Botosa baoyo bakokambaka bino
“Botosa baoyo bakokambaka bino, mpe bomisokisa liboso na bango. Mpamba te bazali kokengela milimo na bino lokola bato baoyo bakozongisa monoko na ntina na makambo na bango.”—BAEBELE 13:17.
1 Bolamu nini tozali kozwa na ndenge bankulutu bazali kokengela lisangá?
NA MIKOLO na biso, oyo “na ntango na nsuka”, Jéhovah azali kopesa bakengeli na lisangá na ye. (Danyele 12:4) Mibali oyo bazali kopesa ndakisa na kosenzelaka likoló na “bampate”, oyo bazali kobondisama mpo na yango. (Yisaya 32:1, 2) Epai mosusu, ndenge bankulutu batondi na bolingo bazali kokengela etonga mpe kobatela yango na motema malamu ezali libateli liboso na Satana mpe biloko mabe na ntango oyo.—Misala 20:28-30; 1 Petelo 5:8; 1 Yoane 5:19.
2. Bamoko bazalaki koloba nini na ntina na ntoma Paulo, kasi mayoki nini tosengeli kozala na yango mpo na bankulutu?
2 Kasi otalelaka bankulutu ndenge nini? Omilobaka na motema na yo ete: ‘Soko nakutani na mokakatano, nakokenda lisusu epai na nkulutu moko te ya lisangá, mpo ete nazali na konfianse epai na bango te’? Makanisi motindo yango makoki koyeila yo soko ozali kotalela se mabunga na bango na ndenge bazangi kokoka. Na Korinte ya kala, bamoko bazalaki koloba na ntina na ntoma Paulo: “Mikanda na ye ezali na bozito mpe na makasi, nde motindo na nzoto na ye ezali na bolembu mpe koloba na ye ezali mpamba.” (2 Bakolinti 10:10; Baloma 11:13; 1 Timote 1:12) Totii elikya ete ozali na mayoki motindo moko na moklisto mwasi oyo alobaki mokolo mosusu: “Tozali na lisangani ya bankulutu oyo eleki malamu kati na mokili. Bazali wana ntango nyonso mpo na kosalisa biso ntango tozali na mposa na bango.”
Tokotosa bango mpo na nini?
3. Soko tolingi ete Nkolo azala na elimo oyo tozali komonisa, ndenge nini tosengeli kotalela babateli na mpate balandi?
3 Lokola ezali Jéhovah Nzambe, Mobateli na mpate aleki monene nde apesaka biso bakengeli na mpate balandi, ndenge nini alingi ete biso totalela bango? Na ntembe te mposa na ye ezali ete tolanda etambwiseli oyo ezwami na Biblia oyo bankulutu yango batondi na bolingo bazali kopesa na lisungi ya Collège central ya ba Témoins de Jéhovah. Soko tozali kotosa bango, ‘Nkolo akozala na elimo oyo tokomonisa’, tokozala na kimya mpe tokolendisama na elimo.—2 Timote 4:22; tala Misala 9:31; 15:23-32.
4. Ndenge nini mokomoko kati na biso akoki kosalela toli ya Baebele 13:7?
4 Paulo apesi biso toli oyo: “Bokanisa baoyo bakokambaka bino, baoyo basakoli Liloba na Nzambe epai na bino. Bobanzabanza mpo na nsuka na bizaleli na bango mpe bomekolaka kondima na bango.” (Baebele 13:7) Baklisto ya liboso bazalaki na bantoma na liboso na bango. Na mikolo na biso, tokoki kotala lokola ndakisa basangani ya Collège central ya ba Témoins de Jéhovah, bakengeli mosusu bapakolami mpe basangani ya “ebele monene” oyo bazali na liboso na biso. (Emoniseli 7:9) Atako tosengeli te kolanda lolenge na bango ya koloba, ya komitambwisa to bizaleli mosusu oyo bazali na yango, tosengeli kotya makasi mpo ete nsuka ya etamboli na biso ezala malamu na komekolaka kondima na bango.
5. Na mikolo na biso, banani bazwi mokumba monene ya kokengela lisangá ya boklisto na mabelé mobimba, mpe mibali yango babongi na nini?
5 Na mikolo na biso, awa na mabelé, ezali mpenzampenza “moombo na sembo mpe na mayele” nde azali na mokumba ya kokokisa bamposa na biso ya elimo. Momonisi na ye, Collège central, azali liboso na biso mpe azali kotambwisa mosala ya kosakola Bokonzi kati na mokili mobimba. (Matai 24:14, 45-47) Tokoki mpenzampenza kotalela bakengeli bapakolami na elimo oyo bazali kati na Collège central lokola ‘batambwisi’ na elimo, mpamba te mokapo ya Baebele 13:7 ekoki kobongolama lisusu boye: “Botalaka baoyo bazali kotambwisa bino.” (Kingdom lnterlinear). Lokola masangá mazali koleka 60 000 mpe basakoli ya Bokonzi koleka 3 500 000, bankulutu 12 oyo bazali kati na Collège central bazali “na mosala mingi kati na Nkolo”. (1 Bakolinti 15:58) Na ntina na mosala oyo Nzambe apesaki bango, bazali na mposa ete tosala na bango elongo, lokola baklisto ya liboso bazalaki kopesa maboko na Collège central na ekeke ya liboso.—Misala 15:1, 2,
6. Bankulutu bazali kosala nini mpo na bolamu ya basaleli ya Jéhovah?
6 Bakengeli baponami na elimo mpo na kokokisa bamposa ya elimo ya lisangá. (Misala 20:28) Bazali kosenzela na boye ete nsango ya Bokonzi esakolama na teritware ya lisangá na bango. Mibali oyo bakokisi masengami ya Makomami bazali mpe kotambwisa na bolingo nyonso lisangá kati na elimo. Bazali kolendisa, kobondisa bandeko na bango mibali mpe basi baklisto, mpe bazali kotatola liboso na bango mpo ete bamitambwisa ntango nyonso na ndenge ebongi na miso na Nzambe. (1 Batesaloniki 2:7, 8, 11, 12) Ata moto asali libunga liboso ete ayeba yango, mibali yango bazali komeka kosembola ye “na elimo ya bopolo”.—Bagalatia 6:1.
7. Toli nini Paulo apesaki kati na Baebele 13:17?
7 Tolingi kosala na motema mobimba elongo na bakengeli oyo batondi na bolingo, mpe yango nde ezali likambo ebongi mpo na kosala, mpamba te Paulo akomaki: “Botosaka bango bakokambaka bino mpe bomisokisa liboso na bango. Mpamba te bazali kokengelaka milimo na bino lokola bato baoyo bakozongisa monoko na ntina na makambo na bango. Tika ete basala mosala na esengo, na mawa te mpo ete yango ekosungaka bino te.” (Baebele 13:17) Ndenge nini tosengeli kokanga ntina na toli oyo?
8, 9. (a) Na boyokani na Baebele 13:17, mpo na nini tosengeli kotosa baoyo bazali liboso na biso? (b) Soko tozali na botosi mpe tomikitisi, yango ekoki kozala na matomba nini?
8 Paulo alendisi biso ete totosa baoyo bazali kotambwisa biso na elimo. Tosengeli “komisokisa” liboso na babateli na mpate balandi. Mpo na ntina nini? Mpamba te bazali ‘kokengela milimo na biso’, bomoi na biso oyo topesi epai na Nzambe. Mpe ndenge nini ‘bazali kokengela’? Verbe greke agrupnéô, oyo esalelami awa elimboli ete bankulutu “bazali kolala te”. Yango ekundoli biso mobateli na mpate oyo akoboya mpongi mpo na kobatela etonga na ye liboso na makama kati na butu. Ntango mosusu, bankulutu bazali kolala te mpo na kobondela na ntina na etonga na Nzambe to mpo na kopesa lisalisi na elimo na baninga na bango baklisto. Tosepela mpenza na mosala na bango ya sembo. Toboi kokokana na “bato mabe” oyo na ntango na Yuda, ‘bazalaki kotyola bokonzi mpe bazalaki kotuka baoyo bazali na nkembo elingi koloba bakengeli baklisto bapakolami, mpe na nkembo, na lokumu, oyo Nzambe azalaki kopesa bango.—Yuda 3, 4, 8.
9 Tokondimama na Jéhovah te soko tozangi botosi mpe tomikitisi te liboso na bakengeli baklisto. Ezalela motindo yango ekokomisa mosala na bango kilo mpe ekopesa biso bolamu na elimo te. Soko tozali kopesa bango maboko te, bankulutu bakoki kobanda kokokisa mosala na bango na koimaima mpe bakolemba, yango ekozangisa biso esengo na mosala ya boklisto. Nzokande, botosi na biso mpe komisokisa na biso ekopesa nzela na etamboli ya kobanga Nzambe mpe ekolendisa kondima na biso. ‘Nkolo azali na elimo oyo tozali komonisa’, mpe tokotonda na esengo soko tozali kosala elongo, na kimya mpe na bomoko.—2 Timote 4:22; Nzembo 133:1.
10. Engebene 1 Timote 5:17, mpo na nini baoyo bazali kotambwisa lisangá na ndenge malamu babongi kokumisama?
10 Kozala na botosi mpe komisokisa liboso na bankulutu ya lisangá elimboli te ete tozali koluka kosepelisa bato. Kosala bongo mbele ekozala kotemela Makomami mpamba te na ekeke ya liboso, baombo baklisto balendisamaki ete batosa bankolo na bango ‘mpo na kokengelama te, lokola soko bazalaki koluka kosepelisa bato, kasi na motema sembo, mpo na kobanga Jéhovah’. (Bakolose 3:22; Baefese 6:5, 6) Soko bakengeli oyo bazali kokamba na lolenge malamu mpe oyo bazali kosala makasi kati na liloba mpe na koteya babongi kozwa lokumu, ezali mpo ete mateya na bango mazwami na Liloba na Nzambe. Paulo akomi boye: “Tika ete bankulutu baoyo bakobatelaka mosala na malamu bakumisama na lokumu loleki, nde koleka bango bakosalaka mosala mpo na kosakola mpe kolakisa; mpamba te Likomi elobi ete, Okanga monoko na ngombe te wana ezali yango kopapola masango.”—1 Timote 5:17, 18.
11. Ndenge nini nkulutu akoki kozwa “lokumu loleki”, kasi eloko nini asengeli kosala te?
11 Maloba oyo ya Paulo mamonisi ete ezali mabe te na kopesa makabo epai na baoyo bazali kokengela matomba ya elimo ya baninga na bango. Yango elingi koloba te ete bankulutu basengeli kozwa lifuta. Nkulutu akosenga mpe na makasi te ete bapesa ye “lokumu loleki”. Mbala mosusu basangani ya lisangá bakopesa ye lokumu bango moko, kasi akosalela soko moke te mokumba na ye mpo na kobakisa nguya na ye to biloko na ye ya mosuni. Akoluka lokumu na ye mpenza te mpe akopona te bobele bandeko oyo bazali na bozwi ya mosuni lokola baninga na ye, mpe atalaka mpamba baoyo mosusu batikali. (Masese 25:27; 29:23; Yuda 16) Mokengeli asengeli nde koleisa etonga na Nzambe ‘na motema malamu, kasi na litomba mabe te.’—1 Petelo 5:2.
12. Likambo nini tosengeli kobosana te mpo tokoka kotosa baoyo bazali liboso na biso kozanga mpasi?
12 Tokotosa kozanga kokakatana baoyo bazali liboso na biso mpe tokokumisa bango soko tozali komikundola ete ezali Nzambe ye moko nde apesaka biso bankulutu yango. (Baefese 4:7-13) Lokola baponami na elimo santu mpe ete lisangá na Nzambe ezali na esika monene kati na bomoi na biso ya ba Témoins de Jéhovah, tolingi mpenzampenza komonisa botondi mpe limemya mpo na bibongiseli ya teokratike. Epai mosusu, tokoki kosalisa bato ya sika oyo bazali koya na lisangá mpo ete bakolisa ezalela yango na kopesaka bango ndakisa malamu ya botosi mpe ya kosokema epai na baoyo bazali na liboso na biso.
Mpo na nini kosepela na mosala na bango?
13. (a) Ezaleli nini ezali komonana na mokili mpo na oyo etali kotosa bakonzi, kasi ezali boni kati na lisangá ya Nzambe? (b) Mpo na nini tosengeli kotya motema epai na mibali oyo bazali liboso na biso? (c) Na esika ete totala se mabunga ya bankulutu oyo bazali komipesa na mosala, tosengeli nde kosala nini?
13 Na mokili, moto moko te alingi koyangelama. Mobali moko andimaki likambo yango wana ezalaki ye kosala diskur, alobaki boye: “Bato bayekoli mingi mpe bakomi na makoki mingi, mpe bayekoli bakomi na elimo ya lipanda na boye ete ekomi mpasi mpo na kotambwisa bango.” Kasi elimo ya lipanda ezali kati na lisangá na Nzambe te, mpe tosengeli kotya motema epai na mibali oyo bazali liboso na biso. Na ndakisa, bobele baoyo bakokisi masengami ya Biblia nde bazali koponama bankulutu. (1 Timote 3:1-7) Formation oyo bazali kozwa ezali kosalisa bango na kozala na boboto, na bolingo mingi mpe na mposa na kosalisa baninga, kasi lisusu na kobatela mpenza mitinda ya sembo ya Jéhovah. Bazali sembo na solo ya Biblia, ‘bakangami makasi na liloba ya sembo mpo ete bazala na likoki ya kosunga na nzela na mateya na lobiko’. (Tito 1:5-9) Tosengeli te kotala se mabunga na bango, mpamba te biso banso tozangi kokoka. (1 Mikonzi 8:46; Baloma 5:12) Na esika ete tosilika mpo na mabunga na bango mpe tomona mpamba batoli na bango, tondima litambwisi ezwami na Biblia oyo bankulutu bazali kopesa biso, mpo ete euti epai na Nzambe.
14. Liyoki nini emonisami kati na 1 Timote 1:12 nkulutu asengeli kozala na yango na ntina na mosala mopesameli ye?
14 Paulo, ye oyo azalaki na botondi, alobaki: “Nazali kotonda Molendisi na ngai, ye Klisto Yesu Nkolo na biso, mpo ete atangi ete ngai nabongi mpe atii ngai na mosala.” (1 Timote 1:12) Mosala yango esangisaki mosala ya kosakola mpe lisalisi oyo azalaki kopesa epai na baninga na ye baklisto. Ya solo, mokengeli aponami na elimo santu mpo na kosala mosala ya mobateli na mpate, kasi asengeli te kokanisa ete aleki bamosusu, mpamba te ye mpe azali moko kati na etonga na “bampate” ya Nzambe. (1 Petelo 5:4) Esengeli na ye kozala na botondi epai na Mokonzi na lisangá, Yesu Klisto, na ndenge aponi ye mpo na kosalisa basangani na etonga, mpe kozala na botondi epai na Nzambe na ndenge amoni ete akoki mpe apesi ye boyebi mpe mayele. (2 Bakolinti 3:5) Lokola nkulutu asengeli komonisa botondi mpo na mikumba oyo Nzambe apesi ye, basangani mosusu ya lisangá basengeli kosepela na mosala oyo nkulutu azali kosalela Nzambe.
15. Toli nini Paulo apesi kati na 1 Batesaloniki 5:12, 13?
15 Ba Témoins de Jéhovah bazali kosepela na lisangá oyo Nzambe asili kobongisa na ntango na biso, na mikolo oyo ya nsuka, mpe botondi na bango ezali kopusa bango bamemya bankulutu. Tosengeli kozala na esengo ya kolanda na ndenge ekoki bibongiseli oyo bazali kokamata mpo na bolamu na biso. Paulo alobi: “Nde tosengi bino bandeko ete botosa bango bakosalaka mosala kati na bino mpe baoyo batyami batambolisi na bino kati na Nkolo mpe bazali kokebisa bino ete bokumisa bango mingi kati na bolingo mpo na mosala na bango. Bozalana mpe na kimya, bino mpenza.” (1 Batesaloniki 5:12, 13) Baoyo bazali kolanda toli oyo bazali na esengo, mpe Jéhovah azali kopambola bango.
Tózalaka noki mpo na kotosa toli na bango
16, 17. Toli nini bankulutu basengeli mbala mosusu kopesa na ntina ya libala, mpe baoyo bakolanda yango bakozwa bolamu nini?
16 Paulo alendisaki Tito ete ‘alakisa mpe apamela na bokonzi nyonso.’ (Tito 2:15) Bobele bongo, baoyo bazali komonisa Nzambe na mikolo na biso bazali kobenda likebi na biso likoló na mitinda mpe mibeko ya Biblia. Tosengeli mpenza kolanda elendiseli oyo ezali kopesamela biso mbala na mbala, oyo ya kotosa batoli mpe litambwisi epesami na nzela na lisangá ya Jéhovah mpe bankulutu.
17 Na ndakisa, bankulutu bakoki kosunga moklisto moko ete alanda toli oyo esengi biso ete tobala “bobele kati na Nkolo”. (1 Bakolinti 7:39; Deteronome 7:3, 4) Bakoki kokundwela ye ete kobalana na moto oyo abatisami naino te ekoki kobimisa mikakatano minene, lokola emonisi yango likambo ekomelaki mokonzi Salomó, oyo asalaki libunga monene na ndenge abalaki basi bapaya. Basi yango babalolaki motema na ye mpo alanda banzambe ya lokuta mpe bapengolaki ye longwa epai na Jéhovah. (1 Mikonzi 11:1-6) Bankulutu bakoki mpe kolimbwela ye ete Esdras apesaki etinda epai na Bayuda ete balongola basi na bango oyo bazalaki Bapakano, mpe Nehemia alobaki epai na baoyo bazalaki kobala bandimi te ete ‘bazalaki kosala mabe monene mpo bazangaki bosembo liboso na Nzambe.’ (Nehemia 13:23-27; Esdras 10:10-14; tala La Tour de Garde ya le 15 juin 1982, page 31; ya le 15 novembre 1986, pages 26 kino 30; Mosenzeli 15/7/87 nkasa 21-24.) Baoyo bazali kolanda toli ya Biblia oyo epesami na nzela na bankulutu batondi na bolingo bazali kozwa bolamu mpe bazali kosepela mpo ete Jéhovah azali kondima bango.
18. Na kolandaka maloba ya Paulo kati na 1 Bakolinti 5:9-13, tosengeli kosala nini soko ndeko na biso ya mosuni abimisami na lisangá?
18 Esengeli mpe kotosa bikateli ya bankulutu ntango basambisi likambo. Paulo alobaki epai na baklisto na Korinte ete “basangana na moto moko te oyo abyangami ndeko mpenza soko ye azali moto na pite, soko na bilulela, soko mosambeli na bikeko, soko motuki, soko molangwi masanga, soko moyibi. Bolya esika moko na moto na ndenge yango te.” Basengelaki ‘kobengana moto mabe na kati na bango’. (1 Bakolinti 5:9-13) Kasi okosala nini soko ndeko na yo ya mosuni abimisami na lisangá? Atako mbala mosusu osengeli kokutana na ye mpo na kobongisa makambo matali libota na bino, osengeli kokata boyokani nyonso ya elimo elongo na moto yango. (Tala Mosenzeli ya le 15 Novembre 1988, pages 20 kino 24.) Ee, bosembo na biso epai na Nzambe mpe lisangá na ye esengeli kopusa biso na kotosa bikateli ya bankulutu.
19. Tosengeli kosala nini soko bankulutu bamonisi biso ete tozali kokota na nzela mabe ya elimo?
19 Ezali petee te mpo na kotikala na nzela moke oyo ezali komema na bomoi. Mpo na kolonga na likambo yango, tosengeli kolanda litambwisi oyo Liloba ya Nzambe mpe baoyo bazali na mokumba ya koleisa basangani ya lisangá na ye bazali kopesa biso. (Matai 7:13, 14) Na ndakisa soko tozali kokenda mobembo na engumba mosusu na motuka mpe tobungi nzela, tosengeli koluka kozonga na nzela malamu, soko te tokokoma te epai tolingi kokende. Bobele bongo, soko bankulutu balakisi biso ete tokoti na nzela mabe ya elimo, na ndakisa, na kokanganaka na moto oyo azali mondimi te, tosengeli kolanda toli na bango kozanga kokakatana. Ekozala lolenge moko ya komonisa ete, ya solo, ‘tozali kotya elikya epai na Jéhovah’.—Masese 3:5, 6.
Totosa bango ata na makambo mike
20. Mituna nini tokoki komituna mpo ete totosa litambwisi ya bankulutu ata na makambo mike?
20 Tosengeli kolanda litambwisi ya bankulutu ata na makambo mike. Tomituna bongo mituna milandi: ‘Nazali kosala elongo na bankulutu soko basengi na lisangá ete bakenda kotala bandeko bazali maladi to basalisa bato ya sika na mosala ya kosakola? Nandimaka kozanga koimaima badevware oyo bapesaka ngai na makita mpe nabongisaka yango malamu mpenza? Natyaka likebi ntango bankulutu bazali kopesa toli na ntina na kobomba bisika na ba assemblées, mpo na molato, to mpo na makambo mosusu? Napesaka maboko soko basengi tosukola Salle du Royaume, soko basengi topesa rapport ya mosala ya kosakola kozanga kolekisa mikolo to tokoma liboso ete makita ebanda?’
21. Botosi oyo tozali na yango epai na bankulutu ezali kokundwela biso maloba nini ya Yesu?
21 Bakengeli na masangá bazali kosepela na ndenge tozali kopesa bango maboko, mpe yango ezali kobimisa matomba malamu. Na mokuse, limemya na biso mpe botosi na biso ata na makambo mike, yango ekoki kotinda biso na kokanisa na maloba oyo ya Yesu: “Oyo azali sembo na likambo lileki moke azali sembo mpe na likambo monene.” (Luka 16:10) Tolingi kotangama kati na bato na sembo, boye te?
Tosepela ntango nyonso na mosala na bango na bolingo mpo na kokengela biso
22. Wapi bolamu tozali kozwa na mosala na kokengela na bolingo mingi esalami na moombo na sembo mpe na bankulutu kati na masangá?
22 Bolamu bozali kobima na kokengela na bolingo mingi ya moombo na sembo mpe na mayele mpe bankulutu ya masangá emonisi ete Jéhovah azali kopambola mpenza lisangá na ye. Epai mosusu, litambwisi makasi oyo bankulutu bazali kopesa biso ezali kosangisa makoki na bango mpe ezali kopesa nzela na bomoko kati na biso. Ezali mpe kosalisa biso na kotya milende mpe kosalela Bokonzi na ndenge malamu. Na ntembe te, botondi na biso mpo na mosala na kokengela na baoyo bazali liboso na biso ezali kosalisa biso ete topambolama na Nzambe kati na mosala ya kosakola mpe kozalisa bayekoli. (Matai 28:19, 20) Botosi na biso epai na bankulutu ezali mpe kobongisa biso mpo na bomoi ya seko kati na mokili ya sika.
23. Engebene 1 Yoane 5:3, tosengeli kosala nini?
23 Lokola tolingi Jéhovah, kotosa ye ezali kilo te. Ntoma Yoane akomaki: “Mpo ete bolingo na Nzambe ezali boye ete tokokisa malako na ye. Malako na ye mpe mazali na bozito te.” (1 Yoane 5:3) Baklisto ya sembo bazali kotosa na esengo mibeko ya Jéhovah mpe bazali na motema malamu ya kosala elongo na baoyo Jéhovah apesi mokumba ya bakengeli kati na lisangá. Tozali mpenza na botondi mingi na ndenge tozali kati na lisangá ya Nzambe mpe tozali na mibali oyo Ye apesi na lisangá lokola “makabo”! (Baefese 4:8) Lokola tozali kobeta ntembe te ete Jéhovah azali kotambwisa libota na ye, totosa ntango nyonso baoyo bazwi libaku malamu ya kozala liboso ya batemwe na Ye.
Bozongeli
◻ Mpo na nini tosengeli kotosa baoyo bazali liboso na biso.
◻ Ezalela na biso esengeli kozala boni mpo na mosala oyo bankulutu bazali kokokisa na molende nyonso?
◻ Mpo na nini tosengeli kolanda toli ya bankulutu kozanga kokakatana?
◻ Baklisto oyo bazali komikitisa na nse na bokengeli na bolingo mingi ya bankulutu, bazali kozwa bolamu nini?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 24]
Otosaka bankulutu, na ndakisa na kondimaka mikumba mipesameli yo na makita, na kopesaka maboko mpo na kosukola Salle du Royaume mpe na kopesaka rapport na yo ya mosala na ntango ekoki?
[Elilingi na lokasa 23]
Paulo azalaki kosepela kosakola nsango malamu mpe kosala mpo na baninga na ye baklisto. Bankulutu, bozali na botondi mpo na mikumba oyo Nzambe apesi bino?