“Banga Nzambe mpe pesa ye nkembo”
“Banga Nzambe mpe pesa ye nkembo.”—EMONISELI 14:7.
1. Tosengeli kobanga nani, mpe, na epai mosusu, tosengeli te kozala na kobanga ya nini?
TOSENGELI KOBANGA NANI? Ezali mpenza Dalagona motane te, Satana, mpe mampinga na ye ya bilimu mabe! Yesu Klisto abenganaki bango na likoló na nsima ya kobotama ya Bokonzi na 1914, kasi bimonaneli ya Emoniseli emonisi lisusu lisangá nini Satana azali kosalela na mabelé mokano na ye monene ya kobebisa kokokisama ya mikano na Nzambe. Nyama na yauli mibale ya nkanda makasi mpe mwasi na pite molangwi, Babilone Monene, bazali kolobelama mingi kati na bililingi yango. Basengeli kobangisa biso? Soki moke te! Tosengeli nde kobanga Jéhovah mpe Klisto na ye, oyo Bokonzi na ye esilaki kokweisa mpo na seko mokili ebebisami ya Satana.—Masese 1:7; Matai 10:28; Emoniseli 12:9-12.
Banyama oyo bazali kotuka Nzambe
2. Nyama na yauli nini akoti na lisolo na emonaneli ya mwambe, mpe azali elilingi ya nini?
2 Na emonaneli ya mwambe ya Emoniseli, nyama na yauli moko abutwi na mai monene maningani, yango mokili. Azali na mitó nsambo mpe maseke zomi malatisami na mitole zomi, bilembo na nguya ya bokonzi epesameli ye na Satana. Nyama wana azali kotuka Jéhovah mpe kotia manzaka na basaleli na Ye lokola ekoki kosala nkoi, ngombolo mpe nkosi; ata bongo, bokonzi na ye ezali ya ntango mokuse, mpo euti na dalagona, Satana, oyo akokani mingi na ye. Na ntango na kala, mosakoli Danyele alobelaki biyangeli ya politike ya mabelé lokola banyama, mpe mbala mingi bango moko bamiponalaki bikelamu ya zamba mpo na komonisa elembo ya mboka na bango. Totanga, na ndakisa, nkosi ezali elembo ya Angleterre mpe mpongo elembo ya Amerike. (Danyele 8:5-8, 20-22) Nzokande, na emonaneli ya Emoniseli, tomoni nyama moko asangisami. Azali elilingi ya bikonzi nyonso ya politike ya lisolo na Biblia oyo enyokolaki mbala mingi basaleli ya solo ya Nzambe na mokili. Na kati na nguya wana, to “mitó” ya nyama wana, oyo ya lokumu ezalaki Ezipito, Asulia, Babilone. Bokonzi ya médo-perse, Grèce, Rome mpe, na nsuka Nguya mibale ya mokili mobimba anglo-américaine.—Emoniseli 13:1, 2; 12:3, 7-9.
3. (a) Na ndimbola nini moko na mitó ya nyama na yauli ezwi “mpota ya mopanga”? (b) Ndenge nini nyama na yauli ya maseke mibale azwi likanisi ya kosala elilingi ya nyama na yauli ya liboso? (c) Nkombo na nyama na yauli ya liboso ezali nini mpe elimboli nini?
3 Na boumeli ya etumba ya mokili mobimba ya 1914-1918, Grande-Bretagne, Nguya ya nsambo ya mokili mobimba azwaki “pota ya mopanga” oyo ekokaki solo kozala likama mpo na ye. Kasi Etats-Unis d’Amérique eyaki kosunga ye. Uta ntango yango, Amerike mpe Angleterre bakomaki kosala na bomoko. Basali bongo nguya mibale ya mokili mobimba oyo Yoane amonisi kati na kolandana ya lisolo na ye na bilembo ya nyama na yauli ya maseke mibale, oyo euti na lisangá ya bato epikami makasi, yango “mabele”. Nyama oyo na maseke mibale azwi likanisi ya kosala elilingi ya nyama na yauli ya liboso mpe kopesa ye mpema ya bomoi. Tala oyo elimboli mosala monene esalemaki na Nguya mibale esangani ya mokili mobimba ya Angleterre mpe Amerike na kozalisama mpe bosimbi ya Lisangá na Mabota (Société des Nations) mpe lisangá oyo ekitanaki yango, Nations unies. Nyama na yauli ya liboso azali na nkombo, oyo ezali na motuya moko: 666. Litangi motoba ezali elilingi ya kozanga kokoka —ezali na nse ya litangi nsambo, ezali elembo ya Biblia ya kokoka. Na yango, litangi motoba mbala misato elimboli kozanga mpenzampenza kokoka ya batambwisi na bato ya ntango oyo. Ata soki batemwe ya Jéhovah bazali komemya mpe kotosa bakonzi na lolenge oyo ebongi mpo na kopesa ndakisa na kotosaka mibeko ya mboka oyo bafandi, bazali koboya kosambela “nyama na yauli” to elilingi na yango na mpiko nyonso.
Kobanga Nzambe—mpo na nini?
4. (a) Nani atelemi na ngomba Siona na likolo, mpe bankulutu 24 baoyo bazali liboso ya kiti ya bokonzi na Nzambe bazali elilingi ya nani? (b) Bokeseni nini ezali kati na “loyembo ya sika” ya baklisto bapakolami mpe “loyembo ya sika” ya ebele monene?
4 Sikawa, totika naino banyama yango, mpamba te, kopesaka bokeseni ya kokitisa motema, emonaneli ya libwa etii likebi na Mwana na Mpate. Atelemi likoló na ngomba Siona, elongo na ba 144 000 oyo ye asombi lokola mbuma na liboso na mokili. Atako ndambo moke kati na bango bazali naino kosalela Nzambe na mabelé, na lolenge ya elimo ba 144 000 nyonso ‘babelemi na ngomba Siona mpe na Yelusaleme na likoló’. (Baebele 12:22) Emonaneli oyo etalisi lisusu bankulutu 24 batelemi liboso na kiti ya bokonzi na Nzambe, oyo ebongi mpo bazali elilingi ya liboke moke wana ya baklisto bapakolami bamonani na lolenge ekeseni: basili kosekwisama mpe batiami mikonzi mpe banganga Nzambe. Ba 144 000 bazali koyemba “loyembo na sika”. Loyembo yango elakisi eksperianse na bango oyo eleki nyonso, oyo ya kosombama na bango awa na mabelé mpo na kokoma batuki na libula ya Bokonzi. Basangani ya ebele monene, bango mpe, ‘bazali koyembela Jéhovah loyembo na sika’, kasi loyembo na bango ekeseni na oyo eyembami liboso, mpamba te bazali koyemba yango na elikya ya kozwa bomoi na seko na mabelé.—Emoniseli 7:9; 14:1-5; Nzembo 96:1-10; Matai 25:31-34.
5. (a) Nsango nini anzelu apumbwe na kati ya likolo asakoli, mpe mpo na nini ezali ya seko? (b) Motinda nini anzelu apesi na mongongo makasi, mpe mpo na nini yango ebongi mpenza?
5 Emonaneli etangwi sikawa: Yoane amoni anzelu mosusu kopumbwa na kati ya likoló. Azali na nsango malamu ya kosepelisa mpo na kosakola, nsango malamu ya seko mpo elimboli bomoi ezangi nsuka mpo na bato bauti na mabota nyonso mpe na bikolo nyonso mpe minoko nyonso oyo etosi Nzambe na ntango ya kosambisa na ye. Na bokeseni na banyama ya nsomo oyo Yoane auti kolobela, Nzambe oyo ya kokamwisa abongi bongo na kosambela te? Azali ye oyo asalaki likoló na nse. Azali liziba ya biloko nyonso bizali na bomoi, ezali koningana to ezangi koningana. Anzelu azali bongo na bantina makasi ya kosakola motinda oyo na mongongo makasi eyokani: “BOBANGA NZAMBE MPE BOPESA YE NKEMBO”! Mongongo na ye oyo eyokani na mabelé mobimba, mpe ba Témoins de Jéhovah bayanoli na libiangami wana ya lokumu liboso ya mokili mobimba na nkota pene na 200.—Emoniseli 14:6, 7; Yisaya 45:11, 12, 18.
Kokwea ya Babilone Monene
6. Nsango nini ya kokamwisa anzelu mosusu asakoli?
6 Anzelu mosusu abimi, ye asakoli nsango oyo ya kokamwisa: “Ekwei! Babilone Monene ekwei, oyo asili komelisa mabota nyonso vinyo na kongala na pite na ye!” (Emoniseli 14:8) Babilone Monene azali nani, mpo ete azimbisa mabota mpe kolangwisa bango?
7. Babilone Monene ezali nini mpe lolenge nini ekolaki?
7 Babilone ya kala ezalaki ebandeli ya lingomba na lokuta, oyo epalanganaki na mokili mobimba kino kozalisa boyangeli ya mokili mobimba ya bilimu mabe ebiangami na kolongobana “Babilone Monene”. Nsima na bambula, Rome ezwaki esika ya liboso kati na nguya wana ya losambo, mpamba te ezali na nse ya Bokonzi na loma nde boklisto ya lipengwi ekolaki. Na eleko na biso, Rome ezali ntango nyonso mboka-mokonzi (centre) ya mangomba oyo mauti na Babilone. Mobu 1986 emonisaki yango ntango, na libiangami ya pape, bakonzi na mangomba ya mokili bayanganaki elongo na ye na Assise penepene na Rome, mpo na kosambela na ntina Mobu ya kimya kati na mokili mobimba, mobu oyo esakolamaki na O.N.U.
8. (a) Ndenge nini Babilone Monene ekweaki kokwea moko ya monene mpe uta ntango nini ekomonana polele? (b) Nini emonisi ete mabondeli malobamaki na bakonzi ya mangomba na ntina na kimya mazwaki eyano te?
8 Atako bongo Babilone Monene ekwei uta likoló, lokola etatoli yango kobanda 1919, basangani mingi bazali kotika mangomba ya lokuta. Kominisme ya baoyo bazali koangana ete Nzambe azali te epanzi lelo bokonzi na yango na eteni monene ya mabelé. Bazali koteya ete Mozalisi azali te, moto autaki na nyama [évolution]. Liteya oyo ekeseni na liloba ya Nzambe. Na mikili ya ba protestá na poto, ndambo moke na bato nde bazali naino kokende na ndako-nzambe, mpe na mibembo na ye pape azali kosala makasi kopekisa kokabwana ya lingomba na ye ya katolike. Emonani polele ete, mabondeli mapesamaki na ebele na banzambe basambelami na mokili mobimba matikali kozanga eyano. Likanisi oyo ya Ruth Sivard endimisi yango: “Bitumba ntuku mibale na mibale ezalaki kolandama na 1987, to mpe koleka na mbula nini kati na lisolo na bato. Kino lelo, mikakatano wana mibimisi bato pene na 2 200 000, mpe motuya wana elandi komata nokia”. Bongo, likita ya losambo ebongisamaki na Assise emonanaki mpenza mpamba. Ata bongo, na 1987, pape atiaki elembo na kokanisa likita wana na kobimisaka medaye ezali na elilingi na ye na epai moko mpe elilingi ya likita wana na epai mosusu. Bakonzi ya mangomba balandi koloba: “Kimya ezali! Kimya ezali!” Nzokande kimya ezali te’.—Yilimia 6:14.
Pite ya Babilone Emonisami polele
9. Na etamboli nini ya mbindo bakonzi na mangomba ya Babilone Monene bamimonisi?
9 Emoniseli 14:8 emonisi ete Babilone Monene azali komipesa na pite. Etamboli ya mbindo ya lisanga ya bakonzi ya mangomba ezali lisusu libombami mpo na moto te. Bateyi na lisalisi ya télévision babendi bankama ya milio ya dolare na basangani na bango, na komipesaka polele na misala ya mbindo. Basángo ya katolike batiami lokola na libanda, lokola emonisaki yango rapport oyo ebimi na zulunalo moko ya Filadelefi, na Etats-Unis (The Beacon Joumal, ebimeli ya 3 Janvier 1988): “Baboti, bapiskologe, bapolisyé mpe ba avoka bayebisi ete na Etats-Unis bankama na bana babebisamaki na basango na katolike na boumeli na mbula mitano eleki bazali kotungisama mingi kati na mayoki”. Bosoto na pite ebebisi lokumu ya ebele ya bakonzi ya lisanga ya mangomba na Babilone Monene.
10. (a) Nini elimboli “pite“ ya Babilone Monene elobami na Emoniseli 18:3? (b) Lokola emonisi yango Emoniseli 18:24, mpo na nini bakonzi na mangomba ya Babilone Monene bamemi mokumba ya ebele ya kobomama?
10 Na oyo etali “vinyo na kongala ya pite na ye”, elimboli mpenza boluki oyo lingomba ya lokuta ezali kosala epai na batambwisi ya politike na kopesaka loboko na makita na bango ya boluki ya ebonga na politike mpe bitumba na bango, na kopusaka bato na makasi ete basambela lisanga moko to mosusu ya biteni ya nyama na yauli oyo ezali lolenge ya maloba. Bato ya politike basila komona lingomba molongani ya ntina mpo na kokokisa mikano na bango. Totanga na ndakisa boyokani oyo Hitler asalaki elongo na Vatican na 1933 mpe makambo oyo etikali elembo ya etumba ya bana mboka bango na bango na Espanye uta 1936 kino 1939. Na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bakonzi na mangomba ya katolike, protestá, budiste mpe bamosusu basalaki lokola balangwisamaki na lolendo ya mabota na etumba. Bamemi mokumba monene na kobomama ya bazomi na ba milió ya basoda mpe bato mosusu bakufaki na etumba uta 1914. Bakonzi ya mangomba basimbaki ba fascistes mpe banazis bazali lisusu na eteni ya mokumba na kobomama ya ba Témoins de Jéhovah, mpe bato mosusu, bakatamaki mitó to bakufaki na boloko [camps de concentration].—Yilimia 2:34; Emoniseli 18:3, 24.
11. (a) Baklisto bapakolami mpe ebele monene baboi kosambela eloko nini? (b) Bilikya nini ya kitoko ezali ntina moko makasi ya kobanga Nzambe mpe kopesa ye lokumu?
11 Na boumeli ya mbula eleki 74, baklisto bapakolami basembwi, elongo na ebele monene elandi bobele komata, batikaki te kopesa eyano na libiangami oyo: BOBANGA NZAMBE MPE BOPESA YE NKEMBO! Toboyaki kozanga bokeseni kopesa losambo na lisanga ya lolendo ya mabota. Toboyaki lisusu kokumisa elilingi ya nyama, Lisangá ya Mabota mpe O.N.U., mpo toyebi ete “bokonzi ya Nkolo na biso [Jéhovah] na Klisto na ye” ekoki komema kimya ya solo. Tozwi likatami ya kobatela “mibeko ya Nzambe mpe bondimi na Yesu”. Koyika mpiko wana ezwi mbano ya solo, baklisto bapakolami oyo bazali “kokufa na bomoko na Nkolo” babiangami bazali na esengo mpo “makambo basalaki malandi bango”. Mpo na basangani ya ebele monene oyo bazali kokufa na ntina na minyoko, bokono to aksida, boyokani ya boninga basalaki na Nzambe epesi bango kondimisa ete bakosekwisama noki na “mabelé ya sika” to lisanga na bato. Bilikya oyo ya kokamwa ezali solo mpo na bango ntina makasi ya KOBANGA NZAMBE MPE KOPESA YE NKEMBO.—Emoniseli 11:15, 17; 12:10; 14:9-13; 21:1.
12. Bileko mibale ya kobuka mbuma ezali nini, mpe ntango nini ezali kosalema?
12 Na boumeli ya kosambisa, baanzelu bapesi ndingisa ya bileko mibale ya bobuki mbuma. Mobuki mbuma ya liboso ezali komonana ezali Yesu, na nsima ya kolatisama na ye na nkembo ya Bokonzi na 1914, mpo afandi likolo ya lipata ya mpembe, alatisami motole mpe “akokani na mwana na moto”. Lelo, na boumeli ya mokolo ya mokolo na Nkolo, azali kobuka mbuma ya mokili, na koyanganisaka liboso mpenza batikali na baklisto bapakolami, mpe bamilió na bato basangani ya ebele monene (Tala Matai 25:31-34; Yoane 15:1, 5, 16) Eteni ya mibale ya kobuka mbuma, nzokande, ezali ya “mbuma ya mowiti ya mokili”. Kobuka mbuma wana elimboli kosambisa ekosalema na Armagedon, ntango lisangá ya bato mabe mpe ebulungani ekopikolama mpe mbuma na yango ya mabe ekonyatama. Tika ete Jéhovah akumisama ntango akolimwisa nzete na mowiti wana ya mokili ebebisami!—Emoniseli 14:14-20; 16:14-16.
‘Jéhovah azali sembo mpe solo’
13. (a) Na emonaneli ya zomi, loyembo nini baklisto bapakolami basekwisami bayembi, mpe maloba na yango ezali nini? (b) Na maloba nini bisambiseli ya sembo ya Nzambe eyebisami polele na emonaneli wana?
13 Na emonaneli ya zomi ya Emoniseli, tomoni lisusu makambo mazali koleka na likoló, liboso ya kiti na bokonzi ya Nzambe. Ndenge ezali liboso na ye! Baklisto bapakolami basekwisami, balongi mpo BABANGI NZAMBE MPE BAPESI YE NKEMBO, bazali koyemba ‘loyembo ya Mose mpe ya Mwana na Mpate’: “Minene mpe kokamwa ezali misala na yo, Jéhovah Nzambe, Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Sembo mpe solo ezali banzela na yo, Mokonzi na libela. Nani akozanga komemya yo, Jéhovah? Nani akozanga kokumisa nkombo na yo? Yo moko ozali mosanto mpe mabota nyonso bakoya kosambela liboso na yo. Mpo ete bikateli na yo bisili komonisama.” Na ntembe te bisambiseli ya Nzambe ezali sembo mpe solo, lokola yango elimbolami polele na boumeli ya emonaneli oyo. Baanzelu basopi mbeki nsambo ya nkanda ya Nzambe, na ntina na yango mabota nyonso basangani mpo na Armagedon, mpe, mpo na ye elobami lisusu ete “mpo Babilone Monene bamikundoli liboso ya Nzambe”. Libiangami oyo eyei bongo na ntango ekoki: BOBANGA NZAMBE MPE BOPESA YE NKEMBO!—Emoniseli 15:1 kino 16:21.
14. Na bimonaneli ya zomi na moko mpe zomi na mibale, makambo nini Babilone Monene azali kosala, mpe mpo na nini ezali ntango monene ya kobima na kati na ye?
14 Elobelami mbala mingi mpo na Babilone Monene na Emoniseli. Elobami mpo na ye lisusu bimonaneli ya zomi na moko mpe ya zomi na mibale. Ye “avandi likoló na mai mingi” na lolenge oyo ete azali koyangela bikolo mpe kopalanganisa bango na mateya na ye ya pwazó mpe ya lokuta. Ye moko azali na molangwa “ya makila ya babulami” oyo ye abomaki na boumeli ya minyoko, mpe azali na mokumba na liwa ya “baoyo nyonso babomami na mokili “na ntina na misala na ye mabe ya nkuku etali bitumba. Na kozalaka na boyokani ya mombongo na baoyo batombwani na mokili ya mimbongo mpe na koyiba bato na mayele mabe, ayanganisi na bokosi ebele na bozwi. Apamelami makasi koleka na komikotisa na ye na politike, kino kosala miango mpo azwa esika ya liboso na molongo ya nyama atalelami lokola akoki komema kimia, elingi koloba O.N.U. Kasi maseke makembisami na bibundeli ya nyama moko wana bakopasola ye mpe baka bebisa ye. Ezali ntango monene mpo na baoyo nyonso BABANGI NZAMBE MPE BAPESI YE NKEMBO babima uta Babilone Monene, “mpo ete libondo na masumu na ye likomi kino likoló mpe Nzambe asili kokanisa misala mabe na ye.”—Emoniseli 17:1 kino 18:24.
15. Nsima na kobomama ya mwasi na pite monene, nzembo nini ya lokumu eyembami, mpe likambo mosusu nini ya esengo ekosalema?
15 Kobomama ebelemi ya Babilone Monene oyo likatami ezwami na Jéhovah ekozala bongo sembo. Baoyo basosoli yango, na likolo mpe na mabelé bayembi ‘Alleluya’, kopesaka bongo lobiko, lokumu mpe nguya na Jéhovah. Bagangi na bomoko “kumisa Jah” mpo na komonisa esengo ya monene, oyo kobomama ya seko ya mwasi na pite monene epesi bango. Kobomama na ye ekeseni na mobimba na yango na likambo ya esengo mingi ezali kosalema na likoló libala ya Mwana na Mpate, Klisto Yesu, na mwasi na ye, ba 144 000 baklisto ya sembo mpe balongi! Loyembo moko epalangani bongo mpo na lokumu ya “Jéhovah, Nzambe na biso, Mozwi-na-Nguya-Nyonso”. Ee, “tosepela mpe toningana na esengo, mpe topesa ye nkembo, mpo libala na Mwana na Mpate ekomi mpe mwasi na ye amibongisi”!—Emoniseli 19:1-10.
16. Engebene emonaneli ya zomi na misato, likambo nini ekoyanolama mpo na mbala ya nsuka, mpe ndenge nini?
16 Nzokande, liboso ete libala oyo lisalema na likoló, emonaneli ya zomi na misato emonisi na lolenge nini likambo etali Jéhovah lokola mokonzi na molongo mobimba ezwi eyano. Mokonzi ya bakonzi na Ye mpe Nkolo ya ba Nkolo, azingami na ebele na baanzelu “azali kosambisa mpe kosala etumba na boyengebene”. Anyati enyateli ya nkanda na nkele ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Nyonso oyo etikali na ebongiseli ya Satana na mabelé ekomi putulu, epanzani. (Emoniseli 19:11-21) Biso baoyo tozali komona kolonga oyo ebelemi na nzela ya bimonaneli ya Emoniseli tozali solo na libaku nyonso ya KOBANGA NZAMBE MPE KOPESA YE NKEMBO.
Tokumisa Nzambe mpo na seko
17. Bimonaneli ya zomi na minei mpe zomi na mitano bimonisi nini ekozala malamu mpo na baoyo nyonso bazali kobanga Nzambe mpe kopesa ye nkembo?
17 Bimonaneli ya zomi na minei mpe zomi na mitano ya Emoniseli biyebisi nsuka ya esengo oyo bakoyoka baoyo nyonso bazali KOBANGA NZAMBE MPE KOPESA YE NKEMBO. Na nsima ya kobwakama ya Satana mpe bilimu na ye mabe na libulu mbula nkoto. Libala ya Mwana na mpate mpe mwasi na ye lisalemi na likoló mpe ba 144 001 bakonzi mpe banganga nzambe bayangeli mpo na boumeli ya mbula nkoto, eleko na boumeli na yango bakotombola bato na ezaleli ya kokoka. Nsima ya komekama moko ya nsuka, baoyo bakolanda KOBANGA NZAMBE MPE KOPESA YE NKEMBO bakolonga mpe bakondimama na Jéhovah mpo na bomoi ya seko. Kati na bango na bamiliare ya basekwi bakozala, “mikolo mpe bana mike”, oyo bakomimonisa babongi na kozala na nkombo na bango ekomami na mokanda na bomoi. “Likoló ya sika mpe mabelé ya sika” ekomema mapamboli ya kolobela te na bafandi ya mokili mapamboli wana ekoya na ntembe te mpo Jéhovah, oyo asali “biloko nyonso ya sika”, alobi: “Koma, mpo maloba oyo ezali sembo mpe solo.”—Emoniseli 20:1 kino 21:8.
18. Engebene emonaneli ya zomi na motoba, nini ezali likambo lisukisi Emoniseli?
18 Emonaneli ya zomi na motoba ekundoli biso likambo lisukisi Emoniseli. Nini wana? Yango etaleli emonaneli ya engumba moko, Yelusaleme ya Sika. Oyo ekeseni mingi na mboka minene nyonso moto asila kotonga na mabelé. Ekeseni mingi na Babilone Monene, engumba oyo lipengwi, bizaleli ya bosoto mpe pite ya politike ebebisi mingi lokumu ya Nzambe. Kasi mboka mosantu yango ezali peto, mpe na motuya mingi. Ye azali mwasi ya Mwana na Mpate, molongani na ye oyo azali kosunga ye kokabola bomoi ya seko na mokili ya bato. (Yoane 3:16) Tokamwa te ete libiangami ya kobima uta Babilone Monene, elilingi ya lokuta ya engumba wana, ezali koyokana makasi mingi mpe na polele!—Emoniseli 18:4; 21:9 kino 22:5.
19. (a) Libiangami nini epesami na lisalisi ya kelasi ya mwasi mpe na lolenge nini bato na bopolo bayanoli na yango? (b) Soki totosi na motinda ya ‘kobanga Nzambe mpe kopesa ye nkembo’, litomba ekozala nini?
19 Elimo ya Jéhovah, makasi na ye ya kosalela, epesi libiangami oyo ya lombango na lisalisi ya kelasi ya mwasi: “Yaka!” Ee, bino nyonso, bato ya bopolo basepeli kozala na bomoi ya seko na mabelé ekomi paradis, boya komela na “ebale ya mai na bomoi” na kondimaka bibongiseli nyonso Jéhovah azwi na nzela ya Klisto mpe ya mwasi na ye mpo na kopesa bino nzela ya kozwa bomoi na seko. Elikya ya kokamwa efungwami liboso na bino: bomoi ya bomoto ya kokoka na mabelé oyo ebongolami paradis! Oyo ekozala mbano ya ebele na bato batosi na motinda oyo: “BOBANGA NZAMBE MPE BOPESA YE NKEMBO!—Emoniseli 22.6-21.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mosolo mobimisami mpo na misala na basoda mpe makambo matali bomoi na bato kati na mokili na 1987-1988. (Anglais)
Bozongeli
□ Liteya nini ya ntina tozwi na emonaneli ya nyama na yauli ya mibale?
□ Kosakola ya anzelu azali kopumbwa na kati ya likolo esengeli kopusa biso na kosala nini?
□ Na ndimbola nini Babilone Monene azali kosala pite, mpe bopusi nini etamboli na ye epesi na baoyo bazali kobanga Nzambe?
□ Ndenge nini mabelé ebukami mbuma na boumeli ya mokolo na Nkolo?
□ Emoniseli esukisi na makambo nini ya esengo mpe ndenge nini basambeli ya Nzambe bakoki kosepela na yango?
[Elilingi na lokasa 23]
Medaye oyo ya bronze enyatamaki na octobre 1987 mpo na kokanisa likita ya losambo mpo na kimia esalemaki na Assise. Na epai na yango moko ezali na elilingi ya “Tata-Mosanto”. ezingami na likomi “Jean-Paul ll, Pontifex Maximus” mpe na dati. Na epai mosusu, tomoni “Santu François” kobianga “kimya, likabo ya Nzambe” likolo na likita ya losambo mpo na kimya ebongisamaki na Assise.