Libota ebongiseli ya ntina mpo na bato!
ELOBAMAKA ete masangá ya bato mazalaka malamu bobele ntango mabota na bango mazali malamu. Lisolo ya bato emonisi ete makasi ya masangá mpe bikólo ekitaka ntango mabota na yango mazali kobeba. Ntango bizaleli malamu ebandaki kobeba kati na mabota na ekólo Grèce ya kala, bokóli oyo esalaki mpo na bolamu ya bato ebebaki mpe bato ya Loma balongaki bango kozanga mpasi. Bokonzi ya Loma ezalaki makasi ntango nyonso oyo mabota na yango mazalaki makasi. Kasi, nsima ya bikeke mingi, bomoi ya libota ebebaki, mpe nguya ya ekólo ekitaki. Charles Eliot, oyo azalaká mokambi ya iniversite Harvard alobaki ete: “Libateli mpe kotombwana ya bomoi ya libota ezali mikano ya libosoliboso ya ebongiseli ya bato, mpe mokano ya libosoliboso ya mwango nyonso.”
Ɛɛ, libota ezali ebongiseli ya ntina mingi mpo na bato. Ezali na bopusi monene likoló na nguya ya ebongiseli ya bato mpe bolamu ya bana mpe mabota oyo makoya nsima. Na ntembe te, ezali na bamama mingi oyo bazali kosala makasi mpo na kobɔkɔla bango moko bana ya bizaleli malamu, mpe babongi kozwa longonya mpo na mosala makasi oyo bazali kokokisa. Nzokande, bolukiluki mingi emonisi ete bana bazalaka malamu mingi mpenza soki bazali kobɔkwama na ndako epai kuna baboti nyonso mibale bazali.
Bolukiluki moko esalemaki na ekólo Australie epai ya bilenge koleka 2 100 emonisaki ete “bilenge oyo bauti na mabota oyo ekabwaná bazalaki na mikakatano mingi na kolɔngɔnɔ ya nzoto, bazalaki na bilembeteli emonisaki ete bazalaki konyokwama na mayoki, mpe ekoki kozala ete bamipesaki mingi na kosangisa nzoto koleka bana oyo bautaki na mabota oyo baboti nyonso bazali esika moko.” Bolukiluki moko esalemaki na Institut américain des statistiques de santé emonisaki ete bana oyo bauti na mabota makabwani bazali na “mabaku 20 kino 30 likoló na monkama ya kozwa likama, 40 kino 75 likoló na monkama ya kolonga te na kelasi, mpe 70 likoló na monkama ete bábengana bango na eteyelo.” Molukiluki moko ayebisaki ete “emonani ete bana oyo bauti na mabota oyo ezali na moboti moko bamipesaka mingi na kosala mobulu koleka baoyo bauti na mabota oyo ezali na baboti nyonso mibale.”
Ndako ezali esika ya kimya
Libota ezali esika ya esengo mpe ya kolendisama mpo na moto nyonso. Mokonzi moko na ekólo Suède alobi ete: “Eutelo eleki monene ya esengo mpe ya bolamu ezali mosala te, biloko te, kominanola te to baninga te kasi ezali nde libota.”
Biblia emonisi ete libota na libota awa na mabelé lizwi nkombo na yango na Yehova Nzambe, Mozalisi Monene ya mabota, na ndimbola oyo ete ye nde abandisaki libota. (Genese 1:27, 28; 2:23, 24; Baefese 3:14, 15) Nzokande, kati na Makomami mapemami, ntoma Paulo asakolaki ete libota ekozwa mitungisi makasi, oyo ekobebisa bizaleli mpe bato na libándá ya lisangá ya boklisto. Alobaki ete “mikolo ya nsuka” ekozala na makambo ya kozanga bosembo, kozanga “bolingo ya motema,” mpe kozanga botosi epai ya baboti, ata kati na baoyo “bazali na lolenge na kosambela.” Alendisaki baklisto ete bákima bato yango mosika. Yesu asakolaki ete botɛmɛli na solo ya Nzambe ekokabola mabota.—2 Timoté 3:1-5; Matai 10:32-37.
Kasi, Nzambe atiki biso mpamba te. Kati na Liloba na ye apesi malako mingi na ntina na boyokani kati na libota. Liloba yango ezali koyebisa biso lolenge nini tokoki kolonga na bomoi ya libota mpe lolenge nini tokoki kosala mpo ete ndako ezala esika ya esengo epai kuna mosangani mokomoko azali na mokumba ya kokokisa mpo na basusu.a—Baefese 5:33; 6:1-4.
Lokola libota ezali mpenza na likama, likoki ya kozala na boyokani ya esengo motindo yango na mikolo na biso ezali? Ɛɛ, likoki ezali! Okoki kolonga na kosaláká ete libota na yo ezala na esengo, esika mpenza ya kopema kati na mokili oyo ezali na bato bazangi boboto mpe etondi na mikakatano. Kasi, yango esɛngi ete moto nyonso akokisa mokumba na ye kati na libota. Makanisi oyo malandi makoki kosunga.
Salisá libota na bino ete ebika
Mwango eleki malamu mpo ete libota etikala na bomoko ezali ya kolekisa ntango esika moko. Basangani nyonso basengeli kosepela kolekisa ntango ya kominanola esika moko. Likambo yango ekoki kosɛnga komipimela makambo mosusu. Na ndakisa, mpo na bino bilenge ekosengela mbala mosusu kotika emisyo moko ya televizyo oyo bolingaka mingi, masano, to kokende kotambola elongo na baninga na bino. Bino batata, na momeseno bino nde bosalaka mpo na koleisa libota, bósalela te ntango na bino ya kominanola bobele mpo na makambo oyo bosepelaka na yango. Bólɛngɛla ntango ya kominanola na libota, mbala mosusu na kolukáká lolenge bokoki kolekisa wikende to loi libota mobimba. Bóbongisa makambo oyo basangani nyonso bakozela yango na esengo mpe bakosepela na yango.
Bana bazali na mposa mingi koleka oyo ebéngami “ntango ya malamu,” elingi koloba mabaku ya mbala na mbala oyo baboti balekisaka elongo na bana na boumeli ya ndambo ya ngonga to mwa moke koleka. Bana bazali na mposa ya ntango mingi. Mokomi moko ya zulunalo na ekólo Suède akomi ete: “Na boumeli ya mibu 15 oyo nalekisi lokola mokomi ya makambo mazali koleka na mokili, nakutani na bilenge mingi batomboki . . . Likambo namonaki epai na bango nyonso ezali ete baboti na bango babɔkɔlaki bango na kolekisáká elongo na bango bobele “ntango ya malamu.” Bana mosusu balobaki ete: ‘Baboti na ngai bazalaki na ntango te.’ ‘Bazalaki koyoka ngai soko moke te.’ ‘Tata na ngai azalaki ntango nyonso na mobembo.’ . . . Moboti, okoki kopona ntango boni okolekisa elongo na mwana na yo. Kasi yebá ete liponi na yo ekosambisama nsima ya mibu 15 na elenge ya mbula 15 oyo akozanga mawa.”
Likanisi malamu na ntina na mbongo
Basangani nyonso ya libota basengeli mpe kokolisa likanisi malamu na ntina na mbongo. Basengeli kozala pene ya kosangisa nyonso oyo mokomoko akoki kopesa mpo na kokokisa bamposa ya libota mobimba. Lelo oyo basi mingi basengeli koluka mosala mpo ete libota elonga kokokisa bamposa na yango, kasi bino basi bosengeli koyeba makama mpe masenginya oyo bokoki kokutana na yango. Mokili oyo ezali koloba na bino ete “bómikokela” bino moko mpe “bósala oyo bolingi.” Ekoki komema bino na kokóma na elimo ya lipanda mpe kozanga bosepeli na mokumba oyo Nzambe apesi bino ya kozala bamama mpe babongisi ndako.—Tito 2:4, 5.
Soki bino bamama bokoki kotikala na ndako mpe kozala bakambi mpe baninga ya bana na bino, na ntembe te yango ekosunga mingi mpo na kozala na bokangami makasi oyo ekosalisa ete libota na bino etikala na bomoko atako mitungisi nini bokokutana na yango. Mwasi akoki kosala makambo mingi mpo ete ndako na ye ezala esika ya esengo, ya libateli mpe ezala malamu. Moto moko ya politiki na ekeke ya 19 alobaki ete: “Esengeli mibali nkama mpo na kotonga molako, kasi mwasi moko akoki kotonga ndako.”
Soki basangani nyonso ya libota bazali kosala elongo mpo na kobikela na biloko oyo bango nyonso bakoki kozwa, yango ekopɛngola mikakatano mingi na libota. Babalani basengeli kondima kozala na bomoi ezangi mindɔndɔ mpe kotya matomba ya elimo na esika ya liboso. Bana basengeli koyekola kosepela na biloko oyo bazali na yango, basengeli te kosɛngaka biloko oyo libota ezali na likoki te ya kozwa. Bókeba na mposa ya miso! Kolɛngolama na kosomba biloko oyo makoki na bino epesi nzela te, mpe na bongo kodefa, ezindisi mabota mingi. Soki basangani nyonso ya libota basangisi mbongo na bango mpo na kosala makambo esika moko—na ndakisa kosala mobembo mpo na kominanola, kosomba biloko ya ntina mpe ya kosepelisa mpo na ndako, to likabo mpo na kosunga lisangá ya boklisto yango ekozala malamu mpo na bomoko ya libota.
Lolenge mosusu ya “kosunga” mpo na kobatela elimo ya esengo na libota ezali ete basangani nyonso basengeli kopesa mabɔkɔ na misala ya kotya bopɛto mpe kobongisa biloko—kosukola ndako, kobongisa mwa elanga kati na lopango, kobongisa motuka, mpe bongo na bongo. Mosangani mokomoko ya libota, ata baoyo bazali mike, bakoki kopesamela mwa misala. Bino bana, bóbebisa ntango na bino mpamba te. Nzokande, bókolisa elimo ya kosunga mpe kopesa mabɔkɔ; yango ekoyeisa boninga ya solosolo oyo etongaka bomoko kati na libota.
Motuya ya kolakisama ya Biblia
Kati na libota ya boklisto oyo ezali na bomoko, ezali mpe na ntina mingi ete boyekoli ya Biblia esalemaka pɔsɔ na pɔsɔ. Kotalela mokapo ya Biblia mokolo na mokolo mpe boyekoli ya Makomami Mosantu pɔsɔ na pɔsɔ ezali moboko mpo na bomoko ya libota. Solo mpe mitinda ya moboko ya Biblia esengeli kotalelama elongo na lolenge oyo ezali kosimba mitema ya basangani nyonso ya libota.
Boyekoli ya libota motindo wana esengeli koteya kasi esengeli mpe kosepelisa mpe kolendisa. Na libota moko na nɔrdi ya ekólo Suède bazalaki na momeseno ya kosɛnga na bana ete bákoma mituna oyo mizalaki koyela bango na makanisi na boumeli ya pɔsɔ. Mituna yango mizalaki kotalelama na ntango ya boyekoli ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ. Mbala mingi mituna yango mizalaki ya bozindo mpe mizalaki kotinda na kokanisa mpe mizalaki komonisa makoki ya kokanisa ya bana mpe bosepeli na bango mpo na mateya ya Biblia. Mituna mosusu mizalaki lokola oyo: “Yehova akolisaka biloko ntango nyonso, to asila kosala yango bobele mbala moko?” “Mpo na nini Biblia elobi ete Nzambe azalisaki moto na ‘elilingi na ye’ nzokande Nzambe ye moko azali moto te?” “Adama na Eva bazalaki koyoka malili makasi te na eleko ya mpiɔ kati na Paladiso na ndenge bazalaki makolo ngulu mpe bazalaki bolumbu?” “Mpo na nini sanza ebimaka na butu, ntango oyo molili esengeli kozala?” Sikawa bana yango basili kokola mpe bazali basaleli ya ntango nyonso ya Nzambe.
Ntango bozali kosilisa mikakatano kati na libota, bino baboti bosengeli kosala makasi ete bózala na elimo ya kolonga mpe na esengo. Bóyeba komitya na esika ya basusu mpe bózala na makambo makasi te, kasi bózala na mpiko na oyo etali kolanda mitinda ya ntina. Bómonisa bana na bino ete bolingo mpo na Nzambe mpe mitinda na ye ya sembo ezali ntango nyonso koyangela bikateli na bino. Mbala mingi eteyelo ezali esika ya mitungisi mpe ya konyokwama na makanisi, mpe bana bazali na mposa ya bilendiseli mingi na ndako mpo na kolɛmbisa bopusi wana.
Baboti, bómonisa te lokola ete bozali bato ya kokoka. Bóndima mabunga mpe bósɛnga bolimbisi epai ya bana na bino na ntango yango esengeli. Bilenge, soki tata na mama bandimi libunga, bókolisa bolingo na bino mpo na bango.—Mosakoli 7:16.
Ɛɛ, libota oyo ezali na bomoko ezali esika ya kimya, ya libateli, mpe ya esengo. Goethe, mokomi ya maloba ya ntɔki, moto ya ekólo Allemagne alobaki mokolo mosusu ete: “Moto oyo aleki na bolamu, ezali ye oyo azali koyoka esengo na ndako, azala mokonzi to mongamba.” Mpo na baboti mpe bana oyo bazali na botɔ́ndi, esika mosusu ezali te oyo esengeli kokokana na ndako.
Ya solo, libota ezali na likama monene na ntina na mitungisi ya mokili oyo tozali kobika kati na yango lelo. Kasi, lokola libota ezali ebongiseli euti na Nzambe, ekobika. Libota na yo ekobika, yo mpe okobika soki olandi malako ya sembo mauti na Nzambe mpo na kozala na bomoi ya libota ya esengo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na kozwa bandimbola mingi na likambo oyo, talá buku ya nkasa 192 ezali na motó na likambo ete Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.