Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/10 nk. 15-20
  • Batela kondima na yo mpe kolongono na yo ya elimo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batela kondima na yo mpe kolongono na yo ya elimo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Na meko nini mokili ezali na bokono?
  • Makama ya elimo kati na mokili oyo ezali na bokono
  • Makambo mauti libanda oyo mazali kopesa bokono na elimo
  • Tokemba ntango nyonso kati na kondima
  • Kolongono ya elimo ezali komema na bomoi ya seko
  • Kotalelama na Yehova​​​—Mpo na nini ezali na litomba?
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Tóbosanaka te oyo Biblia elobi ntango tozali koluka kosalisa nzoto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Olyaka malamu na elimo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Kolongono ya nzoto mpe bolamu​—olenge nini kozwa yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/10 nk. 15-20

Batela kondima na yo mpe kolongono na yo ya elimo

“Osimba lolenge na maloba sembo mayoki yo epai na ngai kati na kondima mpe na bolingo oyo ezali na Klisto Yesu.”​—2 TIMOTE 1:13.

1. Mpo na nini kolongono ya nzoto ezali likabo moko esengeli kobatelama?

KOLONGONO YA NZOTO ezali likabo moko ya motuya. Soki tozali na kolongono malamu ya nzoto, tokokoka kosala makambo mingi mpe kozwa litomba mingi na bomoi. Nzokande, ntango tozali kobela bokono moko oyo esilaka te to mbeba moko ya eteni ya nzoto, bomoi ekomaka mpasi mingi koleka. Ya solo, kolongono malamu ya nzoto esengaka ete ebatelama. Nzokande, bato mingi bazali kobebisa kolongono ya nzoto na bango to bazali komipesa na misala oyo mizali kopesa bango bokono. Epai mosusu, baoyo bazali komibatela mbala mingi bazalaka na kolongono malamu ya nzoto mpe na nguya oyo ekoki na boumeli ya eteni monene ya bomoi na bango.

2. (a) Mpo na nini kolongono ya elimo ezali na motuya mingi koleka oyo ya nzoto? (b) Eloko nini osengeli kosala mpo na kozala ntango nyonso na nguya kati na elimo?

2 Kolongono ya elimo ezali na ntina monene koleka kolongono ya mosuni. Nzokande, kolongono ya mosuni ekoki kopesa bomoi na seko te, oyo ezali likabo ya Nzambe. Kolongono malamu ya elimo ezwamaka na losambo ya peto mpe na kondima oyo etongami likoló na boyebi ya solo. (Yoane 17:3; Baebele 11:6; Yakobo 1:27) Yango wana ntoma Paulo alobaki: “Tika ete mibange mibali bazala bato na kokanga motema, bato na sembo na bozito, basembwi, bakembi mpo na kondima, na bolingo, na etingia.” (Tito 2:2) Moto nyonso oyo alingi kokemba kati na kondima asengeli kosala milende makasi mpe kosenzela ntango nyonso. Makama makoki koyela kolongono na biso ya elimo makoki kouta kati na biso to epai na bato mosusu. Esengeli na biso koyeba makama yango soki tolingi kobatela kondima na biso mpe kolongono na biso ya elimo kati na mokili ya bokono oyo ezingi biso.

Na meko nini mokili ezali na bokono?

3, 4. Bilembo nini ya bokono bizali komonana na bizaleli ya mokili mpe na etamboli ya bato?

3 Ntembe ezali te ete mokili ezali mpenza na bokono makasi na bizaleli na yango. Bokono oyo ekoki koboma ezwi “biteni” na yango nyonso: mangomba na yango, bibongiseli na yango ya politike, bibongiseli na yango ya mimbongo mpe masano na yango. Bobele bato moke nde bazali kotosa Nzambe mpe mibeko oyo ye apesaki mpo na bolamu ya bato. Nzokande, lokola emonisi yango Lisolo na bato, kokwea na bizaleli malamu ezali kobota ntango nyonso kobakisama ya bokono mpe mpasi. Oyo eleki lisusu mabe, ezali ete bato mingi bazali koboya kosala ata likambo nini mpo na kosilisa etamboli mabe, mpamba te bazali kolinga kosala misala mabe.

4 Ee, mokili ya lelo esili kobeba mpenza. Mingi bazali kobebisa bomoi na bango na komelaka masanga mingi to na kolangwaka drogue mpo na kozala na mayoki makasi to kokima mikakatano ya bomoi. Mobulu ezali bisika binso, bomoi ezali na ntina te, mpe baboloko etondi meke. Kati na mikili mingi, ndambo moko ya mabala mazali kosuka na kopanzana. Bana oyo basundolami bazali kokoma mobulu. Lokola pite ekomi mingi, SIDA mpe bokono mosusu oyo bozwamaka na nzela na kosangisa nzoto ezali kopalangana nokinoki.

5. Na maloba nini Yisaya amonisaki makambo oyo mazalaki kosalema kati na Yuda?

5 Nzambe akoki koyebisa epai na mokili oyo ezali na bokono maloba oyo apemisaki yango na Yisaya mpo ete ayebisa yango na libota na Yuda oyo ekomaki na botomboki: “E libota na masumu, bato bakumbi bozito na mabe, libota na basali masumu, bana baoyo bazali kokosa; batiki Jéhovah, batioli Oyo na Bulee na Yisraele, bazongisami nsima. Mpo na nini bokobetama naino? Bozali naino koleka kotomboka; motó mobimba etondi na maladi, motema mobimba na bolembu. Longwa na litambe na lokolo kino motó nguya malamu ezali te.”​—Yisaya 1:4-6.

6. Kati na Yuda ya kala, lokola na mikolo na biso lelo, ndenge nini libiangami na Jéhovah ezali koyokama?

6 Bato mingi kati na bafandi na Yuda bakangaki matoi na libiangi ya Jéhovah: babongwanaki te mpe ‘bayekolaki kosala malamu te’. (Yisaya 1:16-20) Mpo na yango, Yelusaleme ebomamaki mpe Bayuda bamemamaki na boombo na Babilone. Nzambe apambolaki mpe abatelaki bobele mwa ndambo na basangani ya libota na bokono oyo batikali sembo epai na ye. Ndenge moko mpe, na mikolo na biso, kati na mokili oyo ezali na bokono longwa na motó kino na matambe, bobele mwa ndambo balingi koyekola kosala malamu. Basaleli oyo na sembo na Jéhovah bazali kosala milende makasi mpo na kobatela kondima na bango mpe kolongono na bango ya elimo, mpe bazali kolikya kozwa kolongono malamu ya nzoto ya kokoka mpe bomoi ya seko kati na mokili ya sika oyo elakami na Nzambe.​—2 Petelo 3:13; Emoniseli 21:1-4.

Makama ya elimo kati na mokili oyo ezali na bokono

7. (a) Makama nini mazali liboso na kondima na biso mpe kolongono na biso ya elimo? (b) Biblia elobi nini mpo na likoki ya kolonga makama misato ya minene oyo mazali kokanela kobebisa kolongono na biso ya elimo.

7 Ezali mpasi mpo na kobatela kondima na yo mpe kolongono na yo ya elimo, mpamba te bokono oyo ezali kati na etamboli ya mokili ya lelo ezali mpenza kozwa bato mingi. Baklisto basengeli mpe kobunda na bolembu na bango ya kobotama. (Baloma 7:21-25) Lisusu, Satana, “nkolo ya mokili”, ayebi bolembu ya nzoto, mpe akomi na mayele mingi mpo na komeka bato. (Yoane 14:30; 1 Yoane 5:19) Makama misato ya minene mpo na kondima mpe kolongono ya elimo-nzoto, mokili, mpe Diable-ezali makasi. Kasi likoki ezali ya ‘kozala moto na mokili te’, wana ezali yo kofanda kati na yango. Likoki ezali ya ‘kolanda kotambola na elimo na Nzambe mpe kozanga koyoka ata mposa moko te ya nzoto’. Mpe na nzela na lisalisi ya Nzambe, tokoki “kotelema ngwi liboso na mayele mabe na Diable”. (Yoane 17:15, 16; Bagalatia 5:16; Baefese 6:11; 2 Bakolinti 2:11) Totala sikawa ndenge nini kolonga makama minene misato wana oyo mazali kotia bozito likoló na kondima na biso mpe kolongono na biso ya elimo.

8. Ndenge nini Yesu alobelaki nguya oyo ezali na kati na biso, oyo ebundisaka boyokani na biso na Jéhovah?

8 Nzoto na biso ya kozanga kokoka ezali na nguya oyo ekoki komema biso na kosala masumu mpe kokomisa biso na bokono kati na elimo. (Yakobo 1:14, 15) Nguya yango ezali kosala mosala kati na motema na biso ya elilingi. Na yango, Yesu alobaki: “Mpo ete na kati mpenza, kati na motema na moto, makanisi mabe makobimaka, ekobo, moibi, koboma, pite, bilulela, mabe, kokosa, mobulu, liso mabe, kotuka, lolendo, zoba, makambo mabe oyo nyonso makobimaka na kati mpe makopesaka moto mbindo.”​—Malako 7:21-23.

9. (a) Bamposa nini ekangisami na motema ya elilingi? (b) Engebene Masese 4:20-23, ndenge nini tokoki kobatela motema na biso?

9 Atako motema ezali liziba ya bamposa mabe, epai na bato na botosi ezali efandelo ya limemya mpo na Jéhovah mpe ya bolingo mpo na makambo oyo mazali sembo. (Matai 22:37; Baefese 4:20-24) Ezali mpo na makambo oyo tozali kokotisa kati na motema na biso nde malamu to mabe ekoleka. Na bongo Liloba na Nzambe ezali kopesa toli oyo: “Mwana na ngai, yokamela maloba na ngai; sembola matoi na yo epai na malako na ngai. Tika te ete malongwa na liboso na miso na yo, batela yango na kati na motema na yo. Mpamba te mazali bomoi epai na baoyo bakozwa yango mpe nkisi malamu mpo na nzoto nyonso na bango. Batela motema na yo na mpiko nyonso mpo ete makambo na bomoi makoutaka wana.”​—Masese 4:20-23.

10. Bolembu na biso ya mosuni ezali na bopusi nini likoló na mayoki na biso mpe bamposa na biso?

10 Bolembu na biso ya nzoto ezali na bopusi likoló ya mayoki na biso mpe bamposa na biso. Nani alemba naino te, akoma naino motema likoló te to azokisama naino te kati na motema? Tokobatela kolongono na biso na elimo bobele soki tosilisi nokinoki mposa wana ya mosuni. Lolendo mpe koluka makambo minene ekoki kozwa esika nokinoki kati na motema na biso. Lokoso mpe mposa makasi ya bisengo ekoki koyangela bomoi na biso mobimba. Epai mosusu, mposa ya kosangisa nzoto, atako ezali na esika na yango kati na bomoi na biso mpo na lolenge oyo Nzambe akelaki biso, ekoki kopengwisa biso mokemoke kozanga ete toyeba yango. Mpo na kopekisa bokono na elimo ya lolenge boye kokola kati na biso, esengeli na biso kolona mbuma ya elimo na Nzambe kati na bomoi na biso ya mokolo na mokolo, komimekisa na ‘koyina oyo ezali mabe’ mpe ‘kokangama na oyo ezali malamu’.​—Baloma 12:9; Bagalatia 5:22, 23.

Makambo mauti libanda oyo mazali kopesa bokono na elimo

11. (a) Elimo ya motindo nini na mokili mpe etamboli nini ya bato na mokili ezali kopalangana epai na bato mosusu? (b) Engebene Yesu, na likambo nini tosengeli kokeba mpo na oyo etali motema na biso?

11 Mbala mosusu maladi ya elimo ekoki kouta na makambo mauti na libanda. Tokoki kobebisama na bato oyo bazali bakufi kati na elimo. (Baefese 2:1-3) Soki tozali ntango nyonso penepene na bango, tokoki komekola makanisi na bango mpe ezaleli ya bomoi na bango. Likambo oyo eleki ntina mpo na bato ya mokili, ezali komata grade na mosala, kozwa mosolo, kozwa biloko ya kitoko oyo bizali kosalema mpe kozwa ntango malamu ya kopema. Nzokande, mposa ya biloko wana ezali mpenza kozwa moto nyonso, mpe ata bokutani moke elongo na mabe ekoki mpo na kokomisa biso bato na bolembu kati na elimo. Yesu apesaki likebisi oyo: “Keba na bino ete mitema na bino mikoma makasi mpo na kolunda te, soko na kolanga te, soko na bitungiseli na bomoi te. Bongo mokolo yango ebimela bino pwasa lokola motambo te. Mpo ete ekobimela bato nyonso bafandi na mikili nyonso.”​—Luka 21:34, 35.

12. Makanisi mabe mpe mateya ya lokuta ezali na likama nini mpo na kolongono ya elimo?

12 Makanisi mpe mateya mabe ya mokili makoki mpe kopesa biso bokono. Paulo apesaki likebisi oyo: “Mpo ete ntango ekoya wana ekoyokaka bato mateya na sembo te kasi, mpo na konyomitisa matoi na bango, bakoyanganisa balakisi kobila mposa na bango mpenza; bakopengwa longwa na koyoka makambo na solo, bakobongwa koyoka masese mpamba.” (2 Timote 4:3, 4) Mateya na lokuta makokani na mpota na mayina to gangrène. (2 Timote 2:16, 17) Ntango ezwi esika kati na enama moko, enama yango ekokufa, mpamba te makila, oyo esengeli mpo na bomoi, ezali kotambola lisusu kati na yango te.

13. Soki maladi ya elimo emonani lokola mpota na mayina to gangrène, eloko nini tosengeli kosala?

13 Mpota na mayina epalanganaka nokinoki. Mpo na kobikisa mobeli, monganga azali mbala mosusu na mokumba ya kokata eteni moko ya nzoto. Na bongo soki ntembe, koimaima to lipengwi ebandi kokotela yo kati na elimo, sala nokinoki “okata” yango mpe obwaka yango! (Tala Matai 5:29, 30) Senga lisalisi epai na bankulutu ya lisangá. Kokoma lokola bato oyo te ntoma Paulo alobaki ete bazalaki na ‘maladi kati na motó mpo na ntembe mpe kowelana na ntina na maloba’ mpamba te ‘bazalaki kosalela maloba na lobiko te’.​—1 Timote 6:3, 4.

14. Likambo nini bankulutu basengelaka kosala mbala mosusu malamu mpo na kobatela kolongono ya elimo ya lisangá?

14 Mpo na kobatela kolongono ya elimo ya lisangá, bankulutu basengeli “kolakisa mateya na sembo mpe kopamela baoyo bakotioka ntembe”. (Tito 1:9, 13, 16; 2:1) Mbala mosusu likoki ezali ya kosalisa bato yango kati na elimo. (2 Timote 2:23-26) Kasi tosengeli kosala nini soki bazali kopalanganisa mateya ya lokuta mpe baboyi kobongola motema? Esengeli kotia bango pembeni lokola bakotyaka pembeni bato oyo bazali na bokono bobe. Bakobimisama na lisangá, mpe tosengeli kokabwana na bango mpo tozwa te bokono na bango ya elimo.​—Baloma 16:17, 18; 1 Bakolinti 5:9-13; Tito 3:9-11.

15. Wapi miango mibale ya minene oyo misalelami na Satana mpo na kobebisa kolongono ya elimo ya basaleli na Nzambe?

15 Likama ya mỉsato mpo na kondima mpe kolongono ya elimo, ezali Diable. (Baefese 6:11, 12) Kino lelo, amekaki kolembisa kondima ya basaleli na Jéhovah na nzela na mỉnyoko: na ndakisa koboma, kobeta, kokanga mpe makaneli ya liwa. (Emoniseli 2:10) Lokola azali kolonga mpenza te mpo na kobebisa bosembo ya basaleli na Jéhovah na lolenge oyo, Satana azali kosalela bamposa ya mokili, oyo ye azali nzambe na yango, mpo na komeka kokweisa mwa ndambo.​—2 Bakolinti 4:4; 11:3, 14.

16. Makoki nini ya komibatela tozali na yango mpo na kotelema ngwi na makaneli mazali kouta na Diable mpo na kondima na biso mpe kolongono na biso ya elimo.

16 Ndenge nini tokoki kotelema ngwi liboso na matumoli ya Diable? Na kolataka molato nyonso ya etumba ya elimo na Nzambe. Esengeli na biso mpenzampenza ’kokamata nguba ya kondima, na nzela na yango tokokoka kozimisa mbanzi nyonso ya móto’ oyo Satana azali kobwakela biso. Tosengeli mpe kozongela kati na mabondeli na biso likanisi oyo Yesu ateyaki: “Mpe kendisa biso na komekama te, kasi bikisa biso na oyo mabe.” (Baefese 6:11-18; Matai 6:13) Soki tozali kobondela boye mpe soki tozali kosala na boyokani elongo na mabondeli na biso, tokokoka komizela ete Tata na biso ya likoló asalisa biso na kozimisa mbanzi nyonso ya móto ya Satana.

Tokemba ntango nyonso kati na kondima

17. Na meko nini ezali mpenza likambo ya ntina na kolia “bilei na ntango ekoki” mpe kosangana ntango nyonso na misala ya boklisto mpo na kobatela kolongono na yo ya elimo?

17 Mpo na kozala na kolongono malamu na nzoto, likambo eleki ntina ezali komibatela malamu. Ebongi mpe kolia biloko ya malamu, kosala ekzersise mpe kokeba na ezalela nyonso ya elimo na yo mpe ya nzoto na yo. Bibundeli oyo tozali na yango kati na nzoto mpo na kobundisa bokono ezalaka makasi kati na nzoto oyo ezali na kolongono malamu. Motindo moko mpe, kati na elimo, ezali malamu mpenza kolanda régime moko ya bilei oyo bipesami na Nzambe, kosepela na “bilei” kitoko oyo azali kopesa biso “na ntango ekoki” na nzela na “moombo na sembo mpe na mayele”. Wana ezali biso kobwaka bilei mabe ya mokili, esengeli na biso koyekola Biblia mpe mikanda na boklisto oyo mikolimbolaka Biblia, mpe koyangana mbala na mbala elongo na libota ya Nzambe. (Matai 24:45-47; Baebele 10:24, 25) Tozali mpe na mposa ya ekzersise, mpe ezali solo ete ekzersise ezali mingi mpamba te tozali na “mosala mingi kati na Nkolo”, elingi koloba kati na mosala ya kosakola mpe kati na misala misusu ya boklisto.​—1 Bakolinti 15:58.

18. Nini ezali “lolenge na maloba na sembo”, mpe mpo na nini tosengeli kobatela yango kati na motema na biso mpe na elimo na biso?

18 Mpo na kozala ntango nyonso na nguya kati na kondima, ntango nyonso zwa litomba na oyo Nzambe azali kopesa yo kati na elimo. Ezali yango nde Paulo ayebisaki Timote na maloba oyo: “Osimba lolenge na maloba sembo mayoki yo epai na ngai kati na kondima mpe na bolingo oyo ezali na Klisto Yesu. Obatela makambo na solo mazwi yo na elimo santu oyo efandi kati na biso.” (2 Timote 1:13, 14) Lokota nyonso to monoko ezali bongo na ndimbola mosusu ‘lolenge na maloba’. Ezali mpe bongo mpo na “lokota ya peto”, solo ya Biblia. Ezali ‘lolenge na maloba’ oyo motó na likambo ezali kolongisama ya Jéhovah na nzela na Bokonzi. (Sofoni 3:9) Ee, tosengeli kobatela lolenge oyo na maloba na sembo kati na motema na biso mpe elimo na biso soki tolingi kobatela kondima na biso mpe kolongono na biso ya elimo. Soki te, tokobungisa kati na makanisi na biso ntina na yango. Ezali yango nde ekomaki kati na lisangá ya Kolinti, oyo basangani na yango mosusu bazalaki na “bolembu” mpe na “bokono” mpamba te bazangaki mayele kati na elimo.​—1 Bakolinti 11:29-32.

19. (a) Likambo nini esengeli na yo kosala soki obeli maladi na elimo? (b) Bankulutu bakoki kosala nini ntango moto moko abeli maladi na elimo?

19 Likambo nini esengeli na yo kosala soki ozwi bokono kati na elimo? Ozali mpenza na mposa ya lisalisi oyo epesami na bolingo, mpe okoki kozwa yango, mpamba te Yakobo alobaki: “Moko na bino abeli malali? Tika ete abianga mikolo [bankulutu] na lingomba [lisangá], babondela mpo na ye, esili bango kopakwela ye mafuta na nkombo na Jéhovah.” (Yakobo 5:14) Ee, bianga bankulutu. Minganga wana ya elimo bazali na makoki ya kosalisa yo na koyeba ntina ya maladi na yo ya elimo. Kosalelaka mafuta mpo na kosilisa bokono, Liloba na Nzambe, bakopakola yo yango na boboto nyonso, kasi na molende, mpo na kokotisa yango kati na yo. Soki osalaki masumu, mpe obongoli motema, zala na elikya ete Jéhovah akolimbisa yo mpenza. (Nzembo 103:8-14) Osengeli komizela na likambo nini nsima wana bankulutu basilisi kosambela elongo na yo mpe mpo na yo? Yakobo ayanoli: “Libondeli na kondima ekobikisa mobeli, Jéhovah akotelemisa ye. Ata asali masumu, makolimbisama epai na ye.”​—Yakobo 5:15.

Kolongono ya elimo ezali komema na bomoi ya seko

20. (a) Toli nini collège central ya ekeke na liboso apesaki epai na baklisto mpo na kosalisa bango ete babatela kolongono na bango ya elimo? (b) Eloko nini ekosalisa biso wana ezali biso kozela mokili ya sika?

20 “Botikala malamu!” Ezali nde na maloba oyo collège central ya libota na Jéhovah basukisaki na ekeke ya liboso mokanda na bango oyo ezalaki kolobela ‘makambo ya ntina’ oyo masengisami na baklisto. Basengelaki “koboya biloko bipesameli bikeko, na makila, na banyama bakamolami, na ekobo”. (Misala 15:28, 29) Mibeko wana oyo ebongisamaki mpo na kopesa nzela na kongolono malamu ya elimo ezali na ntina kino lelo. Na kozelaka matomba oyo mokili ya sika ekomema, tokoki kobatela kondima na biso mpe kolongono na biso ya elimo na kolandaka kosakola na molende nsango malamu ya Bokonzi mpe kolongisa nkombo na Jéhovah kati na mokili oyo ezali na bokono. Soki tomipesi na mosala, tokolemba te mpo na kozela mokili na sika oyo esili kobelema. Na yango, ezali solo ete “elikya oyo ezilisami epesi motema mpasi, nde mposa oyo ekokisami ezali lokola nzete na bomoi”.​—Masese 13:12.

21. Matomba nini mabongisami mpo na bato oyo bazali kobatela kondima na bango mpe kolongono na bango ya elimo kati na mokili oyo ya bokono?

21 Kozanga te matomba kitoko oyo Jéhovah abombeli baoyo nyonso balingi ye. Ezali mpamba te ete ozali kosala nyonso mpo na kotelema ngwi na bopusi ya mokili, kobundisa bolembu na yo ya nzoto mpe kopengola mbanzi na moto ya Diable. Kati na mokili ya sika elakami na Jéhovah, okomona na miso na yo moko eleko oyo “mofandi moko akoloba te ete: ‘Ngai nazali na malali.’” (Yisaya 33:24) Ekozala bongo mpo na bibongiseli oyo Nzambe akamataki na nzela na mbeka ya lisiko na Yesu Klisto, oyo ‘akumbi malali na biso mpe amemi mpasi na biso’. (Matai 8:17; Yisaya 53:4) Okoki komela na “ebale ya mai na bomoi” ya elilingi mpe kolia mbuma na “nzete na bomoi” oyo nkasa na yango ezali mpo na “kobikisa mabota”. (Emoniseli 22:1, 2) Bomoi ezangi nsuka kati na kokoka mpe na bomengo, yango nde ekozala mbano oyo okozwa mpo obatelaki kondima na yo mpe kolongono na yo ya elimo kati na mokili oyo ezali na bokono.

Bozongeli

◻ Mpo na nini ezali likambo ya ntina na kozala makasi kati na kondima koleka kozala na kolongono malamu na nzoto?

◻ Wapi makama misato ya minene oyo mazali kokanela kondima na biso mpe kolongono na biso ya elimo?

◻ Boyokani nini ezali kati na kolongono malamu ya elimo mpe motema ya elilingi?

◻ Ntango moto azali na bokono kati na elimo asengeli kosala nini?

[Bililingi na lokasa 16]

Ata kati na mokili oyo ya bokono, likoki ezali ya kozala na kondima makasi mpe kozala na kolongono malamu na elimo.

[Bililingi na lokasa 18]

Mpo na kozala na kolongono malamu ya elimo, esengeli kosangana na molende kati na misala ya boklisto mpe kolia ntango nyonso bilei ya elimo oyo bipesami na ntango ekoki.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto