Malamu na Nzambe ezali kobenda yo?
OZALI na moninga ya motema? Soko ee, osila kokanisa na likambo oyo ebendaka yo epai na ye? Ezali lolenge na ye ya nzoto? Ezali mpo ete bosepelaka na makambo motindo moko? To ezali mpo na bizaleli mozindo, lokola gentillesse to mayele? Soko malamu nde ekangisi boninga na bino, wana bosali boninga malamu koleka. Malamu ya solosolo emonanaka mingi te na eleko na biso oyo bato mingi bazali “kolinga lisusu malamu te”.—2 Timote 3:3.
Mpo na moklisto, boyokani boye bozali na ntina mingi kati na bomoi ezali oyo ekangisi ye na moto mosusu te, kasi na Nzambe. Yango wana, na kokanisaka na bikanganeli yango, osila komituna: Ezaleli nini na Nzambe ebendaka yo mingimingi?
Bizaleli na Nzambe oyo ezali na ntina mingi
Biblia ezali kolobela bizaleli mingi ya Nzambe, oyo ezali na ntina mingi. Oyo eyebani mingi ezali bongo bolingo na ye, boyengebene na ye, mayele na ye mpe makasi na ye. (Deteronome 32:4; Yobo 12:13; Nzembo 147:5; 1 Yoane 4:8) Soko tosengeli kopona kati na bizaleli yango minei oyo ezali na ntina mingi, mbala mosusu tokoloba ete ezali bolingo na Nzambe nde ebendaka biso mingi. Nzokande, ezaleli mosusu ekangani makasi mpenza na bolingo na ye: ezali bongo malamu na ye eleki monene. Malamu yango, oyo bakomi na Biblia balobelaki na maloba kitoko, ekoki kopusa bato na kosala boyokani, oyo ekoki kopesa lobiko mpe ya kitoko elongo na Nzambe.
Na ndakisa, na nsuka ya ekeke na motoba liboso na ntango na biso, mosakoli Zakari alobaki na ntina na Jéhovah: “Malamu na ye ezali monene boni! Mpe kitoko na ye ezali boni!” (Zakari 9:17) Bambula mingi na liboso, Yisaya asanzolaki Nzambe na motindo yango na maloba oyo: “Nakosakola malamu na Jéhovah . . . mpe malamu na ye mingi na ndako na Yisraele.”—Yisaya 63:7.
Bikeke misato liboso na ye, mokonzi David akomaki maloba kitoko na ntina na malamu na Nzambe. David alobaki na ntina na makambo mamonaki ye, mpamba te na bomoi na ye mobimba asepelaki na malamu yango. Nzambe amimonisaki na malamu mingi epai na ye; amonisaki motema mawa epai na ye nsima na lisumu monene oyo asalaki epai na Bateseba mpe mobali na ye, Urie. (2 Samwele 12:9, 13) Na Nzembo 31:19, David alobaki na botondi nyonso: “Malamu na yo ezali monene mingi mpenza, oyo yo obombeli bango bakotosaka yo.”
Omonaka ete malamu na Nzambe ezali na motuya mingi lokola basambeli na Nzambe oyo na kala? Soko ee, okozwa solo “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso” mpe okozala na mposa mpenza ya kosala ntango nyonso mokano ya Nzambe. (Bafilipi 4:7) Tozwa mwa ntango mpo na kolimbola malamu na Nzambe oyo eleki monene mpe ezangi nsuka. Na ntembe te, yango ekobakisa botondi na biso epai na Tata na biso ya bolingo.