Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/9 nk. 26-30
  • Nani akoki kozala moninga na Nzambe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nani akoki kozala moninga na Nzambe?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Ye oyo akotambolaka sembo mpe akolandaka boyengebene”
  • “Mpe akolobaka solo kati na motema na ye”
  • Tikalá mopaya ya Yehova mpo na libela!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Poná baninga oyo balingaka Nzambe
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Ndenge nini tokoki kopona baninga ya malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Okoki kozala moninga ya Nzambe
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/9 nk. 26-30

Nani akoki kozala moninga na Nzambe?

OKOKI kozala moninga na Nzambe. Eleki mibu 4 000, mobali moko na nkombo Abrahame andimelaki Jéhovah Nzambe. Yango etangamaki boyengebene epai na ye mpe tata oyo na mabota abengamaki “moninga na Jéhovah”. (Yakobo 2:23) Na bongo, soko ozali na kondima epai na Jéhovah, okoki mpe kozala moninga na Nzambe.

Baninga bazali bato oyo bakobyangama na mesa. Mpo na yango, verset moko ya nzembo moko eyebani malamu, nzembo 23, emonisi Nzambe lokola moyambi na bapaya. Verset yango elobi boye: “[Jéhovah] otandi mesa liboso na ngai na miso na bayini na ngai . . . ; kopo na ngai etondi maa.”​—Nzembo 23:5.

Na Nzembo mosusu, David, mokonzi na Yisraele na kala, atunaki mituna oyo: “E Jéhovah, nani akoumela kati na hema na yo? Nani akofanda na ngomba na yo na bulee?” (Nzembo 15:1) Na elobeli na elilingi, koyambama na hema na Jéhovah mpe kofanda na ngomba mosantu na ye elimboli kobelama na Ye na nzela na mabondeli mpe na losambo oyo azali kondima yango. Oyo nde libaku malamu boye! Ndenge nini bato bazangi kokoka bakoki kokokisa masengami mpo na kozala baninga na Nzambe mpe koyambama na ye?

Nzembo 15 eyanoli na motuna oyo, na kotangaka makambo zomi ya sikisiki oyo masengami epai na baoyo balingi kozala baninga na Nzambe mpe koyambama na ye. Totalela mokomoko na makambo yango, na kobandaka na Nzembo 15 verset 2.

“Ye oyo akotambolaka sembo mpe akolandaka boyengebene”

Bakitani na Abrahame bapambwamaki mpamba te Abraham azalaki na bizaleli malamu mpe atambolaki liboso na Nzambe. (Genese 17:1, 2) “Kotambola” elimboli mpe kopona nzela mpo na bomoi. (Nzembo 1:1; 3 Yoane 3, 4) Mpo na baninga na Nzambe mpe bato bayambami na ye, kokota na lingomba moko, kolinga to kosepela na bandako nzambe etondi na biloko na motuya mpe kotosa milulu, ekoki te. Ezali baoyo nyonso te bakolobaka “Nkolo, nkolo” to baoyo bazali kondima ete bayebi Nzambe nde bakozwa mapamboli ya Bokonzi na ye. (Matai 7:21-23; Tito 1:16) Baninga na Jéhovah ‘bazali kotambola na sembo’ na lisungi na ye mpe ‘bazali kosalela boyengebene’ na kolandaka masengami na ye.​—Mika 6:8.

Nyonso wana elongoli kozanga boyengebene, pite mpe kobeba na bizaleli. Nzambe ye moko alimboli biso mpo na nini: “Bokozala bulee mpo ete ngai nazali bulee.” (1 Petelo 1:16) Lingomba na yo ezali kotosa masengami matombwami na Nzambe? Ebimisaka mpe bato oyo bazali koboya kosalela masengami matyami na Nzambe? Yo mpe libota na yo, bozali na mposa ya kobatela etamboli ya sembo? Soko ee, okokokisa lisengami elandi oyo moninga na Nzambe mpe moyambami na ye asengeli kokokisa.

“Mpe akolobaka solo kati na motema na ye”

Soko tozali koluka boninga ya Nzambe, tokoki kokosa te mpe tokoki koloba na bibebu na lokuta te mpe na mitema mibale te. (Nzembo 12:2) Tosengeli ‘koloba solo na motema na biso’, kasi bobele na bibebu na biso te. Ee, tosengeli mpenza kozala sembo mpe komonisa “kondima ezangi bokosi”. (1 Timote 1:5) Bamoko bazali kokosa to koloba mwa lokuta moke mpo ete bakwea te. Bamoko bazali kotriché na ba ekzamé ya kelasi to bazali kokosa Leta mpo bafuta mpako moke. Misala na bango mizali komonisa ete bazangi bolingo mpo na oyo ezali solo. Kasi, mpo na baninga na Nzambe, solo mpe misala malamu ezali kouta na motema na bango. (Matai 15:18-20) Bazali koluka koyiba to kokosa te.​—Masese 3:32; 6:16-19.

Ntoma Paulo akomaki: “Bobukanaka lokuta te. Bobwaka bomoto na kala na misala na yango nyonso, mpe bolata bomoto na sika.” (Bakolose 3:9, 10) Na yango, baoyo bazali koloba mpenza solo na motema na bango bazali kolata “bomoto na sika”. Ozali sembo epai na yo moko mpe epai na bato mosusu, na kolobaka solo na motema na yo? Soko ee, yango ekomonana na ndenge okoloba epai na bamosusu.

“Ye oyo azali kotonga na lolemo na ye te”

Mpo na kokokisa lisengami oyo ya bato bayambami na Nzambe, tosengeli koloba mabe te mpo na bamosusu. (Nzembo 15:3) Verbe greke oyo ebongolami awa na “kotonga” euti na liloba “lokolo” mpe elimboli “kotambola na makolo”, elingi koloba “kotambolatambola”. Bayisraele bazwaki etinda oyo: “Okotambolatambola lokola moto na songisongi kati na bato na yo te, mpe okoluka mayele te ete moninga na yo abomama. Ngai nazali Jéhovah.” (Levitike 19:16; 1 Timote 5:13) Soko tobebisi lokumu ya moto na kotongaka ye, tokoki kozala baninga ya Nzambe te.

David alobaki: “Oyo akotongaka ndeko na ye na nkuku, nakobebisa moto yango.” (Nzembo 101:5) Biso, tokoki kosala na boye ete motongi afanda kimya soko toboi koyoka ye. Tala etinda osengeli kolanda: Koloba likambo te oyo etali moto mosusu soko okokoka te koloba likambo yango na miso ye. Ezali malamu soko toyebi kobatela lolemo na biso na likambo yango. Kasi, ezali mpe likambo ya ntina ete toyeba kobatela misala na biso.

“Asaleli moninga na ye mabe te”

Maloba malandi ya Yesu mazali mpenza na ntina: “Makambo nyonso malingi bino ete bato basalela bino yango, bino bosalela bango bobele bongo.” (Matai 7:12) Mpo na kondimama na Nzambe, tosengeli koboya kosala mabe. Mokomi na nzembo alobi: “Bino baoyo bokolingaka Jéhovah, boboya mabe; ye akobatelaka bomoi na bato na ye na boyengebene; akobikisaka bango na loboko na bato mabe.” (Nzembo 97:10) Na bongo, soko tolingi boninga mpe lisalisi na Nzambe, tosengeli kondima masengami na ye.

Koboya mabe, elimboli mpe koboya kokosa moto to Leta to koloba lokuta ata na makambo mosusu. Ezala na maloba to na misala, tosengeli kosala eloko moko te oyo ekoki kotungisa moninga na biso, kasi tosengeli nde kosala makambo malamu mpo na ye. Yango etali makambo nyonso ya bomoi. Na ndakisa, ntango tozali kokumba motuka, tokoki kotikela bato ya makolo nzela mpo na kokatisa. To lisusu, tokoki kosalisa bato oyo bazali mikolo, kolendisa baoyo bazali na basusi mpe kobondisa baoyo bazali na mpasi. Na likambo yango, Jéhovah azali kopesa ndakisa malamu koleka. Lokola Yesu alobaki yango, Nzambe “akobimisa moi na bato mabe mpe na bato malamu mpe . . . akonokisa mbula na bayengebeni mpe na bapengwi.” (Matai 5:43-48) Kosala malamu epai na bato mosusu, elimboli kokokisa makambo oyo mokomi na nzembo akomi na ba versets elandi.

“Abebisi lokumu ya mozalani na ye te”

Biso banso tosalaka mabunga; nzokande, tozalaka na botondi mingi epai na baninga na biso soko bakangi miso na mabunga na biso ya mike! Ekosala biso mpasi soko moninga na biso ya motema abimisi mabunga na biso epai na bamosusu, ata mabunga yango ezali mike, yango ekosala biso mpasi. Bamoko basalaka bongo mpo na kobomba mabunga na bango mpe komimonisa ete baleki bamosusu. Kasi ezaleli motindo yango ekoki te mpo na baoyo balingi kozala baninga na Nzambe.

Masese 17:9 elobi boye: “Ye oyo akobomba lisumu azali koluka bolingo, nde ye oyo akolobaloba likambo libombami azali kotangola baninga mosika.” Ezali solo ete tosengeli te komeka kobomba masumu minene. (Levitike 5:1; Masese 28:13) Nzokande, soko tolingi kozala baninga na Nzambe, tokoboya kolanda bato oyo bazali kotonga baninga na biso ya sembo. (1 Timote 5:19) Baninga ya Jéhovah bazali koloba malamu mpo na basaleli na Nzambe, na esika ete baloba mabe na ntina na bango. Yango ekoki kobakisela bango kilo mpo basengeli koyika mpiko liboso na bato ya mokili oyo bazali kotonga bango. Baninga mpe bato oyo bayambami na Nzambe bakosenzela mpe mpo na baninga na bango, mpamba te David abakisi boye na verset 4:

“Akotiola ye oyo amonani lokola mosopi na mibeko”

Etondi bango na lokoso, bamoko bazali koluka kozala baninga na bato ya mosolo to bato minene atako bato yango bazali na bizaleli mabe. (Tala Yuda 16) Kasi tokoki te kozala baninga ya Jéhovah soko tozali kotambola na bato mabe. Tosengeli koyina mabe kino koboya boninga nyonso elongo na baoyo bazali kosala mabe. (Baloma 12:9) Joram, mokonzi na Yisraele, azalaki moto mabe koleka na boye ete mosakoli Elisée alobaki na ye: “Solo, lokola Jéhovah na bibele azali na bomoi, ye oyo nazali kosalela ye, soko ezalaki mpo na Yosafata mokonzi na Yuda te, mbele nakotala yo te, nakomona yo te.” (2 Mikonzi 3:14) Mpo na kozala moninga na Nzambe, tosengeli koyoka likebisi elandi ya Paulo: “Baninga mabe bakobebisa bizaleli malamu.”​—1 Bakolinti 15:33.

Mpo na yango, soko tokangi ntina ya boninga na Jéhovah, tokoboya kosangana na baoyo bazali kosala mabe. Tokokutana na bango bobele soko likambo ya ntina ezali. Tokopona baninga na biso mpo na boyokani malamu oyo bazali na yango elongo na Jéhovah, kasi mpo na bozwi na bango te. Soko tozali kobanga Nzambe na limemya mpenza, tokopona baninga na biso na mayele. Na yango, tala likambo ya nsambo oyo tosengeli kokokisa mpo na kotangama na molongo na bato bayambami na Jéhovah.

“Akokumisa baoyo bakobangaka Jéhovah”

Mpo na kozala baninga ya Nzambe mpe koyambama na ye, tosengeli kobanga ye. Masese 1:7 elobi: “Ebandeli na boyebi ezali kobanga Jéhovah.” “Kobanga Jéhovah” elimboli nini? Ezali kobanga oyo esangani na limemya epai na Nzambe mpe kobanga oyo ebongi mpo na kosepelisa ye, Yango nde ekopesa biso boyebi ya solo, disipline oyo ekobikisa mpe mayele ya Nzambe oyo ekosunga biso.

Bato babangaka Jéhovah batosaka mitinda na ye ya sembo ata bato bazali koseka bango. Na ndakisa, mingi bazali koseka baoyo bakobangaka Nzambe mpo bazali komipesa na mosala, bazali sembo, to bazali kosala makasi mpo na kosalisa bazalani na bango na elimo. Kasi ndenge nini moto oyo abangaka Nzambe akotalela bato oyo bazali sembo? “Akokumisa baoyo bakobangaka Jéhovah”. Azali na limemya epai na bango ata bazali koseka ye lokola bato wana. Ozali na limemya motindo moko epai na baoyo bakobangaka Nzambe? Mokomi na nzembo abakisi likambo mosusu mpo na kokokisa masengami ya kondimama epai na Nzambe:

“Soko akati ndai, akobongola yango te ata epesi ye mpasi”

Tala etinda ezali na verset oyo: Tosengeli kokokisa bilaka na biso, na ndakisa na Nzambe. (1 Mikonzi 8:56; 2 Bakolinti 1:20) Ata topesi elaka mpe toyei komona ete tokokokisa yango te, tokoki te kobongola likanisi na biso. Na verset oyo, Biblia Septante oyo ekomami na greke, Biblia Peshitto oyo ekomami na monoko na siriake mpe Vulgate na monoko na Latin ekomi verset yango boye “kokata ndai epai na mozalani na yo”. Soko tokati ndai ete tokosala likambo, to topesi elaka ya ntina, tosengeli kokokisa maloba na biso. (Mosakoli 5:4) Ya solo, soko toyei koyeba ete elaka na biso ekobuka mobeko ya Biblia, wana tokokokisa yango te.

Yosua akokisaki kondimana oyo asalaki na Bagabaonite, ata ntango ayebaki ete bakosaki ye mpo asala na bango kondimama yango. (Yosua 9:16-19) Tosengeli kozala mibali, basi mpe bana oyo bazali kokokisa maloba na bango. Tolaka eloko te bongo tozanga kokokisa yango soko libaku mosusu ya malamu emonani na nsima. Yesu alobaki: “Tika ete liloba na bino lizala, Ee! Ee! mpe Te! Te.” (Matai 5:37) Mingimingi, baoyo basili komipesa na Jéhovah, basengeli kozwa ekateli ya kokokisa elaka oyo basalaki ya kozala Batemwe na ye mpo na kosalela ye libela na libela. Longola likambo etali kokokisa bilaka, tosengeli kozala na makanisi mabongi mpo na makambo matali mosolo, lokola David amonisi yango na Nzembo 15:5.

“Akodefisa mosolo na ye mpo na kozwa litomba te”

Moto adefi mosolo mpo na kosala na yango mombongo akoki kozongisa yango elongo na mwa intérêt. Kasi na verset oyo, David alobelaki mpo na ‘kopesa mosolo’ epai na baoyo bakeleli. Mobeko na Moïse elobaki: “Soko odefisi mosolo epai na mobola kati na bato na ngai, okozala lokola modefisi epai na ye te, mpe okokwa libonza mpo na kodefa yango te.” (Exode 22:25; Levitike 25:35, 36) Ntango Nehemia ayaki koyeba ete babola bakomaki kodefa mbongo mpe kozongisa yango na intérêt, asukisaki likambo yango.​—Nehemia 5:1-13.

Liloba na greke esalelami na David mpe oyo ebongolami na “intérêt” euti na liloba mosusu elimboli “koswa”, yango elingi koloba ete badefisi oyo batondaki na lokoso bazalaki kosilisa biloko nyonso oyo babola bazalaki na yango. Eleki malamu kosalisa baoyo bazali kokelela kozanga kozela litomba epai na bango. Yesu amonisaki yango na maloba oyo: “Soko okosala elambo na ntongo soko elambo na mpokwa, . . . byanga babola, na bibosono, na batengumi, na bakufeli miso, mpe okozala na esengo mpo ete bakoki kozongisa na yo lisusu te. Mpo ete okozwa libonza kati na lisekwa na bayengebeni.” (Luka 14:12-14) Ye oyo alingi kozala moninga na Nzambe mpe koyambama na ye akoboya konyokola mobola. Akosenzela mpe mpo na kosala ndenge mokomi na nzembo alobi na nsima:

“Akokamata kanyaka mpo na kokweisa bato na boyengebene te”

Kanyaka ekobebisa motema. Bayisraele bazwaki etinda oyo: “Okokamata kanyaka te, mpo ete kanyaka ebomi miso na bato na mayele mpe ebebisi likambo na bato na sembo.” (Deteronome 16:19) Ezali mpenza mabe na kozwa kanyaka mpo na kosala mabe epai na “moto ayebi likambo te”, mbala mosusu na kopesaka litatoli ya lokuta liboso na bazuzi. Yuda lskariote azalaki mpenza moto mabe mpamba te andimaki kanyaka mpo na kokaba Yesu, ye oyo asalaki likambo mabe te!​—Matai 26:14-16.

Mbala mosusu tokoki kosala likambo yango te. Kasi, tosalelaka mosolo mpo na komilongola na mindondo? Mosakoli Samwele aboyaki “mosolo mopesamelaki” ye to kanyaka. (1 Samwele 12:3, 4) Biso banso tosengeli komitambwisa motindo yango soko tolingi kozala baninga na Nzambe mpe koyambama na ye.

“Ye oyo akosalaka bongo, libela akokwea te.”

Nzembo 15 esuki na maloba oyo, elongo na masengami zomi na moto na sembo. Makambo yango zomi makoki kosalisa biso na kotalela lingomba na biso. Soko ezali lingomba ya solo, esengeli koteya biso 1) na kotambola sembo mpe kosalela boyengebene, 2) na koloba solo ata kati na motema na biso, 3) na koboya kotonga bamosusu, 4) na kosala eloko moko ya mabe te. Lingomba oyo Nzambe azali kondima 5) ekotinda biso toboya koyoka matongi masalemi mpo na bato na sembo oyo toyebani na bango mpe 6) ekopusa biso toboya kotambola na bato mabe. Kondima ya solo ekopusa biso 7) na kokumisa baoyo bazali kobanga Jéhovah, 8) na kokokisa bilaka na biso soko yango ezali na ntina, 9) na kosalisa babola kozanga kosenga bango intérêt mpe 10) koboya kanyaka mpo na kokweisa moto asali likambo mabe te.

David alobi te ete ye nani akotanga, to akoloba to akondima makambo oyo “akokwea” te. Ye oyo akokwea te, ezali bobele ye “oyo akosala makambo yango”. Kondima oyo ezangi misala esili kokufa mpe ekopesa nzela te ete moto andimama na Nzambe. (Yakobo 2:26) Baoyo basalaka makambo malamu matangami na Nzembo 15 bakokwea te, mpamba te Jéhovah akobatela bango mpe akosimba bango.​—Nzembo 55:22.

Ya solo, losambo ya peto etali bobele makambo zomi te oyo matangami na Nzembo 15. Nsima na kokomama na Nzembo oyo, bayekoli na Yesu bayekolaki likambo esengeli kosala lisusu mpo na kosambela Nzambe “na elimo mpe na solo”. (Yoane 4:23, 24) Yo mpe, okoki kosambela Nzambe na motindo yango, mpamba te ezali lelo oyo na bato bazali kosala malamu. Soko okomi moninga ya ba Témoins de Jéhovah mpe ozali koyekola Biblia mbala na mbala, okozala na elikya ya kofanda na paradis oyo ekozongisama awa na mabelé kati na yango okoki koyambama na Nzambe mpe kozala moninga na ye.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto