Bankulutu—Bobatela mokumba epesami na bino
“Bokeba na ntina na bino mpenza mpe na ntina na etonga mobimba oyo elimo santu esili kotya bino bakengeli na yango; bozala babateli na lisangá na Nzambe oyo asombaki na makila na Mwana na ye mpenza.”—MISALA 20:28.
1. Mokumba oyo epesami epai na baklisto ezali nini?
JÉHOVAH NZAMBE apesi mokumba ya motuya monene epai na basangani ya lisangá na ye oyo ezali awa na mabelé. Kasi mokumba ezali nini? Ezali eloko ya motuya oyo epesami epai na moto mpo ete abatela yango. Mokumba ya baklisto ezali “lolenge na maloba sembo”, elingi koloba solo oyo epesami na nzela na Makomami, solo oyo “moombo na sembo mpe na mayele” azali kokabola lokola “bilei bipesami na ntango ekoki”. (2 Timote 1:13, 14; Matai 24:45-47) Mokumba yango etali mpe mosala ya Nzambe oyo esangani na solo, solo oyo esengeli kosakolama na kati ya lisangá mpe epai na bato ya mokili. (2 Timote 4:1-5) Basakoli ya Bokonzi, bakisa bankulutu oyo baponami na elimo, basengeli kopesa motuya monene na mokumba yango.
2. Mokumba nini lisusu bankulutu basili kozwa, mpe Pierre alobaki nini na ntina yango?
2 Kati na lisangá ya boklisto, bankulutu bazali na mokumba mosusu: mokumba ya koleisa etonga na Nzambe. Ntoma Pierre akomeli bango boye: “Na bongo, nabondeli bankulutu kati na bino, ngai nkulutu na bango elongo, motatoli na mpasi na Klisto mpe mokabolani na nkembo elingi komonisama: Nabondeli bino ete bobatela etonga na Nzambe kati na bino. Bobatela bango mpo na kopusama te, kasi na motema malamu lokola elingi Nzambe, na mposa na kozwa lifuti te kasi mpo na kopesa mpamba; lokola mpo na kozala mikonzi likoló na libula na Nzambe te kasi lokola bilakiseli na etonga. Wana ekomonana Mokonzi Mobateli, bokozwa motole na nkembo mokobeba te.”—1 Petelo 5:1-4.
3. Bankulutu basengeli kozala lokola nini kati na lisangá ya boklisto mpe basengeli kokolisa nini?
3 Bankulutu na lisangá na boklisto basengeli “kozala lokola ebombelo mpo na mopepe mpe, ezipelo na ntango na mbula makasi; lokola bitima na mai kati na esika ekaoki, mpe lokola molili na libanga monene kati na mokili molembisami na moi.” (Yisaya 32:1, 2) Yango elingi koloba ete basengeli kosala na boye ete kobatelama, kimya mpe bomoko ezala kati na etonga ya “bampate”, basaleli na Nzambe. Epai na bankulutu makambo “mingi mazali kosengama” koleka epai na bamosusu mpamba te “batyami likoló na bato mingi”. (Luka 12:48) Ee, bazali mpenza na mokumba ya motuya oyo basengeli kobatela.
Mpo na nini yango epesameli bino?
4. Mpo na nini ezali likambo malamu ete bankulutu bazala mingi?
4 Lokola masangá ya ba Témoins de Jéhovah kati na mokili mobimba ezali koleka 60 000, tozali na mposa ya ebele na mibali bazali na makoki ya elimo mpo na kobatela etonga ya Nzambe. Ezali esengo na komona ete kati na mokili mokomoko ezali na bankulutu mingi. Soko tokaboli kati na mokili mobimba, lisangá mokomoko ezali na basakoli pene na 60. Bankulutu bazali bongo na mosala mingi.—1 Bakolinti 15:58.
5. Eloko nini epesaka nzela na moklisto ete akoma nkulutu?
5 Soko ozali nkulutu, mpo na nini mokumba oyo epesamelaki yo? Mpamba te omonisaki bokoli, mpe okokisaki masengami ya elimo mpo na kozwa mokumba yango. Na ndakisa, esengelaki na yo koyekola Liloba na Nzambe na etingya. (Yosua 1:7, 8) Esengelaki na yo kosakola na molende nsango malamu mpe kosalisa bato mosusu mpo bakoma basakoli ya Bokonzi. ‘Omekamaki liboso mpo na kotalela makoki na yo’, na kosalelaka lokola mosaleli na misala na bosembo nyonso. Omonisaki ete ‘okoki’ mpo na kokoma nkulutu, mpe olukaki ete okokisa masengami mpo na kokoma nkulutu, na bongo okangaki ntina ete kozala mokengeli ezali “mosala malamu”. (1 Timote 3:1, 10) Lokola Timote, ‘bandeko bapesaki litatoli malamu na ntina na yo’. (Misala 16:2) Ntango oponamaki lokola nkulutu, ozalaki penepene na mibu 30, to ozalaki na mbula mingi koleka wana, mpe osilaki kozwa eksperianse kati na bomoi. Na yango, lisangá ekomaki na limemya epai na yo, mpe ezalaki kotalela yo lokola ndeko mobali ateli na elimo, ndeko oyo bakoki kosolola na ye, ndeko abongi kopesa batoli ezwami na Biblia mpe oyo akoki kobomba sekele.—Masese 25:9, 10.
Ndenge nini okobatela mokumba na yo
6, 7. Toli nini ezwami na 1 Timote 4:13-15 ekoki kosalisa nkulutu na kobatela malamu mokumba na ye.
6 Bankulutu, soko bapesaki bino mokumba ya bakengeli baklisto, ezali mpo na bantina malamu. Bondimaki yango lokola mokumba monene. Kasi ndenge nini bokoki kobatela mokumba na bino?
7 Mpo na kobatela mokumba oyo ozwaki na ntango okomaki nkulutu, esengeli na yo, kati na makambo mosusu kobatela ekateli na yo mpe móto na yo. Biso banso tozwi misala mikeseni kati na lisangá ya Jéhovah. Ekozala malamu kobatela esika na yo, mpe zala na esengo ‘ya komitambwisa lokola mwana moke’. (Luka 9:46-48; tala Basambisi 7:21) Sepela na mikumba na yo, mpe kokokisa yango na ‘loboko na goigoi’ te. (Masese 10:4) Kotikala na esika moko te, kasi na lisalisi na Jéhovah luka kokola na makambo manso matali mosala ya Nzambe. Ee, landa toli oyo Paulo apesaki epai na Timote: “Otyaka motema na kotanga Makomi polele mpe na kosakola mpe na koteya. Otika kobatela likabo na ngolu lizali kati na yo te, yango ezwi yo na nzela na kosakola wana etii mikóló maboko likoló na yo. Otyaka motema na makambo oyo, omipesa na yango, ete bato nyonso bamona polele ete ozali kotambola liboso.”—1 Timote 4:13-15.
8. Eloko nini ekosalisa nkulutu ete apesa toli malamu mpe abimisa makanisi ya elimo makoki kolendisa na kati ya makita?
8 Senzela ete ozala na programme malamu ya boyekoli na yo moko. Mpo ete ozali nkulutu, yango elimboli ete osengeli kopesa batoli ya mayele ezwami na Biblia. Mpo obongisama na kokokisa mokumba yango, osili kotanga Biblia mobimba - mbala mingi - na kokanisaka mozindo likoló na yango? (Masese 15:28) Tokoloba boni mpo na ba discours na yo? Obongisaka yango malamu, na kolukaka lisalisi ya Jéhovah kati na libondeli, mpo na kobimisa makanisi malamu ya elimo epai na baoyo bazali koyangana na makita ya boklisto? Mingimingi bankulutu basengeli kozala na ‘maloba malamu mpo na kotonga, maloba oyo makoki kozala na litomba epai na baoyo bazali koyoka yango’.—Baefese 4:29; Baloma 1:11.
9. Engebene 2 Timote 4:2, nkulutu asengeli kosala nini?
9 Bankulutu, bolanda toli oyo ya Paulo: “Osakola liloba, ozala na etingya na bilaka malamu mpe na bilaka malamu te, omonisa ntina, opamela; opesa toli, na motema petee mpe na kolakisa.” (2 Timote 4:2) Paulo abangaki ete lipengwi ekota na ‘lisangá, mpamba te bamoko kati na basangani na yango ‘bazalaki kowelana mpo na maloba’, bazalaki kobimisa “mituna ya bozoba”, mpe bazalaki na ‘makanisi malamu te mpo na solo’. (2 Timote 2:14-18, 23-25; 3:8-13; 4:3, 4) Ezala ete lisangá ekomi na ntango na mpasi to ya malamu, Timote asengelaki ‘kosakola liloba’. Na ndenge yango azalaki kolendisa baninga na ye bandimi mpo ete bayeba kotelemela lipengwi. Bobele bongo, na mikolo na biso bankulutu basengeli kosakola Liloba na Nzambe, nsango oyo ezali kosimba motema mpe ezali kolendisa limemya na mitinda na Jéhovah.—Baebele 4:12.
10. Mpo na nini nkulutu asengeli kosakola mbala na mbala elongo na libota na ye mpe na basakoli mosusu?
10 Mpo na koloba na bokonzi, nkulutu asengeli kozala na bomoi oyo eyokani na Liloba na Nzambe. Kasi akobatela mpenza mokumba na ye te soko azali ‘kosakola liloba’ bobele na estrade, na kati ya lisangá. Bobele na mokapo wana moko, Paulo apesaki toli oyo epai na Timote: “Sala mosala na mopalanganisi na nsango malamu.” Bankulutu, mpo na ‘kokokisa malamu mosala ya Nzambe’, esengeli na bino kosakola Liloba na Nzambe “liboso na bato banso mpe ndako na ndako”. (2 Timote 4:5; Misala 20:20, 21) Bimaka na mosala ya kosakola elongo na libota na yo. Ekanganeli ya elimo oyo esangisi yo na mwasi na yo ekoya makasi, mpe yango ekozala litomba mpo na bana na bino. Bongisa mpe ntango mpo na kobima elongo na bandeko mosusu ya lisangá. Yango ekoyeisa makasi bikanganeli ya elimo mpe ekobakisa bolingo oyo tozali na yango epai na bandeko. (Yoane 13:34, 35) Ya solo, nkulutu asengeli kosala makasi mpo na kokabola na ndenge malamu ntango oyo akoki kolekisa elongo na libota na ye mpe ntango oyo asengeli kopesa na lisangá. Soko amonisi mayele na likambo yango, akopesa ntango mingi na likambo moko te koleka makambo mosusu.
11. Mpo na nini bankulutu basengeli kosala makasi mpo na kokolisa makoki na bango ya koteya?
11 Bankulutu, soko bolingi kobatela mokumba na bino, bosengeli mpe kotia milende mpenza mpo na kokolisa makoki na bino ya bateyi. Paulo alobi boye: “Ye oyo azali koteya, tika ete amipesa na koteya; to ye oyo azali kopesa toli, tika ete akangama na kopesa toli.” (Baloma 12:7, 8) Lokola moteyi azali koteya bamosusu, bato ye azali koteya basengeli komizela na komona ndakisa epai na ye. Soki nkulutu abungi nzela na koteya na ye mpe yango etungisi baninga na ye baklisto, akokwea na etumbu uta na Nzambe. Mpamba te, bateyi bakozwa ‘lisambisi makasi koleka’. (Yakobo 3:1, 2; Matai 12:36, 37) Bankulutu basengeli bongo koyekola malamumalamu Liloba na Nzambe mpe kosalela yango na bomoi na bango. Soki bankulutu bazali kosalela makambo oyo bazali koteya, yango ekosepelisa baninga na bango. Ezaleli yango ekobatela lisangá na bopusi mabe, mingimingi na lipengwi.
Keba mpo na mitambo
12. Toli nini ekomamaki na zulunalo oyo na ekeke eleki ekosalisa nkulutu mpo ete ayeba kosalela malamu lolemo na ye?
12 Bankulutu, mpo na kobatela mokumba na bino, esengeli na bino lisusu kokeba na mitambo. Moko na yango ezali bongo kosalela lolemo na lolenge mabe ntango bozali koteya. Lisangá ya Jéhovah ezali kobenda likebi uta kala na ntina ya kosenzela na likambo yango. Na ndakisa, na ebimeli na yango ya Lingelesi ya le 15 Mai 1897, zulunalo oyo elimbolaki Yakobo 3:1-13 mpe elobaki mpenzampenza mpo na bankulutu ete: “Soko bayebi koloba, yango ekoki kozala liziba ya bolamu mpenza, yango ekoki kokamba bato mingi epai na Nkolo, epai na solo mpe na nzela ya bosembo; kasi, epai mosusu, soko lolemo na bango ebebisami na libunga, ekoki kozala na mabe monene koleka-ekobebisa kondima, bizaleli mpe misala malamu. Ezali solo ete moto nyonso oyo azali kosalela likabo oyo ya koteya azali na mokumba monene liboso na Nzambe mpe bato. . . . Ye oyo alingi kozala liziba kati na yango Liloba na Nzambe ezali kobima, ye oyo alingi kopesa lipamboli, alingi kobondisa mpe kolendisa, asengeli kosenzela na boye ete mai ya bololo, bindimeli mabe oyo ekoki kobimisa kolakelama mabe, mpasi, ebimela epai na ye te, mpamba te yango ekopesa lokumu te epai na Nzambe mpe ekobebisa Liloba na ye. Wana bato bazali koponama mpo na kotambwisa makita, esengeli kotalela makoki na bango ya ‘koloba’, lokola eyebisami awa. Bakopona moto te mpo azali molobalobi oyo ayebi koningisa, kasi bakopona baoyo bazali mpenza na komikitisa, na bokatikati, mpe bayebi ‘kobatela’ lolemo na bango mpe bazali kosala makasi ‘ya koloba se mikano ya Nzambe’.” Ee, ezali malamu mpenza ete nkulutu ayeba kosalela malamu lolemo na ye.
13. Bankulutu basengeli kokeba na likambo nini mpo na oyo etali kominanola?
13 Ekozala mpe motambo na kolekisa ntango mingi mpo na kominanola. Kominanola esengeli kopesa nzela na moklisto ete anyolisa nzoto mpe amilendisa, kasi esengeli te kolembisa ye to kopengola ye na mokumba na ye. Epai mosusu, bankulutu basengeli kozala na ‘bizaleli bibongi’. (1 Timote 3:2) Soki ozali na bokatikati mpo na likambo etali kominanola, okobatelama, yo mpe libota na yo, mpe okopesa ndakisa malamu na lisangá. Mbele okopesa ndakisa malamu te soko ntango nyonso ozali kokenda na week-end nzokande baninga na yo baklisto bazali kosangana na mosala ya kosakola na molende nyonso. Esengeli ete nsango malamu esakolama. Bankulutu basengeli bongo komonisa ndakisa na kozalaka basakoli ya molende ya Bokonzi.—Malako 13:10; Tito 2:14.
14. (a) Bandakisa nini ezwami na Biblia ezali kokebisa bankulutu mpo na pite? (b) Toli nini epesamaka mbala na mbala bankulutu basengeli kobosana yango te ntango bazali kosalisa ndeko ya mwasi moklisto?
14 Pite ezali motambo mosusu ya kokima. Ata nkulutu akoki kokosama na ezaleli na mbindo soko ayiki mpiko te na masenginya oyo Satana azali kotya liboso na basaleli na Nzambe mpo na komeka kobebisa kondima na bango. (Tala Matai 4:1-11; 6:9, 13) Omikundola ete nsima wana akokaki te kolakela Bayisraele mabe, mosakoli Balama alobaki ete Jéhovah ye moko akolakela bango mabe soko bapusami na komipesa na pite. Alobaki bongo epai na Balak, mokonzi na Moab ete “abetisa Bayisraele libaku na boye ete balya biloko bipesami mbeka na bikeko mpe basala pite”. Bayisraele bamibatelaki na motambo yango? Te, mpamba te 24 000 kati na bango bakufaki na etumbu eutaki epai na Jéhovah mpo ete basalaki pite na basi ya Moab mpe bafukamaki liboso na banzambe na bango. (Emoniseli 2:14; Mituya 25:1-9) Omikundola lisusu ete ata David, ‘moto oyo alingamaki na Nzambe’, akweaki na motambo ya pite. (1 Samwele 13:14; 2 Samwele 11:2-4) Bankulutu, bolanda bongo toli oyo “moombo na sembo” azali ntango nyonso kopesa: kozala yo moko te ntango ozali kopesa toli epai na ndeko ya mwasi kati na elimo, kasi okokisa mokumba yango bobele soko ozali elongo na nkulutu mosusu.—Luka 12:42.
15. Ndenge nini libota ya nkulutu ekoki kosalisa ye mpo ete akwea te na motambo ya koluka bozwi ya mosuni?
15 Mposa ya bozwi ya mosuni ezali motambo mosusu oyo nkulutu asengeli komibatela na yango. Sepela na biloko oyo bizali na ntina, kotyaka motema ete Jéhovah akokokisa bamposa na yo. (Matai 6:25-33; Baebele 13:5) Teya libota na yo ete bayeba kosalela malamu mosolo mpe biloko, mpamba te soko bazali kobebisa yango elimboli kobebisa ntango mpe makambo mosusu oyo okokaki kosalisa na yango libota, kosangana na mosala ya kosakola, kolendisa lisangá mpe kosalela matomba ya Bokonzi. Nkulutu akozwa litomba soko libota na ye ezali kosalisa ye na likambo yango, akosepela na bango soko bazali kosengasenga te biloko bizangi ntina ete azwela bango. Mpamba te, “mokemoke elongo na botosi na kotosa Jéhovah eleki mosolo mingi nde mikakatano elongo na yango.”—Masese 15:16.
“Bokeba na ntina na bino mpenza”
16. Toli nini Paulo apesaki epai na bakengeli na Efese?
16 Mpo na kobatela mokumba na bango, bankulutu basengeli kosalela toli oyo Paulo apesaki epai na bakengeli na Efese: “Bokeba na ntina na bino mpenza mpe na ntina na etonga mobimba oyo elimo santu esili kotya bino bakengeli na yango; bozala babateli na lisangá na Nzambe oyo asombaki na makila na Mwana na ye mpenza. Ngai nayebi ete na nsima na kolongwa na ngai bankoi na yauli bakokota kati na bino, mpe bakotika etonga te. Kati na bino mpenza mpe mibali bakotelema kolakisa mateyo na kokosa ete babenda bayekoli nsima na bango. Yango wana bokengelaka, mpe bokanisaka ete mbula misato butu na moi natikaki te kokebisa bino mokomoko na mpisoli.—Misala 20:28-31.
17, 18. Toli nini epesamaki kati na La Tour de Garde esili koleka mibu soko 80, ezali ntango nyonso na ntina mpo na bankulutu?
17 Eleki mibu 80 La Tour de Garde (ebimeli na Lingelesi ya le 1er Mars 1909) ezongelaki toli oyo Paulo apesaki epai na baklisto oyo bazalaki bankulutu lokola ye, mpe esalaki komantere elandi: “Bipai binso, Bankulutu basengeli mpenzampenza kosenzela; na yango, ezali ntango nyonso baoyo bazali na makoki mpe bayebani mingi nde bazali komekama makasi koleka. Yango wana [Yakobo] apesi toli oyo: ‘Bozala balakisi mingi te, bandeko, mpamba te ye oyo akomi molakisi akomekama makasi.’ Biso mpe, tozali kolendisa Bankulutu nyonso, oyo bazali na motema peto mpe balingi kosalela lisangá, bazala se na bolingo mpe na mayoki malamu epai na bato banso, bamitondisa na mbuma na elimo mpe ngolu na Elimo santu, mpe babatela etonga. Bomikundola ete etonga ezali ya Nkolo mpe ete bozali na mokumba monene liboso na Nkolo, mpe epai na basangani na etonga. Bomikundola ete bosengeli kosenzela likoló na milimo na bango (matomba) lokola bato oyo basengeli kozongisa monoko epai na Mobateli na mpate mokonzi. Bomikundola ete bolingo ezali eloko ya ntina; mpe wana ezali bino kobatela bindimeli, bopesa likebi mingi na misala ya Elimo na Nkolo kati na basangani bakeseni ya Nzoto na ye, mpo ete bazala bato ‘bakoki na libula ya basantu kati na pole’, mpe na boyokani na mokano na Nzambe babeta libaku te na mikolo oyo ya mabe, kasi wana ekosala bango nyonso esengeli, batelema ngwi kati na Klisto, Nzoto na ye, Basangani na ye, Banganga-nzambe na ye elongo, Batuki na libula na ye elongo.”
18 Maloba oyo malobamaki epai na bankulutu bapakolami na elimo mpe epai na bandeko na bango kati na kondima, na boyokani na engengiseli mpe ezalela na lisangá ya Jéhovah ntango ebandaki. Kasi maloba yango mazali ntango nyonso na ntina kino lelo. Ata bazali na elikya ya kokenda likoló to ya kotikala na nse, bankulutu ya lisangá ya boklisto basengeli ‘kokeba na ntina na bango mpenza’, ‘kobatelaka mokumba na bango’ mpe kosenzelaka na bolingo nyonso likoló na matomba ya etonga na Nzambe.
Bokozala na esengo soko bobateli malamu mokumba na bino
19, 20. Mpo na nini ezali esengo epai na bankulutu ete babatela malamu mokumba mopesameli bango?
19 Bankulutu, bokozala na esengo mozindo soki bozali kobatela mokumba na bino. Ezali esengo na kokokisa na ndenge esengeli mokumba oyo ya ntina. Bozala na mayele, bolendendela na libondeli mpe bomipesa na mosala. Bobatela mokumba mopesameli bino mpe bokanisa na ntango oyo bokokoka koloba lokola moto na ekomeli na sekretere: “Nasili kosala nyonso oyo olakelaki ngai.”—Ezekiele 9:3, 4, 11.
20 Ee, bokokisa na bosembo nyonso mikumba na bino ya bankulutu mpo ete baloba na ntina na bino lokola Noé: “Asilisaki nyonso elakaki Nzambe ye.” (Genese 6:22) Lisangá ezali kozwa litomba na mosala na bino ya molende na makambo mingi. Nyonso wana ezali kokumisa Jéhovah kati na masangá ya makasi mpe oyo ezali komipesa na mosala; masangá oyo mazali kotambwisama na bankulutu ya sembo oyo bazali kobatela malamu mokumba mopesameli bango. Kasi bosengeli kokokisa makambo mosusu, soki bolingi koyoka baloba na bino ete: “Malamu! Yo moombo malamu.” (Luka 19:17) Lokola bozali bankulutu, bosengeli mpe kobatela etonga na Nzambe na motema malamu.
Bozongeli
◻ Mokumba nini mopesameli bankulutu?
◻ Nkulutu akoki kosala nini mpo na kobatela malamu mokumba mopesameli ye?
◻ Mpo na kobatela mokumba mopesameli ye, nkulutu asengeli kokeba na mitambo nini?
◻ Mpo na nini ezali esengo epai na bankulutu ete babatela malamu mokumba mopesameli bango?
[Elilingi na lokasa 10]
Bankulutu basengeli kozala lokola “ebombamelo na ntango na mbula makasi”.
[Elilingi na lokasa 12]
Bankulutu, bóbimaka na mosala ya kosakola elongo na libota na bino mpe elongo na basakoli mosusu.
[Elilingi na lokasa 13]
Bankulutu, soko bozali kobatela malamu mokumba mopesameli bino, lisangá akozwela yango matomba mingi.