Malamu na Nzambe ezali na nsuka te
NZAMBE azali malamu! Mbala boni osila koyoka to koloba maloba yango! Kasi, osila kokanisa na oyo nyonso malamu na Nzambe ezali komemela yo? Kokanisa motindo yango ekosalisa biso na kosepela lisusu makasi na Nzambe oyo tozali kosambela.
Libosoliboso, tosengeli koyeba eloko nini oyo malamu na Nzambe. Ya solo, ezali ezalela na eloko oyo ezali malamu, oyo ekeseni na mabe. Kasi malamu ezali na ndimbola mingi koleka. Malamu ezali ezalela oyo ekomonisa misala malamu. Moto malamu akosala makambo malamu. Nzokande Nzambe, na malamu na ye, asalelaka biso makambo mingi mingi ya malamu mpe yango ezali kopusa biso na kolinga ye.
Malamu monene na Nzambe ezali komonana na maloba oyo alobaki epai na Moïse. Tala elaka oyo Nzambe apesaki epai na mosaleli na ye ya sembo kati na esobe na Sinaï: “Nakolekisa malamu na ngai liboso na yo.” Kokokisaka bongo elaka na ye mpe kosalelaka nkombo na ye, Nzambe alobaki lisusu: “Jéhovah, Jéhovah, azali Nzambe na mawa mpe na ngolu, akoyoka nkanda noki te mpe aleki na malamu mpe na solo. Akobatela malamu na ye mpo na nkoto nkoto, mpe akolimbisa mabe mpe botomboki mpe lisumu kasi akolongisa mosumuki soko moke te.”—Exode 33:19; 34:6, 7.
Na yango, malamu na Nzambe esangisi ezaleli na ye ya kolimbisa mpe ya koyokela mawa, malamu mpe solo na ye. Epai mosusu, malamu na ye emonanaka na boye ete “akoyokaka nkanda noki te”, azali na motema molai. Yango elingi koloba te, ete akokani na tata to mama oyo akopesa nzela na mabe kozanga kopesa etumbu. “Akolongisa soko moke te” basumuki oyo baboi kobongola motema. Nzambe ya malamu akoki kotika mabe libela na libela te.
Bonene ya malamu na Nzambe
Sikawa, totala na lisalisi ya mwa bandakisa, lolenge nini Nzambe amonisaki malamu na ye. Ntango azalisaki mabelé, amonisaki ete azali Nzambe malamu epai na bato. Na esika ete apesa bango bobele mwa biloko bikoki oyo bazalaki na yango mposa, atondisaki etando na biso na nyonso oyo esengelaki mpo ete bomoi ezala eloko na esengo. Apesaki bango bilei ndenge na ndenge mpe biloko mpo na komela ya ndenge na ndenge. Azalisaki lolenge mingi na ndeke mpe na nyama. Azalisaki bafelele, ya langi ekeseni mpe na kitoko mpo na bolamu na biso. Nsima na yango abongisaki bisika ya ndenge na ndenge oyo ezali elengi mingi na kotala yango. Na yango, ntango nyonso oyo tozali kosepela na kitoko na moi na ntango ekolalaka to na mapata oyo mazali koleka na likoló, tozali komona bilembeteli ya malamu na Nzambe.
Malamu na Nzambe emonanaki lisusu na ntango azalisaki mobali mpe mwasi na liboso. Nzambe apesaki epai na Adam mpe Eva nzoto ya kokoka mpe oyo ezalaki kolongono, mpe atyaki bango na elanga na Edene. Nsima na yango apesaki bango mosala malamu oyo ezalaki kosenga molende mpe mayele: “Botondisa mokili mpe botya yango na nse na bino.” Na ndenge yango atyaki liboso na bango elikya ya kosepela na bomoi libela na libela kati na paradis, oyo elingaki kotonda na ebele na bakitani na bango. (Genese 1:26-28; 2:7-9) Oyo nde likabo kitoko ya libala epesamaki epai na babalani ya liboso!
Ata ntango Adam mpe Eve batombokaki, Nzambe atikaki bango libela te. Na ntango yango, soko abomaki bango mbala moko, alingaki kosala bobele likambo ya sembo. Kasi amimonisaki malamu epai na mobali mpe mwasi wana baoyo bakomaki basumuki. Apesaki bango nzela ya kozala lisusu na bomoi mpo na mwa ntango, mpe kobota bana.—Genese 5:1-5.
Uta ntango wana, Nzambe azali ntango nyonso komonisa malamu na ye epai na bato, baoyo babungisaki libaku malamu oyo ezalaki na bango. Yango wana mokonzi David alobaki: “Jéhovah azali na malamu epai na bato nyonso mpe ngolu na ye ezali likoló na misala na ye nyonso.” (Nzembo 145:9) Jéhovah apesaki biso nyonso oyo ekoki mpo na kobatela bomoi awa na mokili na ye. Yesu alobaki epai na bazalani na ye: “Tata na bino na likoló . . . akobimisa moi na ye na bato mabe mpe na bato malamu mpe akonokisa mbula na bayengebeni mpe na bapengwi.” (Matai 5:45) Soko bato bazali kokufa nzala to bazangi bilei, ezali te mpo ete Nzambe atiki kopesa bilei epai na bafandi na mabelé, kasi ezali mpo na mabe, motema makasi mpe kozanga makoki ya bato.
Nzambe azali kotika lisusu ete bato basalela bozwi bozali na nse na mabelé, mpe atiki bango bazwa mwa boyebi mpo na myoto na makoló mpe na biloko bizingi biso. Ya solo, Jéhovah azali Nzambe malamu mpo na bato, atako bato mingi na lofundo bazali koloba ete Nzambe azali te mpe bamosusu bazali kosalela malamu na ye na ndenge mabe mpe bazali konyokola baninga na bango bato.—Nzembo 14:1.
Malamu na Nzambe epai na bandimi
Nzokande, soko Nzambe amonisaki malamu na ye epai na bato nyonso, kasi boyokani na ye elongo na bandimi ezali kokamwisa biso. Uta ebandeli, na botomboki ya Adam mpe Eve, Nzambe asakolaki ete “libota” moko ekobima oyo ekosilisa mabe mauti na lisumu. (Genese 3:15) Na boumeli ya ntango, bakitani mingi ya Adam bakomaki basambeli na sembo ya Nzambe atako bazangaki kokoka, mpe esakweli yango ya kala epesaki bango elikya ya avenire malamu. Moko na basambeli yango ya sembo, Abraham, abengami “moninga na Jéhovah”.—Yakobo 2:23.
Nzambe alakaki Abraham ete bakitani na ye bakokoma mabota mingi mpe ete libota oyo eleki monene kati na bango ekosangola mokili na Kana. Engebene esakweli yango, Bayisraele, bakitani na Abrahame, babongisamaki lokola libota. (Genese 17:3-8; Exode 19:6) Bongo, Nzambe amonisaki lisusu bolamu na ye epai na libota yango ya sika: Abikisaki bango na boombo na Ezipito, abatelaki bango na esobe, apesaki bango mibeko mpe bonganga mpe na nsuka, apesaki bango mokili kitoko na Kana lokola libula.
Nsima na bambula, Yisraele ekomaki na bokonzi, oyo mokonzi na yango ya misato aponamaki kati na bato, Salomo, azwaki etinda longwa na Jéhovah ete atonga kati na Yelusaleme, temple oyo esengelaki kozala centre ya losambo na Jéhovah kati na mokili mobimba. Ntango esilaki, bafungolaki yango na molulu monene, mpe elambo monene esalamaki na libaku yango. Nsima na yango, na kolandaka lisolo yango, Bayisraele “bapambolaki mokonzi; bazongaki epai na bango na kosepela mpe na mitema na esengo mpo na malamu nyonso mamonisi Jéhovah. (1 Mikonzi 8:66) Na mabaku mosusu Bayisraele batondaki na malamu na Nzambe.
Na mawa, mbala mingi bazalaki kosepela te na libaku malamu oyo bazalaki na yango ya kosambela Nzambe bobele moko ya solo. Yango ememaki bango nyonso na kozanga bosembo mpe na 607 liboso na ntango na biso, Jéhovah apesaki nzela ete bamemama na boombo na Babilone. Lokola alobaki yango epai na Moïse, mpo na malamu na ye ‘akolongisa mosumuki soko moke te’.—Exode 34:7.
Nzokande, nsima na mibu 70, Nzambe azongisaki litika na sembo ya Bayisraele na mboka na bango. Soko asalaki ndenge yango, ezalaki mpo na malamu na ye. Yilimia alobaki esakweli elandi, oyo etali kozonga na Babilone: “Bakoya mpe bakoyemba likoló na ngomba na Siona, bakoyangana mbango epai na malamu na Jéhovah.” Abakisaki: “Bato na ngai bakotonda na malamu na ngai. Jéhovah alobi bongo.”—Yilimia 31:12, 14.
Nsima na mwa ntango, Yesu ayaki na mokili mpe emonanaki ete azalaki “libota” oyo elobelamaki na esakweli oyo esakolamaki na Eden. (Genese 3:15) Biblia elobi: “Mpo ete Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi Mwana na ye bobele moko ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi azala na bomoi na seko.” (Yoane 3:16) Liwa na Yesu efutaki mbeka oyo epesaki nzela epai na bato ete basikolama na lisumu mpe bazongela ezaleli ya kokoka. Na ndenge yango, makambo ya mpasi mabimi na lisumu na Adam makolimwa. Yango wana ntoma Paulo akomaki boye epai na Baloma: “Mpamba te lokola moto moko na lisumu na ye azalisi bato mingi na masumu, bongo mpe moto moko na nzela na botosi na ye azalisi bato mingi bayengebene.” (Baloma 5:19) Mpo na malamu na Nzambe, bato na motema sembo bakoki uta ntango wana kozala na elikya ya kozwa bomoi ya seko. Bakoki mpe lokola Abraham kokoma baninga na Nzambe.
Lelo lisusu, Nzambe azali ntango nyonso komonisa malamu epai na basambeli na ye. Na nzela na Biblia, azali kopesa bango batoli mpo na kosalisa bango na kolonga mikakatano. (Nzembo 119:105) Azali kopesa bango likabo na elimo santu na ye mpo ete batosa mitinda na ye ya sembo. Na nsima, azali komonisa mikano na ye mpo ete baklisto na solo bazala na elikya na mokili ya sika, mokili na boyengebene oyo ekotyama na esika na mokili ya lelo. (Masese 4:18; 2 Petelo 3:13) Baklisto batii elikya na makambo yango mpamba te Nzambe, na malamu na ye, amonisi bango yango na nzela na Liloba na ye oyo ezangi libunga.—2 Timote 3:16.
Na yango, na kokanisaka na mozindo likoló na malamu na Nzambe, tozali komiyoka ete tobendami epai na ye. Kasi tozali komituna lisusu:
Ndenge nini tokomizwela mpenza malamu yango?
Ya solo, biso banso tozali mpenza kozwa malamu na Nzambe. Tozali kopema, tozali kolya, tozali komela, tozali kosepela na bomoi: ezali makabo na Nzambe. Kasi tozali mpenza kosepela na yango ndenge motema na biso elingi? Tomikundola ete: Nsima wana Adam mpe Eva basalaki lisumu, Nzambe atyaki ndelo na malamu na ye epai na bango. Bobele bongo, akotya mpe ndelo na malamu na ye epai na biso, longola bobele soko toyanoli na ndenge ebongi na malamu na ye. Ndenge nini tokoki koyanola na malamu na ye?
Mokomi na nzembo asalaki libondeli elandi: “Lakisa ngai bososoli malamu mpe boyebi mpamba te nandimi malako na yo.” (Nzembo 119:66) Tosengeli kosala libondeli motindo moko. Lokola Nzambe azali malamu, tosengeli koyekola kozala bato na malamu lokola ye. Paulo alobaki boye: ‘Bozala bamekoli na Nzambe lokola bana balingami.’—Baefese 5:1.
Mpo na yango, esengeli na biso naino koyekola Biblia mpo na koyekola eloko nini babengi malamu. Nsima na yango, tokosenga epai na Nzambe ete asalisa biso na kokolisa ezaleli yango. Ezali mbuma na elimo, lokola “bolingo, esengo, kimya, motema pete, boboto, . . . kondima, bopolo, [mpe] komikanga motema”. (Bagalatia 5:22, 23) Tokoki kokolisa bizaleli yango nyonso na kotyaka motema na elimo na Nzambe, na koyekola Biblia oyo Nzambe apemisaki, na kobondelaka ye mpo na kosenga lisalisi mpe na kozalaka elongo na baklisto oyo bazali na makanisi motindo yango.—Nzembo 1:1-3; 1 Batesaloniki 5:17; Baebele 10:24, 25.
Biblia elobi lisusu: “Bakosakola lokumu na malamu monene na yo mpe bakoyemba na esengo boyengebene na yo.” (Nzembo 145:7) Nzambe azali na mposa ete tolobela na ntina na malamu na ye epai na bamosusu. Tokakatana te mpo na kolobela na ntina na Tata na biso ya makolo.
Na nsuka, tosengeli te kosalela malamu na Nzambe na ndenge mabe. Ya solo, Jéhovah alimbisaka basumuki. David azalaki na elikya ya kozwa eyano na libondeli na ye, yango wana abondelaki na maloba malandi: “Kanisa masumu na bolenge na ngai te, tala bipengweli na ngai te; ee Jéhovah, mpo na malamu na yo, kanisa ngai; ee, mpo na malamu na yo.” (Nzembo 25:7) Yango elingi koloba ete tokoki kosala masumu na elikya ete Nzambe akolimbisa biso? Te! Kobosana te: malamu na Nzambe elimboli ete “akolongisa soko moke te” basumuki oyo baboi kobongola mitema.
Tosepela na malamu na Nzambe
Ntango nyonso oyo tokomona malamu na Nzambe, tokobelema pene na ye. Yango ekolendisa biso na kolanda toli kitoko oyo ya ntoma Paulo: “Botambola lokola bana na moi. Mpamba te mbuma na moi emonani na nyonso oyo ezali malamu mpe na boyengebene mpe na solo.”—Baefese 5:8, 9.
Mikolo minso toyebi ete: Nzambe azali komibanzabanza mpo na biso na bolingo nyonso. Toyebi ete akotika te baoyo bazali kolinga ye, ata bakomi na mpasi. Ya solo, tozali koyoka kimya na elimo, mpe tozali kozongela maloba malandi ya mokomi na nzembo: “Solo malamu mpe ngolu ekokenda na ngai mikolo nyonso na bomoi na ngai; mpe ngai na kofanda na ndako na Jéhovah libela na libela.”—Nzembo 23:6.