Esengeli kotosa na makambo nyonso?
WANA elenge Paulo azali kobima na ndako, mama na ye angangi: “Ozali koyoka ngai?” Azali kotuna ye te mpo na koyeba soko ayokaka malamu to te, kasi alingi se koyeba soko akotosa mpe akozonga na ndako na ntango malamu.
Na yango, koyoka mpe kotosa ezali makambo mibale masali lokola makokana. Ezali likambo ya kokamwa te na komona ete na minoko oyo Biblia ekomamaki na ebandeli, kotosa ezali na boyokani na koyoka. Nzokande, tosengeli koyoka nani? Tosengeli kotosa epai na moto nyonso oyo azali kosenga ete totosa ye, to na ndimbola mosusu, tosengeli kotosa na makambo nyonso?
Tosengeli kotosa na likambo nini?
Na makambo nyonso, tosengeli kotosa epai na Mozalisi, Jéhovah Nzambe. Mpo ete azali Mobandisi mpe Liziba ya bomoi na biso, biso bikelamu na ye, tosengeli liboso kotosa epai na ye. (Nzembo 95:6, 7) Epai mosusu, lokola azali Moyangeli monene, Jéhovah apesi nguya na ye epai na bato mosusu oyo bazali kolanda mitinda na ye, mpe mpo na yango tosengeli kotosa bango. Yesu Klisto azali moto ya liboso kati na bato yango. Uta 1914, azali Mokonzi oyo Nzambe atyaki ye mpo na kotambwisa Bokonzi ya makoló, “mpo ete mabota mpe mikili mpe nkota nyonso basalela ye.” (Danyele 7:13, 14) Epai mosusu, lokola azali Mokonzi ya lisanga ya boklisto, Yesu apesaki mwa nguya epai na bato, babateli na mpate-balandi, baoyo tosengeli kotosa bango.—Baebele 13:17.
Jéhovah apesaki mpe mitinda mpo na oyo etali botosi kati na libota. Alendisi bana ete ‘batosa baboti na bango kati na Nkolo’, mpe basi “batosa mibali na bango pelamoko epai na Nkolo”. (Baefese 5:21 kino 6:3) Asengi mpe epai na baklisto “bamikitisa liboso na mikóló mpe mikonzi; bazala na botosi epai na bango lokola epai na mikonzi”. (Tito 3:1) Kasi, tosengeli kotosa na makambo nyonso? Tosengeli kotosa ntango nyonso?
Na likambo nini tosengeli koboya kotosa?
Tokomitya na likama soko tozali koyoka bato oyo bazwaki bokonzi moko te epai na Jéhovah. Adam, moto ya liboso, ‘ayokaki’ mongongo ya Eva, mpe alyaki mbuma ya koyeba malamu na mabe lokola mwasi na ye. (Genese 3:17) Na yango, “ebele ya bato bakomi basumuki awa moto moko aboyaki kotosa”. (Baloma 5:19, Liloba lya Nzambe.) Adam asalaki mabe oyo mpo ayokaki mwasi na ye, likambo oyo mbele akokaki kosala yango te.
Epai mosusu, esengeli ntango nyonso kotosa bato oyo basili kopesama bokonzi? Te, soko bameki kosalela bokonzi yango na lolenge ezangi boyokani na mitinda ya Nzambe. Na ndakisa, etinda oyo elobi ete tosengeli kotosa epai na “bankolo na biso ya mosuni” etindi biso totosa patron na biso. Kasi, tokosala nini soko asengi biso tosala likambo moko oyo ekeseni na mibeko ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso? Paulo amonisi biso ezaleli oyo tosengeli kolanda wana elobi ye: “Bosalaka na botosi, mpo na komonana te, lokola ete bozali kosalela bato, nde lokola baombo na Klisto, kosalaka mokano na Nzambe uta na motema.” (Baefese 6:5, 6) Na libaku mosusu, Petelo mpe bantoma mosusu balobaki: “Ekoki ete totosa Nzambe liboso na kotosa bato.”—Misala 5:29.
Ezali ndenge moko kati na libota. Mobali ya mwasi moklisto oyo ayebi mitinda ya Nzambe te, akoki kopekisa mwasi na ye koyangana ntango nyonso na makita ya lisangá. Toloba ete azali kolukela ye mindondo, azali ata kobeta ye lokola yango esalemaka mbala mingi mpo atika kokenda na makita yango, moklisto mwasi akosala nini? Soko atiki kokenda na makita, akoki kotya elimo na ye mpe oyo ya libota na ye na likama, mpe akobungisa bongo elikya ya bomoi na seko. Ekoleka malamu ete atosa Jéhovah, na koyebaka ete moto moko te, ata mobali na ye, azali na lotomo ya kobuka mobeko oyo elobi ete ‘botika koyangana elongo moko te’.—Baebele 10:25.
Mobali ya Miyoko azalaki koboya ete mwasi na ye akenda na makita mpo azalaki kokanisa ete na koyanganaka na makita ya boklisto, azalaki “kobebisa” lifuta na ye. Atikaki kopesa ye mosolo mpo na kolamba, mpe Miyoko asengelaki kokenda na Salle du Royaume na makolo, mpe yango ezalaki kosenga ye ngonga mobimba mpo na kotambola.
Alembaki? Te. Abondelaki Jéhovah mpe atalelaki ezalela na ye. Lokola akangaki ntina ya botemeli ya mobali na ye, Miyoko azwaki ekateli ya koluka mosala: akobanda kokende kotikela bato bazulunalo. Mobali na ye andimaki kasi asengaki ete apesaka ye ndambo ya lifuta na ye.
Miyoko abondelaki lisusu Jéhovah mpo ete soki ezali mokano na ye bapesa ye nzela ya kotikaka bazulunalo zongazonga ya ndako na ye. Mbala mingi, esalemaka ete mbula mobimba eleka liboso ya kozwa eyano na lisengi motindo wana; kasi, akamwaki na komona ete poso motoba na nsima, lisengi na ye endimamaki. Lokola alendisamaki na likanisi ya koyeba ete Jéhovah ayokaki mabondeli na ye, abandaki kosala ntongo nyonso kobanda na 4h30 kino 6 heures. Emonaki ye bongo, mobali na ye abandaki kobongola ezaleli na ye mpe abandaki koyokana na mwasi na ye. Soko, na ndakisa ya Miyoko, oyo asengaka mosala ya pionnier auxiliaire sanza nyonso, totaleli ezalela na biso kati na libondeli mpe tomipesi, tokozwa lipamboli ya Jéhovah.
Mobali oyo azali mondimi te akoki kozala na bantina ekotinda ye asenga epai na mwasi na ye ete azangisa likita moko ya lisangá, mpe akosala bongo na likanisi mabe te mpo na losambo to mosala oyo mwasi na ye azali kosalela Jéhovah Nzambe. Soko akangi ntina malamu ya mitinda ya Biblia, yango ekosalisa mwasi yango ete azwa ekateli ekoki na likambo yango.
Lisusu, ezaleli nini mwasi yango akozala na yango soko mobali na ye apekisi ye ete amema bana na makita te? Ayebi malamu ete ata mobali na ye azali kondima bokonzi na Klisto te, azali ata bongo se mokonzi ya libota. (1 Bakolinti 11:3) Epai mosusu, akomibanzabanza na kolongono ya elimo ya bana na ye, mpe azali na mposa ya kotosa Jéhovah. Ya solo, kondima na ye ekomekama na likambo yango mpamba te asengeli kokokisa mikumba na ye nyonso; kasi libondeli, oyo akosala epai na Jéhovah mpo na kosenga ye mayele mpe bososoli, ekosalisa ye solo. (Yakobo 1:5; Bafilipi 4:6, 7) Epai mosusu, akosilisa mokakatano yango soko azali koloba epai na mobali na ye na boboto nyonso, na mayele, mpe na kozala na elimo na kimya mpe na bopolo.—Bakolose 4:6; 1 Petelo 3:1-5.
Likambo motindo yango ekomelaki mpe moklisto moko akofandaka na Yamato, na Japon: mobali na ye apekisaki ye komema bana na bango misato na makita. Akokaki kosala nini? Amibongisaki mpo na koteya bana na ye na ndako mpe ntango bana bakomaki mikóló mpe bakokaki kozwa ekateli bango moko mpo na likambo oyo balingaki kosala, bazwaki ekateli ya kosambela Jéhovah mpe babandaki koyangana na makita. Mobali asilikaki mpe abenganaki bango nyonso na ndako na ye.
Moklisto mwasi yango azwaki mosala mpe afandaki mpo na mwa ntango epai na ndeko mosusu ya mwasi. Ata bongo, azalaki ntango nyonso kozonga na ndako mpo na kosala misala ya mikemike mpe kolambela mobali na ye. Na nsima ya sanza moko, mobali azongisaki bango na ndako mpe atikaki kopekisa misala na bango ya elimo. Etamboli ya sembo ya moklisto mwasi yango ezwaki mbano.
‘Tomeka maloba mapemami’
Ndenge nini tokoki kotalela bokonzi na kati na libota ya Nzambe? Na ntembe te, tosengeli kotosa baoyo bazali na mikumba na kati ya lisanga ya boklisto, mpamba te baponami na elimo santu, mpe toli na bango elongo na makebisi na bango etongami likolo na Liloba ya Nzambe. (Misala 20:28; Baebele 13:17) Nzokande, elingi koloba te ete baklisto bakotosa makambo nyonso kozanga kososola.
Mpamba te, ntoma Yoane apesaki toli oyo: ‘Bondima maloba nyonso mapemami te, kasi bomeka maloba mapemami, mpo na komona soki mauti na Nzambe.” (1 Yoane 4:1) Yoane alingaki koloba te ete tosengeli kobeta ntembe na makambo nyonso oyo tozali koyoka; nzokande, tomikundola maloba na Paulo makomami na Bagalatia 1:8: “Nde soko biso, soko mwanze na likolo, akosakwela bino nsango ekeseni na oyo esakwelaki biso bino, tika ete alakelama mabe.”
Mateya oyo moto moko alingi koteya biso, makeseni na oyo tozwaki na nsima na “moombo na sembo mpe na mayele”? Moto oyo azali kopanza yango azali koluka kokumisa bomoto na ye moko? Makambo mazali ye kosakola mazali na boyokani na solo nyonso mosusu oyo ezwami na Biblia? Nyonso oyo ezali mituna mikosalisa biso ete ‘tomeka’ maloba nyonso oyo tomoni yango ete ezali polele te. Liloba na Nzambe epesi biso toli ete ‘tososola makambo nyonso; tosimba oyo ezali malamu’.—Matai 24:45; 1 Batesalonike 5:21.
Na likambo yango, Gédéon apesi biso ndakisa moko ebongi na likebi na biso. Alingaki koyeba soki Jéhovah akozala na ye elongo na etumba. Yango wana asengaki ye elembo oyo: “Tala, nakotia ndambo na mposo na mpate na etando na kotuta; soko mamwe ekozala bobele na mposo, mpe soko nse nyonso ekaoki, wana nakoyeba ete okobikisa Yisraele na loboko na ngai lokola elobi yo.” Jéhovah asalaki lokola esengaki ye, kasi Gédéon asengaki elembo oyo mosusu: “Tika bobele mposo na mpate ekaoka mpe mamwe ezala na nse nyonso.”—Basambisi 6:37-39.
Gédéon alekaki bokengi to azangaki konfianse? Ezali boye te, mpamba te, mbala mibale Jéhovah andimaki lisengi na ye mpe asalaki lokola esengaki ye. Gédéon alingaki koyeba solosolo ete ekozala bongo. Lokola ntango yango bazalaka na Biblia te lokola biso, elembo wana ekokaki na Gédéon mpo ete ‘ameka’ to asosola. Nzokande, nsima na komona bilembo wana oyo asengaki, atosaki bitinda nyonso ya Jéhovah, atako ezalaki likambo ya kokamwa na kobundisa banguna 135 000 bobele na basoda 300. (Basambisi 7:7; 8:10) Boni mpo na biso, tomonisaka elimo oyo moko, kolukaka kati na Liloba na Nzambe wapi mokano ya Jéhovah mpenzampenza, mpe tozali kotosa makambo nyonso masengami na yango?
Kopona oyo eleki mayele
Jéhovah azali kosenga na biso te ete tozala na kondima ezangi bososoli, soko ete totosa ye lokola nyama ekotosaka mobokoli na yango oyo azali kosalela nsinga na nkingo to fimbo. Ntina wana alobáká na David: “‘Bozala lokola mbalata to mpunda te oyo azali na mayele te; oyo ekangami na ebende na monoko mpe na nkamba; soko te bakobelema epai na yo te.” (Nzembo 32:9) Nzokande mpo na biso bato, Jéhovah apesaki biso likoki ya kokanisa mpe kososola, mpo tokoka kotosa ye mpe kokanga ntina na makambo mazali biso kosala.
Na monoko ya Japoné, liloba kikou (koyoka) elimboli bobele báya koyoka mpe kotosa te, kasi lisusu kososola mpo na komona eloko soko ezali malamu to mabe. Ezali motindo yango tosengeli kosala ntango moto moko azali koloba na biso, na motindo boye ete, soki tokotosa, tokosala yango
bobele mpo na bindimela te, kasi mpo ete tozwi ekateli mpo na yango. Ntango Jéhovah, Tata na biso ya likolo, azali koloba na biso, ezala na nsima na Liloba na ye Biblia, to na nsima na lisanga na ye awa na mabele, ezali ntina mingi ete toyoka mpe totosa; na motindo yango tokomonisa ete tozali basambeli na ye na botosi, oyo bazali kotya likebi na liloba oyo ya bolingo mingi: “Ozali koyoka ngai?”
[Elilingi na lokasa 18]
Nasengeli kotosa nani?
[Elilingi na lokasa 20]
Gédéon alukaki koyeba mokano ya Jéhovah mpe atosaki ye