Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/5 nk. 17-25
  • Nsango esakolami na baanzelu mpo na eleko na biso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nsango esakolami na baanzelu mpo na eleko na biso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Baanzelu” mpe “bilembo”
  • Kiti ya bokonzi na Nzambe, mokanda moko, mpe motuna moko
  • Baoyo ‘bakoki kotelema’
  • Koyula na kelelo eyebisi masambisi ya Nzambe
  • Kelelo ya nsambo mpe mawa ya misato
  • Mokanda ya Biblia nimero 66—Emoniseli
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Ntango na kosambisa na Nzambe eyei
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Emoniseli—I
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Na kati ya Emoniseli
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/5 nk. 17-25

Nsango esakolami na baanzelu mpo na eleko na biso

“Nzambe . . . atindi anzelu na ye mpe na nzela na ye abakisaki ye yango na bilembo.”​—EMONISELI 1:1.

1. Ndimbola nini mabe bato bazali mbala mingi kopesa na nkombo Apokalipse, mpe Emoniseli ezali koyebisa biso nini mpo na avenire?

APOKALIPSE. Liloba oyo esalelami mbala mingi na ekeke ya ntuku mibale, nzokande bato bakangi ndimbola na yango te! Biblia esaleli yango te mpo na kolobela kobomama ya mokili mobimba na nzela na etumba ya nikleere. Na yango, liloba oyo na greke elimboli “komonisama polele”. Ya solo, na lisalisi ya molongo na bisakweli, mokanda na Biblia ya Apokalipse, to Emoniseli, emonisi polele makambo oyo masengeli na nsima kobima na eleko ya bolamu oyo ezangi nsuka mpo na bato. Yoane, ntoma na Yesu, abandi bongo Emoniseli na maloba oyo: “Esengo na motangi mpe na bayoki na maloba na kosakola oyo, mpe baoyo batosi makambo masili kokomama kati na yango mpo ete elaka ezali penepene.”​—Emoniseli 1:3.

2, 3. Mpo na nini mawa matondi mingi kati na mokili, mpe Jéhovah akani kosala nini?

2 Mokili oyo ezali na esengo te. Ntina na yango ezali komonana kati na loyembo moko oyo Moïse asalaki eleki sikawa pene na mibu 3 460: “Bango basaleli ye mabe, bazali bana na ye [Nzambe] lisusu te na ntina na libebi na bango, bazali libota bapengwi mpe bayongotani!” (Deteronome 32:5) Maloba oyo mazali mpenzampenza kotalela libota ya lelo, oyo misala na yango mibebisami nyonso. Ezali yango nde emonisi kozanga nkaka na ebandeli ya mokanda Mosolo mobimisami mpo na misala na basoda mpe makambo matali bomoi na bato kati na mokili na 1987-1988 (na Anglais): “Kowelana mpo na kozwa ebele na bibundeli ezali kobebisa bomoi na bato ya mabota nyonso. Mpo na bango mibale, Etats-Unis mpe Union soviétique bazali kobimisa mosolo penepene na miliare moko na ndambo ya badolare na mokolo mpo na komibatela liboso na bitumba. Nzokande, mpo na oyo etali kokufa ya bana mike, Etats-Unis ezali na esika ya zomi na mwambe mpe U.R.S.S. na esika ya ntuku minei na motoba katikati na mikili nyonso. Mikili oyo bazali komeka komilongola na bobola bazali ntango nyonso kobimisa ebele na mosolo koleka mbala minei mpo na kobongisa mampinga na bango na esika ya kobimisa mosolo yango mpo na makambo matali kolongona na bango ya nzoto. Nzokande, na mikili yango, bankoto na bamilió ya bato bazali na nzala, mpe 20% ya bana bazali kokufa liboso ete bakokisa mibu mitano.”

3 Makambo mosusu mazali kobakama likoló na ezaleli oyo ya libebi: kokwea ya bizaleli malamu, bokabwani ya mabota, kobakisama ya mobulu etali koboma bato mpe ya nsomo oyo ezali kongala kati na mokili, kozanga bolingo mpe botioli ya mibeko oyo emonisami epai na bato ya libota oyo. Esengo nini na koyeba ete Jéhovah azali na mokano ya “kobebisa baoyo bazali kobebisa mokili”! (Emoniseli 11:18.)Na kolandana ya bimonaneli 16, mokanda na Biblia ya Emoniseli ezali koyebisa na bosikisiki ya solo motindo Nzambe akokokisa mokano yango.

“Baanzelu” mpe “bilembo”

4. Mosala nini baanzelu bazali kokokisa kati na Emoniseli, mpe na bililingi nini bimonaneli bizali komonisa anzelu oyo aleki ntina?

4 Emoniseli ezali kongengisa esakweli ya liboso ya Biblia, esakweli oyo ekomami kati na Genese 3:15, na koyebisaka nsuka ya likunya oyo ekaboli Satana mpe lisangá na Nzambe oyo ekokisami na mwasi, elongo na ‘mabota’ na bango mibale soki ekozala nini. Ezali koyebisa lolenge Jéhovah azali kosambisa na ngambo moko banguna na ye, mpe na ngambo mosusu baoyo balingi ye mpe bazali kosimba bokonzi na ye. Emoniseli epesami na Yoane na “bilembo” epai na anzelu moko. Baanzelu mosusu, to bamemi na nsango, bazali na esika monene kati na kosakolama mpe na kokokisama ya bilembo yango. Anzelu ya ntina monene amonisami kati na Emoniseli 1:5 lokola ete “Yesu Klisto, ‘Temwe ya sembo’, ‘mobotami ya liboso kati na bakufi’, mpe ‘Mokonzi ya bakonzi na mokili’. Kati na “bilembo”, to bimonaneli, tozali komona ye lisusu na bizaleli ya “Nkosi” mpe ya “Mwana na mpate”; abengami mpe lisusu “Mikaele” mpe amonani mbala mingi lokola anzelu na nguya.​—Emoniseli 5:5, 13; 9:1, 11; 10:1; 12:7; 18:1.

5. Emonaneli ya liboso ya Emoniseli ezali na nini, mpe yango etali biso na nini?

5 Emonaneli ya liboso (Emoniseli 1:10 kino 3:22) esangisi nsango ya sikisiki etindami na Yesu Klisto oyo akembisami epai na “baanzelu”, to bakengeli, ya masangá nsambo ya Azia oyo elimboli lisangá ya mokili mobimba ya ba Témoins de Jéhovah na “mokolo ya Nkolo”. Na bongo nsango yango etindami epai na biso, ee, epai na biso baoyo tozali na bomoi lelo! Tosengeli ‘koyoka na likebi nyonso makambo oyo elimo ezali koloba epai na masangá’, mpamba te makebisi mpe batoli yango etindami mpo na kolendisa biso, mpo ete totikala sembo, tondimama mpo na misala na biso, ‘mpo na bolingo na biso, mpo na kondima na biso, mpo na mosala na biso mpo na Nzambe mpe mpo na kolondendela na biso.’​—Emoniseli 1:10; 2:7, 10, 19.

6. Litomba nini tokoki kozwa na mokomoko na bansango eyebisami epai na masangá nsambo ya Azia?

6 Lokola lisangá ya Efese, mbala mosusu tosalelaki Jéhovah na bosembo nyonso mpe toyinaki misala na bapengwi oyo bazali kobota bokabwani. Nzokande, soki, na lolenge moko to mosusu, bolingo na biso esili kokita, tobongola motema mpe tozongela bolingo na biso ya ebandeli, kati na móto na yango nyonso. Lokola basangani ya lisangá na Sumula oyo bazalaki mpenza bazwi kati na elimo, tobunda na molende nyonso mpo na komimonisa ete tobongi mpo na kozwa mbano na kotikalaka ‘sembo, kino na liwa’, soki yango esengeli. Na ndakisa ya baklisto oyo Satana amekaki na Pelegame, tosengeli kobongola mitema na losambo nyonso ya bikeko, na pite mpe na elimo ya kosala mangomba mikemike oyo mbala mosusu tozalaki na yango kala. Baklisto ya Twatila bakebisamaki na misala to mitambo yango, mpe lisusu na bopusi ya bato oyo bakokani na Yezabele. Biso mpe, tosengeli kokeba! Moto nyonso oyo asili kokufa kati na elimo, lokola baklisto ya Salade, asengeli kolamuka liboso ete ngonga eleka. Porte oyo ezali kopesa nzela na mosala ezali polele liboso na biso, lokola yango ezalaki liboso na baklisto ya Filadelfi; tika ete tozala na nguya motindo moko na bango mpe kobima balongi na ntango ya komekama! Soki moto moko kati na biso akomi moto te mpe mpio te, lokola baklisto na Laodikia, esengeli na ye koyeba bolumbu na ye kati na elimo mpe kobongola motema. Yesu azali kobeta na ekuke. Toyamba ye biso banso mpe tolia elongo na ye bilei ya elimo oyo bikabolami kati na masangá 55 000 oyo mapalangani kati na mokili mobimba.​—Emoniseli 1:11; 2:7, 10, 11, 17, 29; 3:6, 13, 22.

Kiti ya bokonzi na Nzambe, mokanda moko, mpe motuna moko

7. Masanzoli nini malobami kati na emonaneli ya mibale, mpe epusi yo na kosala nini?

7 Kati na emonaneli ya mibale, Yoane amoni kiti ya lokumu ya bokonzi na Jéhovah na likoló. Nzambe na biso amonani na nkembo na ye nyonso, na bonzenga oyo eleki nyonso. Asungami epai na bakeluba minei, na mampinga ya baanzelu, mpe lisusu epai na baklisto baoyo balongaki mokili mpe basekwisamaki. Loyembo na bango ya kosanzola eyokisi lokito na yango! Yango oyo: “Jéhovah mpe Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo, na lokumu, na nguya, mpo ete ozalisaki biloko nyonso; mpe mpo na mokano na yo bizali mpe bisilaki kozalisama.” Jéhovah apesi mokanda epai na Ye oyo abongi mpo na kofungola yango: Nkosi ya libota na Yuda, Mwana na mpate abomamaki oyo akomi Mosikoli na biso. Bikelamo nyonso bakumisi Jéhovah mpe Mwana na mpate.​—Emoniseli 4:11; 5:2-5, 11-14.

8. Likambo nini tozali komona kati na emonaneli ya misato ya Emoniseli, mpe na nini yango etali eleko na biso?

8 Toleka sikawa na emonaneli ya misato. Mwana na mpate abandi kofungola bilembo nsambo ya mokanda. Tozali komona nini? Ya liboso, kati na makoló, Yesu auti kozwa bokonzi amati likoló na mpunda mpembe, oyo alimboli etumba ya sembo. Na nsima, mofandi likoló na mpunda motane azali kobenda mabelé mobimba kati na etumba. Nsima na yango ekomi ngala ya mpunda moindo, nzala, mpe nsima na ye mpunda na langi ya mpondu, maladi, oyo mofandi na yango abengami Liwa. Hades ezali kolanda yango, mpo na komela bamilió na bakufi. Kotambola na bafandi na mpunda wana ebandaki na “bolozi” oyo ekwelaki mokili kobanda 1914 kino 1918, bolozi oyo basangani ya libota yango oyo bazali naino na bomoi lelo bazali koyeba malamu. (Matai 24:3-8) Batambwisi na mpunda wana bazali kotambola naino. Mpe na ntango ya bofungoli bilembo ya mitano mpe ya motoba, makambo mabandi kolandana mpo na kokoma na ‘mokolo monene ya nkanda na Jéhovah mpe ya Mwana na mpate’. Na bongo motuna mozali kotunama: “Nani akoki kotelema?”​—Emoniseli 6:1-17.

Baoyo ‘bakoki kotelema’

9. Likambo nini ya kokamwa emonaneli ya minei elakisi biso?

9 Emonaneli ya minei elandi. Ezali koyebisa nani akobika na mokolo ya nkanda na Nzambe, mpe mpo na nini. Baanzelu basimbi mipepe minei ya koboma ete ebeta na mokili te mpo ete basangani na Yisraele ya elimo ba 144 000 bakoka bango nyonso kotiama bilembo. “Nsima na makambo oyo”, emonaneli elakisi likambo moko ya kokamwa: “Tala ebele monene na bato oyo moto te akokaki kotanga motuya na bango, ya mabota nyonso, ya mikili nyonso, ya bikolo nyonso, ya minoko nyonso; batelemi liboso na kiti na bokonzi mpe liboso na Mwana na mpate. Balati bilamba mpembe, mpe basimbi bitape na mbila na maboko na bango. Bangangi na mongongo makasi ete: ‘Lobiko na Nzambe na biso oyo afandi na kiti na bokonzi, mpe na Mwana na mpate.’ (Emoniseli 7:1-10) Ozali kati na ebele monene yango?

10. (a) Kotalelama ya rapport ya Ekaniseli ya 1935 mpe oyo ya 1989 emonisi nini mpo na oyo etali kokokisama ya emonaneli ya minei? (b) Motuna nini mokomoko kati na biso asengeli komituna sikawa, mpe mpo na nini?

10 Na 1935, bato nyonso oyo basanganaki na Elekeli ya Nkolo, ekaniseli ya liwa na Yesu kati na mokili mobimba, bazalaki na motuya ya 32 795. Kati na motuya oyo, bato 27 006 baliaki limpa mpe bamelaki vinyo, komonisaka bongo ete bazalaki batikali ya ba 144 000 oyo bazali naino na bomoi na mabelé, baoyo bazali na elikya ya likoló. Mwa moke na nsima, bobele na boumeli ya mobu moko wana, koyebana ya ebele monene elimbolamaki polele. Basokemi wana, baoyo bazali na elikya ya kofanda seko na mabelé oyo ebongolami paradis, bango bazali komonisa kondima kati na makila oyo Yesu asopaki, bazali koya epai na Jéhovah, komipesa epai na ye, bazali kozwa batisimo mpe bazali kosalela ye na molende na kozalaka na elikya kitoko ya koleka “bolozi monene” kozanga kokutana na liwa. Na Ekaniseli ya 1987, assistance ezalaki ya bato 8 965 221, kasi bobele bato 8 808 baliaki limpa mpe bamelaki vinyo. Rapport oyo emonisi ete bamilió na bato bazali mpenza basangani ya ebele monene to bazali kolinga kokoma bamoko ya basangani yango. Okozala na kati na bango mpe okokoka kotelema na boumeli ya ‘mokolo monene ya nkanda na Jéhovah mpe na Mwana na mpate’? Soki ozali kosala matambe ya ntina mpo na kolonga, okobikisa bomoi na yo.​—Emoniseli 6:15-17; 7:14-17.

Koyula na kelelo eyebisi masambisi ya Nzambe

11. Bisambiseli nini bisakolami na nzela na bakelelo kati na emonaneli ya mitano, mpe na nini etaleli eleko na biso?

11 Elembo ya nsambo efungami, mpe emonaneli ya minei ya Emoniseli epesameli biso mpo na kotala. Baanzelu nsambo batelemi liboso na Nzambe. Bazwi bakelelo nsambo, oyo na nzela na yango bazali kopanza bansango oyo basaleli na Jéhovah bazali kozongela kati na mokili mobimba kobanda 1922. “Bakelelo” minei ya liboso ezali koyebisa bisambiseli oyo bilobami epai na “ndambo moko ya misato” na bato, baoyo bazwami kati na boklisto ya mokili oyo. Ezali komonisa ete eteni ya “mabele” (ebongiseli ya biloko na Satana oyo ezali kotengatenga ntango nyonso) mpe ya “mai” (bato oyo bazali kotia mobulu kati na mokili) oyo euti kati na boklisto ya mokili Oyo, bakisa mpe ‘bibale na ye, maziba na ye’ (mateya mpe bafilosofi ya boklisto na mokili oyo) mpe minda na ye ya kongenga mayindisami (bakonzi na mangomba, oyo bazangi kongengisama kati na elimo), bango nyonso bazali kati na bato oyo , nkanda na Nzambe ekokwela. “Mpongo” moko oyo azali kopombwa, oyo azali komonisa anzelu moko, abimi na nsima katikati na likoló mpe asakoli ete kobeta misato na kelelo oyo ezali kolanda ekolimbola “mawa, mawa, mawa epai na baoyo bafandi na mokili”.​—Emoniseli 8:1-3.

12. Nani afungoli libulu mozindo, mpe, na mikolo na biso, motindo nini ebele na “mayoyo” baswaki bakonzi na mangomba?

12 Na ngonga na ye, anzelu ya mitano abeti kelelo. Botala! “Monzoto moko”​—Nkolo Yesu—​afungoli libulu mozindo oyo etondi na milinga, mpe ebele na mayoyo babimi na kati. Tala likambo oyo emonisi na lolenge ya kokamwisa Yesu, oyo na 1919 asikolaki batemwe ya Nzambe bapakolami na elimo kati na ezalela ya kozanga mosala. Lokola ezwaki bango bokonzi epai na Nzambe, bapanzi matomba ya bakonzi na mangomba na kotondolaka lokuta ya mateya na bango mpe bokosi na bango na boumeli ya “sanza mitano”, eleko elongobani mpo na bomoi ya mayoyo. Yango elimboli ete libota na mayoyo ya elilingi ya eleko na biso “ekoleka te” liboso ete Jéhovah mpe Yesu Klisto basilisa kosambisa mabota. Liboke oyo na mayoyo esilaki kokabola bamiliare na mikanda oyo mizali kolimbola Biblia mpe esakolaki bansango ya lisambisi makasi oyo ezali koswa lokola mokila ya nkoto. Na nsima Yoane ayebisi boye: “Mawa moko esili koleka, nde tala, mibale makoya na nsima na makambo oyo.”​—Emoniseli 9:1-12; Matai 24:34; 25:31-33.

13. (a) Baanzelu minei oyo bakangamaki pene na ebale Efalata, mpe basikolamaki bazali komonisa banani, mpe mosala nini basengeli kokokisa? (b) Makiasi kiasi na bampunda ezali komonisa banani, mpe na ndimbola nini nguya na bango ezali “kati na minoko na bango mpe kati na mikondo na bango”?

13 Kelelo ya motoba ebeti, koyebisaka “mawa” ya mibale. Baanzelu minei bakangamaki penepene na ebale Efalata bakangolami, likambo oyo ezali komonisa lolenge ya solo kosikolama na 1919 ya batemwe bapakolami ya Nzambe, oyo bakangamaki na Babilone. Babongisamaki mpo na “koboma ndambo na misato ya bato” na kosakolaka ete bakonzi na mangomba ya boklisto na mokili oyo bazali na bomoi te liboso na Jéhovah. Kasi bazali na mposa ya lisalisi mpo na kopalanganisa mosala wana ya litatoli, mpe Jéhovah apesi bango yango na kobimiselaka bango ebele monene ya baninga na mosala. Batemwe bapakolami elongo na balandi na bango bamikotisi bongo na etumba lokola limpinga na bampunda to mbalata oyo motuya na yango eyebani te, ya nguya ya “makiasi kiasi mbala mibale”. Nguya na bango ezwami “kati na monoko na bango”, na ndimbola oyo ete bazali kosakola bansango ya lisambisi na Jéhovah na bandako na bato, kasi lisusu “na mikondo na bango”, mpamba te bazali kotika nsima na bango mikanda oyo mizali kolimbola Biblia oyo mizali koyebisa kobelema ya mokolo monene ya kobukanisa na Nzambe.​—Emoniseli 9:13-21; Misala 20:20, 21.

14. “Anzelu na nguya” oyo alobelami kati na emonaneli ya motoba azali nani, azali kosala nini mpe alobi nini? (b) Likambo oyo ete, atako ezali “elengi lokola mafuta na nzoi” na monoko, mokanda moke ‘ezali bololo na libumu’ elimboli nini?

14 Sikawa emonaneli ya motoba efungwami. Tozali komona “anzelu moko ya nguya”, Nkolo Yesu Klisto, na ntembe te, azali kokokisa mosala moko ya ntina. Asimbi mokanda moko moke na loboko na ye. Mingongo mpe bankake ezali koyokisama, mpe anzelu akati ndai na nkombo ya Mozalisi na biso monene: “Koumela ekozala lisusu te; kasi wana, ekoyula mwanze na nsambo na kelelo na ye, na mikolo yango libombami na Nzambe.” Na nsima Yoane abiangami mpo na kokwa mokanda moke mpe ete alia yango. Kati na monoko na ye, mokanda yango mozali “elengi lokola mafuta na nzoi”, motindo moko lokola nsango ya Bokonzi, oyo eyokani na elaka ya mapamboli oyo “likoló mpe mabele na sika” makomema, mpe ezali kopesa esengo mingi epai na kelasi ya Yoane epakolami na elimo mpe epai na baninga na bango lelo. Nzokande, mokumba ya kosakola mokolo ya kobukanisa na Nzambe “na ntina na bibele mpe mabota mpe minoko mpe mikonzi mingi” ezali bololo na libumu ya bamosusu. Kasi bozala na mpiko! Bozala na kondima, bondimisama ete Jéhovah akopesa bino nguya esengeli mpo na kosakola mokolo na ye ya kobukanisa.​—Emoniseli 10:1-11; 21:1, 4; 1 Yoane 5:4; Yisaya 40:29-31; 61:1, 2.

Kelelo ya nsambo mpe mawa ya misato

15. (a) Likambo nini ebimi ntango mawa ya misato esakolami mpe ete anzelu na nsambo abeti kelelo? (b) Na ndimbola nini kosakolama ya Bokonzi ezali bongo mawa mosusu?

15 Nsima na koyebisa makaneli ya monguna mpo na “koboma” batemwe ya Nzambe na 1918, mpe nsima na koyebisa lolenge ya polele oyo “elimo na bomoi, euti na Nzambe”, epesaki bango lisusu nguya na 1919 mpo bapesa litatoli kati na mokili mobimba, Yoane akomi: “Mawa na mibale esili. Tala mawa na misato ekoya noki.” Ezali koya motindo nini? Lisolo ezali kokoba boye “Mwanze na nsambo ayulaki.” Na bongo mawa na misato ekangisami na koyula na kelelo ya nsuka. Boyoka! “Mingongo makasi kati na likoló milobi ete. ‘Bokonzi na mokili oyo esili kokoma bokonzi ya Nkolo na biso [Jéhovah] mpe na Klisto na ye, mpe akozala mokonzi libela na libela.”’ Awa ezali bongo likambo ya Bokonzi na Nzambe oyo epesami epai na Yesu Klisto, oyo, elongo na ba 144 000 batuki na libula elongo na ye, bakokisi libombami na bulee ya Nzambe, kolongisaka bongo bokonzi na seko ya Jéhovah Nzambe, Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Kosakolama wana ya Bokonzi ezali mawa? Mpo na bato mabe, ezali mawa, mpamba te ezali kosakola ete Nzambe “akobebisa [koboma] baoyo bazali kobebisa mokili.”​—Emoniseli 11:1-19.

16. Makambo nini ya kokamwa mayebisami kati na emonaneli ya nsambo?

16 Botala sikawa emonaneli ya nsambo. Botala, lisangá ya likoló ya Nzambe, “mwasi” na ye, oyo azali kotosa ye! Azali na zemi mpe azali na mpasi mpo na kobota mwana mobali oyo bato bazelaki uta kala. Mpo na mbala ya liboso, kasi ezali ya nsuka te, Emoniseli ezali kolobela biso na ntina na Dalagona motane, “nyoka na kalakala, oyo abiangami Diable mpe Satana, mozimbisi na bato na mokili mobimba”. Azali pene mpo na komela mwana uta kobotama na ye. “Likunya” oyo esakolamaki “kati na [nyoka] mpe mwasi” ekomi na nsuka na yango. Mwasi aboti “mwana mobali”, oyo akumbami nokinoki pene na kiti ya bokonzi na Nzambe.​—Emoniseli 12:1-6, 9; Genese 3:15; Danyele 2:44; 7:13, 14.

17. (a) Mikaele azali nani, mpe ndenge nini asalaki na boyokani na ndimbola ya nkombo na ye kobanda 1914? (b) Bomonisa likeseni kati na ‘mawa misato’ mpe “mawa ya mokili” oyo eyebisami kati na Emoniseli 12:12.

17 Mwana mobali yango azali bongo Bokonzi, oyo etiamaki na makoló na mobu oyo tokoki kobosana yango te 1914. Mokonzi na yango, Yesu Klisto, abengami lisusu Mikaele, nkombo oyo elimboli “nani akokani na Nzambe?” Ayanolaki nokinoki na motuna yango na kobundisaka Satana mpe na kobwakaka Dalagona wana ya kalakala mpo bilimu mabe na ye na mabelé. Kobanda 1914, “mawa” ekweli ‘mokili mpe mai monene, mpamba te Diable akiteli bango, awa ezali ye kongala, koyebaka ete azali na elaka mokuse’. Na bongo tokoki kokokanisa mawa oyo te, mawa oyo mazali komonana lelo kati na ezalela ya mpasi ya mokili, elongo na ‘mawa misato’ oyo Jéhovah azali koyeisa likoló na bato mabe na kosambisaka bango.​—Emoniseli 12:7-12.

18. (a) Mawa nini Satan le Diable amekaki koyeisa likoló na baombo ya sembo ya Jéhovah liboso mpe na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba? (b) Ekateli nini Satana azali na yango kino lelo, mpe bimonaneli oyo bitikali mpo na kotalelama bikomonisa nini?

18 Diable amekaki mpe koyeisa mawa likoló na basaleli ya sembo ya Nzambe oyo bazali naino na mabelé. Liboso mpe na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, asanzelaki bango ebakata na minyoko mpo na koboma mosala ya “batikali” ya lisangá na Nzambe oyo ekokani na mwasi baoyo kati na ba 144 000 bazali naino kosalela Nzambe kati na bato. Jéhovah asenzelaki na boye ete mabelé (mokili), elingi koloba ebongiseli mpenzampenza ya biloko na Satana, emela kosopana wana ya minyoko. Atako bongo, Satana, ye oyo azali na nkanda, azali ntango nyonso na ekateli ya kobundisa Batemwe ya Jéhovah. (Emoniseli 12:13-17) Likambo yango ekosuka ndenge nini? Bimonaneli libwa oyo bitikali mpo na kotalela bikoyanola na motuna oyo.​—Habakuku 2:3.

Bozongeli

□ Lolenge nini Jehovah asalelaki baanzelu kati na mokanda ya Emoniseli?

□ Na nini bansango na Yesu oyo etindamaki na masanga nsambo ezali kotalela biso?

□ Makambo nini mabimaki na nzela na koyula na bakelelo nsambo?

□ Ebele na mayoyo mpe limpinga na bampunda mingi ezali kolimbola nini?

□ Mpo na nini kobotama ya Bokonzi na Nzambe ekangisami na “mawa ya misato”?

[Etanda na lokasa 22]

MIKAPO MPE BA VERSETS EPAI BIMONANELI BIKOMAMI:

□ EMONANELI YA LIBOSO 1:10 KINO 3:22.

□ EMONANELI YA MIBALE 4:1 KINO 5:14.

□ EMONANELI YA MISATO 6:1-17.

□ EMONANELI YA MINEI 7:17.

□ EMONANELI YA MITANO 8:1 KINO 9:21.

□ EMONANELI YA MOTOBA 10:1 KINO 11:19.

□ EMONANELI YA NSAMBO 12:1-17.

□ EMONANELI YA MWAMBE 13:1-18.

□ EMONANELI YA LIBWA 14:1-20.

□ EMONANELI YA ZOMI 15:1 KINO 16:21.

□ EMONANELI YA ZOMI NA MOKO 17:1-18.

□ EMONANELI YA ZOMI NA MIBALE 18:1 KINO 19:10.

□ EMONANELI YA ZOMI NA MISATO 19:11-21.

□ EMONANELI YA ZOMI NA MINEI 20:1-10.

□ EMONANELI YA ZOMI NA MITANO 20:11 KINO 21:8.

□ EMONANELI YA ZOMI NA MOTOBA 21:9 KINO 22:5.

[Etanda/​Bililingi na lokasa 22]

BIMONANELI 16 YA EMONISELI: MAKAMBO YA NTINA

1 Yesu, katikati na bitemelo na mwinda nsambo, to masanga, azali kotinda bansango etondi na bolingo na nzela na myoto nsambo, bakengeli bapakolami.

2 Liboso na kiti ya bokonzi ya Jéhovah na likoló, Mwana na Mpate oyo auti kolonga azali kozwa mokanda moko oyo ezali na nsango ya esambiseli.

3 Yesu Klisto azali kotambola mpo na kolonga, nzokande batambwisi mosusu na mpunda bazali konyokola bato mpe ete mokolo na nkanda na Nzambe ebelemi.

4 Koyanganisama ya ba 144 000 mpe ebele monene ekomi na nsuka wana baanzelu basimbi mopepe mpo ete bolozi monene ebima naino te.

5 Baanzelu bazali kosakola nsango ya lisambisi na nzela na bakelelo, mpe Batemwe ya Jehovah, baoyo bakokani na ebele ya mayoyo, bazali komonisa bolumbu ya mangomba na lokuta.

6 Na ntango ya bobeti kelelo na nsambo, “batemwe” na Nzambe bazwi lisusu nguya mpo na kosakola Bokonzi na Jehovah mpe na Klisto na ye oyo esalami sika.

7 Nsima na kobotama ya Bokonzi na 1914, Klisto abwaki Satana mpe bilimu mabe na ye na mabelé.

8 Nyama na yauli mibale babimi, mpe nyama ya mibale na politike apesi mpema ya bomoi epai na elilingi ya liboso, O.N.U.

9 Bato oyo bazali ‘kobanga Nzambe mpe kopesa ye nkembo’ baponami to babukami lokola mbuma mpo na bomoi ya seko, bamosusu mpo na libebi.

10 Kosopama ya mbeki nsambo ya nkanda na Nzambe ekomi na nsuka na yango na kobomama ya baoyo nyonso bazali na “elimo” to “mopepe” ebebisami ya Satana.

11 Ndumba monene, mangomba na lokuta, apasolami na “nyama” na politike, mpe na nsima nyama yango abomi ye.

12 Nsima na kobomama ya Babilone Monene, bibongiseli ya nsuka bisalemi mpo na libala ya Mwana na mpate elongo na mwasi na ye, ba 144 000.

13 Nsima na kobomama ya ndumba monene, Yesu, ye moko azali kokamba mampinga na likoló, abomi biloko nyonso oyo bitikali kati na ebongiseli ya Satana ya mabelé.

14 Satana abwakami kati na libulu mozindo; Boyangeli ya mbula nkoto na Klisto mpe ya mwasi na ye, ba 144 000, ebandi.

15 Na nse ya “likoló na sika” (boyangeli esalemi na Yesu Klisto mpe na mwasi na ye), “mabele na sika” (ebongiseli ya bato) ekozwa mapamboli oyo makobeba te mauti na Jehovah.

16 Bibongiseli oyo Nzambe akamati mpo na kobikisa bato mpe kopesa bango bomoi bizali kotyola katikati na engumba ya lokumu, Yelusaleme na Sika.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto