Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/10 nk. 27-29
  • ‘Soki Jéhovah atongi ndako te . . .’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Soki Jéhovah atongi ndako te . . .’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kotonga ndako
  • Kotongama malamu ya libota
  • Formation oyo ebongi
  • Bopesa nzela na bomoko ya libota
  • Lolenge ya kozala na libota oyo ezali makasi na elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Bómema mokumba na bino ya kobatela libota
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Baklisto basalaka makambo na bomoko kati na libota
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mabota minene esangani na mosala ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/10 nk. 27-29

‘Soki Jéhovah atongi ndako te . . .’

EZALA esika nini ozali kofanda, ezali na esika moko oyo omiyokaka mpenza ete ozali epai na yo. Mitindo ya bandako mpe etongeli ezali kokesena makasi mpenza. Ezali na bandako ya mabelé mpe ya matiti, bandako ya banzete, bandako ya béton oyo ebongisami na nse mpo na kopika yango na nsima-liste ezali mpenza molai. Bamosusu bazali kosepela na bandako na bango ya matiti, nzokande bamosusu bazali koyoka esengo kati na bandako oyo etongami na sima mpe bibende. Mpo na nini?

Mayoki ya moto, bosepeli, ezali kotalela mingimingi na boninga oyo tozali na yango. (Masese 18:24) Atako biloko nyonso ya motuya mpe bamposa ya mokili, ndako ezali esika oyo moto asepelaka kokende na bolingo na ye moko mpo na kozwa kimya mpe elendiseli. Nzokande, soki totaleli barapor mosusu oyo etali bomoi ya libota, kimya mpe elendiseli ezali mpenza komonana te kati na ndako. Kati na makambo mingi, baoyo bazali kofanda na biso-basangani ya libota na biso-bakoki to koyeisa kimya, to kobebisa yango. Na bongo nini ezali sekele mpo na “kotonga” libota moko ya esengo mpe ya kimya?

Kotonga ndako

Nzembo 127:1 elobi boye: “Soki ezali Jéhovah te oyo akotongaka ndako, basali bakosala wana bobele mpamba.” Baoyo bazali kosangana na mosala ya kotonga bandako oyo epesami na losambo ya Nzambe na solo, Jéhovah, bazali komona bosolo ya maloba oyo. Atako bato bayebi mpenza mosala bazali kopesa na bolingo nyonso ngonga na bango mpe nguya na bango mpo na botongi ya nokinoki ya ba Salles du Royaume kitoko, ezali lipamboli na Jéhovah nde ezali kolongisa misala yango. Ata bato oyo bazali wana mpo na kotala bazali komona ete likambo moko ya kokamwa ezali koleka. Na ndakisa, zulunalo moko oyo elobaki na ntina na botongi ya lolenge yango na Colchester, na Angleterre, ekomaki na bonene: “Jéhovah asali likamwisi.”

Nzokande, esengeli ete lipamboli na Jéhovah ezala mpo na kolonga na milende oyo tozali kosala na botongi ya motindo mosusu. Talela maloba na Salomo na verset ya misato ya Nzembo 127: “Bana bazali likabo na Jéhovah, mpe mbuma na libumu ezali libonza.” Lisusu, Jéhovah azali Motongi ya mabota oyo aleki monene, mpe baboti bazali na libaku kitoko ya kozala baninga na ye ya mosala, to basalani elongo na yea. (Baebele 11:10) Ndenge nini baboti baklisto bakoki kozwa litomba na boyokani wana oyo eleki nyonso mpe “kotonga” na bolongi libota moko ya esengo mpe ya kimya oyo ekopesa lokumu epai na Mozalisi, Jéhovah Nzambe?

Kotongama malamu ya libota

Mpo na kolonga na botongi ya ndako, esengeli kozala na plan ebongisami malamu. Mpo na “kotonga” bilenge oyo bazali kokumisa Nzambe, ezali na plan mosusu ya kitoko te koleka Liloba na ye epemami, Biblia. (2 Timoté 3:16, 17) Salomo akomaki: “Bólóla mwana na nzela ekoki na ye kotambola; ekokómá ye monene akopengwa na yango te”. (Masese 22:6) “Nzela ekoki” ezali nzela na Jéhovah, mpe ntango baboti bazali kolanda yango, bazali kopesa epai na bana na bango elikya ya kokómá basaleli na sembo ya Nzambe.

Mpo ete ndako ezala kitoko, esengeli kosalela bitongeli ya malamu. Moto moko autaki na Afrike mpe akendaki mobembo na Mpoto, azalaki kondima te ete bandako oyo azalaki komona, esilaki kotongama uta bankama na bambula. Akamwaki mingi mpo na makasi ya bitongeli bisalelamaki mpo na botongi yango. Epai mosusu, ntango batongi bazali kobimisa bobele mosolo moke mpo na kosomba bitongeli, mbala mingi matomba mazali komonisa makama minene, to mpe ya liwa. Yango mpe ekoki kozala bongo mpo na likambo etali koteya bana.

Na ntango zemi ezali kobanda, bana bazali kozwa bizaleli oyo bimonisami na kozanga kokoka oyo euti na lisumu. (Nzembo 51:5) Elingi koloba, bazali bato na kozanga kokoka uta ebandeli na bango. Baboti baklisto basengeli kobunda na mbeba yango na komipesaka na “kotonga” epai na bana na bango bizaleli ya makasi, ya Nzambe. (1 Bakolinti 3:10-15) Soki baboti basali bongo te, basali bobele nyonso esengeli na bango na makambo mosusu, lokola kopesa epai na bana na bango bilei, bilamba mpe esika kitoko ya kolala, milende na bango mpo na “kotonga” mikozala mpamba.

Yango wana Nzambe azali kopesa toli oyo epai na baboti, mingimingi epai na batata: “Bobokola bango [bana] na mateyo mpe na mpamela ya Jéhovah.” (Baefese 6:4) Disipline mpe mpamela na Jéhovah esengaka baplans ya malamu mpe bitongeli malamu mpo na kotonga. Soki bosaleli yango ekobota matomba ya seko kati na libota mobimba.

Formation oyo ebongi

Na botongi nyonso, mikakatano mizangaka te, ata soki ba baplans ya malamu ezali. Motindo moko, baboti basengeli koyekola kopengola mikakatano oyo mikoki kobima na bomoi ya mokolo na mokolo mpe komibongisa na kosilisa yango. Bakosala ndenge nini?

Boyokani malamu kati na babalani mibale ezali mpenza likambo ya liboso. Ntango tata mpe mama bazali kotalela elongo kati na libondeli bokoli ya bana na bango, bakomona bisika nini bakoki kokumisa bango, mpe na bisika nini basengeli kolanda “kotonga”. Soki bolembu motindo wana emonani, baboti bakoki kosala na bomoko mpe kozwa bikateli oyo bibongi mpo na kosilisa yango.

Kasi mbala mosusu bozali na libótá monene, mpe bozali komituna: ‘Ndenge nini tokoki kokokisa milende na biso na bamposa ya mwana moko na moko?’ Mpo na nini te kopesa bango formation oyo ebongi mpo ete basalisana? Na boumeli ya mibu bato ya sika bayekolaka mpo na koyeba malamu mosala epai na bato oyo basala kala. Na ntango ya boyekoli na libótá, mbala mosusu bokoki kosenga epai na bana na bino oyo basili kokólá na kolimbola mwa makambo mosusu epai na bana oyo ya mike. Ezaleli ya kolongobana, koyeba kopona baninga, koboya bizaleli mabe na kelasi, mpe bongo na bongo, ezali makambo oyo matali bana, baoyo bapusami na mbula lokola mpe baoyo bazali naino mike. Na kopesaka bango mikumba motindo wana, lokola bazali kokutana na mikakatano kati na bomoi, bokosalisa baoyo ya mikóló na kosalela bisoswelo na bango mpe na kokolisa makoki na bango ya koteya wana ekolanda bango kolakisa epai na baleki na bango makambo oyo basengeli koyeba. (Baebele 5:14) Likambo yango ezali na litomba mosusu ya kobatela elimo ya malamu na libota kati na bandeko basi mpe bandeko mibali.

Mbala mosusu bozali bobele na mwana moko. Na bongo bozali mpenza na mabaku mingi ya koyeba ye mpe ya komitia na esika na ye. Nzokande, bosengeli kobosana te ete bokoki kozala na likama ya kobebisa ye soki bozali kokokisela ye bamposa nyonso oyo ye azali na yango kati na motema. Bozali bato misato, boye te? Na bongo, bosalaka makambo esika moko. Yango ekosalisa mwana na bino na kosololaka elongo na bato mosusu mpe na kotia likebi na ye epai na bato ya libanda; na bongo akozala moto ya lolendo te.

Bopesa nzela na bomoko ya libota

Ya solo, esengeli, makambo mingi lisusu mpo na “kotonga” libota na esika ya kotambwisa bobele boyekoli ya Biblia mpe kopesa batoli mpe mpamela. Salomo alobaki: “Likambo lileki malamu ezali mpo na moto te, bobele ete alia mpe amela mpe azua esengo kati na mosala na ye.” (Mosakoli 2:24) Na ntembe te, libota na bino esepelaka na bilei ntango yango elambami malamu. Bomibongisaka mpo na kolia elongo? Ekoki kozala ete yango esalama ntango nyonso bongo te wana basangani mingi ya libota bazali na mosala, na kelasi, to epai mosusu. Nzokande, mingimingi, ezalaka na bolei moko kati na mokolo oyo bokoki kolia elongo. Nini ekoki kopesa nzela na esengo ya solo ntango libota nyonso ezali na mesa?

Tata moko oyo azali Témoin de Jéhovah, asalelaka libaku yango mpo na kobimisa motuna moko ya Biblia epai na bato banso mpe bazali kosolola mpo na yango. Ya solo, asenzelaka mpo na kopesa mpasi te epai na baoyo bayebi eyano te. Batemwe mosusu bazali koyebisa masolo ya mosala na kosakola. Na kotiaka likebi na makambo ya elimo, ngonga ya bilei ekokoma eleko moko ya kolendisa mpo na libota mobimba. (Tala Baloma 14:19) Ezali solo ete, na bisika mosusu ya mokili, bato bazali mpenza na momeseno ya koloba mingi te na ntango ya bolei. Nzokande, ezali malamu na kosala molende mpo na kobatela elimo ya bosepeli. Kati na Masese 15:17 ekomami ete: “Bilei na mwa ndunda na epai na bolingo eleki elambo na ngombe na mafuta wana koyinana ezali.”

Bileko ya kominanola mpe kopemisa moke nzoto ezali na esika na yango kati na libota ya boklisto. Baboti oyo bazali mayele bazali kosalela mabaku motindo wana mpo na “kotonga” libota moko ya teokaratike ya makasi mpe ya bomoko. Ndenge nini?

Atako ezali mpasi te mpo na kotika bilenge kobima mpe kosala makambo oyo masepelisi bango, ezali na likama mpo na kosala motindo wana. Na ndakisa, ekozala kozanga mayele na kopesa nzela ete bilenge bamipesa na lisano moko kino ebimisa makama minene, to mpe kino liwa. (1 Timote 4:8) Soki likoki emonani, bopona masano oyo ekosangisa libota mobi- mba. Tata akoki kotuna moto na moto likanisi na ye, mpe kosala likambo moko mpo na komibongisa.

Libota na bino ekoki kokolisa bolingo na yango? Bokoki kobianga basangani mosusu ya lisangá na kosepela na bino elongo moko? Kati na lisangá, mbala mingi mibange basepelaka komiyoka kati na libota, mingimingi soki basangani ya libota na bango bazali kofanda mosika to bazali baklisto te. (Yakobo 1:27) Kati na masangá mingi, ezali na mabota oyo mazali bobele na moboti moko. Na kotosaka lokola esengeli ebongiseli ya teokratike mpe bizaleli malamu ya boklisto, bankulutu bakisa mpe basakoli mosusu bakoki kopesa libateli ya elimo epai na mabota yango. (Yisaya 32:1) Bana mingi “bitike” na elimo basili kokoma bakambi malamu ya mabota mpo na bolingo ya solo oyo baklisto ya mikóló mpe bateli na elimo bamonisaki epai na bango.​—Nzembo 82:3.

“Kotonga” libota na boklisto ezali mokumba monene. Kasi na lisalisi ya Jéhovah, bokoya kondima ete, ya solo mpenza “bana bazali likabo na Jéhovah, mbuma na libumu ezali libonza”. (Nzembo 127:1, 3) Bana bakoki kozala liziba ya masanzoli, bobele mpo na baboti na bango baklisto te, kasi lisusu mpo na Mozalisi na bango, Jéhovah Nzambe.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koloba malamu, maloba na hébreu oyo mabongolami na “motongi” (verset 1) mpe “bana” (verset 3) nyonso mibale emonani ete euti na liloba oyo elimboli “kotonga”. Nzokande, na hébreu, liloba “ndako” elimboli to “esika na kofanda”, to “libota” moko. (2 Samwele 7:11, 16; Mika 1:5) Tokoki bongo kosala bokokani kati na botongi ndako mpe kotonga libota. Lipamboli na Jéhovah ezali na ntina kati na misala nyonso oyo mibale.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto