Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/9 nk. 23-30
  • Mosala ya pionnier ezalaki mosala ya bomoi na ngai mobimba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mosala ya pionnier ezalaki mosala ya bomoi na ngai mobimba
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eloko ebongolaki bomoi na ngai
  • Naponi mosala ya bomoi na ngai mobimba
  • Teritware na ngai ya liboso
  • Libota moko ya bapionniers
  • Mposa ya kokolisa mosala na ngai
  • Mosala na Béthel
  • Liboso na bakonzi ya Leta
  • Imprimerie eyeisami monene
  • Kosombama ya bandako mpo na babiro
  • Bandako mosusu ya kolala
  • Esengo kati na mosala ya Béthel
  • Betele ezali na mposa ya basali na bolingo malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Epai mosala ya ntango nyonso ememaki ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • ‘Tosili kosala oyo tosengelaki kosala’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Bomoi ya malamu mpenza na mosala ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/9 nk. 23-30

Mosala ya pionnier ezalaki mosala ya bomoi na ngai mobimba

LISOLO YA MAX LARSON

NA 1910, mama na ngai, oyo baboti na ye bakufaki, atikaki mboka Danemark mpe azwaki masuwa kino Etats-Unis. Azalaki bobele na mbula 18, ayebaki monoko ya Anglais te mpe ayebaki ata moto moko te kati na mboka wana.

Ntango akomaki na engumba New York, azwaki train kino mboka Dakota ya Sud mpe asalaki mobembo ya 2 400 kilometres. Kati na engumba oyo, esika bato bauta na Danemark bafandaki, akutanaki na mobali oyo akomaki tata na ngai. Babalanaki le 20 Septembre 1911.

Na ebandeli ya 1913, tata na ngai asalaki mobembo ye moko kati na chariot oyo ezalaki na hema kino mboka Montana, mpe azwaki mabelé, esika atongaki ndako oyo ezalaki na chambre moko. Ntango asilisaki yango, na elanga, mama na ngai alandaki ye, na train, elongo na ndeko na ngai Norman, oyo azalaki na mwa basanza uta abotamaki.

Mbula mibale na nsima, mwana ya mibale alingaki kobotama. Lokola nalobaka yango mpo na kosakana, “nasalisaki” mama na ngai mpo na kotia twatire ya ndako: ya solo, ezali mosala asalaki, mokolo oyo ezalaki liboso na kobotama na ngai, likoló na eteni ebakisamaki na ndako na biso. Mokolo elandaki, le 29 Avril 1915, ntango tata na ngai azongaki na bilanga mpo na kolia na midi, mama na ngai ayebisaki ye: “Nakanisi ete nakobota.” Mpe nsima na midi abotaki ngai. Kasi na mpokwa na bozongi ya tata, azalaki kosala na ye misala mpe alambaki bilei ya mpokwa.

Mbula misato nsima ndeko na ngai ya mwasi Jeanne abotamaki kaka na ndako yango. Mbula elandaki, tokendeki kofanda na est ya mboka Montana, esika tata na ngai afutelaki ferme. Na 1921 ndeko na ngai ya mwasi ya mibale, Laverna, abotamaki. Biso nyonso minei tokolaki na kati na esobe monene ya mboka Montana.

Eloko ebongolaki bomoi na ngai

Baboti na ngai bazalaki na lingomba ya luthériens, mpe mokolo na yenga nyonso tozalaki kokende biso nyonso motoba na tempelo. Kasi mosika te mama azwaki vizite ya mozalani moko, mosangani na Bayekoli na Biblia na mokili mobimba (nkombo ya kala ya ba Témoins de Jéhovah), oyo abandaki koyekola Biblia elongo na mama. Na nsuka na mbula soko mibale, mama na ngai abandaki kosalela solo ya Biblia oyo azalaki koyekola, mpe na 1925 azwaki batisimo na esika bazalaki komelisa bampunda. Ezala tata na ngai, yaya na ngai, bandeko na ngai ya basi, ezala ngai toboyaki lingomba na ye ya sika; kasi, tozalaki biso nyonso na esengo mingi mpo totikaki kokende na ndako nzambe ya ba luthériens. Mikolo nyonso mama azalaki koyebisa biso: “Bolingi kosalela Jéhovah te, kasi bobuka mibeko na ye te.” Toli na ye epengwisaki biso na makama mingi.

Biso motoba tozalaki kolona mabelé ya 320 hectares mpe tozalaki na bampunda 14 mpe tracteur moko. Tozalaki na kura te to douche te, lavabo te to wc ya ndako te, mpe tosengelaki kokende kotoka mai na liziba, ezalaki na 4 kilométres uta epai na biso. Na ebandeli ya 1930 nsima wana mbula ezalaki kobeta te mpe mbula minei ya kozanga kobuka mbuma, tozwaki likatami ya kokende na eteni na mokili Washington. Esengaki na biso kokende na biloko nyonso ya ndako mpe biloko na mosala ya bilanga longwa Montana kino Etat ya Washington. Mosala na ngai ezalaki ya kotala wagon oyo ezalaki komema biloko yango, lisusu koleisa mpe komelisa bampunda. Mikolo motoba nsima, nakomaki na ndelo ya weste ya mokili Washington.

Esika wana, nasalisaki tata na ngai kotonga mpe kobongisa ferme ya bangombe mpo na miliki. Na nsuka na mbula soko moko, ntango nazalaki na mbula 20, nalingaki kobanda mosala na ngai moko; nazalaki bongo kotambwisa camion moko ya kompanyi ya kopasola mabaya kati na bangomba, mpe nazalaki lisusu mécanicien kati na masuwa na mboka Alaska na boumeli ya sanza motoba.

Na 1938, ndeko na ngai ya mwasi Jeanne mpe ngai tozwaki mosala na mboka Seattle, mpe tofandaki na masuwa moko ya moke likoló na ebale Union. Na elanga ya mobu wana, mama na ngai, oyo azalaki kofanda na 80 kilomètres uta epai na biso, asengelaki koyangana na assemblée ya mbula na mbula ya Ba Témoins de Jéhovah na mboka Seattle. Lokola esika na assemblée ezalaki mosika te na masuwa na biso, tobengisaki ye afanda epai na biso. Andimaki, mpe biso tondimaki koyangana na assemblée.

Naponi mosala ya bomoi na ngai mobimba

Mokolo na poso na mpokwa, Joseph Rutherford, na ntango wana azaláká président ya la Société, asalaki diskur oyo ezalaki na móto ya likambo: “Baoyo balingi boyengebene”, kati na yango alobelaki mpo na mosala ya ntango nyonso, elingi koloba mosala ya pionnier. Nsima, Bill Griffith, oyo afandaki pembeni na ngai, alobaki na ngai: “Ya solo, Max! Tozala ba pionniers!”

“Napesaki eyano, Okay, tokende!

-Ozali kosakana, bongo te?

-Te. Nsima na diskur oyo, nayoki nandimi ete mosala malamu nakoki kosala yango wana.

- Kasi okomi naino mosakoli te, naino mpe ozwi batisimo te.

- Ya solo, kasi balobaki ete batisimo ekozala lobi. Nakozala wana.”

Na esengo nyonso, Bill na ngai tokendeki bongo na biro oyo ezalaki kotala mosala ya kosakola mpe tosengaki ba demandes ya mosala ya pionnier. Tokutaki wana William Van Amburgh, secrétaire-trésorier ya la Société. Ntango toyebisaki ye mikano na biso, abendaki biso pembeni mpe asololaki na biso lokola tata: “Bomikotisa na mosala oyo lokola mpo na komeka mpamba te to lokola bato bakei kosakana. Bosali liponi malamu, kasi bosala yango lokola ete esengeli kozala mosala mpo na bomoi na bino mobimba.” Toli oyo esalisaki ngai ntango nyonso. Bill na ngai topesaki ba demandes na biso mpe mokolo oyo elandaki, le 5 Juin 1938, nazwaki batisimo.

Teritware na ngai ya liboso

Mokolo elandaki, ezalaki lundi, nayebisaki mokonzi na ngai ya mosala ete nakolongwa mosala mpo na kokoma mosakoli. Poso oyo ya liboso nalekisaki yango na koyekola malamumalamu mokanda ya sika ya la Société, oyo ezalaki na titre Ennemis, mpe nasanganaki na makita nyonso. Poso ya mibale, nayekolaki mokanda ebimaki liboso na oyo mosusu, ezalaki na titre Richesses. Na poso ya misato, nazwaki teritware na ngai: ezalaki mboka Raymond, kati na Etat ya Washington.

Na mboka Raymond, Bill na ngai tokutaki etuluku ya Batemwe 27 baoyo bazalaki kosala makita epai na moko na bango. Tozalaki na etinda ya kotambwisa makita nyonso mpe kosalisa basakoli mpe komesanisa bango mpo na kotambwisa boyekoli na Biblia, oyo ezalaki mosala ya sika na ntango wana.

Na likita ya liboso ya mosala, mokolo na minei, nasengaki na serviteur ya etuluku, ndenge bazalaki kobenga mokengeli-mokambi na ntango wana, ete akende kotika ngai lobi na mpokwa mpo na komeka kobanda kotambwisa boyekoli moko ya Biblia. Lokola alobaki ete azalaki na likambo mosusu ya kosala, nakendeki elongo na Bill. Na bozongi, totelemisamaki na carrefour mpo na kotika nzela na défilé ya Légion américaine. Na kokamwa nyonso, mokonzi ya défilé yango ezalaki serviteur ya etuluku.

Kobanda mokolo na yenga, nabandaki kotambwisa boyekoli na Biblia na ngai ya liboso elongo na mobali moko. Mpe, natambwisaki mpo na mbala ya liboso boyekoli ya Mosenzeli. Lisusu, ezalaki numéro ya 1er Juin 1938, oyo ekotisaki bibongiseli ya téokratike kati na masangá. Na basangani 27 ya etuluku, bobele 3 nde bandimaki bibongiseli oyo ya sika ya téokratike.

Libota moko ya bapionniers

Nazalaki pionnier uta mikolo mingi te, bandeko na ngai ya basi mpe yaya na ngai Norman bango mpe babandaki mosala ya pionnier. Norman na mwasi na ye batekisaki ferme na bango, basombaki caravane (motuka oyo mpunda azali kobenda) ya 3,70 metres mpe bakendaki kosakola elongo na Joan, mwana mwasi na bango ya mbula misato. Na yango, ntango balekaki na mboka Raymond na 1941, Norman akomelaki ngai ete Batemwe 24 baoyo baboyaki bibongiseli ya sika ya téokratike na 1938 batikaki solo mpo na kosangana na etuluku moko ya bapengwi. Nzokande, mobali ya liboso elongo na ye nayekolaki akomaki serviteur ya etuluku.

Esili koleka mbula 24, Joan, mwana mwasi ya Norman elongo na mobali na ye, Maurice O’Callaghan, bazali kotala masangá kati na ba circonscriptions. Na 1949, leki na ngai ya mwasi ya nsuka, Laverna, alandaki na 1949 mateya na kelasi ya 12 ya Galaad, eteyelo ya bamisionere, mpe atindamaki na mboka ltalie. Na mboka yango, mosala ya misionere ezalaki na lokito makasi na ntango wana na boye ete leki na ngai ya mwasi babenganaki ye kino na Swisse, epai kuna azali kofanda na mobali na ye kino lelo.

Mposa ya kokolisa mosala na ngai

Nazalaki pionnier permanent na boumeli ya sanza mibale, nsima naponamaki lokola pionnier spécial. Na ntango wana, Bill na ngai tozalaki na moninga na biso ya mosala Warren Henschel, yaya ya Milton Henschel. Milton azali lelo mosangani ya Collège central ya ba Témoins de Jéhovah.

Nazalaki pionnier special naino nakokisaki sanza moko te ntango natelemaki na mpokwa moko epai ya Albert Hoffman. Azalaki mokengeli ya région, to ya zongazonga, mpe azalaki kofanda elongo na mwasi na ye Zola, kati na caravane, oyo ezalaki liboso na Salle du Royaume. Na ntango wana, mpo na kokweya ya nkita, tozalaki kopesa mikanda mpe bato bakopesa biso biloko ndenge na ndenge ya kolia na esika ya kopesa biso mbongo. Nzokande, mokolo wana, bapesaki ngai kitunga etondi na mbuma babengi poires, mpe nalingaki kopesa ndambo epai na Albert. Asepelaki mingi mpe abengaki ngai ete nakota.

Ezalaki 9 heures ya mpokwa ntango Albert abandaki kosolola na ngai na ntina etali Maison de la Bible (lelo ebengami Béthel), esika monene ya Ba Témoins de Jéhovah oyo etambwisaka mosala na bango na mokili mobimba na Brooklyn (New York). Na nsuka ezalaki mwasi na ye nde akataki biso masolo na kolobaka: “Boyebi soki tokomi na ngonga nini? tokomi 4h30!” Tosololaki butu mobimba! Liboso ete nakende kolala, na ebombelo na mbuma na Salle du Royaume, nakomaki mokanda na Béthel mpo na kosenga demande ya kokota na Béthel mpe nakendeki noki kotika yango na poste.

Mikolo nyonso nazalaki kolobela likambo yango kati na mabondeli na ngai epai na Jéhovah, mpe sanza misato nsima nazwaki na esengo nyonso mokanda oyo ebengisaki ngai na Béthel ya Brooklyn. Liboso nakende, napesaki vuatire na ngai na ndeko na ngai ya mwasi Jeanne, oyo ye mpe abandaki mosala ya pionnier spécial. Le 14 janvier 1939, nsima ya kotambola mikolo motoba na motuka koleka Montana mpe Dakota nyonso mibale, mpe na mipepe mibale ya makasi ya neige, nsuka na yango nakomaki na New York.

Mosala na Béthel

Nayambamaki na serviteur ya Béthel, Grant Suiter, mpe natindamaki na imprimerie epai kuna nasengelaki komilakisa epai na Nathan Knorr, serviteur ya imprimerie. Mosala na ngai ya liboso ezalaki kokanga nsinga na ba cartons ya mikanda na expédition. Yenga oyo elandaki, natindamaki mpo na kosala na etage esika masini ya konyata mikanda ezalaki. Nathan Knorr alobaki na ngai: “Soki oyekoli kotambwisa masini oyo na sanza motoba, okobanda kosala na yango, mpo ete oyo azali kotambwisa yango akosala na masini mosusu ya sika.” Nayekolaki kotambwisa masini yango mpe mosala yango esepelisaki ngai mingi.

Nasalaki mbula moko na ndambo na masini yango, mokolo moko, Nathan Knorr apusanaki pembeni na ngai mpe atunaki ngai ete: “Max, okoloba nini soki bapesi yo mosala ya biro?”

“Ndeko Knorr, ezali mosala ya nsuka oyo nakoki kopona! Kasi soki bapesi ngai yango, ekozala mosala na ngai ya liboso.”

“Yaka kotala ngai na biro na ngai lundi na ntongo.”

Uta ntango wana nazali kosala na biro. Na ebandeli, nazalaki adjoint ya Nathan Knorr. Nsima, na liwa ya Joseph Rutherford, le 8 janvier 1942, ntango Nathan Knorr akomaki président, naponamaki surveillant ya imprimerie. Nazalaki na mbula 26 mpe nasilaki kosala bobele mbula misato na Béthel. Yango namonaki ete mikumba ezalaki kilo.

Nzokande, bakengeli oyo bapakolami ya misala mikeseni ya imprimerie bapesaki ngai maboko na bolingo nyonso. Bazalaki na ezalela ya komikitisa mpe ya kolinga kosala elongo, yango ekolisaki bolingo na ngai mpe limemya epai na bango. Kasi Nathan Knorr ezali ye nde moto asalisaki ngai minei mpe amesanisaki ngai. Na boumeli ya bambula koleka 35, kino liwa na ye na 1977, nazwaki libaku ya kosala elongo na ye makambo nyonso matali konyata mikanda mpe botongi bandako. Azalaki solo moto ayebi kobongisa mosala mpe asalisaki ngai mingi mpo nakoka kokokisa mokumba na ngai.

Liboso na bakonzi ya Leta

Na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, biloko oyo tozalaki na yango mposa mpo na konyata mikanda ezalaki kozanga. Na yango, mbala na mbala na mbula nazalaki kokende na Washington, capitale, mpo na kokutana na bakonzi. Nasengaki epai na bango ete nazwa ba papier mpe biloko mosusu mpo na mosala, mpe Jéhovah apambolaki mingi milende yango.

Mokolo moko, napesaki lisengi na ngai na komonisaka bankasa ya bazulunalo minene oyo ezalaki kosala publicité na makambo mazanga ntina. Na kolakisaka publicité ya lokasa mobimba mpo na kazaka moko ya sukisuki, ebimaki na zulunalo monene ya New York, nalobaki: “Ba papiers oyo esalelamaki mpo na kosala publicité oyo kati na ebimeli bobele moko ya dimanche ezali na kilo ekoki oyo biso tozali kosenga mpo na mbula mobimba.”

Député moko azongisaki ete: “Olobi malamu”. Na lisalisi ya Jéhovah oyo apambolaki milende na ngai, na boumeli nyonso ya bitumba totelemisaki te masini na biso mpo na kozanga bapapiers to biloko mosusu ya mosala. Kasi, ezali solo ete tozalaki na mposa ya bapapiers mingi te lokola lelo.

Imprimerie eyeisami monene

Mbula zomi na mibale liboso nakoma na Béthel, la Société atongaki imprimerie na ye ya liboso na 117 Adams Street, ezalaki na étages nsambo, oyo ezwaki ndambo mobimba ya ndako. Nzokande, esengelaki kotonga, na eteni mosusu ya mabelé oyo, ndako ya étages mwambe oyo ezalaki na eteni moko mpo na imprimerie mpe mosusu mpo na babiro. Bongo ndako mobimba ezalaki mpo na imprimerie monene, na bonene ya 15 000 métres carrés.

Ezali na ntango yango nde nazwaki mokumba ya kotambwisa botongi mpo na ndako monene ya la Société. Na Brooklyn tozalaki bobele na ndako moko mpo na babiro mpe imprimerie, mpe ndako moko ya kolala. Kasi lelo, nsima na mbula 40, tozali na bandako koleka 10 mpo na misala ya imprimerie mpe babiro, mpe bandako koleka 20 mpo na kolala, bobele na Brooklyn!

Na ebandeli na 1950, tomekaki kosomba mabelé oyo ezalaki kotalana na Adams Street, likoló moke na ndako na biso ya 117 mpe ngambo mosusu ya balabala, kasi mokolo na mabelé aboyaki lisengi na biso. Alingaki kokakola te, mpo akanisaki ete la Société akofuta mbongo nyonso oyo ye akosenga. Na yango, tosepelaki na ndako oyo ezalaki na est ya imprimerie ya Adams Street, na ngambo mosusu ya Pearl Street. Ezalaki mabelé esalemi na mapango mwambe makeseni. Tosololaki na nkolo lopango mokomoko, kasi Jéhovah abongisaki nzela mpo ete tozwa mapango nyonso mwambe na boumeli ya mbula moko bobele na 97 dollars mpo na mètre carré!

Na bambula 1955 mpe 1956, la Société atongaki na esika oyo imprimerie moko ya 12 étages oyo porte na yango ezali na 77 Sands Street. Ezalaki imprimerie na biso ya mibale, oyo ezwaki eteni ya mabelé mbala mibale koleka bonene ya ndako, elingi koloba 33 000 mètres carrés. Kasi, lokola lisangá na biso ezali kokola nokinoki, tomonaki ete tokozala na mposa ya esika monene koleka. Nde yango na 1958, tosombaki imprimerie moko ezalaki kati ya Prospect Street na Pearl Street oyo na ebandeli esalisaki biso lokola dépôt.

Na ntango yango, esika bobele moko oyo ekokaki kopesa biso nzela mpo na kokangisa bandako na biso na lisalisi ya pont ezali mabelé oyo ezalaki likoló oyo tomekaki liboso kosomba. Tomonaki ete, nkolo na yango akomeka lisusu kosenga mbongo mingi soki la Société ameki lisusu kotuna. Tosengaki bongo na moto moko oyo azali na bandako na ye ya kofutela akoka kosomba mabelé yango; azwaki yango na ntalo moke koleka oyo tolingaki kopesa. Mokolo lopango asilikaki makasi ntango ayebaki ete mikanda ya mabelé epesamaki na la Société

Na 1966 mpe 1967, totongaki na mabelé oyo imprimerie ya étages libwa oyo ezalaki na bonene ya 21 000 mètres carrés. Kobanda wana tozalaki na imprimerie oyo ezalaki na bandako minei, nyonso ekangisami na ba ponts. Nsima na yango, na 1983 mpe na 1986, tosombaki usine mibale ezalaki na nse moke, na ngambo mosusu ya balabala esika oyo totongaki nzela to pont ya 49 mètres oyo ekangisaki bandako oyo na bandako mosusu minei. Bandako oyo motoba nyonso ezalaki na 95 000 mètres carrés, elingi koloba koleka hectares libwa. Na 1983, tosombaki mpe ndako monene oyo ezalaki na 360 Furman Street (93 000 mètres carrés ya bonene), koleka bandako mwa mosika, pembeni na libongo, esika imprimerie ezali sikawa.

Kosombama ya bandako mpo na babiro

Likambo mosusu oyo ekoki kosepelisa esalamaki na ntango wana ya bosombi bandako ezalaki oyo ya ndako monene Squibb oyo ezalaki mpo na boteki bankisi, oyo esalamaki na bandako zomi esika moko. Tobukaki minei kati na yango, mpe totongaki ndako mosusu monene oyo ekangisamaki na mosusu oyo ezalaka kala, mpo na kosala bandako nyonso ya 25 Columbia Heights, biro monene ya la Société mpo na kotambwisa mosala na mokili mobimba. Tala ndenge nini tosalaki mpo na kosomba bandako yango:

Pene na 1969, tokanisaki lisusu koyeisa minene bandako na biso. Kasi ezalela na nkita ezalaki mpasi; ezali ntina yango bankolo bandako oyo nazalaki kotala bazalaki kolinga te koteka bandako.

Na eleko yango, nasalaki mobembo na mboka Caroline du Nord, mpo na kokutana na moto oyo azalaki kotekisela biso ba papiers ya Bible. Kuna, na kozanga kokanela nalobaki na mokonzi moko ya mosala ete tozalaki koluka kosomba ndako na Brooklyn. Nzokande, emonanaki ete ndeko ya mobali wana azalaki moninga ya solo ya moko kati na bankolo ya bandako Squibb. Asalaki boyokanisi oyo ekoki mpe ayebisaki ngai ete nakoki kotelefoné mobali yango ntango nakozonga na Brooklyn.

Ezali yango nasalaki mpe nkolo ndako oyo ayebisaki ngai ete Squibb azalaki koluka koteka bandako ya Brooklyn, mpo na kokende kotonga na libanda ya ville. Ayebisaki ngai ete, ntango makambo nyonso makobongisama, akotelefoné biso mpe tokoki kosolola mpo na ntalo. ‘Basanza elekaki, nsima tozwaki telefone ete: bankolo bandako balingaki kotekisa yango mpe toyokanaki mpo tokutana na biro na bango mokolo oyo elandaki.

Nathan Knorr na ngai tosololaki mpo na kokanisa ntalo oyo tokokaki koyebisa bango. Na bokutani na biso mokolo oyo toyokanaki, bankolo ndako bayebisaki biso ete kokakola ezali te: “Tolingi millions misato ya ba dollars na maboko.” Nathan Knorr na ngai tosalaki lokola tokamwaki te; ya solo, ntalo yango ezalaki moke na kotalela oyo tobongisaki. Tosalaki likambo yango nokinoki. Na ntango wana, toutaki kosilisa botongi ya imprimerie moko oyo ezwaki millions minei ya ba dollars, kasi ntango basali na Nkolo bayebaki ete tozali lisusu na mposa ya mbongo, bapesaki biso noki mosolo oyo tozalaki na yango mposa.

Bandako mosusu ya kolala

Na ba 1950, tosombaki mabelé ezalaki kotalana na 124 Columbia Heights mpe totongaki kobanda 1959 kino 1960, ndako monene mpo na kolala. Nzokande, uta 1965 ekomaki mpasi mingi mpo na kotonga bandako minene. Na mbula yango, Leta azwaki ekateli ete esika oyo Béthel ezalaki ekomaki esika ebatelami. Mobeko oyo epekisaki makasi botongi mpe kobongola lolenge na bandako. Ata bongo, na lisalisi na Jéhovah, tokokisaki ntango nyonso bamposa na biso.

Na ndakisa, na 1967, tokotisaki lisengi ya kotonga ndako monene ya kolala ya étages mitano na 119 Columbia Heights. Mpo na mibeko ya sika, tosilaki kokitisa kino ba étages mitano mokano na biso oyo ezalaki ya ba étages zomi na moko. Ata bongo, bakonzi ya Leta balingaki kolongola lisusu étage moko.

Na sanza ya Juin, nakutanaki na président ya district ya Brooklyn. Alobaki na ngai soko tokoki kosilisa moboko ya ndako liboso ya Septembre, date mpo na likita ya Biro ya urbanisme, akomeka koloba mpo na kobatela ba étages mitano ya ndako na biso. Bibongiseli mpo na botongi bisalamaki nokinoki, mpe na Septembre moboko nyonso ya bandako esilaki kotiama.

Président ya district abengisaki ngai mokolo oyo liboso ete likita na bango etalela likambo na biso. Asengaki biso tokoka komimonisa na hôtel de ville ngonga mibale liboso ete Biro ya urbanisme ebanda likita na yango mpo na kokata makambo, ete tokutana na ye na salle moko ezali nsima. Nathan Knorr, mpe secrétaire-trésorier ya la Société, elingi koloba Grant Suiter, mpe ngai tokendeki komimonisa na hôtel de ville lobi elandaki na ntongontongo. Tozalaki koluka mwango malamu mpo na koyebisa likambo na biso liboso na Biro ya urbanisme ntango wana likambo mosusu eyaki kotia mobulu; ezalaki ete baluka bato oyo bakoki kotalela malamu lolenge mpe esika oyo botongi ekosalema. Esengelaki ete bakoka kobenga moto moko mpo na kolimbola polele likambo yango. Mbala moko, commissaire alobaki akotalela ye moko likambo yango. Alobaki: “Lokola likambo na bino ekokutana na botemeli mingi, nandimi kozala momonisi ya la Société Watchtower liboso na Biro.”

Likanisi na ye esepelisaki biso mingi. Nzokande, tala ndenge bakataka likambo na Biro ya urbanisme: Bakobianga likambo moko na moko na ndenge ebongisamaki na liste, mpe soki ntembe ezali, botaleli ya likambo yango ekozala na nsima ya midi. Soki ntembe ata moko ezali te, likambo likokatama kaka wana. Na yango, likambo na biso etangamaki na ntongontongo; commissaire ya planification urbaine atelemaki mpe alobaki na guvernere ete: “Nalingi kokotela la Société Watchtower.”

“Boyebi ete lolenge na biso ya kokata makambo ezali kopesa nzela te ete kokabola makanisi ezala na likambo ya liboso [mpo ndenge ezali ntembe nyonso esalaka ete likambo litalelama na nsima ya midi] elobaki guvernere. Kasi, nayebi ete ozali na mosala mingi, commissaire, yango wana nakosala mwa bokeseni mpe nandimi lisengi na yo.” Na yango commissaire ayebisaki likambo na biso, mpe Bureau ya urbanisme bandimaki bango nyonso lisengi na biso. Ntango tozalaki kobima na salle ya koyokela makambo, avocat mosusu ayaki mbango mpe azalaki koloba makasi ete: “Nazali na makambo ya koloba na ngonga moko mpo na likambo oyo.” Kasi ayaki nsima wana makambo makatami! Tokendeki na biso, mpe totondaki Jéhovah mpo na bolongi oyo.

Nakoki koloba ete ezalaki libaku monene mpo na ngai kozala momonisi ya la Société mpo na makambo motindo oyo mbula na mbula. Ezali mpe esengo mingi kozala temwe ya bokoli monene ya mosala ya kosakola oyo ezali kosalema na mokili mobimba, oyo epesaki nzela ete bandako oyo ekoka kosombama! Eloko esalisaki ngai mingi mpo na kokokisa makambo oyo nyonso ezalaki koponama na ngai lokola vice-président ya Watchtower Bible and Tract Society of New York, le 1er janvier 1977.

Esengo kati na mosala ya Béthel

Longwa ntango nakotaki na Béthel na 1939, libota ya Béthel ekomaki na basangani kolongwa 185 kino 2 800 koleka na Brooklyn mpe koleka 900 na Ferme ya la Société Watchtower. Mbala mingi batunaka ngai: “Eloko nini esalisaki yo kofanda na Béthel mbula 50 oyo?” Nazali kozongisa eyano kozanga kokakatana ete: “Nakanisaka eloko mosusu te bobele mosala ya Béthel.”

Lisusu, na demande ya kokota na Béthel oyo natondisaki mpe natiaki loboko motuna oyo mozalaki: “Ondimi kotikala na Béthel kino Nkolo akozwa yo?” Nkolo azwaki ngai te, kino lelo nazali kaka wana, na esengo ya kosalela Jéhovah. Uta mokolo namipesaki epai na Nzambe, nazwaki likatami ya kosala boye ete mosala ya pionnier ezala mosala ya bomoi na ngai mobimba.

Na bambula na ngai ya liboso na Béthel, nzela epesamaki te mpo ete moto akoka kobala; mpe, lokola bamosusu mingi, nazwaki esengo kati na bomoi na ngai lokola monzemba mpe nazuaki esengo kati na mosala na ngai ya Béthel. Nzokande, ntango likanisi ya Béthel na ntina etali libala ebongwanaki, nabalaki Helen Lapshanski, le 7 avril 1956. Akomaki na Béthel na 1951. Uta ntango yango, tozali kopesa motuya monene na boninga na biso mpe kosungana.

Ntango elekaki mingi te uta tobalanaki mpe Helen azwaki maladi babengi sclérose en plaque; na bambula oyo ya nsima, maladi na ye ekomaki makasi. Kasi na lisalisi ya kiti moko ya kura mpe masini babengi déambulateur akoki kotambola. Ntango nyonso azali kobatela makanisi malamu mpe na esengo, mpe mikolo nyonso azali kokokisa mosala na ye na biro na Béthel.

Ntango tozalaki bana, leki na ngai ya mwasi Jeanne na ngai tozalaki koyokana mingi mpe tozalaki kosala makambo mingi elongo. Na yango, Jeanne alingaki ntango nyonso kolanda ngai, nde yango na 1943 abengisamaki na Béthel. Na 1952, Russell Mock abalaki ye; bango nyonso mibale bazali basangani na libota ya Béthel mpe bazali kosalela Nzambe pembeni na biso.

Nandimi solo ete Béthel ezali esika malamu koleka oyo moto akoki ko- fanda, liboso ya kozongisama ya Paradis na mabelé. Ata mokolo moko nayoki mawa te mpo na liponi na ngai ya kosala mosala ya pionnier na bomoi na ngai mobimba. Nazwaki esengo mingi ya kobeta maboko mpe kosangana na bokoli ya lisangá ya Jéhovah na mabelé. Likatami na ngai ezali ya kokoba, na lisalisi ya Jéhovah, mpo ete Béthel ezala libota na ngai mpe kotia molimo na ngai mobimba mpo na kosalela matomba ya Bokonzi.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 30]

Nandimi solo ete Béthel ezali esika malamu koleka oyo moto akoki kofanda, liboso ya kozongisama ya paradis na mabelé.

[Bililingi na lokasa 24, 25]

Awa na likoló: Ndako ya 360 Furman Street, oyo esombamaki na 1983.

Awa na nse: Ndako ya Columbia Heights oyo ezalaki mpo na Société ya koteka bankisi oyo esombamaki na 1969.

Na loboko ya mwasi: Nathan Knorr ezali ye nde moto asalisaki ngai mingi mpe amesenisaki ngai.

Awa na nse: Kobanda 1986, tozali na bandako motoba mpo na imprimerie, oyo ekangisami.

[Elilingi na lokasa 27]

Imprimerie nsima ya koyeisa yango monene na 1949.

[Elilingi na lokasa 30]

Mokolo ya libala na biso!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto