Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/10 nk. 22-26
  • Tokoki ntango nyonso kosala eloko mpo na Jéhovah

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tokoki ntango nyonso kosala eloko mpo na Jéhovah
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Etelemelo ya kozanga kokota na makambo ya mokili
  • Boloko ekomaki: Teritware na ngai ya sika.
  • Kokima
  • Mokangami na Etumba
  • Solo esakolami na bato ya lolenge nyonso
  • Kobakisama ya mosala
  • Jéhovah: azali ndako molai
  • Nazwi mosala mosusu mpo na kosalela Jéhovah
  • Moto abikaka kaka na mampa te—Ndenge nabikaki na boloko na bakaa ya Banazi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Nazali kozela bokonzi oyo ezali “ya mokili oyo te”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Nazali kosala makasi mpo na komimonisa “Mosali oyo abongi koyoka nsɔni te”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Eloko moko te eleki solo na malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/10 nk. 22-26

Tokoki ntango nyonso kosala eloko mpo na Jéhovah

Lisolo ya Jean Queyroi

ELANGA ya mobu oyo 1939 ezalaki kitoko mingi. Zongozonga ya mboka Martigny, kati na région ya suisse du Valais, engengisamaki na nse na moi ya sanza ya août. Zongozonga na biso basonge mosusu molai na bangomba etombwanaki, lokola ngomba oyo babengi Grand Combin, nyonso ezipamaki na neige, oyo ezalaki na nivo ya 4314 mètres. Libota moko ya boklisto eyambaki ngai mpo na mwa mikolo mpe tozalaki kota- mbola mingi na ngomba. Namiyokaki lokola nakomaki na Paradis.

Mikolo milekaki nokinoki, ekomaki ntango ya kopesana mbote mpo na kokabwana na bayambi na ngai mpe kozonga na Paris. Nasombaki zulunalo mpo na kotanga kati na train; mbala moko nsango ya mabe ememaki ngai na komona makambo ndenge mazali. Ezalela ya mokili ebebaki makasi, etumba ebandaki.

Ntango nazongaki, nabandaki lisusu misala na ngai na Biro ya la Société Watch Tower na mboka Paris, epai nazalaki kosala uta mbula mobimba na ndambo. Mwa mikolo na nsima, babengisaki ngai na mosala ya soda. Esengelaki ete nakende komimonisa na bakonzi na basoda ya Vincennes, na est ya mboka Paris. Bomoi na ngai elingaki komekama.

Etelemelo ya kozanga kokota na makambo ya mokili

Le 3 Septembre 1939, mokili ya France mpe mokili ya Grande-Bretagne babandaki kobundisa mokili ya Allemagne. Namimonisaki na Vincennes, epai nazuaki ekateli mpo na ezalela ya boklisto ya kozanga kokota na makambo ya mokili. Nsima moke, soda moko elenge azuaki mokumba ya komema ngai na nzela ya motuka na Camp ya Charenton, kaka pembeni. Atako makelele ya motuka na ye, soda yango, oyo ayebaki ntina batindaki ngai na camp oyo, amekaki kobongola makanisi na ngai. Abondelaki ngai na maloba oyo: “Queyroi, kosala bongo te. Koboya kobunda te, soki te likambo yango ekozala mabe mpo na yo.” Nokinoki nayebisaki ye ete nazali kobanga eloko moko te.

Na yango nalekisaki butu na ngai ya liboso kati na cachot ya moke. Cachot yango ezalaki na molai ya 2 mètres mpe bonene ya 1,50 mètres. Na kati, ezalaki na mwa libaya oyo esalelamaki lokola mbeto, mpe bulangeti mibale. Mwinda ezalaki na kati te. Nakanisaki oyo nakokaki kosala mpo na Jéhovah na esika oyo nakomaki. Ntango nalamukaki, nayaki komona ete cachot na ngai ezalaki ata na lininisa te mpo na kokotisa moi. Nazalaki na lotomo ya kobima mpe kolekisa 15 minutes na libanda mpo na kosukola. Sergent moko asimbaki revolver na loboko, elongo na basoda mibale, mondoki na mapeka, bazalaki kokende kotika ngai kino na lavabo. Bazalaki kozwa ngai lokola moto mobulu menza.

Ezalaki basoda mosusu nde bazalaki komemela ngai bilei. Etelemelo na ngai ezalaki kokamwisa bango, yango nde ezalaki kopesa ngai libaku ya kosala likambo moko mpo na Jéhovah; nazalaki kopesa bango litatoli ekoki. Nokinoki, bamosusu kati na bango basepelaki na ngai mpe bapesaki ngai allumettes, ba bougies ata bilei mosusu. Liboso babotolaki Biblia na ngai, kasi, na lisalisi ya mokonzi moko, bazongiselaki ngai yango. Nasepelaki kotanga yango soki napelisi bougie.

Nsima ekomaki mokolo oyo bamemaki ngai na boloko ya basoda oyo ezali lisusu te lelo, ezalaki na rue du Cherche- Midi, na mboka Paris. Batiaki ngai na esika ya nkuku, kino ete nazuaki ntango mingi mpo na kokanisa mozindo mpo na ezalela na ngai.

Nazalaki na mibu 27 mpe esilaki koleka mbula mibale wana nazali kosalela Jéhovah lokola pionnnier. Libota na ngai eyokaki mbala ya liboso nsango ya ba Témoins de Jéhovah na nzela ya ba émissions ezalaki kopesama na Radio Vitus, station moko ezalaki na Paris kasi ya Leta te. Ezalaki na 1933. Nazuaki etelemelo mpo na solo na 1935, nsima ya kokokisa mosala na ngai ya soda oyo ezalaki kosengama na makasi. Nazuaki batisimo na 1936 na mboka Lucerne, na mokili ya Suisse.

Baboti na ngai, ndeko na ngai ya mobali, ndeko na ngai ya mwasi mpe ngai, tozalaki kati na basangani ya lisangaé bobele moko ya Paris. Ndeko Knecht, oyo azalaki kokamba mosala na France na ntango wana, alendisaki mingi bilenge batemwe basala mosala ya pionnier. Ezali mpo na yango, na Avril 1938, yaya na ngai, ndeko na ngai ya mwasi na ngai tozwaki likatami ya kokoma ba pionniers. Teritware oyo bapesaki biso ezalaki soko na 150 kilomètres na sud-est na Paris, na mboka Auxerre. Ndeko na ngai ya mwasi Jeannette azalaki kosakola na ville, wana ngai na ndeko na ngai ya mobali Marcel tozalaki kotambola na vélo bamboka oyo ezalaki zongozonga na 30 kilomètres. Na ntango wana, mosala ya kosakola etalelaki mingimingi kokabola mikanda oyo mizali kolimbola Biblia; tozalaki kosala ba vizites ya sika te. Nazali komikundola ete likambo oyo ezalaki kotungisa ngai mingi.

Na juin 1938, babengisaki ngai nakenda kosala na Biro ya la Société Watch Tower na Paris. Na ntango wana, basali, to libota ya Béthel, ezalaki bobele na basangani koleka zomi na mokili ya France. Natindamaki na mosala ya expédition. Ezali wana nde nazalaki kosala ntango nabengisamaki mpo na mosala ya soda, kozuaka bongo “teritware ya sika”.

Boloko ekomaki: Teritware na ngai ya sika.

Uta ntango nakotaki na boloko, nayebaki ete soki naluki te nzela ya kosala likambo moko mpo na Jéhovah, ata soki ekozala moke, kondima na ngai ekolemba noki. Kasi naumelaki te mpo na kobimisa mabaku ya kosolola mpo na solo oyo ezali kati na Liloba na Nzambe. Mwa bamposo nsima na kokoma na ngai na boloko ya Cherche-Midi, natindamaki kati na salle moko epai nakutaki bakangami mosusu. Nakutaki wana moyekoli moko ya droit, akangamaki mpo azongaki na camp na bango ya basoda nsima ya mikolo mingi oyo bapesaki ye, mpe séminariste moko ya katolike oyo akangamaki mpo na moyibi. Biso nyonso misato tosololaki mingi likoló ya Biblia.

Mokolo moko, wana nazalaki kotambola mpo na kozua mopepe na kati ya lopango na boloko, namonaki mokangami moko afandaki ye moko pembeni. Ntango nabelemaki esika azalaki, namonaki ete azalaki kotanga. Nasololisaki ye, mpe abalukaki, alakisaki ngai Biblia. Kanisa mwa moke! Azalaki Témoin de Jéhovah! Azalaki moto na Pologne mpe nkombo na ye ezalaki Ceglarski. Lokola ngai, akangamaki mpo na koboya kokota na makambo ya mokili. Nakutanaki na moninga moklisto! Bokoki kokanisa malamu esengo oyo toyokaki. Uta ntango yango, tobandaki kozwa ntango ya kolendisana.

Mikolo nyonso, tozalaki na ndingisa ya kotikala bangonga mingi kati na lopango ya boloko. Na bongo namilengelaki mpo na kosolola elongo na bakangami oyo bazalaki kosepela na nsango ya Biblia. Mbala mosusu, ata bakengeli bazalaki kokota na lisolo na biso. Nazuaki likambo moko ya kosala mpo na Jéhovah. Boloko ekomaki teritware na ngai ya sika mpo na kosakola mpe, nazalaki kokokisa bangonga ya pionnier, ata soki nakokaki kopesa rapport te. Kasi, likambo ya kopesa rapport ezalaki yango te nde ezalaki na motema na ngai.

Kokima

Basanza elekaki kozanga ete eloko moko esalema - ezalaki “etumba ya kosekisa”. Kasi kimya yango esukaki na Mai 1940, ntango ba Allemands babundisaki mokili ya France. Na Juin, lokola mapinga ya ba Allemands ezalaki se kopusana, bakonzi ya France balongolaki bakangami nyonso na baboloko ya mboka Paris. Bamatisaki biso na ba camions ya basoda oyo esengelaki komema biso na mboka Orléans, mboka oyo ezalaki na mosika koleka kilomètres nkama na sud ya mboka Paris. Nsima ya kotelema moke mpo na bopemi, bakangami nyonso, basivile mpe basoda, batiamaki esika moko mpe bazuaki etinda ya kotambola na makolo pembenipembeni ya ebale Loire na ngambo ya nord wana bazali kotala na sud-est. Basoda oyo bazalaki na mindoki bazalaki kokengela bakangami nyonso. Botamboli oyo na nse na moi makasi na Juin ezalaki mpasi mingi.

Kati na biso babomi bazalaki. Bakengeli bazuaki etinda ya koboma baoyo bakotelama, baoyo bakokweya soko baoyo bakokoka kotambola lisusu te. Mokolo na misato, ndeko Ceglarski alembaki mpo na moi makasi. Kotika ye, ezalaki ete bakoka koboma ye. Bakengeli bandimaki ete bakangami basalisa ngai na kozipa ye na bulangeti mpe komema ye. Mokolo elandaki, amiyokaki malamu mpe akokaki kotambola lisusu.

Liboso na kokoma na Briare, ville moke oyo ezalaki na loboko ya mobali ya ebale Loire, etuluku na biso ekutanaki na ebelé na bato oyo bazalaki na biloko mingi oyo batiaki likoló ya ba charettes. Bazalaki kokima mapinga ya ba Allemands na kolandaka na sud. Toyaki komona lolenge nini ebelé na bato bazalaki kokima mpo na kobikisa bomoi na bango.

Nsima toyaki koyeba ete bakengeli na biso nyonso bakimaki. Totikalaki biso moko. Na yango, tosengelaki kosala nini? Tokokaki te kokatisa ebale Loire mpo na kolanda nzela na biso na sud, mpo ebale yango ezalaki monene mpe ba ponts ebukamaki. Etuluku na biso ya moke (ndeko Ceglarski, bakangami mosusu mibale na ngai) tozuaki bongo ekateli ya kozonga na mboka Paris.

Tozuaki bampunda oyo bato batikaki. Lokola nazokaki na libolongo na lokolo ya mwasi mpe nakokaki te kongumba lokolo, baninga na ngai basalisaki ngai na komata na mpunda na ngai. Na bongo, tomonaki ete yango mpe ezalaki kotambola tengutengu! Tozalaki kotambola malembemalembe, mpo na mpunda na ngai oyo ezalaki kokoka kopota mbango te. Na bongo, mobembo na biso ekomaki mokuse na mbala moko. Bobele ntango tosalaki mwa bakilomètre tokutanaki na etuluku moko ya limpinga na Allemanye. Mokonzi moko na bagendarme akitisaki biso likoló na mpunda. Likambo bobele moko oyo tosalaki, ezalaki kolongwa na maboko ya bakengeli na biso ya liboso mpe kokoma na maboko ya bakengeli mosusu.

Mokangami na Etumba

Nsima mwa moke, frère Ceglarski mpe ngai tokabwanaki. Ye atikalaki mokangami ya ba Allemands kino na nsuka ya etumba. Nsima na mwa basanza oyo nasalaki na boloko ya Joigny, penepene na centre ya France, nakumbamaki na Stettin, libongo ya oyo ezalaka kala Prusse orientale, lelo ezali libongo ya Szczecin, na Polonye.

Lokola nazalaki na boloko ya bamilitere na France liboso ete ba Allemands bakanga ngai, bakumbaki ngai lisusu na camp moko ya bakangami na etumba, epai kuna monyokoli ezalaki mingi te lokola na camp ya concentration. Camp yango ezalaki bongo na hangar moko monene, epai ezalaki kolala bakangami 500 oyo babatelamaki na basinzili oyo bazalaki na mindoki. Bakangami bazalaki kosala na bako- mpanyi ya mboka na moi mpe bazalaki kozongisama na boloko na mpokwa. Lokola bato nyonso wana bazalaki mokolo mobimba na libanda, ndenge nini nakokaki komona mwa likambo ya kosala mpo na Jéhovah?

Kati na hangar, ezalaki na tablo moko ya monene mpo na kokoma makambo oyo masengeli mpo na kopesa nsango epai na bato. Nazwaki ndingisa ya kosalela mwa eteni moke ya tablo yango. Likoló na papier nalokotaki, oyo nazalaki kosembola yango mokemoke; nazalaki kokoma masolo mingi ya Biblia na mokuse. Na nse ya lokasa, nazalaki kokoma esika oyo nazalaki mpe ngonga oyo bato bazalaki kosepela na nsango ya Bokonzi na Nzambe bakokaki koya kokutana na ngai.

Solo esakolami na bato ya lolenge nyonso

Metode wana ebotaki mbuma malamu. Mosika te nabandaki mpokwa nyonso kokamba likita ya moke elongo na bato motoba, mwambe mpe mbala mosusu bato zomi. Masolo na biso mazalaki mbala mingi koumela ngonga moko to koleka, engebene mituna oyo mitunamaki. Sinzili moko ya Moalemand oyo azalaki koloba francais azalaki mpe koya mbala mosusu koyangana na biso elongo.

Lokola nazalaki bobele na Biblia moko, nakomelaki Croix-Rouge ya Genève kosengaka ete batindela ngai yango ebele. Nsima na mwa mikolo, nazwaki liboke na ngai ya liboso ya ba Biblia ya kala oyo basila kosalela yango. Mokolo moko, balobaki na ngai nakende na biro ya camp mpamba te mopaya moko, momonisi ya Croix-Rouge, azalaki kosenga ete asolola na ngai. Ezalaki bongo pasteur ya misioni oyo akanisaki ete nazalaki moko ya bandeko na ye ya lingomba. Alembaki mwa moke ntango ayokaki ete ngai nazali Témoin de Jéhovah!

Kasi atako bongo amonisaki motema mabe te mpe akumisaki ngai mpo na mosala oyo nazalaki kosala. Ayebisaki ngai ete nakoki kosenga ba Biblia mosusu mpe nakozwa yango. Ezalaki mpenza bongo. Nalongaki bongo kokabola penepene na ba Biblia 300 na boumeli nyonso ya bokangami na ngai kati na camp wana. Nsima na etumba, nazalaki na esengo ya koyoka ete moko na bakangami ya ba belge oyo napesaki ye litatoli na camp ya Stettin, mpe oyo nkombo na ye ezalaki Wattiaux, azwaki ekateli mpo na solo.

Na boumeli ya bokangami na ngai na Alemanye, nazwaki libaku ya kozwa maboke ya bilei oyo libota na ngai ezalaki kotinda. Nokinoki namonaki ete liboke nyonso ebandaki kozala mpe na bilei kitoko mingi ya elimo. Ndeko na ngai ya mwasi azalaki kobeta na masini likolo na papier ya petepete mpenza masolo ya Mosenzeli oyo azalaki kobomba kati na bapaké ya macaroni. Basinzili batikalaki komona yango ata mbala moko te. Kati na liboke moko, nazwaka nkutu ekzemplere moko ya mokanda Enfants, oyo mpenza esalisaki ngai mingi kati na mosala na ngai.

Kobakisama ya mosala

Lokola nazali mécanicien, na nsima nakomaki kosala na atelier moko ya kobongisa ba tracteurs. Ba allemands soko ntuku mibale bazalaki kosala kuna, mingi kati na bango bazalaki bato basili kolekisa mbula oyo esengami mpo na mosala ya militere. Nazalaki kosala makasi mpo na koyekola mwa moke lokota ya allemand, na ntina ete mosala na ngai ya kosakola esuka bobele te epai na bakangami oyo balobaka lokota ya français.

Atako bongo esengelaki na ngai kosala likebi, mpamba te bato na mosala ba allemands bazalaki kobanga kobimisa makanisi na bango liboso na bato nyonso. Nazalaki bongo kosolola na moko moko na bango. Mpo na koloba malamu, bayebaki Biblia mwa malamu, mpe bayebaki Ba Témoins de Jéhovah. Bamosusu bayebaki mpenza ete Batemwe mingi batindamaki kati na camp ya concentration.

Mokolo na mokolo nakómaki koleka na atelier mobimba mokolo mpo na koyebisa solo epai na baninga na ngai ya mosala. Bamosusu bazalaki kosepela na nsango, kasi motambwisi ya atelier te. Na ntembe te namimonisaki moto azangi makanisi mokolo oyo nakomaki na mpembe likoló ya mesa na ye ya mosala Jehovas Zeugen (Témoin de Jéhovah) mpo na koyebisa ye soki ngai nazali nani. Moto abangaki makasi mpe abomaki nokinoki makomi yango. Atako bongo, apesaki ngai etumbu te.

Na nsima, bato mosusu ya mosala bakomaki kosepela na ngai. Bazalaki kopesa ngai nkutu bilei mingi mpe na yango nakokaki kopesa bakangami mingi mosusu kati na camp.

Jéhovah: azali ndako molai

Na boumeli ya mibu, nayekolaki ete ata kati na mikakatano makasi koleka, likoki ezali ya kosala eloko mpo na Jéhovah mpe mpo na mozalani na yo. Babombe mingi ebwakamaki na Stettin mpe ezalaki mpenza kobebisa mboka. Ntango elembo ezalaki kopesama mpo na etumba, tozalaki kokende kobombama na mabulu milai oyo mazipamaki na mabaya mpe mabelé, kasi yango ezalaki libateli ya solo mpenza te. Bato ya boloko mingi bakufaki na mabulu yango. Ntango babombe ezalaki kobwakama, bato mingi bazalaki koya kokanga ngai na molili wana. Ntango babombe ezalaki kosila kobwakama, maboko mpe mazalaki kotika ngai, mpe nazalaki mpenza koyeba te soki nani azalaki kosimba ngai. Bato mosusu ya boloko bazalaki kokanisa ete, nazalaki kozwa libateli ya sipesiale mpamba te nazalaki koloba mpo na Nzambe.

Mokolo moko, na ntango avion ebwakaki babombe, camp na biso ezikaki nyonso. Lokola tozalaki kokima na babalabala ya engumba, tomonaki makambo mingi ya nsomo. Basivile bazikisamaki makasi mpenza na phosphore bazalaki komibwaka kati na mingala ya Older, ebale oyo ezali kokatisa engumba Stettin. Wana ekobima bango na mai, phosphore ezalaki kozongela mosala na yango. Bato mingi bakufaki motindo wana.

Lokola mampinga na ba russes mazalaki kobelema, tozwaki etinda ya kolongwa na Stettin mpe kokima na ouest, na Neubrandenburg, mpe na nsima tokimaki na Güstrow. Tomataki likoló na tracteur moko monene oyo ememaki biso na nzela oyo Basovietike bazalaki kobwaka babombe mbala mosusu. Nsuka na yango, ba chars ya Ba russes ekutaki biso na Güstrow. Bakomando ya mampinga na ba soviétike bakamataki engumba na boumeli ya mikolo mwambe. Mampinga na Angleterre mazalaki mpe mosika lisusu te. Na kozelaka bokutani ya mampinga ndenge na ndenge, bakonzi ya soviétike bakabolaki bakangami oyo bazalaki basoda mpe basivile. Batikalaki na mwa ndambo mpe bapesaki bamosusu, kati na bango ngai nazalaki, epai na ba Anglais.

Ndoto ekomaki na nsuka. Mwa bamposo na nsima, nakomaki na Gare ya Nord, na Paris. Mwa butu ezalaki naino. Tokomaki na katikati ya sanza ya mai ya mobu 1945. Nazongaki bongo na mboka nsima na kolekisa basanza 69 kati na boloko.

Nazwi mosala mosusu mpo na kosalela Jéhovah

Na 1946, la Société abengaki ngai mpo na koya kosala lisusu na Béthel, oyo ezalaki na Montmorency, pembeni ya Paris. Mwa basanza na nsima, frère Paul Dossman mpe ngai tozwaki mokumba ya kotala masanga ya France lokola bakengeli ya zongazonga. Na eleko wana, ezalaki bobele na ba Témoins 2 000 kati na mboka mobimba. Lelo oyo, koleka mibu 40 na nsima, basakoli bazali koleka 100 000.

Na nsima, nabiangamaki lisusu na Béthel, oyo sikawa ekomaki na quartier résidentiel moko ya Paris. Na 1949, lokola nalendisamaki na misionere mibale ya ba Anglais, namipesaki na koyekola Anglais - ezalaki petee te, nasengeli mpenza kondima yango. Mobu molandaki, nabiangamaki mpo na kokende kolanda mateya na kelasi ya Galaad, Eteyelo ya la Société Watchtower mpo na bamisionere.

Ntango nazongaki na France, nasalaki na boumeli ya mwa ntango moke kati na circonscription, mpe na nsima la Société asengaki ngai ete nakende lokola misionere na Afrike. Na kati wana, nabalaki Titica, mwasi moklisto moko ya mboka Grèce. Tofandaki mibu mitano na Sénégal, na boumeli na yango tozwaki libaku ya kopesa maboko na kosalama ya lisangá ya liboso ya Dakar. Bokono esengaki biso ete tozonga lisusu na France.

Sikawa, nakokisi mibu 52 kati na mosala na ngai ya pionnier mpe nazwaki esengo, na boumeli ya mibu nyonso wana, ya kosalisa bato koleka nkama na kozwa ekateli mpo na solo. Ya solo Jéhovah alembaki te na komimonisa motema malamu mpe ezaleli na bokabi epai na ngai. Kati na bomoi na ngai nayekoli ete, ata kati na ezalela nini moto akoki kozala, tokoki ntango nyonso kozwa libaku ya kosanzola mpe ya kokumisa Nzambe na biso, Jéhovah.

[Elilingi na lokasa 23]

Jean Queyroi mpe mwasi na ye, Titica.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto