Mpo na nini esanga ya Réunion ekomi na ba Salles du Royaume mingi?
PENE na 700 kilometres na est ya Madagascar, esanga moke ya Réunion etelemi na océan monene ya lndien. Atako esanga yango ezali bobele penepene na 70 kilométres na molai mpe 50 na bonene, eyebani mingi mpo na bangomba na yango ya volcan oyo akobimisaka móto mbala na mbala. Ngomba oyo eleki molai, oyo ezali na 3 069 métres likoló na mai, ezali volcan oyo ebimisaka lisusu móto te, yango ebengami Piton des Neiges. Na sud-est na esanga, ezali na volcan oyo ezali na molai ya 2 625 métres yango Piton de la Fournaise, nkombo oyo ebongi na yango mpamba te, ezali volcan oyo ezali naino kobimisa móto. Ezali mpenza esengo na kotala yango ntango ezali kobimisa móto na butu. Balabala mingi ezali komata mpe kokita na nickanioka likoló na mabelé oyo esali mabulumabulu, na komonisaka oyo babengaki kitoko na kobangisa na Réunion.
Mpo na nini ba Salles du Royaume mingi?
Kasi, kitoko ya solo na Réunion ezali mpo na boyambi oyo bato mingi bafandi na esanga yango bazali komonisa epai na “nsango malamu na bokonzi” oyo ezali kosakolama na ba Témoins de Jéhovah. (Matai 24:14) Mosala na bango ya kosakola ebandaki na 1960 ntango ba ministres mibale ba pionniers bakómaki na France. Lelo, mbula 30 na nsima, Batemwe 1 665 bazali kosakola nsango na Bokonzi na molende epai ya bafandi 582 000 na esanga, oyo ezali bongo na mwayene ya bato 350 mpo na Temwe moko.
Mpo na bokoli, Batemwe batongaki bisika bibongi mpo na makita mpo na kosalela losambo na bango mpe kokokisa mosala na bango ya koteya na elimo. (Baebele 10:24, 25) Kati na masangá zomi na libwa oyo mazali kati na esanga zomi na misato basili kotonga Salle du Royaume. Lokola mopepe makasi na kobebisa elekaka mbala na mbala, ezali kosenga kotonga bandako oyo ezali makasi oyo ezali kosɛnga ntango mingi mpe mosolo mingi. Ndenge nini likoki ezwamaki mpo na kotonga ba salles yango, wana mingi na Batemwe na esanga bazali kozwa na mosala ya mosuni bobele lifuti moke mpe bazali na mabota minene mpo na koleisa? Na kozongela maloba na Biblia, eyano ezali ete ‘loboko na Jéhovah ezali mokuse te.’—Yisaya 59:1.
Mikakatano oyo balongaki
Na ndakisa, totala ndenge nini Jéhovah apusaki bato mosusu mpo na kosalisa na botongi ya Salle du Royaume moko kati na ville moke ya Saint—Louis, na sud-ouest ya Réunion. Ntango bazwaki mikanda na lotomo mpo na kotonga, elenge Temwe moko oyo azalaki koyekola mosala ya kotonga ndako alobaki na profesere na ye ete Salle du Royaume moko ekotongama na bato oyo bamipesi kozanga lifuti. Molakisi yango apesaki bobele maboko te na mosala, kasi lisusu amemaki bana na ye nyonso ya kelasi na esika ya mosala mpo na kosalisa kotimola moboko. Nsima na yango, apesaki likabo ya fer à béton oyo esengelaki mpo na kosala moboko.
Mokolo na bopemi oyo ba volontere koleka nkama bayaki mpo na kosala dalle ya béton oyo esengelaki kozala pene na bonene ya 200 métres carrés, bakamwaki na komona ete bato ya leta bakataki mai. Ndenge nini bakokaki kosala béton yango kozanga mai? Moko na basali oyo ayebaki kapitene ya ba pompiers (babomi móto na ntango ya likama) azwaki likatami ya kokende kolimbola likambo yango epai na mobali oyo na ezaleli ya boboto. Nsima mwa moke, motuka ya ba pompiers ekómaki na esika ya mosala. Ememaki mai oyo ekokaki mpo na kosala béton nyonso, mpe ba pompiers bandimaki ete motuku yango motikala wana moi mobimba. Ezali solo ete basali nyonso oyo bamipesaki kozanga lifuti, basalaki na motema mobimba.
Lisalisi na Jéhovah emonanaki na lolenge oyo mikakatano mosusu milongamaki. Na ndakisa, na ntango moko esengelaki kotia miinda kitoko 22 na plafond oyo bapesaki komande sanza mwambe liboso. Kasi moto oyo asengelaki kopesa biloko yango alobaki na Batemwe ete motindo oyo basengaki esalamaki te. Basengelaki kosala nini? Basengelaki kosanzé plafond mobimba? Te, mpamba te bandeko na biso bayei koyoka nsango ete motongi na bandako moko asombaki miinda motindo yango nde asalelaki yango te.
Batunaki ye: “Ozali na miinda boni?”
Azongisaki ete: “Pene na 25”
Kozanga koumela, miinda esombamaki mpe batyaki yango.
Lokola mosala ya botongi ezalaki kotambola malamu, mobali moko oyo abandaki koyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah akamwaki na komona ndako kitoko yango.
Atunaki ete: “Boyebisa ngai, soko eloko mosusu ezangi”
Temwe moko ayanolaki ete: “Ee, tozangi sonorisation.”
Mbala moko, abimisaki karnet na ye ya chéques mpe apesaki likabo oyo ekokaki mpo na kosomba sonorisation ya sika. Makambo motindo yango, mpe mbongo oyo biro monene ya la Société Watch Tower adefisaki bango, esalisaki lisangá mpo na kosilisa botongi ya salle du Royaume yango kitoko.
Na nsuka, lisangá ya Saint—Louis basepelaki na koyamba ndeko carey Barber, mosangani ya college central ya ba Témoins de Jéhovah, oyo afungolaki Salle du Royaume yango na décembre 1988. Ebongiseli ezalaki ete ndeko Barber auta na biro monene ya la Societé, oyo ezali na Brooklyn (Etats-Unis), mpo na kofungola bandako ya sika ya filiale na esanga ya Maurice oyo ezali penepene. Ntango Batemwe ya Saint—Louis bayokaki yango, na poso misato bakongolaki mbongo oyo ekoki mpo na kofuta tiké ya mpepo mpo na ndeko Barber mpe na mosangani moko ya comité ya filiale ya esanga Maurice mpo ete bango nyonso mibale baya na esanga ya Réunion. Mpo na bokoli oyo emonanaki uta ntango yango, esengelaki kokabola lisangá ya Saint—Louis. Na yango masangá mibale ezali bongo kosalela Salle du Royaume ya sika.
Lokumu epesami na Jéhovah
Boni mpo na masangá mosusu na esanga ya Réunion? Mpo na boyambi malamu oyo bazali komonisa mpo na mosala ya kosakola Bokonzi, bato bazali koya na makita oyo motuya eleki mbala moko na ndambo to mbala mibale motuya ya ba Témoins de Jéhovah na esanga. Na yango ezali polele mpo na nini esanga ya Réunion ezali na mposa ya ba Salles du Royaume mingi. Basili kotanga ba Salles du Royaume mosusu misato nsima na oyo ya Saint-Louis, yango nde esali ete motuya nyonso ya ba salles ezala 13 mpo na masangá 19 kati na esanga.
Lokumu epesami na Jéhovah, ye oyo asakolaki ete: “Oyo moke akokóma nkoto mpenza, oyo aleki moke akokóma libota na makasi. Ngai nazali Jéhovah, na ntango na yango nakoyeisa yango mbango.” (Yisaya 60:22) Lokola ezali kosalema na bisika mosusu na mokili, esakweli yango ezali kokokana na esanga kitoko ya Réunion.