Tobatela bibongiseli na biso mpo na kobika mpe kokota na Boyangeli ya mbula nkoto
“Bakozala etonga moko mpe na mobateli moko.”—YOANE 10:16.
1. Na miso na Nzambe oyo azali libela na libela mbula nkoto ezali komonana ndenge nini?
EZALI Jéhovah nde apesaki ntango mpo na bato. Mpo na ye, Nzambe oyo akoki kokufa te oyo azali libela mpo na libela, mbula nkoto ezali lokola mokolo moko, mokuse, to mpe lokola mua ngonga na butu moko.—Nzembo 90:4; 2 Petelo 3:8.
2. Jéhovah aponi eleko ya mbula boni mpo na kopambola bato nyonso?
2 Nzambe atiaki mokolo na elilingi na mbula nkoto na boumeli na yango akopambola mabota nyonso na mabelé. (Genese 12:3; 22:17, 18; Misala 17:31) Mabota oyo esangisi bato bakufa mpe baoyo bazali na bomoi lelo. Ndenge nini Nzambe akopambola bango? Na nzela ya Bokonzi na ye oyo ekotambwisama na Yesu Klisto, “libota” na mwasi na Ye na elilingi.—Genese 3:15.
3. a) Litindi ya Libota na mwasi ya Nzambe eswamaki ndenge nini, mpe na lolenge nini mpota yango ebikisamaki? b) Na nsuka na Boyangeli na ye na mbula nkoto, Yesu Klisto akosala nini epai na nyoka ya elilingi?
3 Litindi (talon) na elilingi ya Libota na mwasi ya Nzambe (lisangá na ye na likoló) eswamaki ntango Yesu Klisto akufaki na mobu 33 mpe atikalaki kati na nkunda mikolo misato. Kasi mokolo na misato, Nzambe Mozwi na Nguya Nyonso abikisaki mpota yango na kosekwisaka Mwana na Ye mosembwi kino bomoi ya kozanga kokufa na makoló. (1 Petelo 3:18) Lokola Yesu akokufa lisusu te, azali sikawa na makoki ya koyangela likoló na bato mbula nkoto mpe ‘konyata’ motó ya nyoka na elilingi, kosukisa ye bongo nsima na Boyangeli na mbula nkoto. Oyo nde mapamboli mpo na bato na sembo oyo bakozongisama na ezaleli ya kokoka!
4. Programe nini Nzambe azali kotambwisa yango mpo na litomba ya libota na ye?
4 Mosala monene na kobongisa ezali kosalema kati na libota ya Jéhovah na mabelé mobimba na boumeli na “mikolo na nsuka na biloko na ntango oyo”, uta nsuka na ntango na Mabota na 1914. (Matai 23:4; Luka 21:24) Programe oyo ya kobongisama liboso na Boyangeli na mbula nkoto ezali mokano mpe etambwisami na Mobongisi monene, Jéhovah Nzambe. Lokola emonisi yango kokokisama na bisakweli na Biblia, na 1914 mwasi na ye, lisangá na ye oyo ekokisami na mwasi, abotaki Bokonzi na Ye oyo elakamaki mpe ezali kotambwisama na Yesu Klisto.
5. Kobotama nini esakolamaki kati na Emoniseli 12:5, mpe ndimbola na yango epesamaki ntango nini mpo na mbala ya liboso kati na La Tour de Garde?
5 Na ndenge yango maloba makomami na Emoniseli 12:5 makokanaki na nkembo nyonso: “Abotaki mwana mobali, oyo akokengela mabota nyonso na fimbo na ebende. Mpe mwana na ye akamatami na likoló epai na Nzambe, na kiti na bokonzi na ye.” Ezali na kati na La Tour de Garde ya Juin 1925 nde ndimbola ya liboso epesamaki ete kobotama ya Bokonzi na Jéhovah etambwisami na Klisto, emonisami na kobotama ya mwana mobali na mwasi na Nzambe. Kobotama ya Bokonzi oyo ya Masiya, oyo esalamaki na likoló na 1914, ekeseni na kobotama ya “libota” ya ‘bana’ na Siona na mabelé na 1919.—Yisaya 66:7, 8.
6. a) Mosala nini Yesu asakolaki esengelaki kobanda nsima ya kobotama ya Bokonzi? b) Basaleli na Jéhovah basengelaki kosala nini mpo na kokokisa mosala oyo, mpe bazali ndenge nini liboso na mokili?
6 Kobotama ya Bokonzi ya Jéhovah na nzela na yango Nzambe akolongisa lotomo na boyangeli na ye na molongo mobimba ezali likambo esengeli kosakolama na mabelé mobimba. Mpe ntango ekomaki mpo na kokokisa maloba oyo na Yesu na boyokani na bilembo na koya [présence] na ye kozanga komonana: “Nsango malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Mpo na kosakola kati na bomoko, na lolenge moko ezangi mobulu na mokili mobimba, esengelaki mpenzampenza kobongisa eteni emonani ya lisangá ya Jéhovah na mokili mobimba. Yango nde ezalaki mposa ya la Société, oyo momonisi na yango na ntango wana ezalaki président Joseph Rutherford. Mpe nsima na etumba, mpenzampenza kobanda 1919, bakoteli na sembo ya la Société bazwaki likatami ya komibongisa, lokola libota oyo ezongisami, na kobondelaka Jéhovah Nzambe, Mobongisi oyo aleki monene, mpo ete akoka kolakisa bango nzela mpe apambola bango. Ntango na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, atako botemeli makasi ya bafascistes ezalaki, bakisa bokonzi ya banazi oyo ezalaki kotambwisama na Hitler, mpe lisangá ebengamaki Action katolike, nzokande na mabelé mobimba ba Témoins de Jéhovah bazalaki na bomoko makasi liboso na mokili oyo ezalaki kotemela bango.
7. a) Boyokani ya motindo nini basaleli na Jéhovah basengeli kobatela makasi kati na bango soki balingi kobika na bolozi monene? b) Nini esalisaki Noa na libota na ye kobika na mpela ya mokili mobimba, mpe bazalaki elilingi ya banani?
7 Engebene Biblia, ezali bobele ba Témoins de Jéhovah, elingi koloba basangani na batikali bapakolami mpe “ebele monene”, nde bakoki kolikya kobika lokola lisangá ya bomoko na nse ya libateli ya Mobongisi aleki monene, na ntango ya libebi oyo ebelemi ya biloko mabe ya ntango oyo ekweisami, oyo ezali koyangelama na Satan le Diable. (Emoniseli 7:9-17; 2 Bakolinti 4:4) Bango nde “moto” to “mosuni” oyo, lokola esakolaki Yesu Klisto, akobatelama na ntango na bolozi ya nsomo koleka kati na lisolo na bato. Yesu alobaki ete, lokola ezalaki na mikolo na Noa, koya na ye ekozala se bongo. Na kati ya masuwa, oyo kotongama na yango esengaki ba mbula ebele ya mosala mobongisami malamu, ezali bobele bato mwambe nde babikaki na mpela ya mokili mobimba. Babiki oyo bazalaki etuluku ya libota ya bomoko. (Matai 24:22, 37-39; Luka 17:26-30) Mwasi na Noa akokani na mwasi na Klisto, bana na ye mpe basi na bango bakokani na “bampate mosusu” na Yesu, baoyo bakomi lelo ebele monene oyo ezali kokola ntango nyonso mpe mpo na yango toyebi te motuya na bango ya nsuka soki ekozala boni. (Yoane 10:16) Mpo na kobika mpe kokota na Boyangeli ya mbula nkoto na nse na bokonzi ya Noa Monene, Yesu Klisto, esengeli ete “bampate” oyo bazala bato babongisami elongo na batikali bapakolami, “baponami” mpo na bango mikolo na “bolozi monene” mikoyeisama mokuse.—Matai 24:21, 22.
Bakobika mpe bakokota na Boyangeli ya mbula nkoto
8. Mpo na kosukisa esakweli na ye na ntina etali koya [présence] na ye, Yesu apesaki lisese nini, mpe ndimbola nini epesamaki na lisese yango le 1er Juin 1935?
8 Engebene evangile ya Matai, Yesu asilisi esakweli na ye na ntina etali elembo ya koya [présence] na ye na kopesa lisese, mingimingi ebiangami lisese na bampate mpe bantaba. Lisese oyo ezali kokokana na eleko na biso, mikolo ya nsuka na biloko mabe ya ntango oyo, mikolo oyo ebandaki na nsuka ya ntango na Mabota na 1914. (Matai 25:31-46) Mokolo na poso 1er Juin 1935 ezalaki date moko etiamaki elembo, mpo eyebanaki ete bampate ya lisese bakokanaki na basangani ya ebele monene. Mokolo yango, na assemblée oyo ba Témoins de Jéhovah basalaki na Washington, bato 840 bazwaki batisimo mpo na komonisa komipesa na bango epai na Jéhovah Nzambe na nzela na Yesu Klisto. Mingi kati na bango basalaki likambo oyo nsima ya koyoka diskur etongamaki likoló na Emoniseli 7:9-17 oyo epesamaki na Joseph Rutherford. Mposa na bango ezalaki ya kotangama kati na ebele monene ya bampate mosusu na Mobateli aleki malamu, ya kobika na bolozi monene ekoya, na nsuka na biloko mabe na ntango oyo, mpe kozala na bomoi na nse na Boyangeli na mbula nkoto ya Mokonzi-Mobateli, Yesu Klisto. Na nsuka, bakozwa bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis.—Matai 25:46; Luka 23:43.
9. Mpo na nini bampate babiangami mpo na kosangola libula na ‘bokonzi ebongisamaki mpo na ’bango’, mpe ndenge nini bazali na esika malamu koleka mpo na kosala malamu epai na bandeko ya Mokonzi?
9 Mpo na nini “bampate” babiangami mpo na ‘kosangola libula na bokonzi ebongisamaki mpo na bango longwa na ebandeli na mokili’? Mpo, Mokonzi alobi na bango ete, basalaki malamu epai na “bandeko” na ye, na bongo, basalaki malamu epai na ye moko. “Bampate” lokola bakomi etonga moko elongo na bandeko ya Mokonzi-Mobateli, Yesu Klisto, bakangami na bango makasi na ndenge ekoki, mpe na yango bazali na esika eleki malamu mpo na kosalela bango malamu. Ata na mosuni, bazali kosalisa bandeko na Yesu mpo na kosakola na mokili mobimba nsango ya Bokonzi oyo esili kosalema, liboso ete nsuka eya. Ezali mpo na yango bampate basepeli mingi na libaku na bango ya kotikala bato babongisami elongo na batikali lokola etonga moko na Mobateli moko.
10. Mpo na bampate ‘kosangola libula na bokonzi ebongisamaki mpo na bango longwa na ebandeli na mokili’ elimboli nini?
10 Likambo oyo ete bampate bakosangola libula na ‘bokonzi ebongisamaki mpo na bango’ elimboli te ete bakoyangela elongo na Yesu Klisto mpe bandeko na ye kati na makoló na mbula nkoto. Mpamba te, na ebandeli na Boyangeli na mbula nkoto, bampate bakosangola esika na Bokonzi na mabelé. Lokola bazali bakitani ya Adam na Eve, esika na mabelé likoló na yango Bokonzi na Nzambe etambwisami na Klisto ekoyangela, ebongisamaki mpo na bango “longwa na ebandeli na mokili” ya bato oyo bakoki na kosikwama. Lisusu, lokola bampate bakomi bana na Mokonzi na mabelé, ye mpe akomi mpo na bango “Tata na seko”, basangoli esika awa na mabelé na nse na Bokonzi na Nzambe.—Yisaya 9:6, 7.
11. Ndenge nini bampate bazali kolakisa ete bapesi maboko na Bokonzi, mpe matomba nini bazwi na kosalaka bongo?
11 Na kokesena na bantaba na elilingi, bampate bamonisi polele ete bapesi maboko na Bokonzi. Ndenge nini? Na misala, kasi bobele na maloba te. Lokola Mokonzi azangi komonana azali na makoló, bakoki te kosala bolamu epai na ye moko mpenza mpo na komonisa ete bapesi maboko na Bokonzi na ye. Bazali bongo kosala malamu epai na bandeko na ye na elimo baoyo bazali naino na mabelé. Atako bayinami, babundisami mpe banyokwami na bantaba, Mokonzi na bango alobi ete bapambolami na Tata na ye.
12. Bampate bakozala na libaku ya koyamba banani, mpe batikali bakanisaki nini mpo na yango?
12 Ebele monene na bampate baoyo bazali kosala malamu na bandeko ya elimo na Mokonzi bakozala na esengo ya kobika mpe kokota na Boyangeli na mbula nkoto. Na ntango ekoki, bakoyamba bakufi baoyo bazali kati na nkunda. (Yoane 5:28, 29; 11:23-25) Kati na bakufi oyo bandimi ya kala bakozala mpe basakoli na sembo oyo bayikaki mpiko na bampasi mingi mpo na kolongisa boyangeli monene ya Jéhovah mpe “kokoma na lisekwa lileki malamu”. (Baebele 11:35) Kati na mibali mpe basi oyo na kondima oyo bakosekwa, bamosusu bakomami na Baebele mokapo 11, ntembe ezali te ete Yoane Mobatisi akozala mpe na kati. (Matai 11:11) Bapakolami mosusu oyo bazali naino awa na mabelé bakanisaki ete nsima na kobika na bolozi monene, bakozela naino ete bayamba basembwi wana ya kala, baoyo bakufa liboso na Pantekote ya mobu 33, ntango bakosekwa. Baklisto mosusu bapakolami bakozala bongo na libaku oyo?
13. Mpo na nini ekozala mpenza na ntina te ete batikali bapakolami bazala wana mpo na koyamba basekwi na mabelé mpe kosalisa bango?
13 Ekozala mpenza na ntina te. Ebele monene na babiki ya bolozi monene bakozala mingi na ndenge ekoki mpo na kotalela makambo na basekwi mpe kolakisa bango “mabelé na sika” etambwisami na “makoló na sika”. (2 Petelo 3:13) Uta sikawa ebele monene ezali kobongisama mpo na mosala wana. Ba rapports emonisi ete lelo soko 9 000 bandeko ya elimo na Yesu bazali naino na mabelé. Na yango, baoyo kati na bango bakotikala bakozala moke mingi mpo na kotalela mosala ya kobongisa oyo ekosalema liboso na lisekwa ya bato mingi. (Ezekiele 39:8-16) Ekozala bongo libaku mpo na ebele monene oyo motuya na bango ezali lelo bamilió mingi, ete bakokisa mosala kitoko. Ezali mpenzampenza mpo na bango nde libaku oyo ebombami.
14. a) Mpo na likambo nini mingi basangani na ebele monene bazali kobongisama, mpe mpo na nini mingi kati na bango basengeli sikawa kozwa mikumba? b) Makambo nini masengeli koya mosika te, mpe mosala nini mozali kozela bampate mosusu?
14 Mingi na basangani na ebele monene bazali uta sikawa kobongisama mpo na kokokisa mikumba na kati ya lisangá mpe na programe ya botongi bandako oyo lisangá ya Nzambe ezali kokokisa kati na mokili mobimba. Ezali mpe elendiseli na komona mibali mosusu bateli na elimo, kati na ebele monene, kozwa mikumba minene na lisangá oyo Jéhovah azali kotambwisa lelo na mabelé. Batikali bapakolami bakomi mibangé mpe bakoki lisusu te kosala ndenge bazalaki kosala kala. Bandeko oyo ya Mokonzi bazali kosepela na lisalisi ya bolingo ya bankulutu mpe basaleli na misala oyo bazali bampate mosusu mpe bazali na bizalela na elimo bisengami. Mosika te, Babilone Monene akolongolama na mabelé. Na nsima, lokola eyebisami na Emoniseli 19:1-8, libala na Mwana na Mpate mpe mwasi na ye, ba 144 000 na mobimba na bango, ekosalema na makoló. Bampate mosusu, baoyo bakosala mabelé na sika na nse na makoló na sika, bakozala bamonisi ya Mokonzi na kokokisa mosala kitoko na mabelé mobimba kino ekobongwana paradis etondi na bato, mpo na lokumu ya Jéhovah.
15. Mabaku nini ebele monene bakozwa yango kati na Boyangeli ya mbula nkoto?
15 Na Boyangeli ya mbula nkoto ya Klisto, ntango bakufi basikolami bakosekwa, basangani ya ebele monene baoyo bakobika bakozwa mabaku malamu mpe minene. Ntango yango bakozala bana mibali mpe bana basi ya Mokonzi. Bamosusu kati na bana na ye ya mibali bakoki kozala ba princes, lokola mpe bana ya mokonzi Davide bazalaki ba princes baoyo bazalaki na mikumba mikesenia. Tala likambo ezali kokundwela biso Nzembo 45, loyembo mpo na lokumu ya “mokonzi” mopakolami ya Jéhovah.
16. Nzembo 45 ezali kolobela mpo na nani mpenzampenza, mpe ndenge nini tokoki kolongisa eyano oyo?
16 Nzembo 45 ezali koloba mpo na mokonzi nani mpenzampenza? Mosusu te bobele Yesu Klisto! Ezali yango emonisami na Baebele 1:9, epai maloba oyo na Nzembo 45 matangami: “Olingi boyengebene mpe oyini mabe. Bongo, Nzambe, Nzambe na yo, asili kopakola yo na mafuta na esengo monene koleka bazalani na yo.” Na yango ezali mpo na Yesu Klisto akembisami nde maloba makomami na Nzembo 45:16 mazali kokokana: “Bana na yo bakozala na esika na batata na yo, okotia bango lokola bana na mokonzi [princes] na mokili mobimba.”
17. Yesu Klisto azali kosepela mingimingi na nini mpe na banani?
17 Na ndenge ebongi, Yesu azali kosepela mingi na avenire oyo ezali kozela ye lokola Mokonzi moyangeli koleka ntango alekisaki na mabelé. Ya solo, abosani te ntango yango, mpe mpenzampenza bankoko na ye baoyo Jéhovah asalaki elaka elongo na bango mpo na kopambola mabota nyonso na nzela ya Libota ya Abrahame. Kasi sikawa, azali kosepela mingimingi na mokano oyo Jéhovah Nzambe asalaki mpo na avenire, Ye nde atiaki ye mokonzi. Bana na Yesu na mabelé, mingimingi bana na ye mibali baoyo bazali kokokisa masengami mpo na kozwa mikumba lokola ba princes na nse na botambwisi na ye, akotia likebi na ye makasi epai na bango,koleka epai na batata na ye na mabelé.
18. Na ndenge Nzembo 45:16 ebongolami, ndenge nini mabongoli mosusu mamonisi polele ete Yesu akosepela mingi na bana na ye ya mibali baoyo batiami ba princes koleka bankoko na ye na mabelé?
18 Mabongoli mingi ya Biblia malobeli polele ete Yesu akolakisa bosepeli mingi epai na bana na ye ya mibali oyo akopesa bango mikumba ya ba princes, koleka bankoko na ye. Tala ndenge mabongoli mosusu malobi mpo na Nzembo 45:16: “Bana na yo bakozala na esika na batata na yo, okotia bango lokola bana na mokonzi na mokili mobimba.” (Lingala Haut fleuve) “Bana na yo bakozwa esika na batata na yo, okotya bango bana na mokonzi na mabelé mobimba.” (Osty) “Otiki batata na yo kasi okobota bana, okokomisa bango bakonzi [princes] o mokili mobimba.” (Liloba lya Nzambe).
19. Mikumba nini basangani mosusu na ebele monene bazali kokokisa kati na lisangá, mpe esika nini Mokonzi, Yesu Klisto, akotia bango mbala mosusu na Boyangeli na ye ya mbula nkoto?
19 Tozali na esengo mingi ya kozala uta sikawa na bana na mokonzi [princes] kati na biso mpo na mikolo mikoya. Bazali basangani ya bampate mosusu baoyo bazali koyoka mongongo ya Mobateli malamu, Yesu Klisto, mingimingi uta 1935, mbula oyo eteni ya Emoniseli 7:9-17 elimbolamaki na assemblée ya ba Témoins de Jéhovah esalamaki na Washington. Lelo ebele na basangani ya ebele monene na bampate mosusu bazali bankulutu, to bakengeli, kati na masangá koleka 57 670 ya ba Témoins de Jéhovah mapalangani na mikili 212. Soki babateli bibongiseli na bango elongo na batikali na bandeko na elimo na Klisto baoyo bazali naino na mabelé, mibali oyo bakoki koyambama lokola bana na mokonzi Yesu Klisto na mabelé, na boumeli ya Boyangeli na ye ya mbula nkoto na mabelé na sika elakami. (2 Petelo 3:13) Na motindo yango, mbala mosusu bakoponama ete bazala ba princes kati na mabelé na sika.
20. a) Ezalela ya Mokonzi ekozala ndenge nini epai na baoyo akopona bazala ba princes na mabelé? b) Ebele monene bakoyamba bato nini, mpe likoki nini ekopesama na bato yango?
20 Na esengo nyonso Mokonzi, Yesu Klisto, akondima ba princes wana baoyo bakoponama sika, lokola mpe andimi lelo mosala ya kokengela oyo basembwi mosusu na bampate mosusu bazali kosala likoló na masangá ya ba Témoins de Jéhovah. Ebele monene nyonso ya bampate mosusu-basi na mibali lokola-bakozala na libaku kitoko ya koyamba bakufi nyonso oyo bakoyoka mongongo na Yesu, bakosekwa mpe bakozala na likoki ya kozwa bomoi ya seko kati na ezaleli ya kokoka na mabelé epetolami oyo ekobongwana paradis na mokili mobimba. (Yoane 5:28, 29) Kati na basekwi oyo bazwi libaku malamu mpenza ekozala na bankoko na Yesu Klisto baoyo basikwami, mibali na kondima baoyo bamonisaki bokangami na bango epai na Jéhovah Nzambe kino liwa na kolikya kokoma na “lisekwa lileki malamu”. (Baebele 11:35) Kasi kotombwama na bango kino kokoka ya bomoto na boumeli ya Boyangeli ya mbula nkoto na Mokonzi na bango Mosikoli, Yesu Klisto, ekozala bobele ebandeli. Soki batikali mpenzampenza bato babongisami na nse na boyangeli ya Jéhovah Nzambe na ntango na komekama ya nsuka oyo bato bazongisami na kokoka bakozwa na nsuka ya mbula nkoto, bakomonisa ete babongi kozala na bomoi ya seko kati na Paradis mpe kozala eteni na mabelé ya lisangá na molongo mobimba ya Jéhovah.—Matai 25:31-46; Emoniseli 20:1 kino 21:1.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala 2 Samwele 8:18, Traduction du monde nouveau, libongoli ya anglais na mitindami ya 1984, note.
Bozongeli
◻ Jéhovah aponi eleko ya mbula boni mpo na kopambola bato nyonso?
◻ Boyokani ya ndenge nini tosengeli mpenzampenza kobatela kati na biso mpo na kobika na bolozi monene?
◻ Mpo na bampate ‘kosangola libula na bokonzi ebongisamaki mpo na bango longwa ebandeli na mokili’ elimboli nini?
◻ Na Boyangeli ya Mbula Nkoto, mabaku nini ebele monene bakozwa mbala mosusu?