Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/9 lok. 30
  • Makambo mazali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo mazali koleka na mokili
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bopusi ya Satana
  • “Etamboli mabe”
  • Miziki ekoki mpenza kosala ngai mabe?
    Lamuká!—1993
  • Bomibatela na miziki ya mbindo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Ntina oyo bato basalaka mobulu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Ndenge nini okoyoka esengo ya miziki?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/9 lok. 30

Makambo mazali koleka na mokili

Bopusi ya Satana

Nsima na komipesa na bolukiluki likoló na bopusi ya Satana likoló na miziki oyo ebengami ete rock mpe hard rock, mopanzi nsango na nkombo Tom Harpur, akomi kati na zulunalo Sunday Star oyo ebimisamaki na Toronto: “Nasengeli kopesa nokinoki likebisi mpo na makambo mazali kosalema. . . . Naino namona mabe motindo boye te. Banzembo ezali kolobela se ligboma, bilimu mabe, makila, kolakelama mabe, mobulu ya lolenge nyonso, mpe kobebisa basi, komibebisa nzoto, koboma mpe komiboma. Liwa mpe kobebisa, bisakweli ya mabe, koboya makambo manso mazali malamu mpe kolinga makambo manso mazali mabe mpenza​—Yango nde ezalaki bateme na banzembo yango.”

Lokola miziki ya Satana, losambo na Satana ezali se kokola na Etats-Unis mpe na Kanada. Kolobelaka likita ya bapolisi oyo esalamaki kala mingi te na Ontario, zulunalo ya Kanada Globe and Mail, elobaki ete losambo yango ya Satana “ezali kopesa banyama lokola mbeka, ezali kosalela basimetière mpe ezali koboma bana mike mpo na milulu na yango.” James Bradley, polisi ya Washington, alobaki ete bana mingi bazali kokufa mpo na milulu ya losambo na Satana. Engebene Globe and Mail, Bradley abakisaki ete na mbula mitano oyo euti koleka ba rapports mpo na bana oyo babomamaki esalamaki na “bankama na bana mike, basi oyo babengami assistantes sociales mpe bateyi”.

Ntoma Yoane akomaki na ntina na “mikolo na nsuka” na biloko mabe na ntango oyo: “Satana akiteli bino na kongala mingi, awa eyebi ye ete azali na mwa elaka mokuse.” (2 Timote 3:1; Emoniseli 12:12) Bopusi ya Satana, “mokonzi na nguya na mopepe”, ezali kokota ata na miziki oyo esili kopalangana na mokili oyo ezingi biso. (Baefese 2:2) Yango wana ntoma Paulo alendisaki baninga na ye baklisto na “koyeba kotelema liboso na mayele na oyo mabe.”​—Baefese 6:11.

“Etamboli mabe”

Bamilió na bato bazokaki na motema, bayokaki nsomo na likambo ya mwasi oyo ya mibu 28 oyo abetamaki mpe abebisamaki kati na Central Park, na New York, ntango azalaki kokima mbango (jogging). Mpo na nini babulunganaki? Mpamba te bato basalaki likambo yango ya nsomo mpe ya bonyama ezalaki etuluku ya bilenge. Zulunalo New York Post elobaki ete “Esengo ya nsoni oyo bamonaki na nsima mpe motema makasi na mabe oyo basalaki ezali mpenza nsomo”. Engebene rapport yango, bilenge mosusu bazalaki na likambo yango bakokisaki naino mibu 14 te. Mokomi moko ya zulunalo New York Post, ayokaki mawa na likambo yango mpe andimaki ete bato bakomi na “motó makasi, na bizaleli mabe, bamipesi na drogue, bamipesi na pite, mokili etondi na mabota makabwani mpe ebebisami na mobulu”. Na mokuse, mokili ekomi na “etamboli mabe, motuna ezali boye: mpo na nini?”

Ya solo, bato na ntango oyo batondi na mobulu emonana naino te bakokani mpenza na makambo oyo mayebisami na esakweli oyo ntoma Paulo akomaki na 2 Timote 3:1-5. Alimbolaki na mokapo yango ete na “mikolo na nsuka” ekozala na “bato na moimi, balingi na mbongo, mpe bato na lolendo”. Oyo eleki lisusu mabe ‘bakobanda koloba mabe mpo na Nzambe mpe bakotombokela baboti na bango, bakozanga botondi mpe limemya mpo na oyo ezali bulee, bato na mobulu, babomi mpe bakoyina malamu; bakozala na motema mabe, bazangi komipekisa mpe batondi na lolendo; bakolinga bisengo mingi koleka Nzambe’. (Français courant) Mokili oyo etondi na mobulu ekotikala se bongo na ‘etamboli mabe’? Te; Yesu alobaki ete: “Wana ekobanda makambo oyo kobima, telema alima mpe tombola mitó na bino, mpo ete lisiko na bino ezali kobelema.”​—Luka 21:28.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto