Bopeto na bizaleli ezali kitoko ya bilenge
“Elenge, sepela na bolenge na yo mpe tika ete motema na yo esepelisa yo na mikolo na bolenge na yo; tambola mpe na nzela na motema na yo mpe na pole na miso na yo. Yeba mpe ete mpo na makambo oyo nyonso, Nzambe akoyeisa yo na kosambisama.”—MOSAKOLI 11:9.
1, 2. (a) Jéhovah alingi nini mpo na bilenge? (b) Mpo na nini ekozala bozoba na kokanisa ete nyonso oyo ezali kobenda motema na yo mpe miso na yo epesameli nzela?
BOLENGE, esengo mpe bolingo ekokani na mikolo na moi kitoko. Na esika ete omilela mpo na bokuse na yango . . . , sala nyonso mpo na koprofité na yango.” Ezali nde mokomi moko, Moalemá moto alobaki bongo na ekeke na 19. Toli oyo epesami epai na yo, elenge mobali mpe epai na yo, elenge mwasi; yango ezali solo kokundola maloba makomamaki eleki sikawa bambula mingi na Mosakoli: “Sepela na bolenge na yo mpe tika ete motema na yo esepelisa yo na mikolo na bolenge na yo; tambola mpe na nzela na motema na yo mpe na pole na miso na yo.” (Mosakoli 11:9a) Jéhovah Nzambe aboyaka makambo nyonso te oyo bilenge balingaka. Alingi ete bosepela na ndenge ekoki na makasi mpe na nguya ya bolenge na bino.—Masese 20:29.
2 Yango elimboli ete makambo nyonso oyo ezali kobenda motema na yo mpe miso na yo mapesameli yo nzela? Te! (Mituya 15:39; 1 Yoane 2:16) Mokapo ya Mosakoli oyo etangami awa na likoló ebakisi boye: “Kasi yeba mpe ete mpo na makambo oyo nyonso [makambo oyo ozali kosala mpo na kokokisa bamposa na yo], Nzambe akoyeisa yo na kosambisama.” (Mosakoli 11:9b) Okoki te kokima etumbu oyo ekopesama mpo na misala na yo ya mabe; bilenge mpe bakolo, bakosambisama epai na Jéhovah.—Baloma 14:12.
3, 4. (a) Mpo na nini ezali likambo na ntina na kobatela nivo etombwami ya bopeto na bizaleli? (b) Masenginya nini ekoki komema yo na kobungisa bopeto na yo na miso na Nzambe mpe mituna nini mizali kotunama?
3 Baoyo bazali kondimama epai na Jéhovah bazali bobele te na elikya ya kozala na bomoi ya seko, kasi lisusu na esengo ya kozala na boyokani malamu elongo na Mozalisi uta lelo. Mpo na yango, basengeli bongo kozala na nivo etombwami na bizaleli na peto. Ezali yango eyebisami kati na Nzembo 24:3-5: “Nani akobuta na ngomba na Jéhovah? Nani mpe akotelema na esika na ye na bulee? Bobele ye oyo azali na maboko na mabe te mpe motema mpeto, oyo aboyi kopesa Molimo na ngai epai na lokuta, mpe oyo akati ndai na lokuta te. Ye akozwa lipamboli epai na Jéhovah, mpe boyengebene epai na Nzambe na kobika na ye.” Ee, mpo ete bozali kobatela bopeto na bizaleli na bino, bozali kitoko na miso na Nzambe.
4 “Kasi, bozali komekama ntango nyonso na motindo boye ete bokoki kobungisa bopeto na bino na miso na Nzambe. Lokola mikolo na nsuka mizali kobelema na nsuka na yango, pite mpe bosoto ezali na bopusi mabe bipai binso. (2 Timote 3:1-5) Ekomi mpenza mpasi mingi epai na bilenge mpo ete batikala peto. Yo moko, ozali kobatela bopeto na yo? Ozali kolendendela na nzela yango?
Momekamo na yo
5. Mpo na bopusi nini ya mbindo ezali mpasi na kotikala peto na miso na Nzambe?
5 Bafilme mpe bilakiseli mosusu ezali komonisa na bilenge bililingi ya mbindo mpenza mpe ezali kokumisa pite. Tala na ndakisa makambo makomamaki mpo na komonisa mabe na cinéma ntango filme moko ya nsomo ebimaki oyo ezalaki na makambo mingi ya mobulu mpe ya makasi: “Filme oyo etondi se na bililingi mabe mpe ezali komonisa to pite, to koboma bato mpe makambo ya nsoni. Soko bato bakoti mingi mpo na kotala yango, ekozala elembo mosusu kati na kobeba . . . na mposa na kotala filme.” Longola bafilme, pite ezali komonana kati na banzembo mosusu mpe na bilakiseli na télévision. Okoki solo komitika liboso na makaneli oyo na “bizaleli mabe” mpe kozala ntango nyonso peto na miso na Nzambe? (1 Petelo 4:4) Lokola Masese emonisi yango, “moto akoki kokamata moto na ntolo na ye mpe bilamba na ye ekozika te?”—Masese 6:27.
6. Bopusi nini bilenge bazali kokutana na yango epai ya baninga na bango?
6 Bopusi ya baninga na yo, ekoki mpe kopusa yo na kobungisa bopeto na yo na miso na Nzambe. Elenge mwasi moko ya mbula 17, ye azali Témoin de Jéhovah te, alobaki boye: “Bantina oyo epusaki ngai na kosangana na mwana mobali mpo na mbala ya liboso, bantina yango nyonso ezalaki ya mabe: moninga na ngai ya mobali azalaki kosenga ngai mbala na mbala, mpe nakanisaki ete bato nyonso basalaka ndenge yango.” Moto moko te alingaka ete baseka ye. Biso banso tosepelaka ete bato balinga biso. Kasi, ekoki kosalema ete bilenge mosusu babandi koseka ye oyo aponi kolanda mitinda malamu ya Biblia. Na ndenge yango, mposa ya kondimama na baninga ekoki bongo kopusa ye ete asala likambo moko oyo ayebi ete ezali mabe.—Masese 13:20.
7. Mpo na nini ezali mpasi mpo na bilenge mingi na kotikala peto liboso na bopusi na mbindo, nzokande tokoki koloba nini mpo na ebele na bilenge mosusu?
7 Ezali mpasi mingi mpo na kobundisa bopusi yango na ntango ozali naino “elenge” mpe na ntango oyo mposa ya kosangana na elenge mobali to na elenge mwasi ezali makasi. (1 Bakolinti 7:36) Lisangá moko ya bolukiluki esukisaki na maloba oyo: “Elenge oyo akomi na mibu 19, mpe asangani naino na elenge ya mobali te to na elenge ya mwasi te, azali mpenza likamwisi.” Nzokande, ezali na bilenge mingi kati na lisangá na Jéhovah baoyo bazali solo likamwisi mpo ete bazali koboya mabe mpe bazali kobatela bopeto na bango.
8. Mpo na nini bilenge baklisto mosusu bazali komibebisa mpe kolanda banzela ya mbindo ya mokili, mpe yango ezali kobimisa nini na nsima?
8 Kasi na mawa mpenza, bamoko kati na bilenge baklisto bazali komibebisa mpe bazali kolanda banzela mabe ya mokili. Atako bazali koloba ete balingi malamu, nzokande bazali koyina mabe te-to bazali koyina yango mpenza na ndenge esengeli te. (Nzembo 97:10) Mbala mosusu nkutu, bazali komeka kolinga mabe. Totangi boye kati na Nzembo 52:3: “Olingi mabe koleka malamu, olingi lokuta koleka maloba na sembo.” Bamoko bazali koboya batoli nyonso ya lisangá na Jéhovah mpo na makambo matali bokutani, konyolisa nzoto mpe bizaleli malamu. Na nsuka, bilenge yango bazali bongo komiyokisa nsoni mpe kobebisa lokumu ya baboti na bango. Mpo na yango, bazali kobungisa kitoko oyo bazalaki na yango na miso na Nzambe.—2 Petelo 2:21, 22.
Ndenge nini kolonga masenginya
9. Ozali na mposa ya nini mpo na kotikala peto na bizaleli na yo?
9 Okoki kosala nini mpo na kotikala peto na etamboli na yo? Mokomi na nzembo amitunaki motuna yango: “Elenge mobali akopetola nzela na ye na nini?” Apesaki nde eyano oyo: “Bobele na kokeba ete asala lokola liloba na yo.” (Nzembo 119:9) Ee, bozali na mposa ya kotambwisama na Liloba na Nzambe; mpe Tata na biso ya bolingo azali kosenzela ete lisangá na ye epesa bino batoli oyo ekosalisa bino na kotelema ngwi liboso na bopusi mabe ya mokili.
10, 11. (a) Mikanda nini mikomamaki mpo na kosalisa bilenge na kotikala peto na bizaleli na bango? (b) Ndenge nini molongo na masolo “Les jeunes s’interrogent . . .” esili kosalisa bilenge mosusu? (c) Bolamu nini yo mpenza osili kozwa na masolo “Les jeunes s’interrogent . . .”?
10 Na bambula oyo euti koleka, mwa mikanda mibimisamaki mpenzampenza mpo na bilenge, lokola mokanda Votre jeunesse—Comment en tirer le meilleur parti. Masolo “Les jeunes s’interrogent . . .”, oyo ebimaka na Réveillez-vous! uta 1982, ezali kopesa batoli kitoko mpo na makambo lokola pite, mikanda oyo ezali kolobela bolingo ya mobali na mwasi mpe etamboli malamu ya kobatela na ntango ya bokutani. Boyebi yango ezali solo kosalisa bilenge? Tala ndakisa elandi. Masolo mingi malobelaki ezalela mabe babengi ete masturbation, mpe emonisaki ete yango ezali kolamusa mposa ya kosangana mpe ekoki kotinda moto akwea na pite.a (Bakolose 3:5) Batoli malamu emonisaki ndenge nini kolonga ezaleli yango mpe likambo nini osengeli kosala soko momeseno yango ezongeli yo lisusu. Mpo na masolo yango, bilenge mosusu bakomaki: “Mpo na ngai, masturbation ezali mokakatano monene uta ntango nazalaki na mibu 12. Sikawa nakomi na mibu 18, mpe na lisalisi ya masolo oyo bokomaki, nabandi komibongisa mokemoke.” “Nazali kolanda batoli oyo epesamaki na masolo yango mpe makanisi na ngai ezali kobongwana mokemoke. Nabandi komiyoka ete nazali mpenza peto koleka ndenge nazalaki liboso.
11 Ya Solo, botangi mpe boyekoli na mikanda yango ekosenga ntango, kasi ekoki kosalisa yo na kotikala peto. Ozwaka litomba mobimba na lisalisi yango? Nsima na kotanga lisolo “Les rapports sexuels avant le mariage: pourquoi pas?”b (Kosangana liboso na libala: ezali malamu to mabe?) oyo ebimaki na molongo ya masolo “Les jeunes s’interrogent . . .”, elenge mwasi moko, oyo azalaki koyekola Biblia na ntango wana, akomaki: “Nayebi sikawa mayoki mabe mpe zuwa oyo ebimaka nsima na kosangana liboso na libala, mpe nazali koyoka mawa mingi mpo na yango. Mokolo na mokolo nazali kotondo Jéhovah na ndenge andimi ngai mpe alimbisi ngai. Nakanisi ete lisolo na bino ekosalisa bilenge mosusu liboso ete basala libunga lokola oyo ngai nasalaki. Ezali makambo oyo mazali solo kopesa mpasi mingi. Sikawa, nabandi komona mpo na nini Jéhovah Nzambe alingi ete ‘toboya pite’.”—1 Batesaloniki 4:3.
12. Eloko nini ekopusa yo ete olinga kosepelisa Jéhovah?
12 Likanisi yango etindi biso na kotalela mwango mosusu ya koboya masenginya: esengeli na bino kokanga ntina ete Jéhovah azali Moyangeli na molongo mpe ete tosengeli kotosa ye. (Emoniseli 4:11) Azali mpe Tata ya bolingo, oyo alingi bolamu na biso mpenza. (Masese 2:20-22; Yisaya 48:17) Mibeko na ye mizali mpo na kotyela biso ndelo ya mpambampamba te, kasi mizali nde mpo na kobatela biso. Soko totosi yango, tokomonisa ete tozali bongo na mayele. (Deteronome 4:5, 6) Soki oyebi malamumalamu mpo na nini Jéhovah azali kolinga ete obatela bopeto na etamboli na yo, yango ekosalisa yo na komona kitoko na yango ya solo mpe ekopusa yo na kolinga mpenza kosepelisa ye.—Nzembo 112:1.
13. Limbola mpo na nini mobeko ya Jéhovah oyo epekisi pite ezali mpo na bolamu na biso.
13 Nzambe apesi nzela epai na mobali na mwasi ete basangana bobele na libala mpe apekisi pite. (Baebele 13:4) Kotosa mobeko yango ezali kozangisa yo eloko moko ya malamu? Tata oyo atondi na bolingo akopesa yo mobeko oyo ekopekisa yo ete osepela na bomoi te? Soko moke te! Tala naino makambo mazali kokomela baninga na yo oyo bazali koboya kolanda mibeko ya Nzambe, oyo etali etamboli malamu. Soko bazwi zemi oyo bakani te, yango ekotinda bango ete balongola yango to mbala mosusu babala, nzokande bamibongisi naino mpo na yango te. Mbala mingi, mama asengeli kobokola mwana na ye, ye moko. Lisusu, baoyo bamipesi na pite ‘bazali kosalela nzoto na bango moko lisumu mpe bakoki kozwa maladi mabe oyo epesami na nzela na pite. (1 Bakolinti 6:18) Soko elenge oyo asali pite asila komipesa epai na Jéhovah, akoki kobanda komitungisa mingi mpo na makambo oyo asalaki. Akobanda kobunda na lisosoli mabe, yango ekolembisa ye mingi mpe ekozangisa ye mpongi. (Nzembo 32:3, 4; 51:3) Na yango, ezali solo polele ete mobeko na Jéhovah oyo ezali kopekisa pite etyamaki mpo na kobatela yo. Boye te? Ye oyo akotikala peto na bizaleli na ye akozwa bolamu ya solo.
14. Limbola ndenge nini tokoki kokanga ntina na maloba mazwami kati na 1 Bakolinti 7:9 mpe 7:36, na esika ya kokanisa ete libala mpo na bilenge oyo bakoli naino te ezali libateli esengeli?
14 Ya solo, ezali petee te mpo na kolanda mibeko ya Nzambe, na likambo etali mibali mpe basi. Yango wana bilenge mosusu bazali komiloba ete libateli eleki malamu ezali ya kobala wana ezali naino bango bana mpenza. Bazali komiloba boye: ‘Nkutu 1 Bakolinti 7:9 emonisi ete: “Nde soko bayebi komikanga mposa na bango te, babalana. Kobalana eleki malamu na kozika na mposa.’” Nzokande, wana ezali komonisa ete bazangi mayele; mpamba te awa Paulo azali koloba epai na bana te, kasi epai na bato oyo “basili kokola”. (1 Bakolinti 7:36) Mingimingi, baoyo bazali naino bana bateli naino te mpo na oyo etali mayoki mpe ata na elimo mpo ete bayika mpiko liboso na mimekamo mpe kokokisa mikumba ya libala. Tala oyo tokoki kotanga na likambo yango kati na Revue du mariage et de la famille (Angl.): “Bato oyo bazali kobala ntango bazali naino bana bazali mpenza na esengo te, mpamba te bamibongisaki te mpo na kokokisa mokumba na bango. Soko bazali kokokisa malamu te mokumba yango, bakozwa mpenza bolamu te, mpe yango ezali kobebisa libala.” Kobala ntango ozali naino mwana ekobongisa makambo te, eleki malamu nde omibatela peto lokola monzemba kino okokolisa bizaleli nyonso oyo ekosalisa yo na kolonga na libala na yo.
Omibatela peto!
15. Bikateli nini esengeli na yo kokamata mpo na kotikala ntango nyonso peto?
15 Ntoma Paulo akomaki: “Boboma bizaleli na bino biuti na nse: pite, mbindo, mposa na nzoto, mposa mabe mpe bilulela oyo ezali losambo na bikeko.” (Bakolose 3:5) Ee, esengeli na bino kozwa meko makasi; bosengeli kozwa ekateli ya komibatela peto na bizaleli na bino. Mokanda Le Commentaire interprétatif de la Bible (Angl.) elobi boye mpo na verbe oyo ebongolami na ‘koboma’: “Ezali na likanisi ete tosengeli te bobele kotya ndelo to kopekisa misala mpe bizaleli mabe, kasi tosengeli nde kosukisa yango mpenzampenza mpe kotika lolenge na bomoi na biso ya kala. ‘Kosukisa’ etye lisusu nguya na liloba yango . . . Ndimbola ya verbe yango, mpe ndenge yango esalelami, ezali kopesa likanisi ya ekateli ya moto na moto, oyo ezwami na etingya mpe oyo ekopesa mpasi.”—Tala Matai 5:27-30.
16. Mpo na nini osengeli kosala makasi mpo na kotikala ntango nyonso peto na makanisi mpe ndenge nini okoki kolonga na likambo yango?
16 Nzokande, ndenge nini tokoki “kosilisa” to “kosukisa” misala to bizaleli na mbindo? Yesu amonisaki eutelo na likambo yango na kolobaka boye: “Mpo ete na kati mpenza, kati na motema na moto, makanisi mabe makobimaka, ekobo . . . pite, bilulela.” (Malako 7:21, 22) Motema na elilingi ezali bongo na makoki ya kokanisa; yango wana etyamaka mbala mingi elongo na “makanisi”. Mpo na kotikala peto na etamboli na yo, osengeli kotya makasi mpo na kozala ntango nyonso peto na makanisi. Ndenge nini? Lokola elimo eleisamaka na mayoki, keba na makambo oyo ozali kotala, mpe boya kotala to kotanga mikanda, ba émissions ya télévision to bafilme oyo ezali komonisa to ezali kokumisa pite. Osengeli mpe kokeba na makambo oyo ozali koyoka mpe koboya banzembo oyo ezali na maloba mabe. Esengeli na yo kotya makasi mpo na kosala ndenge yango, mingimingi liboso na baninga, kasi soko ozali kosala bongo okotikala ntango nyonso peto mpe okobungisa limemya na yo te.
17. Mpo na nini osengeli koboya kosolola mpo na pite?
17 Ntoma Paulo apesaki mpe toli oyo: “Tika te ete boloba nkombo na bikobo mpe makambo nyonso na mbindo mpe bilulela; ebongi bongo na babulami.” (Baefese 5:3; tala verset 12) Na yango, osengeli te kotelemisa makanisi na yo likoló na makambo ya mabe to kosala na yango liseki. Na ntina yango, molimboli na Biblia na nkombo William Barclay akomaki: “Koloba na ntina na likambo moko, kosala liseki mpo na likambo moko, kosolola mpo na yango ntango nyonso, ezali lolenge ya kokotisa yango na elimo, mpe ekopusa yo na kosala likambo yango.” (Yakobo 1:14, 15) Mpo na kobatela ‘monoko na ekangeli’, esengeli mpenza kozwa ekateli, mingimingi soko bilenge mosusu bazali kobeta masolo ya mabe to bazali koloba mpo na pite. (Nzembo 39:1) Soko otikali ntango nyonso sembo mpe peto, okosepelisa motema na Jéhovah.—Nzembo 11:7; Masese 27:11.
18. (a) Mpo na nini ekoki te bobele kobwaka makanisi mpe maloba na mbindo mpo na kolonga etumba na likambo etali bopeto? (b) Bolamu nini okoki kozwa na toli oyo Paulo apesaki epai na Bafilipi?
18 Mpo na kolonga etumba na likambo etali pite, esengeli bobele te koboya makanisi mpe maloba na mbindo. Lisese moko ya Bachinwa elobi boye: “Boongó oyo ezali mpamba ekoyamba makanisi nyonso.” (Tala Matai 12:43-45) Paul ayebaki solo ete tosengeli kotondisa elimo na biso na makanisi na sembo mpe na peto. Yango wana apesaki elendiseli oyo epai na Bafilipi: “Makambo nyonso na solo, na makambo nyonso mabongi, na makambo nyonso na sembo, na makambo nyonso na peto, na makambo nyonso na boboto, na makambo nyonso na lokumu malamu, soko malamu ezali mpe soko lisanzoli ezali, bokanisaka makambo yango.c”—Bafilipi 4:8.
19. Mpo na nini esengeli na yo komipesa na boyekoli mozindo ya Liloba na Nzambe, mpe ndenge nini boyekoli yango ekosalisa yo na kotikala ntango nyonso peto na bizaleli na yo?
19 Osengeli bongo komipesa na boyekoli mozindo ya Liloba na Nzambe, oyo ekolendisa elimo na yo mpe motema na yo, mpe ekosalisa yo na kosala boyokani malamu elongo na Jéhovah. (Yosua 1:8; Nzembo 1:2) Na ndenge yango, okozala na makasi mpo na koboya masenginya ya kosala mabe. Okopengola kobwaka nsoni likoló na nkombo na Jéhovah, likoló na libota na yo to na lisangá. Okosalela nde nguya mpe makasi na bolenge na yo na lolenge malamu oyo ekotikela yo ata mpasi te na nsima. Ee, landa nzela na bopeto na bizaleli, yango nde kitoko ya solo mpo na bilenge oyo bazali kosalela Jéhovah!—Masese 3:1-4.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala banimero ya Réveillez-vous! ya le 8 Septembre 1987, pages 19 kino 21; oyo ya le 8 Novembre 1987, pages 18 kino 20; mpe oyo ya le 8 Mars 1988, pages 20 kino 23.
b Réveillez-vous! ya le 8 Décembre 1985, pages 10 kino 12.
c The Expositor’s Greek Testament.
Bozongeli
◻ Mpo na nini esengeli na yo kobatela nivo etombwami ya bopeto na bizaleli?
◻ Mpo na bopusi nini ezali mpasi na kotikala peto na miso na Nzambe?
◻ Eloko nini ekoki kosalisa yo na kotikala peto na bizaleli?
◻ Soko olingi kotikala peto, bikateli nini osengeli kokamata?
[Elilingi na lokasa 13]
Ntalo monene na bilenge, bakoki naino te mpo na kozala baboti.