Okweisaka mokili na kondima na yo?
“Mpo na kondima, Noa . . . atongi masuwa mpo na kobikisa libota na ye; mpe na nzela na kondima [akweisaki] mokili.”—BAEBELE 11:7.
1, 2. Bomoi ya Noé ekoki koteya biso nini?
JÉHOVAH apesaki epai na Noé mpe na libota na ye, oyo ezalaki na bato se mwambe, libaku ya kobika na mpela. Abomaki bato nyonso ya ntango na Noé na mai. Lokola Noé azali nkoko na biso banso, tosengeli kozala na botondi epai na ye mpo na kondima oyo ye amonisaki.
2 Tokoki koyekola makambo mingi likoló na bomoi ya Noé. Makomami mazali koyebisa biso ntina oyo Nzambe abikisaki ye nzokande abomaki bato ya ntango na ye. Bobele Makomami yango ya Nzambe mamonisi polele ete libota na biso ekozwa lisambisi ya motindo moko. Mpo na yango, Yesu alobaki ete: “Ekozala na mpasi mingi lokola emonanaki longwa na ebandeli te. Ekobima mpe boye lisusu te.” (Matai 24:21) Kozalaka na kondima motindo moko na oyo ya Noé, tokoki kozala na elikya ya solo ya kobika na kobomama oyo ezali koya nokinoki ya biloko mabe ya ntango oyo.—Baloma 15:4; tala Baebele 13:7.
3. Mpo na nini Jéhovah ayeisaki mpela monene?
3 Na boumeli ya mibu 1656 oyo mizali kokabola kozalisama ya Adam na mpela, bato moke bamonisaki bokangami na bango epai na makambo malamu. Nivo ya bizaleli malamu na bango ekitaki mingi mpenza. “Jéhovah amonaki ete masumu na bato mazali mingi na mokili mpe ete makanisi nyonso kati na mitema na bango mazalaki bobele epai na mabe mikolo nyonso.” (Genese 6:5) Mobulu, kolinga bisengo mpe baanzelu oyo balataki nzoto ya bato oyo babalanaki na basi mpe babotaki libota na bilombe ezalaki ebele na makambo oyo etindaki Nzambe apesa etumbu na mokili wana ya kala. Jéhovah alobaki na Noé: “Nasili kokana kosilisa bato nyonso, mpo ete mokili etondi na yauli mpo na bango.” Motema molai ya Mozalisi, “Mosambisi ya mabelé mobimba”, ekomaki na nsuka.—Genese 6:13; 18:25.
Noé azalaki kotambola elongo na Nzambe
4. (a) Ndenge nini Jéhovah azalaki kotalela Noé, mpe mpo na nini? (b) Atako boyengebene na Ye esengaki ete mokili mabe ebomama, ndenge nini Nzambe amonisaki bolingo na ye epai na Noé mpe libota na ye?
4 Noé akesenaki mpenza na bato ya ntango na ye. “Azwaki ngolu na miso na Jéhovah. . . . Noé azalaki moto na sembo mpe na boyengebene kati na bato na ntango na ye. Noé atambolaki na Nzambe elongo”. (Genese 6:8, 9) Mpo na nini tokoki koloba ete Noé azalaki kotambola elongo na Nzambe? Mpo azalaki kosala malamu: na ndakisa, asakolaki mpo na kolongisa boyengebene mpe atongaki masuwa mpo na kondima mpe botosi. Yango wana, atako Nzambe abomaki mokili ya kala, oyo ebebisamaki nyonso, “abatelaki Noé, mosakoli na boyengebene, na bamosusu nsambo wana eyeisi ye mpela na mokili likoló na batioli”. (2 Petelo 2:5) Te, Jéhovah, Nzambe na biso ya boyengebene mpe atondi na bolingo, abomaki te moyengebene elongo na moto mabe. Atindaki Noé ete atonga masuwa monene mpo na kobikisa bomoi na ye, oyo ya libota na ye mpe oyo ya mwa ndambo na banyama, nyonso wana mpo na kotondisa lisusu mokili nsima na mpela. Mpe elobami mpo na Noé ete: “Noé asalaki bobele bongo.”—Genese 6:22.
5. Ndenge nini Makomami mazali komonisa boyengebene mpe kondima ya Noé?
5 Ntango masuwa esilaki, Nzambe alobaki na Noé: “Kota na masuwa na libota na yo nyonso elongo, mpo ete namoni ete ozali moyengebene liboso na ngai kati na bato oyo.” Paulo azali koyebisa makambo yango na maloba oyo: “Mpo na kondima, Noé akebisami mpo na makambo mamonani naino te, mpe abangi Nzambe atongi masuwa mpo na kobikisa libota na ye. Na nzela yango, asambisi mokili mpe akomi mosangoli na libula na boyengebene bokoya na nzela na kondima.”—Genese 7:1; Baebele 11:7.
6. Ndenge nini, na nzela ya kondima na ye, Noé akweisaki mokili oyo kati na yango azalaki kofanda?
6 Kondima ya Noé emonanaki polele. Azalaki kondima makambo nyonso oyo Nzambe azalaki koloba na ye: ete alingaki kolimwisa bato nyonso ya ntango wana. Noé azalaki na nsomo ya lobiko mpo ete ayinama na Jéhovah te mpe atosaki ye na kotongaka masuwa na boyokani na mitinda oyo azwaki. Lisusu, mosakoli wana ya boyengebene alobaki epai na baninga na ye mpo na kobomama oyo ebelemaki mpe esengelaki koya likoló na mokili. Ya solo, bayokaki ye te; atako bongo, Noé aboyaki kolanda bizaleli ya bato ya ntango wana. (Baloma 12:2) Na nzela ya kondima na ye, Noé akweisaki mokili mabe mpe amonisaki ete mokili yango ebongaki ete ebomama. Botosi na ye mpe misala na ye ya boyengebene emonisaki ete bato mosusu bakokaki bongo kobika lokola ye mpe libota na ye soki bazalaki na bolingo ya kobongola lolenge ya bomoi na bango. Ee, Noé amonisaki ete atako bopusi ya nzoto na bango oyo ezangi kokoka, ya mokili mabe oyo ezingaki bango mpe ya Diable, likoki ezalaki epai na bato na kozala na bomoi moko oyo ezali kosepelisa Nzambe.
Mpo na nini Nzambe akoboma biloko mabe ya ntango oyo
7. Ndenge nini toyebi ete tozali kobika na mikolo ya nsuka?
7 Na eleko nyonso ya mibu zomi ya ekeke ya ntuku mibale mokili ezali se kozinda lisusu makasi koleka kati na mabe, mingimingi uta ebandeli na Etumba na Liboso ya mokili mobimba. Pite, koboma bato, mobulu, bitumba, koyinana, lokoso mpe lolenge mabe ya kosalela makila esili mpenza kokola na boye ete bato oyo balingi makambo ya sembo bakomi komituna soki makambo makoki kobeba lisusu koleka. Nzokande, Biblia esakolaki mabe mingi oyo libota na biso ezali komona, kopesaka bongo elembo mosusu ete tozali kobika “na mikolo na nsuka”.—2 Timote 3:1-5; Matai 24:34.
8. Bato mosusu balobi nini na ntina na lisumu?
8 Na eleko na biso, ntalo monene na bato bayebi mpenza te eloko nini babengi lisumu. Ekoki sikawa mibu koleka 40, pape Pie XII alobaki boye: “Lisumu ya ekeke oyo ezali kobunga ya ndimbola ya lisumu.” Libota ya ntango oyo ezali koboya kondima likanisi ya lisumu mpe ya kokumba ngambo. Kati na mokanda na ye Lisumu ekomi nini? (Angl.), Karl Menninger akomaki: “Liloba ‘lisumu’ yango moko . . . mpo na koloba malamu esili kolimwa-liloba, mpe ndimbola. Mpo na nini? Mpo ete ata moto moko azali kosala lisumu te?” Bato mingi basili kobungisa likoki ya koyeba malamu mpe mabe. Kasi yango ekamwisi biso te, mpamba te Yesu asakolaki ezalela yango ntango apesaki ‘bilembo ya kozonga na ye’ oyo esengelaki komonisa “mikolo na nsuka”.—Matai 24:3; Danyele 12:4.
Lisambisi oyo esalamaki na mikolo ya Noé: ezali ndakisa
9. Kokokana nini Yesu amonisaki kati na eleko ya Noé mpe makambo oyo masengelaki kobima na ntango ya bozongi na Ye?
9 Yesu amonisaki kokokana kati na makambo oyo masalamaki na mikolo ya Noé mpe makambo oyo masengelaki kosalema kobanda 1914, na boumeli ya bozongi na Ye kati na nguya ya Bokonzi. Alobaki: “Mpo ete lokola ezalaki mikolo na Noa, koya na Mwana na moto ekozala bongo. Mpo ete na mikolo yango liboso na mpela monene, bazalaki kolia mpe komela, kobala mpe kobalisa, kino mokolo eingelaki Noa na masuwa; bayebaki likambo te kino eyaki mpela mpe elongolaki bango nyonso. Koya na Mwana na moto ekozala mpe bongo.”—Matai 24:37-39.
10. Ndenge nini ntalo monene na bato bazali komonisa ete bazali koyeba te makambo ya ntina oyo makangisami na bozongi na Klisto?
10 Ya solo, lokola na mikolo na Noé, na eleko na biso bato bazali koyeba eloko moko te. Lokola bamipesi mingi na misala na bango ya mokolo na mokolo mpe na mikano na bango ya moimi, bazali koboya kondima ete makambo oyo mazali komonana lelo makeseni mosika na oyo mazalaki kala mpe makokani mpenzampenza na oyo, engebene Yesu, masengelaki komonisa ntango ya nsuka. Eleki bambula mingi, ba Témoins de Jéhovah bazali koyebisa na libota ya lelo ete kozonga na Yesu lokola Mokonzi Masiya kati na likoló ebandaki na 1914 mpe ekutani na “nsuka na biloko mabe na ntango oyo”. (Matai 24:3) Bato mingi bazali koseka nsango ya Bokonzi, kasi ata koseka wana esilaki mpe kosakolama. Na yango, ntoma Petelo akomaki ete: “Boyeba mpe oyo liboso ete na mikolo na nsuka baseki bakoya mpe bakoseka, bakotambola pelamoko na mposa mabe na bango mpenza, bakoloba ete, Wapi elaka na koya na ye? ‘Mpamba te longwa na ntango na kufa na bankoko, makambo nyonso maumeli bobele bongo lokola ezalaki yango na ebandeli na kozalisama.”’—2 Petelo 3:3, 4.
11. Mpo na nini libota ya sikawa ekolimbisama ata moke te ntango bolozi monene ekobanda?
11 Nzokande, bato ya libota oyo bakolimbisama ata moke te ntango bolozi monene ekobanda. Mpo na ntina nini? Mpo ete masolo ya Biblia mazali koyebisa kokokisama na bikateli ya kala na Nzambe oyo ezali bongo elembo to ndakisa na likambo oyo Nzambe akosala na eleko na biso. (Yuda 5-7) Bisakweli na Biblia oyo bizali kokokana sikawa na miso na bango bizali komonisa soki tokomi wapi kati na ntango. Libota oyo ezali komona mosala ya kosakola oyo ba Témoins de Jéhovah bazali kokokisa mpe bosembo oyo bazali kobatela na makambo nyonso, lokola Noé.
12. Kokokana nini Petelo amonisaki kati na kobomama ya mokili na ntango na Noé mpe na oyo ekokweila “makoló mpe mabelé ya lelo”?
12 Petelo azali kolimbola likambo oyo ekokomela bato oyo bazali kotia likebi te na makambo yango. Lokola Yesu, ntoma akundoli makambo oyo malekaki na mikolo ya Noé. Akomi: “Mpo ete balingi kobosana ete likoló ezalaki kalakala mpe nse ebimaki na mai, etelemi na mai mpo na liloba na Nzambe. Mpe mpo na mai yango, mokili na ntango yango ezindaki mpe ebomamaki. Mpo na liloba na ye, likoló mpe nse na ntango oyo ebombami ete ezika; ezali kobatelama kino mokolo na kosambisa mpe na koboma bato bakotiolaka Nzambe.”—2 Petelo 3:5-7.
13. Mpo na makambo minene oyo mazali liboso, toli nini ya Petelo tosengeli kolanda?
13 Lokola kokokisama na ekateli yango ya Nzambe ezali solo mpe ebelemi, tomitika kokosama te to kolongama te na baseki. Eloko moko te ekotinda biso na makasi mpo na kokabola mpasi na bango. Petelo apesi toli oyo: “Na bongo, awa ezali biloko nyonso mpo na konangwa, ebongi na bino kozala bato boni na bizaleli na bulee mpe na kosambela Nzambe, kotalela mpe koyeisa noki emononeli na mokolo na Nkolo? Mpo na yango likoló ekozika móto, ekonangwa mpe biloko na likoló bikonangwa mpo na móto makasi. Nde tozali kotalela likoló na sika mpe nse na sika, pelamoko elakaki ye; boyengebene ekofanda kati na yango.”—2 Petelo 3:11-13.
Mpo na kobika, tomekola kondima ya Noé
14. Mituna nini mikoki kosalisa biso na komitalela malamumalamu?
14 Na mikolo na biso, esengeli na biso kolonga mikakatano ya motindo moko na Noé mpe libota na ye mpo na kozwa mpe kobatela libaku ya kobika. Lokola Noé, ba Témoins de Jéhovah bazali kokweisa mokili na nzela na kondima na bango oyo bazali kolendisa yango na bizaleli na bango kitoko. Kasi moko na moko kati na biso akoki komituna mituna oyo: ‘Ezalela na ngai moko ezali nini? Soki bolozi monene ebandi lobi, Nzambe akondima ngai mpo ete nabika? Lokola Noé, ye oyo “azalaki moto na sembo mpe na boyengebene kati na bato na ntango na ye”, nazali na molende ya kozala na bizaleli bikeseni na bato ya mokili? To mbala mosusu ezali nkaka mpo na kosala likeseni kati na moto moko ya mokili mpe ngai mpo na bizaleli na ngai, elobeli na ngai to elateli na ngai? (Genese 6:9) Yesu alobaki na ntina na bayekoli na ye: “Bazali bato na mokili te pelamoko ngai nazali moto na mokili te.”—Yoane 17:16; tala 1 Yoane 4:4-6.
15. (a) Engebene 1 Petelo 4:3, 4, ndenge nini tosengeli kotalela elimo mpe etamboli ya mokili oyo tozalaki na yango kala? (b) Likambo nini tosengeli kosala soki baninga na biso oyo tozalaki na bango kala kati na mokili babandi koloba mabe na ntina na biso?
15 Petelo apesi toli oyo: “Mpo ete ntango esili koleka mpo na kosala mokano na bapakano. Na ntango yango botambolaki na mobulu mpe na mposa mabe, komelaka vinyo mpe kozala na lokoso mpe na molangwa mpe na kosambela bikeko. Bakokamwaka na likambo oyo ete bino bozali lisusu kotambolana na bango na motindo moko na litondi na lofundo te mpe bakotukaka bino.” (1 Petelo 4:3, 4) Baninga oyo ozalaki na bango kala kati na mokili bazali mbala mosusu koloba mabe mpo na yo mpamba te ozali kotambola elongo na Nzambe mpe ozali kotambola lisusu elongo na bango te mpo na kosala mabe. Kasi, na ndakisa ya Noé, okoki kokweisa bango na nzela ya kondima na yo mpe ya misala malamu na yo oyo misalemi na bopolo.—Mika 6:8.
16. Ndenge nini Nzambe azalaki kotalela Noé, mpe mituna nini mikoki kosalisa biso na kotalela makanisi na biso mpe etamboli na biso?
16 Nzambe atalelaki Noé lokola moyengebene. Nkoko wana ya mabota “azwaki ngolu na Jéhovah”. (Genese 6:8) Ntango ozali kotalela makanisi na yo mpe etamboli na yo na lisalisi ya mitinda na Nzambe, ozali na liyoki ete andimaka makambo oyo yo osalaka? Na ndakisa kanisa na bisika oyo okendaka. Mbala mosusu osanganaka na masano ya mbindo oyo mapalangani mingi sikawa? Liloba na Nzambe elobi ete tosengeli kokanisa ntango nyonso makambo mazali peto, bulee mpe oyo makoki kolendisa biso. (Bafilipi 4:8) Oyekolaka na etingya Liloba na Nzambe mpo na ‘kolakisa bisoswelo na yo mpo na kokabola kati na malamu mpe mabe’? (Baebele 5:14) Okimaka baninga mabe mpe olingaka mingi kokende kokutana na basaleli mosusu ya Jéhovah na makita ya boklisto mpe na bisika mosusu?—1 Bakolinti 15:33; Baebele 10:24, 25; Yakobo 4:4.
17. Biso baoyo tozali ba Témoins de Jéhovah, ndenge nini tokoki kokokana na Noé?
17 Nsima na kolobela kotongama ya masuwa, Makomami malobi ete: “Noé asalaki bobele bongo, mpe asilisaki nyonso elakaki Nzambe ye.” (Genese 6:22) Mobali yango oyo azalaki moto na kobanga Nzambe amimonisaki mpe témoin de Jéhovah ya molende kati na mosala ya kosakola. Lokola Noé, okoki kozala molongisi na nguya ya makambo oyo mazali sembo na kozalaka ntango nyonso mosakoli ya boyengebene. Ata soki bato moke bazali koyoka, landa na molende nyonso kokebisa baninga na yo mpo na nsuka ya mokili mabe. Sala na bomoko elongo na baninga na yo baklisto, mpo ete mosala oyo etali kozalisa bayekoli ekokisama liboso ete nsuka eya.—Matai 28:19, 20.
18. Na makambo nini Jéhovah azali kokata sikawa soki nani asengeli kobika na bolozi monene?
18 Na nzela na mibeko ya sembo oyo atyaki mpo ete batosa yango na eleko ya Noé, Nzambe azali kokata sikawa mpo na koyeba nani asengeli kobika mpe nani asengeli kokufa na boumeli ya bolozi monene. Yesu akokanisaki mosala ya kokabola oyo ezali kosalema sikawa na oyo esalemi na mobateli na mpate oyo azali kokabola kati na bampate mpe bantaba. (Matai 25:31-46) Baoyo bazali kotonga bomoi na bango likoló na bisengo mpe mikano ya moimi bazali kolinga te ete mokili oyo ekufa. Bakobika te. Nzokande, baoyo bazali komibatela na mbindo ya mokili, baoyo bazali kobatela kondima makasi mpe baoyo bazali kokoba kosakola nsango ya Bokonzi mpe kosakola epai na baninga na bango kobelema ya ekateli na Jéhovah bakondimama epai na Nzambe mpe bakobika. Yesu alobaki: “Bato mibale bakozala na elanga; moko akokamatama, mpe mosusu akotikala.”—Matai 24:40, 41; 2 Batesalonike 1:6-9; Emoniseli 22:12-15.
Tozwa ebele na matomba penepene na Noé
19. Koyanganisama nini Yisaya mpe Mika basakolaki mpo na mikolo ya nsuka?
19 Kati na bisakweli oyo bizali mpe kolobela mikolo na nsuka, na kopemama na Nzambe Yisaya mpe Mika bango nyonso mibale bamonisaki makambo oyo masengelaki kobima na mikolo ya nsuka. Basakolaki makambo oyo tozali komona kokokana na yango lelo: ebele monene na bato oyo balingi bosembo mpenza bazali kobima kati na mokili oyo elingi kokufa mpe bazali komata na ngomba ya elilingi ya losambo na solo. Bazali kopesa libiangi oyo: “Yakani, tobuta na ngomba na Jéhovah, epai na ndako na Nzambe na Yakobo, ete alakisa biso nzela na ye mpe ete totambola na bipai bikokendaka ye.” (Yisaya 2:2, 3; Mika 4:1, 2) Otambolaka elongo moko na etuluku wana ya bato na esengo?
20. Bato oyo bazali kokweisa mokili mpo na kondima na bango bakozwa nini?
20 Yisaya mpe Mika balobelaki mpe matomba makozwama na bato oyo bazali kokweisa mokili na nzela na kondima na bango. Kimya mpe boyengebene ya solo ekozala mingi kati na bango, mpe bakoyekola lisusu etumba te. Bakozala na elikya ya solo ya kozwa libula na Jéhovah mpe bakofanda “moto na moto na nse na mowiti na ye”. Kasi moto nyonso asengeli kozwa ekateli ya nguya, mpamba te nzela mibale ezali kopesamela ye, lokola Mika amonisi yango na maloba oyo: “Mpo ete mabota nyonso bakotambola, moko na moko na nkombo na Nzambe na ye; nde biso tokotambola na nkombo na Jéhovah Nzambe na biso, libela na libela.”—Mika 4:3-5; Yisaya 2:4.
21. Ndenge nini okoki kozala moko na baoyo bakozwa lipamboli ya bomoi na seko awa na mabelé?
21 Makomami mazali komonisa polele ete mpo na kobika na bolozi monene esengeli kozala na kondima moko makasi. Noé azalaki na kondima motindo wana. Yango mpe ezali bongo mpo na yo? Soki ee, okokoma lokola ye “mosangoli na libula na boyengebene bokoya na nzela na kondima”. (Baebele 11:7) Noé abikaki ntango Nzambe abomaki bato na ntango na ye. Aumelaki bobele mibu 350 te nsima na mpela monene, kasi akosekwisama lisusu na elikya ya kofanda libela awa na mabelé. Oyo nde lipamboli kitoko boye! (Baebele 11:13-16) Yo mpe, okoki, kozwa lipamboli yango elongo na Noé, na libota na ye mpe na bamilió mosusu na bato oyo balingi boyengebene. Ndenge nini? Na koyikaka mpiko kino nsuka mpe na kokweisaka mokili mpo na kondima na yo.
Bozongeli
◻ Mpo na nini ezali likambo ya ntina mpo na baklisto ete batalela na penepene bomoi ya Noé?
◻ Likambo nini bato ya ntango na biso bazali koyeba te, oyo ekobendela bango kobomama?
◻ Na ndakisa ya Noé, ndenge nini tokoki kokweisa mokili?
◻ Ndenge nini tokoki, lokola Noé, kozala basakoli ya boyengebene?