‘Tosili kosala oyo tosengelaki kosala’
LISOLO YA GEORGE COUCH
Nsima ya kolekisa ntɔngɔ mobimba na mosala ya kosakola ndako na ndako, moninga na ngai abimisaki gato mibale. Ntango tosilisaki kolya, nabimisaki likaya mpo namɛla. Atunaki ngai ete: “Uta ntango boni ozali kati na solo?” Nayebisaki ye ete: “Mbala na ngai ya liboso ya kosangana na likita ezalaki lobi na mpokwa.”
NABOTAMÁ mokolo ya 3 Mársi 1917, na ferme moko ezwami na ntaka ya kilomɛtɛlɛ soko 50 na ɛsti ya engumba Pittsburgh, na etúká ya Pennsylvanie, na États-Unis, penepene na engumba moke ya Avonmore. Ezali kuna nde baboti na biso babɔkɔlaki ngai na bandeko na ngai minei ya mibali mpe moko ya mwasi.
Tobɔkwamaki mpenza na makambo ya lingomba te. Na eleko moko, baboti na ngai bazalaki kokende na ndakonzambe, kasi batikaki kokende wana tozalaki naino bana mike. Kasi, tozalaki kondima ete Mozalisi azali, mpe tozalaki kolanda mitinda ya Biblia na libota na biso.
Baboti na ngai balakisaki ngai malamu mpo na komema mikumba, elingi koloba ndenge ya kondima mikumba mpe kokokisa yango. Bomoi na ferme ezalaki kosɛngisa bongo. Kasi, bomoi na biso mobimba esukaki bobele na kosala misala te. Tozalaki kominanola malamu, na ndakisa kobɛta basket-ball mpe base-ball, kotambola na mpunda, mpe kosakana na mai. Tozalaki na mbongo mingi te na eleko wana, kasi bomoi ezalaki malamu na ferme. Totángaki kelasi ya ebandeli na eteyelo oyo ezalaki bobele na ndako moko mpe tokendaki na engumba mpo na kotánga eteyelo ya ntei.
Mokolo moko na butu, tozalaki kotambola kati na engumba na moninga na ngai. Elenge mwasi moko kitoko abimaki na ndako mpe apesaki moninga na ngai mbote. Moninga na ngai alakisaki ngai epai ya Fern Prugh. Nzokande, azalaki kofanda na balabala ya eteyelo na biso. Mbala mingi ntango nazalaki koleka liboso ya ndako na bango, Fern azalaki na libándá kosala misala. Likambo esimbaki motema na ngai yango oyo: azalaki mwasi makasi na mosala. Tokómaki baninga mpe tolinganaki mingi mpe tobalanaki na Apríli 1936.
Nabandi koyekola solo ya Biblia
Liboso ya kobotama na ngai, ezalaki na mobange mwasi moko oyo bato ya engumba bazalaki konyokola na ntina na lingomba na ye. Mama azalaki kotala ye mikolo nyonso ya pɔsɔ ntango azalaki kokende na engumba kosomba biloko. Mama azalaki kobongisela ye ndako mpe kosombela ye biloko na zando, kino mobange yango akufaki. Namindimisi ete Yehova apambolaki mama mpo na boboto oyo amoniselaki mobange wana, oyo azalaki Moyekoli ya Biblia, ndenge bazalaki kobénga Batatoli ya Yehova na eleko wana.
Mwa moke na nsima, mwana ya tata-mwasi na ngai akufaki liwa ya mbalakaka. Tata-mwasi azwaki libɔndisi na lingomba na ye te, kasi mwasi moko ya kartye oyo azalaki Moyekoli ya Biblia nde abɔndisaki ye. Moyekoli ya Biblia yango alimbolelaki ye nini ekómelaka moto soki akufi. (Yobo 14:13-15; Mosakoli 9:5, 10) Yango ebɔndisaki ye mingi. Na nsima, tata-mwasi ayebisaki mama elikya ya lisekwa. Yango esepelisaki mama mingi, mpamba te ntango baboti na ye bakufaki azalaki naino elenge mpe azalaki komitungisa mpo na koyeba nini ekómelaka moto soki akufi. Likambo yango emonisaki ngai ntina ya kosalela libaku nyonso oyo emonani mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu.
Na bambula ya 1930, mama abandaki koyoka makambo oyo Joseph Rutherford, azalaki koloba na radio mokolo nyonso ya lomingo na ntɔngɔ. Joseph Rutherford, azalaki prezida ya Watch Tower Bible and Tract Society na eleko wana. Na bambula wana, Batatoli ya Yehova babandaki kosakola ndako na ndako na esika tozalaki kofanda. Bazalaki kofungola fono na libándá na nse ya nzete mpe kotya masukulu ya Ndeko Rutherford. Masukulu wana mpe bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Âge d’or (lelo ekómá Lamuká!) esepelisaki lisusu mama mingi.
Mwa bambula na nsima, na 1938, batindaki kalati epai na bato oyo bazalaki na abonema ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, babyangaki bango na likita moko ya ntina mingi na ndako moko ezwami na ntaka ya kilomɛtɛlɛ 25. Mama asepelaki kokende, na bongo, ngai, Fern mpe bayaya na ngai mibale ya mibali tokendaki na ye. John Booth mpe Charles Hessler, oyo bazalaki bakɛngɛli-batamboli ya Batatoli ya Yehova, basalaki masukulu liboso ya bato soko zomi na mibale oyo tozalaki kuna. Na nsima, babandaki kobongisa etuluku ya bato oyo bakobima na mosala ya kosakola na ntɔngɔ ya mokolo ekolanda. Moto moko te andimaki kobima na bango, na bongo, Ndeko Hessler aponaki ngai mpe atunaki ngai ete, “Okosepela kobima na biso?” Nayebaki mpenza te eloko balingaki kosala, kasi nazalaki mpe na likambo moko te oyo epekisaki ngai ete nasunga bango.
Tobimaki na mosala ya kosakola ndako na ndako kino pene na midi, na nsima Ndeko Hessler abimisaki gato mibale. Tofandaki na esikalie ya ndakonzambe mpe tobandaki kolya. Ntango nabimisaki likaya nde Ndeko Hessler ayebaki ete nayanganaki bobele na likita moko. Alobaki ete akoya kolya epai na biso na mpokwa mpe asɛngaki biso ete tóbyanga bato oyo bafandaka penepene na biso mpo na kosolola masolo ya Biblia. Nsima ya kolya, ayekolaki na biso Biblia mpe asalaki lisukulu liboso ya bato soko zomi oyo bayaki. Alobaki na biso ete tosengeli koyekolaka Biblia pɔsɔ na pɔsɔ. Atako baninga na biso baboyaki, ngai na Fern tozwaki bibongiseli mpo na koyekola Biblia na ndako pɔsɔ na pɔsɔ.
Bokoli kati na solo
Mwa moke na nsima, ngai na Fern tobimaki na mosala ya kosakola. Tofandaki na kiti ya nsima na motuka mpe ntango topelisaki makaya, yaya na ngai ya mobali abalukaki epai tofandaki mpe alobaki ete: “Namoni ete Batatoli ya Yehova bamɛlaka makaya te.” Nokinoki, Fern abwakaki likaya na ye na libándá—kasi, ngai namɛlaki kino nasilisaki yango. Atako tozalaki kosepela komɛla likaya, tosimbaki yango lisusu te.
Nsima ya kozwa batisimo na 1940, ngai na Fern toyanganaki na likita moko epai toyekolaki lisolo moko oyo elendisaki mosala ya mobongisi-nzela, lolenge babéngaka mosala ya ntango nyonso. Ntango tozongaki na ndako, ndeko moko atunaki biso ete: “Mpo na nini yo na Fern bolingi kokóma babongisi-nzela te? Eloko moko te ezali kopekisa bino.” Tomonaki ete azalaki na elonga, tondimaki kokóma babongisi-nzela. Natindaki nkoma na mosala ete nsima ya mikolo 30 nakolongwa, mpe tozwaki bibongiseli mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela.
Totunaki la Société epai tolingaki kokende mpe tokendaki na engumba Baltimore, na etúká ya Maryland. Ndako moko mpo na babongisi-nzela ezalaki kuna, na nsuka ya sanza tozalaki kofuta dolare 10 mpo na ndako mpe bilei oyo bazalaki kopesa biso. Tozalaki na mwa mosolo oyo tokanisaki ete ekosalisa biso kino na Armagedon. (Emoniseli 16:14, 16) Tozalaki kokanisa ete etikali mikolo ya kotánga mpo ete Armagedon eya. Na yango, ntango tobandaki mosala ya mobongisi-nzela, totikaki ndako na biso mpe misala nyonso.
Tosalaki mosala ya mobongisi-nzela na Baltimore kobanda 1942 kino 1947. Na bambula wana botɛmɛli na mosala ya Batatoli ya Yehova ezalaki makasi. Na esika ete tótambwisa motuka na biso kino na ndako ya bato oyo tozalaki koyekola na bango Biblia, tozalaki kotika moto mosusu atambwisa. Na motindo yango nde batɔbɔlaki bapine ya motuka na biso te. Moto moko te alingaka botɛmɛli, kasi nakoki koloba ete biso tozalaki kosepela na mosala ya kosakola. Kutu, tozalaki na motema mɔ́tɔmɔ́tɔ mpo na kokutana na makambo oyo ekosepelisa biso na mosala ya Nkolo.
Mosika te, tosilisaki mosolo nyonso oyo tobombaki. Bapine ya motuka na biso ebebaki, bilamba epasukaki mpe basapato na biso etɔbɔkaki. Mbala mibale to misato tobɛlaki na boumeli ya ntango molai. Kokoba mosala yango ezalaki pɛtɛɛ te, kasi likanisi ya kotika eyelaki biso soko moke te. Kutu, tolobelaki yango ata mbala moko te. Toyeisaki bomoi na biso pɛpɛlɛ; yango epesaki biso likoki ya kotikala na mosala ya mobongisi-nzela.
Tokómi na mosala mosusu
Na 1947, tokendaki na liyangani na engumba Los Angeles, na etúká ya Californie. Ntango tozalaki kuna, bapesaki ngai na ndeko na ngai William mokanda ete batindi biso bakɛngɛli-batamboli mpo na kotala mpe kosunga masangá. Balakisaki biso naino ndenge ya kosala mosala yango te. Kasi, tondimaki mokumba yango. Na boumeli ya mbula nsambo oyo elandaki, ngai na Fern tosalaki na bitúká ya Ohio, Michigan, Indiana, Illinois, mpe New York. Na 1954, babyangaki biso mpo na kokɔta na kelasi ya mbala 24 na Gileadi, eteyelo ya la Société mpo na kobongisa bamisionere. Tozalaki naino kuna, Fern azwaki maladi ya bukabuka. Likambo ya esengo, mpasi yango esilaki, mpe batindaki biso na mosala ya mokɛngɛli-motamboli na bitúká ya New York mpe Connecticut.
Ntango tozalaki kosala na engumba Stamford, na etúká ya Connecticut, Nathan Knorr, oyo azalaki prezida ya la Société Watch Tower na ntango wana, na mwasi na ye Audrey, basɛngaki biso ete tólekisa wikende na Betele elongo na bango. Balambelaki biso ngɔmbɛ na supu kitoko oyo etondaki na bikelakela. Tomesanaki na bango uta kala, nayebaki Ndeko Knorr malamu, mpe nasosolaki ete mposa na ye ezalaki bobele tófanda mpe tólya te, kasi azalaki na likambo mosusu. Na mpokwa ya mokolo yango, atunaki ngai ete: “Okanisi boni mpo na koya na Betele?”
Nayanolaki ete: “Nayebi te; nayebi mpenza ndenge makambo esalemaka na Betele te.”
Nsima ya kokanisa likambo yango bapɔsɔ mingi, toyebisaki Ndeko Knorr ete tokoya soki ye alingi. Na pɔsɔ elandaki, tozwaki nkoma ete tosɛngeli kokende na Betele na mokolo ya 27 Apríli 1957. Mokolo yango tokokisaki mbula 21 na libala.
Na mokolo wana ya liboso oyo tokómaki na Betele, Ndeko Knorr apesaki ngai malako ya sikisiki na makambo tosengelaki kosala. Alobaki na ngai ete: “Ozali lisusu mokɛngɛli ya zongazonga te; oyei awa mpo na kosala na Betele. Oyo ezali mosala ya ntina mingi yo osengeli kosala, mpe tolingi ete opesa ntango mpe nguya na yo na kosalela makambo oyo okoyekola awa na Betele. Tolingi ete otikala awa.”
Bomoi ya ntina mingi kati na Betele
Mokumba ya liboso nazwaki ezalaki na departema oyo etalaka abonema ya bazulunalo mpe makambo ya posita. Na nsima ya mbula soko misato, Ndeko Knorr atindelaki ngai maloba ete nakende na biro na ye. Ayebisaki ngai ete ntina mpenza oyo nabyangamaki na Betele ezalaki ya kozala mokɛngɛli ya bandako ya la Société. Ayebisaki ngai kozanga kokakatana ete, “Ozali awa mpo na kobatela bandako ya Betele.”
Mosala ya kobongisa bandako ya Betele etindaki ngai nakanisa lisusu mateya oyo baboti bapesaki ngai ntango nazalaki kokola na ferme. Na makambo mingi, misala ya ndako ya Betele ekokani na oyo esalemaka na bandako nyonso. Tosengeli kosukola bilamba, kolamba bilei, kosukola basaani, kotanda mbeto, mpe bongo na bongo. Ndako ebongisamaka malamu mpo ete Betele ezala esika kitoko mpo na kofanda, esika oyo moto akoki mpenza kobénga ete ndako na ye.
Nabanzi ete mabota bakoki kozwa mateya mingi na kotala motindo misala misalemaka na Betele. Tolamukaka na ntɔngɔ mpenza, tobandaka mokolo na mateya ya elimo, na nzela ya botángi ya mokapo ya Biblia mokolo na mokolo. Tosengeli kosala mosala makasi mpe kozala na bomoi ya bokatikati mpe na misala mingi. Betele ezali lokola monastere te, ndenge bato mosusu bakoki kokanisa. Tokokisaka mikumba mingi mpamba te, tosalaka likambo na likambo na ntango na yango. Bato mingi balobaki ete kobongisama oyo bazwaki awa esalisaki bango na nsima mpo na kokokisa mikumba na mabota na bango mpe na masangá na bango ya boklisto.
Bilenge mibali mpe basi oyo bayaka na Betele bakoki kozwa mokumba ya kotya bopɛto, kosukola bilamba, to kosala na esika ya konyata mikanda. Bato ya mokili bakoki kopusa biso na kokanisa ete misala motindo oyo ekitisaka lokumu na biso. Kasi, bilenge oyo bazali na Betele bamonaka ete kosala misala lokola wana ezali na ntina mpo ete libota na biso etambola malamu mpe na esengo.
Bato ya mokili bakoki mpe kopesa biso makanisi ete ebongi kozala moto monene mpe na lokumu mpo na kozala na esengo. Yango ezali lokuta. Ntango tozali kosala mosala oyo bapesi biso, tozali ‘kosala oyo tosengeli kosala,’ Yehova akopambola biso. (Luka 17:10, NW) Tokozala na esengo ya solosolo bobele soki tobosani te ete ntina ya mosala na biso ezali ya kosala mokano ya Yehova mpe kotombola matomba ya Bokonzi. Soki tobosani likambo yango te, mokumba nyonso bakopesa biso tokondima yango mpe tokosepela na yango.
Nazwi libaku ya kosangana na mosala oyo eyei monene
Na 1942, na liyangani oyo esalemaki na engumba Cleveland, na etúká ya Ohio, koleka mbula zomi liboso ete tóya na Betele, Ndeko Knorr asalaki lisukulu moko na motó na likambo ete “Kimya—Ekoki koumela?” Amonisaki polele ete Etumba ya Mibale ya mokili mobimba oyo ezalaki kongala, ekosuka mpe kimya ekozala mpo na mwa ntango. Mpe mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali naino. Na 1943, bafungolaki Eteyelo ya Gileadi mpo na kobongisa bamisionere mpe Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpo na kopesa bandeko makoki ya koloba liboso na bato. Mayangani minene mpe masalemaki. Mpenzampenza mayangani eleki minene na bambula ya 1950, ezalaki oyo esalemaki na Yankee Stadium, na engumba New York. Mpo na mayangani oyo esalemaki kuna na 1950 mpe na 1953, nazwaki libaku ya kopesa mabɔkɔ na kotongama ya kaa moko monene esika toyambaki ebele ya bato oyo bayaki na mayangani. Liyangani moko moko eumelaki mikolo mwambe.
Nsima ya mayangani wana, bakisa mpe oyo elekaki nyonso na 1958, motuya ya basakoli ya Bokonzi emataki mingi. Yango ebakisaki mpe mosala na biso na Betele. Na nsuka ya bambula ya 1960 mpe na ebandeli ya bambula ya 1970, tozangaki esika mpe bandako mpo na kolalisa bandeko oyo bakómaki kosala na Betele. Mpo na kofandisa bato nyonso ya libota na biso wana ekómaki monene, tosengelaki kozala na bandako mingi ya kolala, bakuku, mpe bandako mpo na kolya.
Ndeko Knorr ayebisaki ngai na Ndeko Max Larson, mokɛngɛli ya mosala ya konyata mikanda, ete tóluka esika ya malamu mpo ete tótonga bandako mosusu. Na 1957, ntango nakómaki na Betele, libota na biso oyo ezalaki na basangani soko 500 tozalaki kofanda na ndako moko ya monene. Kasi, nsima ya bambula, la Société asombaki balotɛlɛ misato ya minene pembeni wana mpe abongisaki yango—ezalaki Towers, Standish, mpe Bossert, mpe bandako mingi mosusu ya mike. Na 1986, la Société asombaki lopango esika Hôtel Margaret ezalaki mpe atongaki ndako kitoko esika wana epai bato soko 250 bazali kofanda. Na nsima, na ebandeli ya bambula ya 1990, atongaki ndako ya bitazi 29 mpo na kofandisa bato 1 000 mosusu oyo basalaka na Betele. Betele ya Brooklyn ezali kokoka kofandisa mpe koleisa libota na biso oyo ezali sikawa na basangani koleka 3 300.
La Société asombaki lopango mosusu na Wallkill, na etúká ya New York, pene na kilomɛtɛlɛ 160 longwa na Betele ya Brooklyn. Na boumeli ya bambula, uta ebandeli ya bambula ya 1960, bandako ya kolala mpe esika ya konyata mikanda etongamaki kuna. Sikawa, basangani soko 1 200 ya libota ya Betele bafandaka kuna mpe basalaka kuna. Na 1980, tobandaki koluka mabelé na bonene ya hectares 250 pene na engumba New York, mpe esengelaki kozala na mpasi te mpo na kobima na nzela monene. Mosali na Leta oyo toyebisaki asɛkaki mpe alobaki ete: “Bokozwa lopango ya motindo oyo wapi? Ekomonana te.” Kasi, na mokolo elandaki, abéngisaki biso mpe alobaki ete: “Nazweli bino lopango.” Lopango yango eyebani lelo oyo lokola Esika Monene ya mateya ya Watchtower na Patterson, na etúká ya New York. Eteyelo ya Gileadi ezali kuna mpe libota ya basakoli ya Bokonzi koleka 1 300 bafandaka kuna.
Mateya oyo nasili kozwa
Nasili koyekola ete mokɛngɛli malamu ezali ye oyo akoki kozwa toli kitoko epai na bato mosusu. Makanisi mingi oyo nazwaki libaku ya kopesa mpe kosalela na mokumba na ngai ya mokɛngɛli ya bandako ya Betele, ezalaki kouta epai na bato mosusu.
Ntango nakómaki na Betele, bato mingi bazalaki mibange, ndenge ngai nazali lelo oyo. Mingi basilá kokufa. Banani bazali kokamata esika ya baoyo bazali konuna mpe kokufa? Ezali kaka te baoyo bazali na makoki mingi. Ezali baoyo bazali awa, baoyo basalaka mosala na bosembo, mpe bamipesi mpo na kosalela basusu.
Likambo mosusu ya ntina nasengeli komikundola ezali ete kozala na mwasi malamu ezali likambo ya motuya. Fern, mwasi na ngai wa bolingo, asungaki ngai mingi mpo na kokokisa mikumba na ngai ya Teokrasi. Mibali bazali na mokumba ya komindimisa ete basi na bango bazali kosepela na mikumba na bango. Namekaka kobongisa likambo oyo ngai na Fern tokolinga kosala. Ekosɛnga makambo mingi te, bobele mwa mbongwana moke na makambo ya mokolo na mokolo. Mobali azali na mokumba ya kosala makambo oyo ekosepelisa mwasi na ye. Ntango oyo alekisaka na ye ezali na motuya mpe elekaka mbangumbangu, na yango asengeli kosala na yango makambo mingi.
Nazali na esengo ya kozala na bomoi na mikolo ya nsuka oyo Yesu alobaki. Ntango oyo ekokani na ntango mosusu te kati na lisolo ya bato. Tokoki komona na miso na biso ya kondima lolenge Nkolo azali kokolisa lisangá na ye, azali kobongisa yango mpo na mokili ya sika oyo alakaki. Soki nakanisi bomoi na ngai na mosala ya Yehova, nakoki koloba ete Yehova nde azali kotambwisa lisangá oyo—kasi bato te. Tozali bobele basaleli na ye. Na yango, tosengeli ntango nyonso koluka litambwisi na ye. Soki amonisi makambo tosengeli kosala, tosengeli kotosa mpe kosala yango na bomoko.
Salá elongo na lisangá, mpe okomona ete okozala na bomoi ya esengo. Mosala nyonso ozali kosala—ezala ya mobongisi-nzela, ya mokɛngɛli ya zongazonga, ya mosakoli kati na lisangá, ya Betele, to ya misionere—landá malako mapesami, mpe talelá mokumba na yo na motuya. Salá nyonso ekoki mpo ete osepelaka na mokumba nyonso bakopesa yo, mpe sepeláká na mokolo oyo ozali kolekisa kati na mosala ya Yehova. Na bantango mosusu, okolɛmba, mpe okoki kozwa misala mingi ya kosala to komiyoka ete obungisi esengo. Ezali na ntango yango nde okokanisa lisusu ntina oyo opesaki bomoi na yo epai na Yehova. Ezali mpo ete osala mokano na ye, kasi ya yo moko te.
Ezali na mokolo moko te oyo nazongaki na ndako kozanga kosepela na mosala oyo nasalaki. Mpo na nini? Mpamba te ntango tomipesi na motema mobimba epai na Yehova, tozali na esengo ya koyeba ete “tosili kosala oyo tosengelaki kosala.”
[Elilingi na lokasa 19]
Na mosala ya mobongisi-nzela na Baltimore, na 1946
[Elilingi na lokasa 19]
Na kaa, elongo na Fern na 1950
[Elilingi na lokasa 19]
Departema ya abonema.
[Elilingi na lokasa 19]
Kaa na 1950
[Elilingi na lokasa 22]
Elongo na Audrey na Nathan Knorr
[Elilingi na lokasa 23]
Esika Monene ya mateya ya Watchtower na Patterson, na etúká ya New York
[Elilingi na lokasa 24]
Ngai na Fern lelo oyo