Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/10 nk. 30-31
  • Mituna na batangi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna na batangi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Masolo mosusu
  • Na ntina ya “nsuka”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Bantoma batuni elembo
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Tomisɛnzela na “ntango ya suka”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • “Bókɛngɛlaka”!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/10 nk. 30-31

Mituna na batangi

◼ Baklisto na ekeke ya liboso bandimaki ete nsuka na biloko mabe ekoya wana ezalaki bango na bomoi?

Na ekeke ya liboso, bayekoli na Yesu balingaki mingi ete nsuka ekoka koya. Ndenge tokomona yango, bamosusu kati na bango bandimisamaki ete nsuka ebelemaki. Lolenge na bango na kokanisa esengelaki kobongolama. Kasi, na mikolo na biso lokola na eleko na bango, ezali mpenza mabe te mpo na baklisto kondima na bosembo nyonso ete nsuka oyo esakolamaki ebelemi mpe kobatela mokolo na mokolo likanisi yango na motema.

Na koyanolaka na motuna oyo bayekoli batunaki ye mpo na “elembo” na kozonga [présence] na ye, Yesu apesaki bango likebisi oyo: “Boye bokengela mpo boyebi te mokolo Nkolo na bino akoya.” (Matai 24:3, 42) Bokengi oyo esengelaki kozala na bopusi likoló na bizaleli na bango, mpo ete Klisto abakisaki: “Bokeba na bino, ete mitema na bino mikoma makasi mpo na kolunda te, soko na kolangwa te, soko na mitungiseli na bomoi te, bongo mokolo yango ebimela bino pwasa (. . .). Bosenzela ntango nyonso, mpe bobondelaka ete bozala na makasi na kokima makambo oyo nyonso malingi koya, mpe kotelema liboso na Mwana na moto.”​—Luka 21:34-36.

Tokanga ntina ete Yesu apesaki batoli oyo bobele nsima ya kotanga makambo oyo makozala “elembo”. Na yango, bantoma balakamaki ete makambo mosusu masengelaki kokokisama liboso ete nsuka eya. Nzokande, mwa baposo na nsima, ntango Yesu asekwaki, batunaki ye motuna oyo: “Nkolo, okozongisela Yisraele bokonzi na ntango oyo?” Mpo na yango ayanaloki bango ete: “Ezali likambo na bino koyeba ntango soko bilaka bisili Tata kotia na bokonzi na ye moko te.”​—Misala 1:6, 7.

Na yango, bayekoli oyo bazalaki mingi penepene na Yesu balingaki mpenza ete nsuka eya noki kino babosanaki makambo oyo Yesu ayebisaki bango mwa mikolo liboso mpo na bilembo ya polele oyo bisengelaki kokokisama na boumeli na kozonga na ye ezangi komonana [présence], liboso ete nsuka eya.

Tozali kokuta elembo mosusu emonisi mposa na bango makasi ya komona ete nsuka eya kati na mikanda oyo ntoma Paulo atindelaki baklisto ya Tesaloniki. Pene na mobu 50, ntoma Paulo akomaki: “Bandeko, mpo na makambo na ntango mpe na bilaka, bozali na bosenga te ete nakomela bino. Zambi boyebi solo solo ete mokolo na Nkolo [Jéhovah] ekoya lokola moyibi kati na butu. Boye tika te ete tolala mpongi, pelamoko ekosalaka bamosusu, kasi tolamuka mpe [tobatela bokatikati na biso].” (1 Batesaloniki 5:1, 2, 6) Bamoko kati na baklisto oyo bapakolami na elimo bakanisaki ete maloba oyo malimbolaki ete kozonga na Yesu (mpe mokolo oyo Jéhovah akoboma bato mabe) elingaki kosalema bobele na ntanao wana.

Kasi ezalaki bongo te. Ntoma Paulo akomelaki bango lisusu kati na mokanda na ye ya mibale: “Bandeko, nazali kolomba bino mpo na kozonga na Nkolo na biso Yesu Klisto mpe koyangana na biso epai na ye, ete boningana kati na makanisi na bino te mpe ete bobanga te soko na ntina na [liloba epemami] soko na ntina na liloba [na monoko], soko na ntina na mokanda oyo emonani lokola ete euti na biso, mpo na kobanza ete mokolo na Nkolo esili koya. Tika te ete moto azimbisa bino na nzela nini, mpo ete mokolo yango ekoya te bobele ete kotomboka [lipengwi] eyei liboso mpe moto na lofundo amonisami.”​—2 Batesaloniki 2:1-3.

Maloba oyo malimbolaki te ete baklisto bakokaki kotalela na bopotu kozonga na Yesu mpe nsuka na biloko mabe. Wana bambula ezali koleka, likebisi na Yesu ekomaki ya nokinoki koleka: “Boye bokengela mpo ete boyebi te soko Nkolo na bino akoya mokolo nini.”

Lisusu, mbula mitano nsima na kokoma mokanda na ye ya mibale epai na Batesaloniki, ntoma Paulo akomaki: “Ezali ntango na kolongwa na mpongi, mpo ete kobika ebelemi na biso sasaipi, koleka na ntango wana tondimaki liboso. Butu eumeli ntango molai, ntongo elingi kotana. Boye tolongola misala na molili mpe tolata bibundeli na moi.” (Baloma 13:11, 12) Na nsuka ya mibu mitano mosusu, ntoma Paulo apesaki toli oyo na baklisto Baebele: “Zambi [bozali na mposa na koyika mpiko] ete bosala mokano na Nzambe mpe ete [nsima na kosala mokano na Nzambe, bozwa kokokisama na elaka.] Mpo ete naino ‘mwa ntango moke’, ‘Ye oyo azali koya akoya mpe akoumela te’.” (Baebele 10:36, 37) Lisusu, na verset 20 ya mokapo ya nsuka na Emoniseli, ntoma Yoane akomaki: “Motatoli na makambo oyo alobi ete: ‘Ee; nakoya noki.’ Amen! Nkolo Yesu, oya.”​—Emoniseli 22:20.

Ya solo, ezalaki mabe te ete moklisto oyo azalaki na bomoi na ekeke ya liboso akanisa ete nsuka ekokaki koya na ntango wana. Ata soki akokaki kokufa na aksida to na maladi liboso ete nsuka eya, akokaki kobatela na bomoi na ye likanisi ete mosala ya boklisto esengeli kosalema nokinoki mpamba te Yesu mpe Makomami mapemamaki na Nzambe mayebisaki yango.

Yango ezali lisusu solo koleka na mikolo na biso, lokola tokomi na mikolo na nsuka. Mpo na kozongela maloba ya ntoma Paulo, tokoki kowangana te ete ‘sikawa lobiko na biso ebelemi koleka na ntango oyo baklisto bakomaki bandimi mpe ata na ntango oyo biso moko tokomaki bandimi. Butu eumeli ntango molai; ntongo elingi mpenza kotana’.

Banda Etumba ya liboso na mokili mobimba, tomonaki ebele na matatoli na lisolo na bato oyo mazali komonisa ete tozali kobika na nsuka na biloko mabe na ntango oyo. Na esika ya kolukaluka koyeba ntango nini nsuka ekoya, tosengeli komipesa na kosakola nsango malamu, mosala oyo ekoki kobikisa biso, mpe bato mingi mosusu.​—1 Timote 4:16

Tozali na bantina mingi ya kokanisa ete mosala oyo na kosakola ekosuka na eleko na biso. Elingi koloba ete ekosuka liboso na nsuka ya sanza, nsuka ya mbula, na nsuka ya eleko ya mbula zomi to nsuka na ekeke? Moto moko ayebi yango te, mpo Yesu alobaki ete ‘ata baanzelu na makoló’ bayebaki yango te. (Matai 24:36) Nkutu, tozali na ntina ya koyeba yango te, wana tozali kolandela kokokisa mosala oyo Nkolo asengaki ete tomipesa mingi mpo na yango. Likambo na ntina, ezali ete mokano mpe mosala na Nzambe esalema mpe ete tosangana na yango na lolenge oyo tokoki mpenza. Ezali boye nde ‘tokokima makambo oyo nyonso malingi koya, mpe na kotelema liboso na Mwana na moto’.​—Luka 21:36.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto