Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 15/10 nk. 4-23
  • Elikya nini ezali mpo na bakufi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elikya nini ezali mpo na bakufi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • ‘Bakufi bazali na bomoi epai mosusu?’
  • Bakufi bakozonga lisusu na bomoi?
  • Ozali na molimo oyo ekufaka te?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Bomoi nsima ya liwa​—⁠Biblia elobaka nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Kondima na yo kati na lisekwa ezali mpenza makasi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Molimo
    Lamuká!—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 15/10 nk. 4-23

Elikya nini ezali mpo na bakufi?

BILENGE babalani mibale mpe mwana na bango ya moke bazalaki kokende na bopemi na ndelo ya mai oyo ezali na est ya Afrike du Sud. Baboti na elenge mwasl bazalaki liboso na bango kati na vuatire mosusu. Mbala moko, piné etobokaki. Wana bazalaki komilengela ete basanzé yango pene na nzela, motambwisi moko na molangwa ayaki kotuta bavuatire nyonso mibale. Baboti na elenge mwasi bakufaki bobele na esika wana. Mobali na ye akufaki nsima ya mwa mikolo. Ye, abukanaki mikwa misusu ya mipanzi mpe azokaki mingi. Bébé na ye azuaki mpasi na boongó mpe akomaki paralizé.

Oyo nde mpasi mpo na libota oyo! Ntango Carole-Anne, ndeko na elenge mwasi oyo, ayokaki nsango ya likambo oyo ndenge esalemaki, abulunganaki mingi. Makama lokola oyo mazali kosalama na bamboka nyonso. Baboti to baninga oyo bakufeli bazali mbala mingi komituna, na mawa nyonso: ‘Bakufi basili mpenza kokufa?’ To . . .

‘Bakufi bazali na bomoi epai mosusu?’

Mingimingi mangomba nyonso mazali koteya ete molimo ekufaka te. Na yango, basambeli na yango bandimi ete baoyo bazali kokufa bazali mpenza kokufa te, kasi bazali na bomoi na likoló, na epongelo soko na lifelo. Engebene kondima na mangomba mingi, baoyo bazali na lifelo bazali konyokwama makasi mpe mpo na libela. Kasi Nzambe na bolingo akoki mpenza konyokola bikelamu na ye boye?​—1 Yoane 4:8.

Na makanisi malamu tokoloba ete te, kasi ndenge nini tokoki kondimisama na yango? Talela malamumalamu bilembo oyo na Biblia bilandi: “Jéhovah Nzambe asalaki moto na putulu na mokili, mpe apemaki kati na zolo na ye mpema na bomoi, mpe moto akomaki molimo na bomoi.” (Genese 2:7) Maloba oyo mapemamaki na Nzambe malobi ete moto na liboso, Adam, azwaki molimo? Te, akomaki nde molimo, moto na bomoi. Ezali yango nto- ma Paulo andimisaki kati na moko na mikanda na ye: “Pelamoko ekomami ete: Adam moto na liboso, akomaki molimo na bomoi.” Ntoma Paulo atangaki mokanda ya Genese.​—1 Bakolinti 15:45.

Molimo na moto ekoki kokufa? Mosakoli Ezekiele akomaki: “Milimo nyonso mizali na ngai. Molimo na tata mpe molimo na mwana mizali na ngai. Molimo oyo asali lisumu, ye akokufa.” (Ezekiele 18:4, 20; Mosakoli 9:5, 10) Ya solo, ntango molimo ekufi, moto azali lisusu na makanisi te, na yango akoki konyokwama te. Na diskur ya liboso oyo ntoma Petelo asalaki nsima na Pantekote ya mobu 33 na ntango na biso, alobaki: “Soko moto [molimo] nani akoyokela mosakoli yango te, akobomama nyee na kati na bato.” Na yango molimo ekufaka.​—Misala 3:23.

Bakufi bakozonga lisusu na bomoi?

Baoyo nyonso bandimi ete Biblia ezali solo bayebi ete Yesu akufaki mpe asekwisamaki na mokolo na misato. (Misala 10:39, 40) Ndenge nini likambo yango esalamaki? Ezalaki na lisalisi na nguya ya elimo santu na Nzambe.

Ezalaki bobele Yesu nde asengelaki kosekwa? Te, mpo ete ntoma Paulo akomaki na lisangá ya Kolinti: “Klisto asekwi longwa na bakufi, mbuma na liboso na bango balali kati na kufa. Pelamoko kufa eyaki na nzela na moto moko, kosekwa mpe eyei na nzela na moto moko (. . .) Klisto.” (1 Bakolinti 15:20-22) Na yango, bakufi mingi bakosekwa. Yesu, ye mpe, alobaki: “Bokamwa na likambo oyo te, mpo ete ntango ekoya wana nyonso bazali na kati na nkunda bakoyoka mongongo na ye, mpe bakobima, baoyo basalaki malamu kino lisekwa na bomoi.” (Yoane 5:28, 29) Maloba oyo mazali ndanga ete bamilié na bato bakosekwa.

Soki lisolo oyo ya liboso esepelisi yo mpo na ntina etali lisekwa, mbala mosusu ozali komituna: ‘Nani akosekwa, mpe ntango nini?’ Totalela mituna oyo ya ntina.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto