Nakopona mpenza Réveillez-vous!
Ezali makambo Frank Senge akomaki na Post-Courier, zulunalo moko ya Papouasie-Guinée. Na lisolo na ye ya poso na poso oyo ebimaki le 19 juillet 1988, ye alimbolaki boye:
Lokasa ya zulunalo [Réveillez-vous!] oyo ekomonisaka mitó na makambo elimboli ete ’masolo na yango mazali kotalela mosangani mokomoko kati na libota’.
Eyebisi biso lisusu ete: ’Ezali komonisa ndenge nini kotalela mikakatano ya ntango na biso’.
Ya solo. Na bokeseni na bazulunalo mosusu ya mangomba, Réveillez-vous! ezali kolimbola Nzambe na nzela na mikakatano mizali kotungisa biso kati na mokili. . . .
Bokoki kokanisa ete nazali kosala piblisité mpo na lingomba, (nazali [Témoin]) te, . . . kasi soki ezalaki mokumba na biso ya komonisa zulunalo oyo eleki malamu ebimisami mpo na libota, ngai nakopona mpenza Réveillez-vous!.
Tokanisi mpe ete, yo, okopona Réveillez-vous!. Niméro mokomoko ebimisami na ba exemplaires 11 250 000, na minoko 54.