Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/9 nk. 15-20
  • Bankulutu​—Bobatela etonga na Nzambe na motema malamu!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bankulutu​—Bobatela etonga na Nzambe na motema malamu!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Botambwisa etonga lokola bakonzi te
  • Bazali kobondisa mpe kolendisa
  • Na boyengebene
  • Bolanda kobatela etonga na motema malamu
  • “Bóbatela etonga ya Nzambe oyo bapesi na mabɔkɔ na bino”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Bankulutu, bosambisaka makambo na bosembo nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Babateli ya mpate, bómekola babateli minene ya bampate
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Botosa baoyo bakokambaka bino
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/9 nk. 15-20

Bankulutu​—Bobatela etonga na Nzambe na motema malamu!

“Tokomi bato na bopolo na kati na bino lokola mama oyo azali kobokola bana na ye mpenza.”​—1 BATESALONIKI 2:7.

1. Mpo na nini Témoin de Jéhovah nyonso ya sembo akoki kobanga eloko te?

JÉHOVAH azali Mobateli na mpate aleki monene. Azali kokokisa bamposa ya “bampate” na ye, basaleli na ye na ndenge esengeli mpe azali kokamba bango na nzela na boyengebene” na ntina na nkombo na ye mosantu. Yango wana baoyo bazali kokokisa mokano na ye bakoki kobanga eloko te mpe bakoki komibalola epai na Nzambe na bango atondi na bolingo mpo na kozwa libondisi. Témoin de Jéhovah nyonso ya sembo akoki kobanga eloko te mpamba te abatelami na Nzambe ya bolingo.​—Nzembo 23:1-4.

2. Lokola Yesu azali kongenga na nkembo na Nzambe, bizaleli nini bizali na ye?

2 Yesu Klisto “azali kongenga na nkembo [na Nzambe], azali mpe elilingi na motindo na ye.” (Baebele 1:1-4) Lokola azali Mobateli na mpate aleki malamu, ye mpe azali komonisa bolingo mpe azali kokabola mpasi ya bampate. (Yoane 10:14, 15) Na ndakisa, mokolo mosusu, “amonaki ebele na bato mpe ayoki mawa mpo na bango mpamba te bazalaki lokola bampate bazangaki mobateli. Abandaki koteya bango makambo mingi.”​—Malako 6:34.

3. (a) Na ndakisa na Jéhovah Nzambe mpe Yesu Klisto, bizaleli nini baklisto babateli na mpate balandi basengeli komonisa yango? (b) Toli nini mpe likebisi nini ntoma Paulo apesaki epai na bakengeli?

3 Baklisto nyonso basengeli ‘komekola Nzambe mpe komitambwisa na bolingo, lokola Klisto mpe alingaki bango’. (Baefese 5:1, 2) Esengeli na bango kozala na bolingo mpe motema mawa. Yango ezali mpenza solo mpo na babateli na mpate balandi na etonga na Nzambe, epai na bango ntoma Paulo alobaki: “Bokeba na ntina na bino mpenza mpe na ntina na etonga mobimba oyo elimo santu esili kotya bino bakengeli na yango; bozala babateli na lisangá na Nzambe oyo asombaki na makila na Mwana na ye mpenza. Ngai nayebi ete na nsima na kolongwa na ngai bankoi na yauli bakokota kati na bino, mpe bakotika etonga te. Kati na bino mpenza mpe mibali bakotelema kolakisa mateyo na kokosa ete babenda bayekoli nsima na bango.​—Misala 20:28-30.

4. (a) Makambo nini mamonanaki nsima, na kolandaka likebisi na Paulo oyo ezwami kati na Misala 20:29, 30? (b) Mituna nini tokoki sikawa kotalela?

4 Nsima na bambula “bankoi na yauli” babimaki mpe ‘bazalaki na motema malamu te mpo na etonga’. Kasi ezali esengo na komona ete epai na ba Témoins de Jéhovah, bankulutu bazali na motema na bankoi na yauli te. Baninga baklisto ya bakengeli oyo baponami na elimo santu basengeli komizela ete batambwisama ndenge nini? Bankulutu baponami bakoki kosala nini mpo na kotambwisa na motema malamu “bampate” ya Jéhovah?

Botambwisa etonga lokola bakonzi te

5. (a) Ndenge nini bakonzi na mokili bayangelaka mingimingi bato na bango? (b) Na maloba nini Yesu amonisaki ete kati na bayekoli, moko te asengeli kozala mokonzi likoló na bamosusu?

5 Tosengeli komizela ete bankulutu batambwisa biso na boboto. Bakokani na bakonzi na mokili te, baoyo mingimingi bayangelaka bato na bango na lolendo nyonso. Na ndakisa, Lisolo ya mokili elobi ete Charlemagne, mokonzi na ba Francs kobanda 768 kino 814, “apesaki etinda epai na ba Saxons ete babatisama soki te akoboma bango, apesaki etumbu makasi na baoyo nyonso babukaki mobeko etali kareme, mpe na bisika mingi apusaki bato na makasi ete bayamba lingomba”. (Histoire de l’Eglise chrétienne [Angl.], de William Jones.) Nzokande bankoi na yauli bazalaki na esika te kati na bayekoli na Yesu, ye oyo alobaki na bango: “Boyebi ete mikóló na bapakano bazali mikonzi likoló na bango mpe bato minene bakonyokola bango na makasi. Nde kati na bino ezala bongo te. Ye oyo alingi kozala monene kati na bino, akoma mosungi na bino mpe ye oyo alingi kozala moto na liboso na bino, azala moombo na bino. Lokola Mwana na moto ayei mpo na kosungama te kasi mpo na kosunga mpe kopesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na mingi.”​—Matai 20:25-28.

6. (a) Tosukisi na makambo nini misato mpo na oyo etali bankulutu? (b) Lisangá ezali kozela nini epai na bankulutu, mpe bankulutu basengeli komitalela ndenge nini?

6 Moklisto oyo ‘alingi kosala mosala na mokengeli azali na mposa na mosala malamu.’ (1 Timote 3:1) Likanisi oyo mpe toli na Yesu oyo totangi na paragrafe eleki etindi biso na kosukisa na makambo oyo misato malandi: 1) Bankulutu basengeli te konyokola baninga na bango baklisto; 2) baoyo bazali na mikumba kati na bayekoli na Yesu basengeli kozala baombo ya baninga na bango, kasi mikonzi te; mpe 3) mibali oyo balingi mosala ya mokengeli basengeli kotalela yango lokola “mosala malamu”, kasi ezali mpo na komitombola te. (Masese 25:27; 1 Bakolinti 1:31) Ebengeli “nkulutu” ezali komatisa ata mosambeli moko te ya Jéhovah likoló na baninga na ye. Lisangá ekosepela komona ete bankulutu bazali komonisa bokoli na elimo, ete bazali mibali batondi na eksperianse mpe bazali na komikitisa, mibali oyo bazali kopesa ndakisa kati na mosala ya bulee. Ee, bankulutu basengeli komitalela na kosokema nyonso lokola baombo ya Jéhovah Nzambe, ya Yesu Klisto mpe ya baninga na bango baklisto.​—Baloma 12:11; Bagalatia 5:13; Bakolose 3:24.

7. (a) Ndenge nini bankulutu basengeli kosalela 2 Bakolinti 1:24 na boyokani na bango elongo na baninga na bango? (b) Bankulutu basengeli kosala nini soko Collège central epesi mitinda?

7 Soki azali kosalela baninga na ye lokola moombo na komikitisa, nkulutu akomeka te ‘kotambwisa bango lokola mokonzi’. Ezali kitoko na komona bakengeli baklisto na ezalela motindo moko na Paulo, oyo akomaki epai na baklisto na Korinte: ‘Tozali na bokonzi likoló na kondima na bino te.’ (2 Bakolinti 1:24) Engebene maloba oyo, baoyo bazali kokokisa mokumba ya mokengeli na bolingo nyonso bazali kotyela baninga na bango baklisto mibeko mingimingi te oyo mizangi ntina. Epai na ba Témoins de Jéhovah, bakengeli bazali komitambwisa na mitinda ya Biblia mpe bazali kosalela lisangá na boboto. Bazali mpe komonisa ete bazali komibanzabanza mpenza mpo na etonga na Nzambe na kosalelaka nokinoki mitinda ya Collège central ya ba Témoins de Jéhovah.​—Misala, mokapo 15.

8. Ndenge nini Paulo azalaki komitambwisa liboso na baninga na ye baklisto, mpe yango esengeli kopusa bankulutu ya lelo na kosala nini?

8 Lokola azalaki komibanzabanza mpo na etonga ya Nzambe, Paulo alobaki epai na baklisto ya Tesalonike: “Tokomi bato na bopolo na kati na bino lokola mama oyo azali kobokola bana na ye mpenza. Boye, awa ezalaki biso na bolingo monene epai na bino, toselingwi kokabela bino bobele nsango malamu na Nzambe te kasi bomoi na biso mpenza, mpo ete bosili kokoma balingami na biso.” (1 Batesalonike 2:7, 8) Paulo azalaki lokola mama oyo azali kobokola bana na ye, oyo azali kolinga bango mingi na boye ete azali kotya matomba na bango liboso na matomba na ye mpenza mpe azali komibanzabanza na bolingo nyonso mpo na bango. Ndakisa na ye esengeli te kopusa bankulutu ya ekeke ya 20 ete babatela etonga na Nzambe na bolingo nyonso?

Bazali kobondisa mpe kolendisa

9. Likambo nini esakolamaki kati na Yisaya 32:1, 2 na ntina na makambo oyo mazali kosalema na mikolo na biso kati na basaleli na Jéhovah?

9 Kolobelaka eleko na biso, oyo Yesu Klisto asengelaki kozwa Bokonzi, Yisaya asakolaki ete mokonzi ‘akoyangela mpo na boyengebene’ mpe ba “princes” bakosala mosala “na kosambisa sembo”. Bankulutu oyo bazali na lisangá na sikawa ya teokratike bazali bongo kosalela Bokonzi oyo esili kotyama na makoló. Oyo nde esengo na kosala lokola bana na bokonzi! Epai na mibali oyo tokoki kotyela motema esakweli na Yisaya oyo elandi ezali kokokana: “Tala mokonzi akozala na lokumu kati na boyengebene, mpe bana na mokonzi kati na kosambisa-sembo; moto na moto akozala lokola ebombelo mpo na mopepe, ezipelo na ntango na mbula makasi; lokola bitima na mai kati na esika ekaoki, mpe lokola molili na libanga monene kati na mokili molembisami na moi.”​—Yisaya 32:1, 2.

10. Likambo nini nkulutu mokomoko akoki kosala mpo na baninga na ye ba Témoins de Jéhovah?

10 Na bokeseni na bakonzi na mangomba, oyo bazali konyokola baninga na bango, bankulutu oyo baponami kati na ba Témoins de Jéhovah bazali kobondisa mpe kolendisa baninga na bango. Banso elongo, bazali lisangani ya mibali bateli oyo bazali kotya kimya mpe kobatelama kati na libota na Jéhovah. Epai mosusu, nkulutu mokomoko akoki kokolisa ezalela yango na kobatelaka etonga na Nzambe na motema malamu.

Na boyengebene

11. (a) Ezalela nini oyo ezalaki na ekeke ya liboso ezali mpe komonana kati na masangá mingi ya ba Témoins de Jéhovah na mikolo na biso? (b) Mokumba nini bakengeli bazali na yango liboso na lisangá, mpe mpo na nini?

11 Na ekeke ya liboso, atako masangá mosusu ya baklisto ekutanaki solo na mikakatano, mingi kati na bango bazalaki na kimya, bomoko mpe esengo. (1 Bakolinti 1:10-12; 3:5-9; Baefese 1:2; Yakobo 2:1-9; 3:2-12; 4:11, 12; 1 Yoane 1:3, 4) Na mikolo na biso mpe, masangá mingi ya ba Témoins de Jéhovah mazali na ezalela malamu ya elimo na nzela na lipamboli na Nzambe, na litambwisi na Klisto mpe mosala na sembo esalami na bakengeli oyo baponami. Mpo na kotya kimya, bomoko mpe esengo kati na lisangá, mibali yango bazali koluka lisalisi ya Nzambe, mpe bazali kosala makasi na molende nyonso mpo na kobatela bopeto kati na bizaleli mpe na elimo ya lisangá na ye. (Yisaya 52:11) Soko ezalaki na mbindo, mbele lisangá yango ekoki mpenza kozala na kimya te mpe na esengo te, mpe ekondimama soko moke te na Nzambe mpe ekozanga lipamboli na ye, ye oyo ‘azali na miso na peto koleka mpo na komona yango oyo ezali mbindo’, mpe akondimaka mabe te. (Habakuku 1:13) Yango wana esengeli ete bankulutu basambisa makambo na bosembo nyonso mpe na lolenge oyo esengami na Makomami. Kasi basengeli kotalela nini ntango bazali kobongisa makambo motindo oyo?

12. Atako bankulutu basengeli te kokota na makambo ya bato soko mibeko to mitinda ya Biblia mibukami te, nzokande basengeli kosala nini engebene Bagalatia 6:1?

12 Ya liboso, soko mikakatano ebimi kati na bandeko mibale, mbala mosusu bango moko bakoki kosilisa yango. (Matai 18:15-17) Lokola bankulutu ‘bazali mikonzi likoló na kondima na biso te’, bakokota te na makambo oyo matali biso mpenza soki mibeko to mitinda ya Biblia mibukami te. Ya solo, soko moto moko ‘abeti libaku liboso ete ayeba yango’, baoyo bazali na makoki ya elimo basengeli ‘komeka kosembola moto motindo wana na bopolo’.​—Bagalatia 6:1.

13. Ndenge nini Makomami mamonisi ete bankulutu basengeli kosambisa likambo bobele soko bilembeteli bimonisi ete lisumu lisalamaki solo, kasi na kolandaka bilobaloba te?

13 Bankulutu basengeli kosala “mpo na kosambisa sembo”, na kolongolaka elimo ya koponapona. Basengeli kozala mpenza na bilembeteli bimonisi ete lisumu lisalamaki, kasi bakoyoka bobele bilobaloba na bato te. Paulo apesaki toli oyo: “Oyamba efundeli na ntina na nkulutu te bobele soko batatoli mibale to misato bazali.” (1 Timote 5:19) Na Yisraele na kala, engebene mibeko na Jéhovah, wana moto moko afundamaki ete asali lisumu oyo ezali kosenga liwa, asengelaki kobomama ‘na efundeli na batatoli mibale to misato, kasi motatoli moko te’. Mpe lisusu, basengelaki kosambisa ye to koyoka ye elongo na bafundi na ye, mpe soki litatoli na bafundi ezalaki solo, ‘batatoli bakobanda liboso koboma ye’.​—Deteronome 17:6, 7.

14. (a) Diotrefe azalaki komeka kosala nini na motema mabe? (b) Mposa ya Nzambe ezali nini wana bankulutu bazali kosambisa likambo?

14 Esengeli kozala na ntina makasi ezwami na Biblia mpo ete moto asambisama. Tozali na esengo lokola bakengeli ya masangá bakokani te na Diotrefe, moto na lolendo oyo na ekeke na liboso amekaki na motema mabe “kobimisa na lisangá” bandeko oyo bazalaki na mposa ya koyamba bakengeli na zongazonga. Ntoma Yoane akangaki miso te na ezalela ya moto yango mpe misala na ye mosusu ya mabe, kasi apesaki likebisi oyo: “Soko nakoya, nakokanisa makambo makosalaka ye.” (3 Yoane 9, 10) Na ntango na biso, komite oyo esalami mpo na kosambisa likambo esengeli komindimisa ete ekateli nyonso ezwami mpo na kobimisa moto na lisangá ezali na ntina oyo euti na Bibliaa. Ya solo, Nzambe alingi ete bankulutu basalela boyengebene epai na bamosusu. Ee, baoyo bazali kotambwisa lisangá ya Jéhovah awa na mabelé basengeli kozala “mibali na mayele, baoyo bakobangaka Nzambe, mibali oyo bakoki kotyela bango motema”.​—Exode 18:21.

15. Libondeli ezali na ntina nini na ntango bankulutu bazali kosambisa likambo?

15 Komité nyonso oyo esalami mpo na kosambisa basengeli kosenga lisungi ya Jéhovah kati na libondeli. Likita oyo ekosalema elongo na moklisto mobali to mwasi oyo afundami mpo na libunga monene esengeli kobanda na libondeli. Ekozala mpenza malamu na kosambela ata na kati na lisolo soko emonani polele ete bozali mpenza na mposa na lisalisi na Nzambe.​—Yakobo 5:13-18.

16. Motindo nini bankulutu basengeli kosambisa likambo, mpe mpo na nini?

16 Bankulutu bayebi ete moninga na bango moklisto oyo afundami mpo na lisumu azali “mpate” na etonga na Nzambe mpe basengeli kozala na boboto epai na ye. (Tala Ezekiele 34:7-14) Bampate mpenza, elingi koloba bibwele, balingaka ete babatela bango na boboto, mpamba te bazali banyama na kobangabanga mpe bazali solo na mposa na libateli na mobateli na bango. Tokoloba boni mpo na “bampate” na lisangá na bino? Na ntembe te, bazali komiyoka ete bazali kobatelama na lisungi ya Mobateli na mpate aleki monene, Jéhovah Nzambe, mpe Mobateli na mpate aleki malamu, Yesu Klisto. Kasi babateli na mpate balandi basengeli mpe kosala na motindo boye ete bampate baoka ete bazali na kimya mpe na kobatelama lokola ezali bongo epai na basaleli na Jéhovah oyo bakokani na bampate. Baklisto babateli na mpate balandi, bandeko na bino mibali mpe basi kati na elimo bazali komiyoka ete babatelami na bino? Ya solo, bankulutu basengeli kosala na boye ete mibeko mpe mitinda na Biblia mitosama, kasi Biblia esengi bango ete basalela “bampate” na bolingo mpe bayoka moto oyo azali kosambisama na motema kokita, na malembe, na boboto mpe na maloba malamu.

17. Mitinda nini mizwami na Biblia bankulutu basengeli kobatela na makanisi na bango, mingimingi ntango bazali kosambisa likambo?

17 Lokola tozangi kokoka, “biso banso, tobetaka mabaku mbala mingi” na maloba. (Yakobo 3:2) Moto na moto kati na biso azali na mposa na motema mawa na Nzambe mpe na “mbeka” na Klisto. (1 Yoane 1:8 kino 2:2; Nzembo 130:3) Mobateli na mpate molandi asengeli bongo kozala na komikitisa. Asengeli mpe komikundola maloba oyo ya Yesu: “Ndenge ezali bino na mposa ete bato basalela bino, salela bango bobele bongo.” (Luka 6:31) Esengeli na bango kosalela toli oyo mpenzampenza ntango bazali kosambisa moto na komité. Mibali oyo bakokisi masengami na elimo bakomeka kosembola moklisto oyo asali lisumu ‘na elimo na bopolo, komisenzelaka mpe bango moko ete bamekama te’.​—Bagalatia 6:1; 1 Bakolinti 10:12.

18. (a) Soko bankulutu bazali kobimisa maloba makasi epai na mofundami na ntango bazali kosambisa likambo, mabe nini ekoki kobima wana? (b) Likebisi nini bankulutu mpe baklisto mosusu bakoki kozwa kati na Malako 9:42?

18 Soko bankulutu bazali na maloba makasi na ntango bazali kosambisa ndeko oyo afundami, yango ekoki kozala likama. Ata ezalela na bango etungisi ye na maoki te to na nzoto te, nzokande yango ekoki mpenza kozala likama mpo na ye na elimo, mpe ekoki kopusa bato na komituna soki bankulutu yango bakokisi solo masengami mpo na mokumba na bango. (Tala Yakobo 2:13) Na yango, ntango bazali kosambisa moto mpe ata na mabaku mosusu, bankulutu basengeli kozala na motema boboto mpe bakobetisa moto libaku te. Ya solo, baklisto nyonso basengeli kosenzela na likambo yango, mpamba te Yesu alobaki: “Soko nde nani akotaisa moko na bandimi oyo mike libaku, eleki na malamu soko libanga monene ezingeli nkingo na ye mpe abwakami kati na mai monene.” (Malako 9:42) Mabanga mosusu mazalaki mpenza minene na boye ete esengelaki nyama lokola ngombe to mpunda mpo na kobalola yango. Moto moko te akokaki kobika soko bakangi ye libanga motindo wana na nkingo mpe babwaki ye na yango na kati ya mai. Na ntembe te, nkulutu akosenzela ete abetisa baninga libaku te, mpamba te yango ekoki kozala likama monene kati na elimo, mpo na ye mpe mpo na moto oyo ye akobetisa libaku.​—Bafilipi 1:9-11.

Bolanda kobatela etonga na motema malamu

19. Toli nini Pierre, ye mpe nkulutu lokola, apesaki epai na bakengeli, mpe bakozwa nini soko balandi yango?

19 Ntoma Pierre, ye nkulutu lokola, amonisaki epai na bakengeli motindo nini basengelaki kobatela etonga. Akomaki: “Bobatela etonga na Nzambe kati na bino. Bobatela bango mpo na kopusama te, kasi na mitema malamu lokola elingi Nzambe, na mposa na kozwa lifuti te kasi mpo na kopesa mpamba; lokola mpo na kozala mikonzi likoló na libula na Nzambe te kasi lokola bilakiseli na etonga. Wana ekomonana mobateli-mokonzi, bokozwa motole na nkembo mokobeba te.” (1 Petelo 5:2-4) Bobele soko bazali kosalela batoli oyo mpe bazali kobatela etonga na Nzambe na motema malamu nde bakengeli bapakolami bakozwa mbano na bango na makoló, elingi koloba bakokoma bikelamu ya elimo mpe bakokufa lisusu te; mpo na bankulutu oyo bazali na elikya ya kotikala awa na mabelé bakozwa bomoi ya seko kati na Paradis oyo ekozongisama na mokili mobimba.

20. (a) Ndenge nini babateli na mpate balandi basengeli kotalela baninga na bango? (b) Soko bankulutu bazali kokokisa mosala malamu mpe bazali na likebi mingi mpo na bampate, yango ekobimisa mayoki nini epai ya bandeko?

20 Jéhovah Nzambe mpe Yesu Klisto bazali Babateli na mpate batondi na bolingo mpe na motema mawa. Na ntina yango, wana ezali bango kotosa mitinda ya Nzambe, baklisto babateli na mpate balandi basengeli komonisa bolingo mpe motema mawa epai na baninga na bango oyo bazali lokola bampate. Na ntembe te, ba Témoins de Jéhovah nyonso ya sembo bazali kosepela makasi na mosala malamu oyo ekokisami na bankulutu oyo bamipesi, baoyo bazali kobatela malamu mokumba mopesameli bango mpe bazali kobatela etonga na Nzambe na motema malamu. Tokoki komonisa botondi mpe limemya ebongi epai na baoyo bazali liboso na biso na kotosaka bango.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Moto oyo afundami akoki kosala appel elingi koloba kosenga ete komité mosusu etalela likambo na ye soko akanisi ete likambo yango asambisami na boyengebene te.

Bozongeli

◻ Ndenge nini Yesu amonisaki ete bankulutu basengeli kozala mikonzi te likoló na bayekoli na ye?

◻ Bankulutu basengeli kosala nini soko Collège central epesi mitindo?

◻ Engebene Yisaya 32:1, 2, bankulutu basengeli kozala lokola biloko nini kati na lisangá?

◻ Ndenge nini Makomami mamonisi ete bankulutu basengeli te kosambisa makambo bobele soko bayoki bilobaloba?

◻ Ndenge nini babateli na mpate balandi basengeli kobatela etonga?

[Elilingi na lokasa 18]

Ntango komité mpo na kosambisa likambo eyangani na moklisto mobali to mwasi, bosengeli kobondela na bosembo nyonso.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto