Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/10 lok. 31
  • SIDA​—’Ebandeli ya ezalela ya sika’?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • SIDA​—’Ebandeli ya ezalela ya sika’?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/10 lok. 31

SIDA​—’Ebandeli ya ezalela ya sika’?

NSIMA na koyebisa ete engebene monganga moko “kosangisa nzoto bobele kati na babalani mibale” ezali mwango bobele moko ya kokima kozwa SIDA na nzela na kosangisa nzoto, mokomi na nsango moko ya mboka Kanada atunaki boye: “Ekoki kozala ete maladi oyo ya nsomo SIDA ezali ebandeli ya ezalela ya sika mpenza kati na libota na biso?” Mobali yango azalaki komituna mpe soki ezali “kokamwa” te ete libala kati na mwasi moko mpe mobali moko, oyo Biblia ezali koteya uta kala, “ezala lelo likambo ya bomoi to ya lobiko mpo na bato”. Kolobelaka mpe drogue, likaya, masanga, mpe likambo mosusu ya monene, bonsomi ya makambo etali kosangisa nzoto”, mokomi na nsango abakisi: “Sikawa tozali kofuta nyongo monene ya libota oyo etondi na mikanda oyo mizali kolakisa bolumbu ya bato, na mobulu mpe na etamboli mabe oyo biso moko tobimisi.”

Atako ezali malamu na kolikya ete bato babongola etamboli na bango mpe babatela bomoi na bango, bobangi ya liwa ya mbalakaka to mpe ya nsuka ya mokili ekokoka mpo na kobimisa “bizaleli ya sika mpenza”? Mpenza te. Elembo ezali ete atako minganga mpe balukiluki bapesi ebele na batoli, ntalo monene na bameli likaya mpe ya bameli masanga bazali se kobebisa kolongono na bango ya nzoto mpe bazali komibendela nokinoki nsuka na bango moko. Bato oyo basangisaka nzoto kati na mibali na mibali bandimisaki ete bakolanda kosangisa nzoto elongo na bato ebele ata soki bakozwa SIDA.​—Masese 10:21, 23.

Nini mpenza ekotia nsuka na etamboli mabe? Na ntembe te ezali kobanga mpe limemya ya solo ya Jéhovah, oyo bato bazali komonisa na kotosaka mibeko na ye mitali bizaleli malamu. “Ebandeli na boyebi ezali kotosa Jéhovah.” Mpe boyebi yango ezali kobota bwanya oyo “ekobikisa bomoi na ye oyo azui yango”.​—Masese 1:7; Mosakoli 7:12.

Ezali likambo na ntina ete nsima na komonisa ete bato bakoki kozwa SIDA na nzela ya kokotisa makila na nzoto, mokomi na zulunalo atunaki motuna oyo: “Ezali mpenza nsoni te nsima na kofinga ba Témoins de Jéhovah kozanga kolemba mpo bazali koboya makila . . . biso mpe toboya yango na nsima mpo na bantina oyo ekeseni mpenza?”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto