Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 1/9 nk. 15-20
  • Baklisto basalaka makambo na bomoko kati na libota

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Baklisto basalaka makambo na bomoko kati na libota
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini kosala makambo na bomoko kati na libota?
  • Toyekola kati na libota
  • Tosakola elongo kati na libota
  • Tobongisa makambo elongo kati na libota
  • Tominanola elongo kati na libota
  • Mapamboli oyo mazali kozwama wana tozali kosala makambo na bomoko kati na libota
  • Libota ebongiseli ya ntina mpo na bato!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Sɛkɛlɛ́ ezali nde mpo na kozala na bolamu na libota?
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Bóyekolaka ntango nyonso Liloba ya Nzambe na libota
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Lisalisi mpo na mabota
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 1/9 nk. 15-20

Baklisto basalaka makambo na bomoko kati na libota

“Bandeko, nasengi na bino, . . . ete bozala mpenza na bomoko kati na elimo moko mpe na makanisi moko.”​—1 BAKOLINTI 1:10, MN.

1. Ezaleli ya mabota mingi ezali nini mpo na oyo etali bomoko?

OZALI kati na libota oyo lizali na bomoko? To, kati na libota na bino moto na moto azali kosala ndenge ye alingi? Bosalaka makambo na bomoko? To, bofandaka mpenza mbala mingi te bino nyonso esika moko? Liloba oyo “libota” lizali na likanisi ya ndako oyo ezali na bomoko.a Nzokande, mbala mingi ezalaka bongo te. Molakisi moko ya université na Grande-Bretagne akómaki kino koloba ete: “Na esika ete ezala moboko ya etuluku malamu ya bato, libota . . . lizali liziba ya kozanga boyokani nyonso ya biso.” Ezali bongo mpo na libota na bino? Soki ee, bozali na likambo moko te ya kosala?

2. Banani balobelami kati na Biblia baoyo bamonisaki ete bautaki na mabota malamu?

2 Mbala mingi bomoko to kozanga bomoko ya libota moko etali lolenge oyo yango ezali kotambwisama, ezala na baboti nyonso mibale to na moboti bobele moko. Na ntango ya kala, mabota ya bomoko oyo mazalaki kosambela Jéhovah elongo mazalaki kozwa mapamboli ya Nzambe. Likambo yango limonanaki polele na Yisraele, epai mwana mwasi ya Yefeta, Samson, mpe Samwele, bamonisaki moto na moto na lolenge na ye ete bautaki na mabota oyo mazalaki kobanga Nzambe. (Basambisi 11:30-40; 13:2-25; 1 Samwele 1:21-23; 2:18-21) Na ebandeli ya eleko ya baklisto, Timoté moninga ya sembo ya Paulo kati na mibembo na ye misusu ya misionere, abokwamaki kati na boyebi ya Makomami ya Liebele na nkɔ́kɔ na ye ya mwasi Loïs mpe mama na ye Eunice. Akómaki solo moyekoli mpe misionere ya ntina mingi!​—Misala 16:1, 2; 2 Timoté 1:5; 3:14, 15; tala lisusu Misala 21:8, 9.

Mpo na nini kosala makambo na bomoko kati na libota?

3, 4. (a) Makambo nini masengeli komonana polele kati na libota oyo ezali na bomoko? (b) Lolenge nini ndako ekoki kozala bobele esika ya kolala te?

3 Mpo na nini ezali malamu kosala makambo na bomoko kati na libota? Mpamba te ezali kolendisa bososoli mpe limemya na moko epai na mosusu. Na esika ya komitangola moko na mosusu, tokozala penepene mpe tokosungana. Lisoló moko oyo ebimaki kala mingi te na zulunalo Family Relations, elobaki ete: “Elilingi moko ya polele mpenza ebimaki oyo ezali komonisa bizaleli ya sikisiki mpo na ‘mabota ya makasi.’ Bizaleli motindo wana bisangisi komipesa mpe botondi moko mpo na mosusu, bomoko, kosolola malamu, makoki ya kobongisa makambo mpe moboko makasi ya makambo ya elimo.”

4 Ntango bizaleli oyo bizali kati na libota, ndako ezali lisusu esika batekaka essence te, epai osengeli kotelema mpo na kozwa essence. Ezali bobele esika mpamba ya kolala te. Ezali esika kitoko oyo ezali kobenda basangani na yango. Ezali esika ya esengo mpe ya kolingana, ya koyokelana mawa mpe ya komonisa bososoli. (Masese 4:3, 4) Ezali lokola zúmbu epai bomoko ya libota ezali, kasi ezali te lidusu ya nkotó oyo etondi na mitungisi mpe na bokabwani. Kasi lolenge nini likambo yango likoki kosalema?

Toyekola kati na libota

5. Tosalelaka nini mpo na koyekola losambo ya solo?

5 Toyekolaka losambo ya solo ya Jéhovah na kosalela makoki na biso ya kokanisa, to “nguya ya bososoli.” (Baloma 12:1) Etamboli na biso esengeli te kopusama na maoki ya pwasa matumolami na elobeli kitoko mpe ya kolengola ya bateyi ya mangomba oyo balobaka na televizyó. Na kokesena, topusami na boyekoli mpe kokanisa mozindo oyo tozali kosala ntango nyonso kati na Biblia mpe mikanda mikolimbolaka Biblia oyo “moombo na sembo mpe na mayele” azali kopesa biso. (Matai 24:45) Misala na biso ya boklisto mizali komonisa elimo ya Klisto liboso na makambo to masenginya nyonso oyo makoki kobima. Na likambo yango, Jéhovah azali Molakisi na biso Monene.​—Nzembo 25:9; Yisaya 54:13; 1 Bakolinti 2:16.

6. Ndakisa nini ya boyekoli ya libota na mokili mobimba tozali na yango?

6 Boyekoli ya Biblia na libota ezali na ntina mingi mpo na elimo ya mabota nyonso ya boklisto. Bosalaka boyekoli na bino ya libota ntango nini? Soki ezali bobele likambo ya libaku malamu to ekateli ezwami na bopusi ya maoki, mbala mingi boyekoli na bino ya libota ekolandana mpenza malamu te. Kosala makambo na bomoko kati na boyekoli ya libota ezali kosenga ebongiseli oyo elandani malamu. Bongo bato nyonso bayebi mokolo mpe ngonga oyo basengeli kozala esika moko mpo na kosepela na bokutani ya elimo kati na libota. Basangani koleka 12 000 ya libota ya Béthel na mokili mobimba bayebi ete boyekoli na bango ya libota ezalaka mokolo ya Lundi na mpokwa. Oyo nde likambo ya esengo mpo na basali wana ya bolingo malamu ya Béthel na koyeba ete bango nyonso bazali kosangana na boyekoli moko, wana moi mozali kolimwa na bisanga ya Pacifique mpe na Nouvelle-Zélande, mpe nsima malembemalembe na Australie, na Japon, na Taïwan, na Hong-Kong, na nsima kati na Azia, na Afrika, mpe na Europe, mpe na nsuka na mikili ya Amerika. Atako bakabwani na bankóto ya bakilomɛtɛlɛ mpe na minoko mingi, boyekoli wana ya libota ezali kopesa na basangani ya Béthel maoki ya kosala makambo na bomoko. Na etando moke, okoki mpe kolona maoki motindo yango na nzela ya boyekoli na bino ya libota.​—1 Petelo 2:17; 5:9.

7. Engebene Petelo, lolenge nini tosengeli kotalela liloba ya solo?

7 Ntoma Petelo apesi biso toli ete: “Lokola bana babotami bobele sika, boyoka mposa na mabɛlɛ sembo ya elimo ete mpo na yango bokola kino lobiko, soko na solo bosili kososola ete Nkolo azali na malamu.” (1 Petelo 2:2, 3) Oyo nde elilingi kitoko Petelo abimisi na maloba wana! Asaleli liloba ya Greke e·pi·po·theʹsa·te, oyo, engebene mokanda Boyebi ya moboko ya lokóta ya Greke ya Kondimana ya Sika, euti na liloba moko oyo elimboli “kozela eloko moko na motema likoló, kooka mposa, kooka mposa makasi.” Ezali kopesa likanisi ya mposa makasi. Osili komona lolenge mwana ya nyama alukaka na mposa nyonso mabɛlɛ ya mama na ye mpe lolenge mwana moke asepelaka wana azali komela mabɛlɛ na mama na ye? Tosengeli komonisa mposa lolenge moko mpo na liloba ya solo. Moyekoli ya lokóta ya Greke William Barclay alobaki ete: “Mpo na moklisto ya sembo, koyekola Liloba na Nzambe ezali mosala makasi te kasi esengo monene, mpamba te ayebi ete kati na yango motema na ye ekozwa bilei oyo ezali yango koluka.”

8. Mokakatano nini tata ya libota asengeli kolónga yango wana ezali ye kotambwisa boyekoli ya libota?

8 Boyekoli ya libota ezali mokumba monene mpo na mokonzi ya libota. Asengeli komindimisa ete boyekoli ezali kosepelisa basangani nyonso mpe kosala ete bato nyonso basangana na yango. Bana basengeli kooka te ete boyekoli yango ezali bobele mpo na mikóló. Makambo ya kolendisa kati na boyekoli mazali na ntina koleka bolai ya baparagrafe oyo botaleli. Kómisa makambo mazali na Biblia lokola makambo oyo mazali kosalema sikawa. Soki likoki lizali, salisa bana na komona kati na makanisi na bango bisika mpe makambo ya ntina ya mokili ya Palestine epai makambo oyo bozali koyekola malekaki. Basangani nyonso basengeli kolendisama na kosala bolukiluki na bango moko mpe kolendisa na yango libota. Na lolenge wana, bana mpe bakoki ‘kokola liboso na Jéhovah.’​—1 Samwele 2:20, 21.

Tosakola elongo kati na libota

9. Lolenge nini tosengeli kosala ete mosala ya kosakola ezala ntango moko ya esengo elekisami kati na libota?

9 Yesu alobaki ete: “Ekoki ete nsango malamu esakolama kati na mabota nyonso liboso.” (Malako 13:10) Maloba oyo mazali kopesa mosala epai na moklisto nyonso ya sembo​—kopalanganisa nsango malamu, koyebisa nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe epai na bato mosusu. Kosala yango kati na libota ekoki kozala likambo ya kolendisa mpe ya esengo. Bamama mpe batata bakosepela na mosala ya kolakisa nsango malamu oyo bana na bango bazali kosala. Mobali moko mpe mwasi na ye, baoyo bazalaki na bana mibali misato kati na mibu 15 mpe 21 balobi ete bazalaki ntango nyonso na momeseno ya kobima elongo na bana na bango na mosala ya kosakola mokolo ya misato nyonso nsima ya eteyelo mpe mokolo ya poso nyonso na ntongo. Tata alobi ete: “Tozali kolakisa bango ntango nyonso likambo moko ya sika. Mpe tozali komindimisa ete ezali likambo ya esengo mpe ya kolendisa.”

10. Lolenge nini baboti bakoki kosala ete bana na bango bazwa litomba kati na mosala ya kosakola?

10 Kosala na bomoko kati na libota na mosala ya kosakola ekoki kobota mbuma malamu. Mbala mosusu bato basepelaka noki ntango mwana alakisi nsango malamu na lolenge ya petee mpe na elobeli na ye moko. Bongo, mama to tata azali pene mpo na kopesa lisalisi soki esengeli. Baboti basengeli komindimisa ete bana na bango bazali kozwa kobongisama oyo ezali kolandana mpe bazali kokóma ba ministres ‘oyo babongi koyoka nsoni na likambo moko te awa ezali bango kosembola Liloba na solo.’ Kosala na bomoko na motindo wana ekosalisa baboti na komona elimo, lolenge ya mosala mpe bizaleli malamu ya bana na bango kati na mosala ya kosakola. Na nzela ya momeseno ya mbala na mbala, bazali komona bokóli ya bana mpe bazali kopesa kobongisama oyo ebongi mpe elendiseli mpo na koyeisa kondima na bango makasi. Na ntango yango, bana bazali komona ete baboti na bango bazali ndakisa malamu kati na mosala ya kosakola. Na eleko oyo ya mpasi mpe ya mobulu, kosala na bomoko mpe komibanzabanza mpo na libota ezali kopesa mwa libateli na bisika oyo mobulu mosalemaka mingi.​—2 Timoté 2:15; Bafilipi 3:16.

11. Nini ekoki nokinoki kolembisa molende ya mwana mpo na solo?

11 Bana basosolaka nokinoki mitindo mibale ya bomoi epai na mikóló. Soki baboti bazali komonisa bolingo ya solosolo te mpo na solo ya Biblia mpe mpo na mosala ya ndako na ndako, ezali mpasi na komizela ete bana bazala na molende. Na yango, baboti oyo bazali na nzoto kolongono, baoyo mosala na bango ya kosakola esuki bobele na boyekoli ya Biblia poso na poso elongo na bana na bango, bakokutana na mikakatano wana bana bakokola.​—Masese 22:6; Baefese 6:4.

12. Lolenge nini mabota mosusu makoki kozwa lipamboli moko ya ntina epai na Jéhovah?

12 Litomba ya “kozala na boyokani makasi” ezali ete mbala mosusu libota mobimba likoki koyokana mpo ete mosangani na yango ata moko akoka kozala pionnier kati na lisangá. Mabota mingi kati na mokili mobimba mazali kosala bongo, mpe nyonso mazali kozwa lipamboli na makambo pionnier akutanaki na yango na mosala ya kosakola mpe na mayele mingi oyo azali kozwa.​—2 Bakolinti 13:11; Bafilipi 2:1-4.

Tobongisa makambo elongo kati na libota

13, 14. (a) Makambo nini makoki kobebisa bomoko ya libota? (b) Ndenge nini tokoki kopengola mikakatano mingi oyo mibimaka kati na libota?

13 Na ntango oyo ya “mitungisi” mpe ya “makámá,” biso nyonso tozali kokutana na mikakatano. (2 Timoté 3:1) Mikakatano mizali na mosala, na eteyelo, na balabala mpe ata kati na ndako mpenza. Mingi bazali kotungisama na kolongono ya nzoto to na mikakatano ya maoki oyo ezali koumela, oyo mbala mosusu ememaka koswana mpe kozanga koyokana kati na libota. Lolenge nini makambo ya lolenge oyo makoki kobongisama? Na komibenda moto na moto ye moko kozanga kolobisa basusu? Na komitangola yo moko mosika na basusu atako bozali kofanda na ndako moko? Ezali bongo te. Na bokeseni, tosengeli koyebisa mitungisi na biso mpe kosenga lisalisi. Mpe esika nini mosusu eleki malamu mpo na kosala yango soki bobele kati na libota epai bolingo ezali?​—1 Bakolinti 16:14; 1 Petelo 4:8.

14 Lokola minganga bayebi yango, kobatela moto ete azwa bokono te eleki malamu likambo ya kosalisa ye wana azwi bokono yango. Likambo yango lizali mpe solo mpo na mikakatano ya libota. Masoló ya polele mpe oyo euti na motema ekoki mbala mingi kopekisa mikakatano na kokóma minene. Ata soki mikakatano minene mibimi, mikoki kobongisama mpe kosukisama soki libota likotalela esika moko mitinda ya Biblia oyo mitaleli likambo yango. Mbala mingi koswana ekoki kobongwana na boyokani moko ya malamu na kosaleláká maloba na Paulo oyo mazali na Bakolose 3:12-14: “Bomilatisa mitema na mawa, na boboto, na kosokema, na bopolo, na mitema molai. Soko moto moko azali na moto mosusu likambo, boyikanaka mpiko, bolimbisanaka. . . . Bomilatisa bolingo oyo ezali ekanganeli ekoki mpenza.”

Tominanola elongo kati na libota

15, 16. (a) Ezaleli nini esengeli kokesenisa libota ya boklisto? (b) Mangomba mosusu mazali kobimisa lolenge nini ya bato, mpe mpo na nini?

15 Jéhovah azali Nzambe na esengo, mpe solo ezali nsango ya esengo​—elikya bobele moko mpo na libota na bato. Lisusu, esengo ezali moko na mbuma ya elimo. Esengo wana ekeseni mosika na bosepeli ya ntango mokuse oyo molóngi na momekano ya masano akoki kozala na yango. Ezali maoki ya bosepeli ya mozindo mpe ya makasi oyo mazali kotondisa motema na biso lokola mbano ya boyokani ya penepene elongo na Jéhovah. Ezali esengo oyo moboko na yango ezwami na bozwi ya elimo mpe boninga ya malamu.​—Bagalatia 5:22; 1 Timoté 1:11.

16 Mpo na yango, lokola tozali Batemwe baklisto ya Jéhovah, tozali na ntina moko te ya kozala mawamawa to kozanga kosakana. Mangomba mosusu mazali kobimisa bato ya lolenge wana mpamba te bindimeli na bango bizali kolobela mingi makambo mazangi kolendisa. Mateya na bango mazali komema na motindo ya losambo ya molili mpe ezangi esengo, oyo ezali kati na Biblia te mpe ezangi bokatikati. Mazali kobimisa te mabota oyo mazali na esengo kati na mosala ya Nzambe. Yesu amonaki ntina ya kominanola mpe konyolisa nzoto. Na ndakisa, na libaku moko, abyangaki bayekoli na ye ete bakende “bango mpenza epai na lisobe mpe bapema moke.”​—Malako 6:30-32; Nzembo 126:1-3; Yilimia 30:18, 19.

17, 18. Na lolenge nini malamu libota ya boklisto likoki kominanola?

17 Bobele bongo, mabota mazali na mposa ya ntango mpo na kominanola. Moboti moko alobaki na ntina na bana na ye ete: “Tosalaka makambo mingi ya kosepelisa na bomoko​—kokende na libongo, kobeta motopi na parc, kobongisa mobembo moke na ngomba. Mbala mosusu, tozalaka na ‘mokolo ya pionnier’ esika moko kati na mosala ya kosakola; bongo na nsima tosalaka elambo ya bolei ya kosepelisa, mpe topesanaka makabo.”

18 Makanisi mosusu oyo baboti basengeli kotalela ezali kokende libota mobimba na zoo, na foire, na musée mpe na bisika ya kosepelisa. Kotambola na zámba, kotala bandeke mpe kosala mwa elanga moke ezali makambo oyo tokoki kosepela na yango esika moko. Baboti bakoki lisusu kolendisa bana na bango na koyekola kobeta miziki to kosala masano oyo ebongi. Ya solo, baboti oyo bazali na bokatikati bamibombelaka ntango ya kosakana elongo na bana na bango. Soki mabota mazali kosakana esika moko, mazali na makoki mingi ya kotikala na bomoko!

19. Momeseno nini ya sika mokoki kobebisa libota?

19 Momeseno ya bilenge mingi ya lelo ezali ya komikabola na libota mpe ya kosala makambo bango moko wana ekómi na ntango ya kominanola. Atako likámá lizali te mpo na elenge moko ya kozala na eloko moko to lisano moko oyo asepelaka kominanola na yango, nzokande ekozala mayele te kotika ete makambo motindo yango makabola ye ntango nyonso na libota. Na esika ete ezala bongo, tolingi kosalela motinda oyo Paulo amonisi ete: “Moto na moto atala bobele makambo na ye moko te, kasi makambo na basusu lokola.”​—Bafilipi 2:4.

20. Esengo nini tokoki kozwa na ba assemblées?

20 Oyo nde esengo mpo na biso nyonso na komona libota kofanda esika moko na ba assemblées! Na lolenge yango bana ya mikóló bakoki mbala mingi kobatela baoyo bazali mike. Ebongiseli lolenge yango ezali lisusu kopengola momeseno ya bilenge ya kokende kofanda elongo na bilenge mosusu na milongo ya nsima mpe kotya bobele likebi moke na programme ya assemblée. Ata mobembo mpo na kokende to kozonga na ba assemblées ekoki kozala na esengo mingi soki libota mobimba bayokani mpo na nzela bakokamata, bisika oyo bakomona na nzela, mpe bisika bakopema. Kanisa ntango ya esengo monene oyo ezalaki na eleko ya Yesu mpo na mabota na kosala mibembo esika moko mpo na kokende na Yelusaleme!​—Luka 2:41, 42.

Mapamboli oyo mazali kozwama wana tozali kosala makambo na bomoko kati na libota

21. (a) Tosengeli kosala nini mpo na kolónga kati na libala na biso? (b) Tanga batoli kitoko minei oyo esengeli kolanda mpo ete libala ekoka koumela.

21 Ezalaka likambo ya petee te kozala na mabala mpe mabota oyo mazali na bomoko, mpe eyaka na pwasa te. Emonani lokola ete basusu balingi ‘kosala milende te,’ bazali koboma libala, mpe kobandela lisusu makambo nyonso. Nzokande, mbala mingi bobele mikakatano wana mizali komonana lisusu kati na libala ya mbala ya mibale to ya misato. Eyano bobele moko oyo eleki malamu ezali oyo ya boklisto: Kosala makasi mpo na kolónga na kosaleláká mitinda ya Biblia etali bolingo mpe limemya. Mabota oyo mazali na bomoko matambwisami na elimo ya kokaba, ya kozanga moimi. Mopesi toli moko na makambo ya libala azali kolendisa likambo bobele moko mpo na kosala ete libala liumela. Akomaki ete: “Makambo minei ya ntina mingi oyo mazwami kati na mabala ya malamu nyonso ezali mposa ya koyoka, koyeba kosenga bolimbisi, kokoka kolendisa ntango nyonso maoki mpe koluka kosimba motema na bolingo nyonso.” Makambo oyo makoki solo kosala ete libala likoka koumela mpamba te moboko na yango mozali mpe likoló na Biblia.​—1 Bakolinti 13:1-8; Baefese 5:33; Yakobo 1:19.

22. Wapi matomba mosusu ya kozala na libota oyo ezali na bomoko?

22 Soki tolandi batoli ya Biblia, tokozala na moboko makasi ya libota ya bomoko, mpe mabota oyo mazali na bomoko mazali miboko ya lisangá makasi na elimo. Mpo na yango, tokozwa mapamboli mingi epai na Jéhovah soki tokopesa ye masanzoli mingi kati na bomoko.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Liloba “Famille” to libota euti na Latin familia, oyo na ntango ya kala ezalaki komonisa “lisangá ya bato (bana, basali, baombo, baboti) baoyo bazali kofanda kati na ndako moko na nse na bokonzi ya pater familias to tata ya libota. . . . Lisangani ya bato oyo bakangisami na bikanganeli ya makila to ya kondimana mpe basali etuluku moko to etúlúká ya libota.”​—Dictionnaire alphabétique et analogique de la langue française, Paul Robert.

Ozali komikundola?

◻ Mpo na nini ezali malamu kosala makambo na bomoko kati na libota?

◻ Mpo na nini boyekoli ya Biblia mbala na mbala kati na libota ezali na ntina mingi?

◻ Mpo na nini ezali malamu ete baboti basangana na mosala ya kosakola elongo na bana na bango?

◻ Mpo na nini ebongi ete tolobela mikakatano na biso kati na libota?

◻ Mpo na nini mabota ya boklisto masengeli te kozala mawamawa mpe kozanga esengo?

[Elilingi na lokasa 17]

Libota na bino esanganaka ata mbala moko na mokolo mpo na kolya esika moko?

[Elilingi na lokasa 18]

Kotambola na libota mpo na kotala bisika esengeli konanola mpe kopesa esengo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto