Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/11 lok. 15
  • ‘Bosakola Liloba na Nzambe na molende nyonso’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Bosakola Liloba na Nzambe na molende nyonso’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Masolo mosusu
  • Tómekola Yesu—Tósakolaka na mpiko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • ‘Tóloba Liloba ya Nzambe na mpiko’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Tókoba kosakola liloba ya Nzambe na mpiko
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Mpiko
    Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/11 lok. 15

‘Bosakola Liloba na Nzambe na molende nyonso’

JÉHOVAH Nzambe akoki kopesa epai na basaleli na ye nguya mpo na ‘koloba liloba na ye na molende nyonso’. (Misala 4:31) Ata baoyo bayebi solo ya Biblia kala mingi te mpe baoyo basali naino mingi te na mosala ya kosakola bakoki te kokakatana mpo na kosakola nsango malamu na molende nyonso. Na Côte d’Ivoire, basakoli mibale ya nsango malamu bazalaki kokenda ndako na ndako, mpe bakutanaki na professeur moko ya université. Seriki, Temwe oyo azalaki mpenza elenge, amonaki ete akokoka te kosolola na moto na mayele motindo wana, atikaki maloba epai na moninga na ye.

Professeur azalaki kotungisama mingi mpo na koponapona ezali kati na bato na mposo ekeseni mpe azalaki koloba ete ezalaki Nzambe nde abimisaki mobulu kati na bato na ndenge azalisaki bango na mposo ekeseni. Nsima na lisolo molai oyo ezalaki kobimisa ata litomba te, Seriki azwaki makasi mpo na kokota na lisolo na limemya nyonso. (1 Batesaloniki 2:2) Amonisaki epai na professeur ete ndako na ye ebongisamaki malamu na ndenge apakolaki yango langi ndenge na ndenge, mpe atunaki ye: “Mpo na nini opakolaki bobele langi moko te na ndako na yo mobimba?”

Professeur alobaki na ye ete: “Omoni ngai moto na ligboma?” Seriki ayanolaki: “Te, kasi mpo na nini olingi ete biloko oyo Nzambe azalisaki ezala bobele na langi moko?” Likanisi yango ezalaki sembo. Elakiseli yango ya polele ekokisaki mokano na yango, mpe Seriki akokaki kopesa litatoli malamu, ye moto azalaki komeka ata koloba te, na ebandeli na lisolo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto