. 22:​37-39) Kolinga Nzambe esalisaka biso tóyika mpiko na mosala ya kosakola atako yango ekoki kobimisela biso minyoko. (2 Tim. 1:​7, 8) Lokola tomonisaka bolingo ata epai ya baoyo basalelaka Yehova te, tokobaka kosakola, ata kopesa litatoli na nzela ya telefone to na kokoma mikanda. Tozalaka na elikya ete mokolo mosusu bazalani na biso bakobongwana mpe bakobanda kosala makambo oyo ezali sembo. (Ezk. 18:​27, 28) Tolingaka mpe bandeko na biso bakristo. Tomonisaka ete tolingaka bango na ndenge ‘tobɔndisanaka mpe tolendisanaka.’ (1 Tes. 5:11) Se ndenge basoda basalaka na bomoko na ntango ya etumba, biso mpe tolendisanaka. Tosengeli soki moke te kozokisa bandeko na biso na nko to kozongisa mabe na mabe. (1 Tes. 5:​13, 15) Tomonisaka mpe ete tolingaka bandeko na ndenge tomemyaka baoyo bakambaka lisangá.—1 Tes. 5:12. w23.06 10 par. 6; 11 par. 10-11

Mwayambo, 3 sanza ya 11

Ntango [Yehova] ayebisi likambo, akosala yango te?—Mit. 23:19.

Likambo ya mibale oyo ekoki kosalisa biso tókómisa kondima na biso makasi ezali ya kokanisa na mozindo na ntina etali lisiko. Lisiko ezali ndanga oyo emonisi ete bilaka ya Nzambe ekokokisama. Ntango tokanisaka malamumalamu ntina oyo lisiko epesamaki mpe nini Yehova asalaki mpo na kopesa yango, tokómisaka kondima na biso makasi ete elaka ya Nzambe ya bomoi ya seko na mokili ya malamu koleka, ekokokisama. Mpo na nini tolobi bongo? Na yango, nini esɛngamaki mpo lisiko epesama? Yehova atindaki Mwana na ye se moko oyo alingaka mingi, moninga na ye ya penepene, uta na likoló mpo abotama lokola moto ya kokoka. Ntango azalaki awa na mabele, Yesu ayikaki mpiko na lolenge nyonso ya mpasi. Na nsima, anyokwamaki mpe akufaki liwa moko ya mpasi mingi. Yehova afutaki ntalo monene mpo na biso! Tata na biso ya bolingo alingaki ata moke te kotika Mwana na ye anyokwama mpe akufa kaka mpo na kopesa biso bomoi moko ya malamu kasi ya mokuse. (Yoa. 3:16; 1 Pe. 1:​18, 19) Lokola Yehova apesaki Mwana na ye oyo alingaka mingi, akosala ete tózala na likoki ya kozwa bomoi ya seko na mokili ya sika. w23.04 27 par. 8-9

Mwamibale, 4 sanza ya 11

Wapi bitubeli na yo, Ee Liwa? —Hos. 13:14.

Yehova azali mpenza na mposa ya kosekwisa bakufi? Na ntembe te, azali na yango. Na nzela ya elimo na ye, asalisaki bato mingi oyo bakomaki Biblia, bakoma elaka na ye ya lisekwa mpo na mikolo ezali koya. (Yis. 26:19; Em. 20:​11-13) Mpe soki Yehova alaki likambo moko, akokisaka yango. (Yos. 23:14) Yehova azali na mposa makasi ya kozongisa lisusu bakufi na bomoi. Meká kokanisa makambo oyo Yobo alobaki. Ayebaki ete ata soki akufi, Yehova akozala na mposa makasi ya komona ye lisusu na bomoi. (Yobo 14:​14, 15) Yehova ayokaka mpe bongo mpo na basambeli na ye nyonso ya sembo oyo bakufá. Azali na mposa makasi ya kozongisa lisusu bango na bomoi, na nzoto kolɔngɔnɔ mpe na esengo. Bongo bamilio ya bato oyo bakufá kozanga ete báyekola mateya ya solo oyo etali Yehova? Nzambe na biso ya bolingo azali mpe na mposa ya kosekwisa bango. (Mis. 24:15) Mposa na ye ezali ete bato yango bázwa libaku ya kokóma baninga na ye mpe ya kozala na bomoi libela na libela awa na mabele.—Yoa. 3:16. w23.04 9 par. 5-6

Mwamisato, 5 sanza ya 11

Tokozwa nguya epai ya Nzambe. —Nz. 108:13.

Ndenge nini okoki kokómisa elikya na yo makasi? Na ndakisa, soki ozali na elikya ya bomoi ya libela na libela awa na mabele, tángá makambo oyo Biblia elobi mpo na Paradiso mpe manyolá yango. (Yis. 25:8; 32:​16-18) Moná na makanisi ndenge bomoi ekozala na mokili ya sika. Omimona na mokili ya sika. Soki tobateli elikya ya mokili ya sika polele na makanisi na biso, tokomona ete mikakatano na biso “ezali ya ntango mokuse mpe ya pɛpɛlɛ.” (2 Ko. 4:17) Yehova akokómisa yo makasi na nzela ya elikya oyo apesi yo. Asili komonisa makambo oyo osengeli kosala mpo ozwa makasi epai na ye. Na yango, ntango ozali na mposa ya lisalisi mpo na kokokisa mokumba moko, mpo na koyikela mokakatano mpiko, to mpo na kobatela esengo na yo, bondelá Yehova na motema mobimba mpe luká litambwisi na ye na nzela ya boyekoli na yo moko. Ndimá malendisi oyo euti epai ya bandeko ya lisangá. Kanisáká elikya na yo mpo obatela yango polele na makanisi. Soki osali bongo, ‘[Nzambe akosalela] bonene ya nguya na ye mpo na kopesa yo nguya monene mpo oyika mpenza mpiko na motema molai ná esengo.’—Kol. 1:11. w23.10 17 par. 19-20

Mwaminei, 6 sanza ya 11

Bópesaka matɔndi mpo na likambo nyonso.—1 Tes. 5:18.

Tozali na bantina mingi ya kopesa Yehova matondi na libondeli. Tokoki kopesa Yehova matondi mpo na biloko nyonso ya malamu oyo tozali na yango, kutu likabo nyonso ya malamu eutaka epai na ye. (Yak. 1:17) Na ndakisa, tokoki kopesa ye matondi mpo na mabele kitoko apesá biso mpe biloko ya kokamwa oyo asalá. Tokoki mpe komonisa botɔndi mpo na bomoi oyo apesá biso, libota, baninga, mpe elikya oyo tozali na yango. Tokopesa mpe Yehova matondi ndenge apesi biso libaku ya kozala na boninga malamu elongo na ye. Mbala mosusu ekosɛnga tósala milende mpo tókanisa mpenza malamu mpo tóyeba bantina oyo tosengeli komonisa botondi na biso epai ya Yehova. Lelo oyo, bato mingi bazalaka na botondi te. Mingi batyaka makanisi na bango kaka na oyo bazali na yango mposa na esika bámonisa botondi mpo na oyo bazali na yango. Soki makanisi wana ekɔteli biso, yango ekosala ete ntango tozali kobondela tóbanda kaka kosɛnga na kosɛnga. Mpo makanisi ya ndenge wana ekɔtela biso te, tosengeli kokóma na botɔndi mingi mpe kokoba komonisa yango mpo na nyonso oyo Yehova asalaka mpo na biso.—Luka 6:45. w23.05 4 par. 8-9

Mwamitano, 7 sanza ya 11

Akoba kosɛnga na kondima, atya ntembe ata moke te.—Yak. 1:6.

Lokola azali Tata na biso ya bolingo, Yehova asepelaka te komona biso na mpasi. (Yis. 63:9) Atako bongo, apekisaka te mikakatano nyonso oyo ekoki kozala lokola ebale to mɔtɔ ekómela biso. (Yis. 43:2) Kasi, alaki ete akosalisa biso ‘tóleka na’ yango. Mpe akotika te ete mikakatano na biso epesa biso mpasi mpo na libela. Yehova apesi biso mpe elimo santu na ye ya nguya mpo esalisa biso tóyika mpiko. (Luka 11:13; Flp. 4:13) Na yango, tokoki komindimisa ete tokozala ntango nyonso na oyo tosengeli na yango mpenza mpo na koyika mpiko mpe kotikala sembo epai na ye. Yehova alingaka tótyela ye motema. (Ebr. 11:6) Na bantango mosusu, mikakatano na biso ekoki komonana lokola ekosila te. Tokoki kobanda ata komituna soki Yehova akosalisa biso. Kasi Biblia eyebisi biso ete na nguya ya Nzambe tokoki ata “komata efelo.” (Nz. 18:29) Na yango na esika tómitungisa mingi, tosengeli nde kobondela Yehova na kondima nyonso, kotya motema ete akoyanola na mabondeli na biso.—Yak. 1:​6, 7. w23.11 22 par. 8-9

Mwapɔsɔ, 8 sanza ya 11

[Bolingo] epelaka makasi lokola mɔtɔ, kopela ya mɔtɔ ya Yah. Ata mai oyo etomboki ekoki koboma mɔtɔ ya bolingo te, bibale mpe ekoki komema yango te.—Loy. 8:​6, 7.

Wana nde lolenge malamu mpenza ya kolobela bolingo! Maloba yango ezali mpenza na makambo ya kolendisa mpo na babalani: Bokoki kolingana makasi mpenza. Mwasi ná mobali basengeli kosala milende mpo bolingo na bango eumela ntango nyonso oyo bakozala na bomoi. Na ndakisa, mpo mɔtɔ ebomama te, esengeli ntango nyonso kobakisaka nkoni to makala. Soki moto azali kokipe yango te, nsukansuka mɔtɔ yango ekokufa. Ndenge moko mpe, mwasi ná mobali bakobatela bolingo na bango mpo na libela soki kaka bazali kokómisa yango makasi. Na bantango mosusu, mwasi ná mobali bakoki komona ete bolingo na bango ekómi kokita, mingimingi soki bakómi na mikakatano ya mbongo, ya nzoto, to mpe ya kobokola bana. Na yango mpo “mɔtɔ ya Yah” ebomama te, mwasi ná mobali basengeli kosala makasi bázala na boyokani malamu elongo na Yehova. w23.05 20-21 par. 1-3

Mwalomingo, 9 sanza ya 11

Kobanga te.—Dan. 10:19.

Mpo tómonisa mpiko, tosengeli kosala nini? Ekoki kozala ete baboti na biso balendisaka biso tózala na mpiko, kasi bakoki te kotikela biso ezaleli yango lokola nde ezali libula ya libota. Kozala na mpiko ezali lokola koyekola mayele ya sika. Lolenge moko oyo okoki kozwa mayele yango ezali ya kotala na likebi mpenza makambo oyo molakisi azali kosala mpe na nsima komekola ndakisa na ye. Ndenge moko mpe, toyekolaka kozala na mpiko ntango totalaka na likebi mpenza ndenge basusu bamonisaka ezaleli yango mpe komekola ndakisa na bango. Lokola Danyele, tosengeli koyeba Liloba ya Nzambe malamumalamu. Tosengeli kozala na boyokani ya malamu elongo na Yehova ntango tozali kosolola na ye mpe koyebisa ye ndenge tozali komiyoka mbala na mbala na mabondeli na biso. Longola yango, tosengeli kotyela Yehova motema, mpe komindimisa ete akosunga biso ntango nyonso. Na yango, soki kondima na biso emekami, tokomonisa mpiko. Mbala mingi basusu bamemyaka bato ya mpiko. Bakoki mpe kosalisa basusu báluka koyeba Yehova. Na ntembe te, tozali na bantina mingi ya komonisa mpiko. w23.08 2 par. 2; 4 par. 8-9

Mwayambo, 10 sanza ya 11

Bóluka koyeba likambo nyonso soki ezali solo.—1 Tes. 5:21.

Maloba ya Grɛki oyo ebongolami na “koluka koyeba” esalelamaki mpo na komonisa ndenge bato bazalaki komeka mabanga ya ntalo, na ndakisa wolo to palata, mpo na koyeba soki ezalaki mabanga ya solosolo. Na yango, tosengeli komeka makambo oyo toyokaka to totángaka mpo na koluka koyeba soki ezali solo to te. Yango ekozala lisusu na ntina mingi mpo na biso lokola bolɔzi monene ezali se kokóma pene. Na esika ya kondima likambo nyonso oyo basusu bazali koloba, tosalelaka makoki na biso ya kokanisa mpo na kokokanisa makambo oyo totángaka to toyokaka ná makambo oyo Biblia mpe ebongiseli ya Yehova elobaka. Kosala bongo ekosalisa biso tókosama te na makanisi ya lokuta oyo ekouta na bademo to na bansango ya lokuta. (Mas. 14:15; 1 Tim. 4:1) Toyebi ete basaleli ya Nzambe bakobika na bolɔzi monene. Atako bongo, mokomoko na biso ayebi te ndenge bomoi na ye ekozala lobi. (Yak. 4:14) Na yango, ezala tokozala na bomoi na ntango ya bolɔzi monene to soki tokufi liboso eya, Nzambe akopesa biso bomoi ya seko soki totikali sembo. Tiká ete biso nyonso tótya makanisi na elikya kitoko oyo tozali na yango mpe tómilɛngɛla mpo na mokolo ya Yehova! w23.06 13 par. 15-16

Mwamibale, 11 sanza ya 11

Ayebisa likambo na ye ya nkuku epai ya basaleli na ye.—Am. 3:7.

Toyebi te ndenge bisakweli mosusu ya Biblia ekokokisama. (Dan. 12:​8, 9) Kasi lokola toyebi mpenza te ndenge esakweli moko ekokokisama, yango elakisi nde ete ekokokisama te? Ezali bongo te! Tokoki kotya motema ete Yehova akosalisa biso tókanga ntina ya makambo oyo tosengeli koyeba na ntango oyo ebongi mpenza, kaka ndenge asalaki na ntango ya kala. Bato ya bikólo bakosakola “kimya, likambo ya kobanga ezali te.” (1 Tes. 5:3) Na nsima, baguvɛrnema ya mokili oyo ekobalukela mangomba ya lokuta mpe ekobebisa yango nyɛɛ. (Em. 17:​16, 17) Na nsima, bakobundisa basaleli ya Nzambe. (Ezk. 38:​18, 19) Makambo wana ekomema mbala moko na etumba ya nsuka, elingi koloba, Armagedone. (Em. 16:​14, 16) Tokoki komindimisa ete makambo wana ekosalema mosika te. Lokola makambo yango esalemi naino te, tiká tókoba komonisa botɔndi epai ya Tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo wana tozali kotya likebi na bisakweli ya Biblia mpe kosalisa basusu básala mpe bongo. w23.08 13 par. 19-20

Mwamisato, 12 sanza ya 11

Tókoba kolingana, mpo bolingo euti na Nzambe.—1 Yoa. 4:7.

Ntango ntoma Paulo azalaki kolobela kondima, elikya, mpe bolingo, asukisaki boye: “Oyo eleki na kati na yango ezali bolingo.” (1 Ko. 13:13) Mpo na nini Paulo alobaki bongo? Na mikolo ezali koya, tokozala lisusu te na mposa ya kozala na kondima na bilaka ya Nzambe ya mokili ya sika to elikya ete bilaka yango ekokokisama, mpo ekosila kokokisama. Kasi tokozala ntango nyonso na mposa ya kozala na bolingo mpo na Yehova mpe bato. Kutu, bolingo na biso mpo na bango ekokoba kokola libela na libela. Lisusu, bolingo emonisaka ete tozali bakristo ya solo. Yesu ayebisaki bantoma na ye: “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai: soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoa. 13:35) Lisusu, kolingana esalaka ete tózala na bomoko. Paulo abengaki bolingo “ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.” (Kol. 3:14) Ntoma Yoane akomelaki bandeko na ye bakristo ete: “Moto oyo alingaka Nzambe asengeli mpe kolinga ndeko na ye.” (1 Yoa. 4:21) Ntango tolinganaka, tomonisaka ete tolingaka Nzambe. w23.11 8 par. 1, 3

Mwaminei, 13 sanza ya 11

Tólongola mpe kilo nyonso. —Ebr. 12:1.

Biblia ekokanisi bomoi na biso bakristo na momekano ya kopota mbangu. Bapoti-mbangu oyo bakolonga kopota mbangu tii na nsuka bakozwa bomoi ya seko. (2 Tim. 4:​7, 8) Tosengeli kosala makasi mpo tókoba kopota mbangu, mingimingi mpo momekano yango ekómi na nsuka mpenza. Ntoma Paulo ayebaki makambo oyo ekosalisa biso tólonga momekano ya kopota mbangu. Yango wana, ayebisi biso “tólongola mpe kilo nyonso . . . , mpe tóyika mpiko ntango tozali kopota mbangu na momekano oyo etyami liboso na biso.” Paulo alingaki nde koloba ete mokristo asengeli te komema ata mokumba moko? Te, alingaki koloba bongo te. Kutu, alingaki koloba ete tosengeli kolongola kilo nyonso oyo ezangá ntina. Kilo ya lolenge wana ekoki kosala ete tótika mpe tólɛmba nzoto. Mpo tóyika mpiko, tosengeli koyeba nokinoki mpe kolongola kilo nyonso ezangá ntina oyo ekoki kolɛmbisa biso. Kasi, tolingaka mpe te kobwaka mikumba oyo tosengeli komema. Longola yango, soki totiki komema mikumba yango, tokotikala te na momekano ya kopota mbangu.—2 Tim. 2:5. w23.08 26 par. 1-2

Mwamitano, 14 sanza ya 11

Kitoko na bino ezala ya libándá te.—1 Pe. 3:3.

Ezaleli ya kozalaka makambo makasimakasi te esalisaka biso tómemyaka makanisi ya basusu. Na ndakisa, bandeko na biso mosusu ya basi balingaka kosala monzɛlɛ, kasi basusu balingaka yango te. Bakristo mosusu basepelaka komɛla masangá oyo elangwisaka na bokatikati, kasi basusu bazwá ekateli ya koboya komɛla yango. Bakristo nyonso balingaka kozala na nzoto kolɔngɔnɔ kasi moto na moto aponaka mayele nini ya lisalisi ya monganga ebongi na ye. Soki tokanisi ete makambo oyo tolobaka ezalaka ntango nyonso solo mpe tolukaka kondimisa bandeko na biso ya basi mpe ya mibali básala makambo oyo tosalaka, tokoki kobɛtisa basusu mabaku mpe kosala ete bokabwani ekɔta na lisangá. (1 Ko. 8:9; 10:​23, 24) Na ndakisa, Yehova ayebisi biso te bilamba nini tosengeli kolata, kasi apesi biso mitinda ya kolanda. Tosengeli kolata na ndenge oyo ebongi na baministre ya Nzambe, komonisa ete tozalaka makambo makasimakasi te, tolekisaka ndelo te, mpe na “makanisi malamu.” (1 Tim. 2:​9, 10) Yango wana, tolingaka te kobenda likebi ya bato epai na biso mpo na molato na biso. Mitinda ya Biblia ekosalisa mpe bankulutu báboya kotya mibeko na bango moko na likambo etali molato mpe kosala monzɛlɛ. w23.07 23-24 par. 13-14

Mwapɔsɔ, 15 sanza ya 11

Bóyoka ngai na likebi, mpe bólya eloko oyo ezali malamu, mpe bokosepela mingi mpenza na bilei ya kitoko.—Yis. 55:2.

Yehova alakisi biso ndenge ya kozala na bomoi ya esengo na mikolo ezali koya. Baoyo bandimaka libyangi ya “mwasi ya zoba” bazwaka esengo na kosala pite. Nsuka na bango ezali na “esika mozindo ya Nkunda. (Mas. 9:​13, 17,18) Na kokesana na baoyo bandimaka libyangi ya mwasi ya zoba, baoyo bandimaka libyangi oyo euti na “bwanya ya solosolo” bakozwa mpenza mbano na mikolo ezali koya! (Mas. 9:1) Tozali koyekola kolinga makambo oyo Yehova alingaka mpe koyina makambo oyo ayinaka. (Nz. 97:10) Lisusu, tosepelaka kobenga basusu mpo bázwa matomba na “bwanya ya solosolo.” Tozali lokola basali oyo “[bazali kobelela] uta na bisika oyo etombwaná ya engumba ete: ‘Moto nyonso oyo azangi mayele, aya awa.’” Matomba oyo biso mpe baoyo nyonso bandimaka libyangi yango tozwaka, ezali kaka te mpo na sikoyo. Ekoumela seko, mpe ekosala ete ‘tózala na bomoi’ libela na libela wana tozali ‘kotambola na nzela ya mayele.’—Mas. 9:​3, 4, 6. w23.06 24 par. 17-18

Mwalomingo, 16 sanza ya 11

Moto oyo ayokaka nkanda noki te azali malamu koleka moto ya nguya, mpe moto oyo apekisaka nkanda na ye azali malamu koleka moto oyo azwi engumba.—Mas. 16:32.

Oyokaka ndenge nini soki moninga moko ya mosala to ya kelasi atuni yo motuna na oyo etali bindimeli na yo? Obangaka mwa moke? Mingi na biso tobangaka mwa moke. Kasi mituna ya bongo ekoki kosalisa biso tóyeba makanisi to bindimeli ya moto yango, mpe ekoki kopesa biso libaku ya koyebisa ye nsango malamu. Kasi na bantango mosusu, moto akoki kotuna motuna mpo na kobimisa ntembe. Yango esengeli kokamwisa biso te, mpo bato mosusu bayoká makambo ya lokuta mpo na bindimeli na biso. (Mis. 28:22) Lisusu, tozali kobika na “mikolo ya nsuka,” ntango oyo bato mingi balingi “kosala boyokani te” mpe bazali “bato ya nko.” (2 Tim. 3:​1, 3) Mbala mosusu omitunaka, ‘Ndenge nini nakoki kozala na boboto mpe koloba na mayele ntango moto abimisi ntembe mpo na bindimeli na ngai oyo euti na Biblia?’ Na mokuse, eloko oyo ekosalisa yo ezali ezaleli ya motema pɛtɛɛ. Moto ya motema pɛtɛɛ asilikaka noki te; ayebaka komipekisa ntango likambo moko epesi ye nkanda to ntango azali na eyano te na motuna oyo batuni ye. w23.09 14 par. 1-2

Mwayambo, 17 sanza ya 11

Okotya bango bankumu na mabele mobimba.—Nz. 45:16.

Na bantango mosusu, tozwaka toli oyo ebatelaka biso na makama lokola konduka biloko ya mokili mpe kosala makambo oyo ekoki kotinda biso tóbuka mibeko ya Nzambe. Na ntango yango mpe, tozwaka matomba soki tolandi litambwisi ya Yehova. (Yis. 48:​17, 18; 1 Tim. 6:​9, 10) Na ntembe te, Yehova akokoba kosalela bato lokola bamonisi na ye mpo na kopesa litambwisi na ntango ya bolɔzi monene mpe na Boyangeli ya Mbula Nkóto. Tokokoba kolanda litambwisi yango? Eyano etaleli ndenge oyo totalelaka litambwisi ya Yehova sikoyo. Na yango, tiká tólanda ntango nyonso litambwisi ya Yehova, ata mpe oyo azali kopesa na nzela ya bato oyo batyami mpo na kobatela biso. (Yis. 32:​1, 2; Ebr. 13:17) Mpe soki tosali bongo, tozali na ntina nyonso ya kotyela Yehova Motambwisi na biso motema, ye oyo azali kosalisa biso tókima makama ya elimo mpe tókóma esika tozali kokende: mokili ya sika epai tokozwa bomoi ya seko. w24.02 25 par. 17-18

Mwamibale, 18 sanza ya 11

Na nzela ya boboto monene nde bobikisami.—Ef. 2:5.

Atako ntoma Paulo alekisaki bomoi ya malamu na mosala ya Yehova, kasi akutanaki mpe na mikakatano. Mbala mingi azalaki kosala mibembo ya milai, mpe na ntango wana kosala mobembo ezalaki pɛtɛɛ te. Na boumeli ya mibembo yango, mbala mosusu azalaki kokutana “na makama ya bibale” mpe “na makama ya miyibi.” Na mabaku mosusu, banguna banyokolaki ye mpe babɛtaki ye. (2 Ko. 11:​23-27) Longola yango, bandeko na ye bakristo bazalaki ntango nyonso te komonisa botɔndi na milende nyonso oyo azalaki kosala mpo na kosalisa bango. (2 Ko. 10:10; Flp. 4:15) Nini esalisaki Paulo akoba kosalela Yehova? Na nzela ya Makomami mpe makambo oyo ye moko akutanaki na yango, Paulo ayekolaki makambo mingi na oyo etali bomoto ya Yehova. Paulo andimisamaki ete Yehova Nzambe azalaki kolinga ye. (Rom. 8:​38, 39; Ef. 2:​4, 5) Mpe akómaki kolinga Yehova mingi koleka. Paulo amonisaki ete azalaki kolinga Yehova ‘na ndenge asalelaki basantu mpe azalaki kokoba kosalela bango.’—Ebr. 6:10. w23.07 9 par. 5-6

Mwamisato, 19 sanza ya 11

Moto nyonso atosaka bakonzi oyo bazali liboso.—Rom. 13:1.

Bato mingi bandimaka ete bakonzi ya mboka bazali na ntina mpe ete tosengeli kotosa mibeko mosusu oyo ‘bakonzi yango oyo bazali liboso’ batye. Kasi kaka bato yango bakoki kokakatana mpo na kotosa mobeko moko oyo bamoni ete ebongi te to esɛngi bango mingi. Biblia emonisi ete baguvɛrnema ya bato ezali kobimisa bampasi, eyangelami na Satana, mpe mosika te ekobebisama. (Nz. 110:​5, 6; Mos. 8:9; Luka 4:​5, 6) Kasi, elobi mpe ete “moto oyo azali kotɛmɛla bokonzi atɛmɛli ebongiseli ya Nzambe.” Kotosa bakonzi oyo bazali liboso ezali na kati ya ebongiseli oyo Yehova atiki ete ezala mpo na mwa ntango, mpo makambo ezala na molɔngɔ. Yango wana, tosengeli “kopesa moto nyonso oyo esengeli na ye,” ezala mpako, limemya, mpe botosi. (Rom. 13:​1-7) Mbala mosusu tomoni ete mobeko moko ezali malamu te, ebongi te, mpe ete kotosa yango ekosɛnga makambo mingi. Kasi biso totosaka Yehova, mpe ayebisi biso tótosaka bakonzi yango ntango nyonso oyo basɛngi biso te tóbuka mibeko na ye.—Mis. 5:29. w23.10 8 par. 9-10

Mwaminei, 20 sanza ya 11

Elimo ya Yehova ekitelaki ye. —Bas. 15:14.

Ntango Samsone abotamaki, Bafilistia bazalaki koyangela ekólo Yisraele mpe komonisa yango mpasi mingi. (Bas. 13:1) Bayisraele banyokwamaki mingi mpo Bafilistia bazalaki bato ya nkanza. Yehova aponaki Samsone “mpo na kobikisa Yisraele na lobɔkɔ ya Bafilistia.” (Bas. 13:5) Mpo akokisa mokumba yango, Samsone asengelaki mpenza kotyela Yehova motema. Na libaku moko boye, limpinga ya basoda ya Bafilistia bayaki kokanga Samsone na Lehi, mbala mosusu na Yuda. Mibali ya Yuda babangaki, yango wana bazwaki ekateli ya kokaba Samsone na mabɔkɔ ya banguna. Bazalaki bato ya ekólo ya Samsone; kasi bango moko bakangaki ye na bansinga mibale ya sika mpe bamemaki ye epai ya Bafilistia. (Bas. 15:​9-13) Nzokande, “elimo ya Yehova ekitelaki” Samsone mpe bansinga oyo bakangaki ye ekatanaki. Na nsima “amonaki mokuwa moko ya mbanga ya mpunda-mobali,” azwaki yango, mpe asalelaki yango mpo na koboma mibali 1000 ya Bafilistia!—Bas. 15:​14-16. w23.09 2 par. 3-4

Mwamitano, 21 sanza ya 11

Yango eyokani na mokano ya seko oyo abongisaki na likambo oyo etali Kristo, Yesu Nkolo na biso.—Ef. 3:11.

Yehova amonisi mokemoke ‘mokano na ye ya seko’ na kati ya Biblia. Ata soki azwi nzela nini, alongaka kaka mpo “asalá eloko nyonso mpo na mokano na ye.” (Mas. 16:4) Mpe mbuma ya makambo oyo Yehova asalaka ekoumela libela na libela. Mokano ya Yehova ezali nini, mpe bambongwana nini asali mpo na kokokisa yango? Nzambe ayebisaki mwasi ná mobali ya liboso mokano na ye mpo na bango. Alobaki na bango ete: “Bóbota mpe bókóma mingi, bótondisa mabele mpe bótya yango na nse na bino, mpe bózala na bokonzi likoló ya . . . ekelamu nyonso oyo ezali na bomoi” na mabele.” (Eba. 1:28) Ntango Adama ná Eva batombokaki, mpe bakɔtisaki lisumu na libota ya bato, mokano ya Yehova esukaki te. Abongolaki nzela mpo na kokokisa mokano na ye. Na mbala moko, Yehova azwaki ekateli ya kotya Bokonzi moko na likoló oyo ekokokisa mokano oyo azalaki na yango na ebandeli mpo na bato mpe mabele.—Mat. 25:34. w23.10 20 par. 6-7

Mwapɔsɔ, 22 sanza ya 11

Soki Yehova asalisaka ngai te, na mwa ntango moke, nalingaki kozala lisusu te.—Nz. 94:17.

Yehova akoki kosalisa biso tólɛmba te kobundisa bolɛmbu na biso. Ekoki kozala mpasi kokende liboso, mingimingi soki bolɛmbu na biso ezali kosila te. Ntango mosusu tokoki komona lokola ete bolɛmbu na biso eleki oyo ntoma Petro azalaki na yango. Kasi, Yehova akoki kopesa biso makasi mpo tólɛmbisa mabɔkɔ te. (Nz. 94:​18, 19) Tózwa ndakisa ya ndeko mobali moko oyo, liboso ayeba solo, azalaki kosangisa nzoto mibali na mibali bambula ebele. Asalaki makasi mpe atikaki mimeseno yango ya mbindo. Kasi, na bantango mosusu bamposa ya mabe eyelaki ye. Nini esalisaki ye alɛmbisa mabɔkɔ te? Alobi boye: “Yehova apesaka biso makasi.” Abakisi boye: “Na lisalisi ya elimo ya Yehova . . . , nayekoli ete tokoki kolonga [kokoba] kotambola na nzela ya solo . . . Yehova azali kosalela ngai, mpe atako mabunga na ngai, akobaka kopesa ngai makasi.” w23.09 23 par. 12

Mwalomingo, 23 sanza ya 11

Komikitisa ná kobanga Yehova epesaka bomɛngo, nkembo mpe bomoi.—Mas. 22:4.

Bilenge mibali, bokokóma kaka mbala moko boye te bakristo oyo bakɔmɛli na elimo. Bosengeli kopona bandakisa malamu ya komekola, kokolisa likoki ya kokanisa, kozala bato oyo basusu bakoki kotyela motema, koyekola makambo oyo ekosalisa bino na bomoi, mpe komibongisa mpo na mikumba oyo bokoki kozwa na mikolo ezali koya. Okoki kobanga soki otali makambo nyonso oyo osengeli kosala. Kasi okoki kolonga. Kobosana te ete Yehova azali na mposa makasi ya kosalisa yo. (Yis. 41:​10, 13) Ya solo, bandeko basi mpe mibali na lisangá mpe bakosalisa yo. Soki okómi mpenza mokristo oyo akɔmɛli na elimo, bomoi na yo ekozala malamu mpe okozala na esengo. Tolingaka bino mingi, bandeko mibali ya bilenge! Tiká ete Yehova apambola yo mpo na milende oyo ozali kosala sikoyo mpo okóma mokristo oyo akɔmɛli na elimo. w23.12 29 par. 19-20

Mwayambo, 24 sanza ya 11

Alimbisi likambo oyo esali ye mpasi.—Mas. 19:11.

Kanisá ete ozali elongo na bandeko. Bozali kolekisa ntango moko ya malamu mpe okangi fɔtɔ ná bango. Kutu, okangi bafɔtɔ mosusu mibale mpo moko ekoki kobima malamu te. Sikoyo okómi na bafɔtɔ misato. Kasi na fɔtɔ moko, omoni ete ndeko moko asɛki te. Na ntembe te okoboma yango mpo ozali na bafɔtɔ mosusu mibale oyo moto nyonso, ata mpe ndeko yango azali kosɛka. Mbala mingi tobosanaka te bantango ya malamu oyo tolekisá ná bandeko na biso. Kasi kanisá ete na moko ya mabaku yango, ndeko moko alobaki to asalaki likambo moko oyo esepelisaki yo te. Osengeli kosala nini na likambo wana oyo etikalá na bɔɔngɔ na yo? Osengeli kolongola yango na bɔɔngɔ na yo ndenge kaka olingaki koboma moko ya bafoto wana. (Ef. 4:32) Tosengeli kosala nyonso tólongola mpo na bɔɔngo na biso tozali na bantango ya malamu oyo tolekisá na bango. Wana nde makambo oyo tosengeli kobomba na bɔɔngɔ na biso mpe kozwa yango na motuya. w23.11 12-13 par. 16-17

Mwamibale, 25 sanza ya 11

Basi basengeli kobongisa nzoto na bango na molato oyo ebongi, . . . na ndenge oyo ebongi na basi oyo balobaka ete bakangamaka na Nzambe.—1 Tim. 2:​9, 10.

Maloba ya Grɛki oyo esalelami esika yango emonisi ete na molato na ye, mwasi mokristo asengeli komonisa limemya mpe kotalela mayoki ná makanisi ya basusu. Tosepelaka mingi na bandeko na biso oyo bakɔmɛli na elimo mpo balataka na ndenge oyo emonisaka bopɔlɔ! Bososoli ezali ezaleli mosusu oyo basi bakristo nyonso oyo bakɔmɛli bamonisaka. Bososoli ezali nini? Ezali likoki ya koyeba ete likambo oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe, mpe na nsima kopona kosala oyo ezali malamu. Tótalela ndakisa ya Abigaile. Mobali ya Abigaile azwaki ekateli moko ya mabe mpe elingaki komemela bato ya ndako na ye mobimba likama moko monene. Abigaile asalaki mbala moko mpo na kosilisa likambo yango. Bososoli oyo amonisaki ebikisaki bato. (1 Sam. 25:​14-23, 32-35) Bososoli ekosalisa biso mpe tóyeba ntango ya koloba mpe ntango ya kofanda nyɛɛ. Mpe ekosalisa biso tótyelaka basusu likebi kozanga kokɔta na makambo na bango.—1 Tes. 4:11. w23.12 20 par. 8-9

Mwamisato, 26 sanza ya 11

Tiká tósepela na elikya oyo tozali na yango ya kozwa nkembo ya Nzambe.—Rom. 5:2.

Ntoma Paulo akomaki maloba yango epai ya lisangá oyo ezalaki na Roma. Bandeko mibali mpe basi ya lisangá yango bayekolaki makambo ya Yehova mpe ya Yesu, bamonisaki kondima, mpe bakómaki bakristo. Na yango Nzambe ‘atángaki [bango] bato ya sembo na nzela ya kondima,’ mpe atyaki bango mafuta na elimo santu. (Rom. 5:1) Na bongo, bazwaki elikya moko ya solosolo, ya kitoko mpenza. Na nsima Paulo akomelaki bakristo oyo batyami mafuta oyo bazalaki na Efese mpo na elikya oyo Nzambe apesaki bango. Bazalaki na elikya ya kozwa “libula ya basantu.” (Ef. 1:18) Mpe epai ya bakristo ya Kolose, Paulo amonisaki esika oyo elikya na bango ekokokisama. Abengaki yango “elikya oyo babombeli bino na likoló.” (Kol. 1:​4, 5) Na yango, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali na elikya ya kosekwa mpo na kozwa bomoi ya seko na likoló, epai bakoyangela elongo na Kristo—1 Tes. 4:​13-17; Em. 20:6. w23.12 9 par. 4-5

Mwaminei, 27 sanza ya 11

kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi na biso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino.—Flp. 4:7.

Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na ‘kobatela’ ezalaki na elobeli ya basoda mpe bazalaki kosalela yango mpo na kolobela basoda oyo bazalaki kobatela engumba na banguna. Bafandi ya engumba oyo ebatelami bazalaki kolala na kimya, mpo bayebi ete basoda bazali kokɛngɛla na baporte. Ndenge moko mpe, ntango kimya ya Nzambe ezali kobatela mitema mpe makanisi na biso, tobangaka eloko te, mpo toyebi ete tobatelami. (Nz. 4:8) Ndenge ezalaki mpo na Hana, ata soki likambo na biso esili naino te, tokoki kaka koyoka mwa kimya. (1 Sa. 1:​16-18) Mpe ntango tozali motema kimya, mbala mingi tokómaka kokanisa malamu mpe tozwaka bikateli ya bwanya. Tokoki kosala nini? Ntango otungisami, bengá ‘mobateli.’ Ndenge nini? Bondelá Yehova tii ntango okoyoka kimya ya Nzambe. (Luka 11:9; 1 Tes. 5:17) Soki okutani na likambo moko ya nsɔmɔ, kotika te kobondela, mpe okoyoka ndenge kimya ya Yehova ekobatela motema mpe makanisi na yo.—Rom. 12:12. w24.01 21 par. 5-6

Mwamitano, 28 sanza ya 11

Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama.—Mat. 6:9.

Mpo na kosantisa nkombo ya Tata na ye, Yesu andimaki monyoko, kofinga, mpe makambo ya lokuta oyo balobaki mpo na ye. Ayebaki ete atosaki Tata na ye na makambo nyonso; azalaki na eloko ya koyokela nsɔni te. (Ebr. 12:2) Ayebaki mpe ete Satana nde moto azalaki kobundisa ye na ntango wana ya mpasi. (Luka 22:​2-4; 23:​33, 34) Na ntembe te Satana azalaki kolikya ete akobebisa bosembo ya Yesu; kasi alongaki te! Yesu amonisaki mpo na libela ete Satana azali moto mabe ya lokuta mpe ete Yehova azali na basaleli ya sembo, oyo bakangamaka na ye ata na komekama ya makasi! Yo mpe olingi kosepelisa Mokonzi na yo oyo azali koyangela? Boye, kobá kosanzola nkombo ya Yehova, kosalisa basusu báyeba bizaleli malamu ya Nzambe na biso. Soki ozali kosala bongo, ozali kolanda matambe ya Yesu. (1 Pe. 2:21) Lokola Yesu, ozali kosepelisa Yehova mpe komonisa ete monguna na Ye Satana azali moto ya lokuta oyo asilá nsɔni! w24.02 11-12 par. 11-13

Mwapɔsɔ, 29 sanza ya 11

Nakofuta Yehova eloko nini mpo na bolamu nyonso oyo asalelá ngai? —Nz. 116:12.

Na boumeli ya mbula mitano oyo euti koleka, bato koleka milio moko bazwi batisimo mpe bakómi Batatoli ya Yehova. Ntango omipesi na Yehova, oponi kokóma moyekoli ya Kristo mpe ondimi ete kosala mokano ya Nzambe nde ekozala likambo oyo eleki ntina na bomoi na yo. Komipesa na Nzambe ekosɛnga ete osala nini? Yesu alobaki: “Soki moto alingi kolanda ngai, amiboya ye moko.” (Mat. 16:24) Maloba ya Grɛki oyo ebongolami na “amiboya ye moko” ekoki mpe kobongolama na “azala lisusu na bomoi mpo na ye moko te.” Soki okómi mosaleli ya Yehova oyo amipesi na ye, osengeli koboya eloko nyonso oyo eyokani te na mokano na ye. (2 Ko. 5:​14, 15) Yango esangisi koboya “misala ya nzoto,” na ndakisa pite. (Gal. 5:​19-21; 1 Ko. 6:18) Mibeko yango ekotya bomoi na yo na nkaka? Okoyoka bongo te soki olingi Yehova mpe ondimi ete mibeko na ye ezali mpo na bolamu na yo.—Nz. 119:97; Yis. 48:​17, 18. w24.03 2 par. 1; 3 par. 4

Mwalomingo, 30 sanza ya 11

Nandimi yo.—Luka 3:22.

Yehova apesaka elimo santu na ye epai ya bato oyo andimi. (Mat. 12:18) Tokoki komituna boye: ‘Namonisaka bizaleli mosusu ya mbuma ya elimo ya Nzambe na bomoi na ngai?’ Omonaka ete okómi na motema molai mingi epai ya basusu koleka ndenge ezalaki liboso oyeba Yehova? Mpo na koloba solo, soki ozali koyekola komonisa mingi bizaleli ya mbuma ya elimo ya Nzambe, okomona mpe malamu ete Yehova andimi yo! Yehova asalelaka motuya ya lisiko epai ya baoyo andimi. (1 Tim. 2:​5, 6) Kasi, tokosala nini soki motema na biso ezali koboya kondima ete Yehova andimaka biso, ata soki tozali na kondima na lisiko mpe tozwá batisimo? Tóbosana te, tokoki kotyela mayoki na biso motema ntango nyonso te, kasi tokoki kotyela Yehova motema. Amonaka ete bato oyo bazali na kondima na lisiko bazali sembo na miso na ye mpe alaki ete akopambola bango.—Nz. 5:12; Rom. 3:26. w24.03 30 par. 15; 31 par. 17

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto