Makambo masali koleka na mokili
Bandimi nyongo na bango ya makila
Sekretere ya lingomba na bouddha oyo ebengami Otani na Mabelé na peto, na Japon alobaki boye: “Tobengaki etumba yango (Etumba ya Mibale ya mokili mobimba) etumba mosantu mpe totindaki mibali bakenda kobunda.” “Tokoki bobele koyoka nsoni liboso na mosantu Bouddha.” Na “elambo moko oyo eutaki kosalama mpo na kokanisa bato nyonso oyo bakufa na etumba,” mbula 45 nsima na Etumba na mibale na mokili mobimba, lingomba oyo ezali na bato milio 5, endimaki ete “esanganaki na (bokasi na etumba) na boumeli na Etumba na Mibale na mokili mobimba.” Zulunalo Asahi shimbun elobi ete: “Naino toyoka te ete mokonzi moko ya lingomba na bouddha azali kondima polele mpenza mabe oyo ye asalaki na etumba na ntango na elambo na lingomba.”
Kasi, mangomba mosusu makoki mpe ‘kotonda na nsoni te’ na ndenge batindaki bilenge mingi ya mibali na kosangana na etumba? Engebene Encyclopédie Kodansha ya Japon (Angl.), na 1941. pene na mangomba nyonso ya Bouddha na “boklisto” mpe na shinto ya Japon basilaki kosala boyokani na losambo. “mpo na kopesa libateli na elimo na ekólo na ntango na etumba.”
Ezali likambo na kokamwa te ete Biblia elobi na ntina na Babilone Monene, lisangá ya mokili mobimba ya mangomba na lokuta: “Kati na ye bamonaki makila na basakoli na bango nyonso babomamaki na mokili.” (Emoniseli 18:24) Jéhovah Nzambe, Mopesi na bomoi epai na moto, ekosenga makila epai na bato oyo mpo na nyongo na bango ya makila? Bobele na mokapo yango, Emoniseli alobeli na maloba na elilingi makambo oyo ekoyela Babilone Monene: “Mwanze moko makasi akamati libanga lokola etuteli monene, mpe abwaki yango na mai monene, mpe alobi ete, Bongo Babele, mboka monana ekobwakama makasi, mpe ekozwama lisusu soko te.—Emoniseli 18:21.
Bazangi banganga-nzambe
Mangomba na bouddha na Japon ezali komibanzabanza mingi mpo na likambo na bandako-Nzambe oyo etikali mpamba. Bato oyo bafandaka penepene na bandako-nzambe yango bazali komilela mpo bato na mobulu bazali koyengayenga pene na yango mpe mpo na likama na móto oyo ekoki kobima na bisika yango. Lingomba na Bouddha ebengami zen Myoshiji ezwaki ekateli ya kosilisa mokakatano yango na kolekisaka bandako-nzambe yango to na kosangisaka yango na bandako-nzambe mosusu oyo ezali na zongazonga. Pene na 20% na bandako-nzambe yango 3 500 ya lingomba na Myoshinji kati na mboka mobimba na Japon ezali lisusu na banganga-nzambe te to ezali koteyama na banganga-nzambe ya bandako-nzambe ya zongazonga.
Mpo na nini bongo? Zulunalo Daily Yomiuri elimboli boye: “Lingomba yango ezali kokutana na mikakatano mpo na kozwa bakitani na banganga-nzambe oyo bazali kozwa pansió mpe banganga-nzambe oyo bazali naino bilenge bazali koboya kokenda na bandako-nzambe oyo ezali bisika basambeli bazali se moke. Lingomba yango amekaki kopesa formasió na banganga-nzambe oyo basila kozwa pansió, kasi osili kotika likanisi yango. Atako basambeli na Myoshinji balobi ete: “Tozali lisusu te na eleko oyo motuya na bandako-nzambe ezali komonisa ete lingomba ezali kokola,” ata bongo emonani polele ete bopusi na bango ezali se kokita.
Ezali likambo na esengo na komona ete Emoniseli ezali kolobela mpo na lisanga na mokili mobimba na mangomba na lokuta lokola Babilone Monene mpe asakoli ete mai na Efrate likoló na yango ye afandi ‘ekokaoka.’ (Emoniseli 16:12; 18:2, 9, 11) Mai yango malakisi nini? “Mai mamonaki yo . . . mazali bikólo, na bibele, na mabota, na minoko.” (Emoniseli 17:15) Kokaoka na “mai yango” elingi koloba basembwi, ezali komonana mpenzampenza na efandelo na Babilone Monene epai na Orient.
Nsuka ya mikakatano
Makama oyo mazali kobakisama oyo tozali kokutana na yango lelo . . . mazali na nguya mingi na boye ete soko ebongiseli moko ezwami noki te mpo na kopengola yango, kozanga ntembe makomema biso na ezalela na nkita oyo ekozala nkaka mpe ekozala na makama minene mpe makomema biso na kobebisama na bibongiseli ya mabota mpe ya politike,” elobaki Worldwatch lnstitue, ya Washington, na Etats-Unis. Engebene rapor na yango ya nsuka mbula oyo euti koleka, mbonge oyo ezali koboma, biloko bizali kokaoka na ntina na moi makasi mpe mabelé kozinda na mai ezali bobele ndambo na makama minene koleka oyo makokwea na mokili oyo ezali kobika na likama. Engebene rapor yango, makambo oyo mazali kosenga ete matalelama noki ezali bongo kopekisa motuya ya bato oyo ezali bobele kobakama, kosalela malamu énergie, kokona banzete mpe kopekisa nzala. lnstitut yango ebakisi ete ‘plan to mwango ya kokokisa makambo nyonso’ oyo esengeli kosalema noki mpe mbongwana monene na ezalela na bato’ ezali ntina mpo na kolonga.
Tokoki kozela kotyama na ‘plan oyo ekokokisa makambo nyonso’ oyo ekomema “’mbongwana monene”’ lelo? Ee, kasi na nzela na makasi na moto te to etuluku na bato te. Mpo na nini yango? Mpamba te esili koleka bikeke mingi mosakoli Yilimia akomaki ete: “Nzela na (moto azwami na mabelé) ezali kati na ye moko te. Ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.” Nzokande, Biblia ezali kopesa elaka ete Jéhovah Nzambe ‘akozongisa makambo nyonso na nzela’ mpo na bolamu na bato mpe “akobebisa baoyo bazali kobebisa mabele.” —Yilimia 10:23; Mika 4:3, 4; Emoniseli 11:18.