Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/8 nk. 25-29
  • Mbano ya bompikiliki

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mbano ya bompikiliki
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bandakisa ya bompikiliki
  • Yehova apesaka ‘elimo santu epai ya baoyo bazali kosɛnga ye yango’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • “Topota mbango na mpiko nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Matomba ya motema molai mpe ya molende
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • “Tómonisa motema pɛtɛɛ”
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/8 nk. 25-29

Mbano ya bompikiliki

AZALAKI mwasi Mogreke oyo azalaki kofanda na Fenisi na mobu 32 T.B. Mwana na ye ya mwasi azalaki na bokɔnɔ makasi, mpe mwasi yango azalaki na elikya te ete mwana na ye alingaki kobika. Wana ayokaki ete mopaya moko ayaki kotala mboka na bango​—moto ya mboka mosusu oyo ayebanaki mingi ete azalaki na nguya ya kobikisa bato na maladi​—azwaki ekateli makasi ya komona ye mpe kosɛnga ye lisungi.

Na ntango akutanaki na ye, afukamaki, kobondeláká ye ete: “E, Nkolo, Mwana na Davidi, yokelá ngai mawa! Mwana mwasi na ngai azali na bilimu mabe.” Na lolenge wana, mwasi Mogreke wana abondelaki Yesu ete abikisa mwana na ye ya mwasi.

Okoki kokanisa mpiko mpe komikitisa oyo asengelaki kozala na yango? Yesu azalaki moto oyo azalaki na nguya mpe na lokumu monene mpe asilaki liboso koyebisa yango polele ete alingaki te ete bato báyeba esika azalaki. Amemaki bantoma na ye na Fenisi mpamba te bazalaki mpenza na mposa ya kopema, kasi te mpo na kosala elongo na Bapakano bazangi kondima. Lisusu, Yesu azalaki Moyuda mpe mwasi wana azalaki Mopakano, mpe na ntembe te ayebaki ete Bayuda balingaka te kosangana elongo na bato mpamba ya mabota mosusu. Atako bongo, azalaki ngwi na ekateli na ye ya kozwa lisalisi mpo na mwana na ye.

Yesu mpe bantoma na ye bamekaki kolɛmbisa mwasi yango ete atika koluka lisungi na ntango wana. Na ebandeli, Yesu azongiselaki ye ata liloba moko te. Na nsima, lokola azalaki kolelalela kozanga kotika, na nkanda nyonso, bantoma bayebisaki Yesu ete: “Longolá ye, azali konganga nsima na biso.”

Alingaki bobele ete Yesu andima lisɛngi na ye. Angumbamaki na makolo ya Yesu, kolobáká ete: “Nkolo, sungá ngai.”

Kolobáká na ntina na mokumba na ye ya liboso mpenza epai na bana ya Yisraele mpe, bobele na ntango yango, komekáká kondima mpe ekateli na ye, Yesu ayebisaki ye na motema mawa nyonso ete: “Ezali malamu te kokamata bilei na bana [ya Yisraele] mpe kopesa yango epai na bana na mbwa [Bapakano].”

Na esika ete asilika mpo na maloba wana ya kokitisama na ntina na ekólo na ye, na komikitisa nyonso alandaki bobele kosɛnga ye, na koyanoláká ete: “E, Nkolo, kasi ata bana na mbwa bakolyaka mpumbu oyo ikokweaka longwa na mesa na nkolo na bango.”

Yesu apesaki mwasi Mogreke wana mbano mpo na bompikiliki na ye na kokumisáká kondima na ye mpe na koyanoláká na malɔ́mbɔ na ye. Kanisá naino esengo azalaki na yango na ntango azongaki na ndako mpe akutaki mwana na ye ya mwasi abikisami mpenza!​—Matai 15:21-28; Malako 7:24-30.

Lokola mwasi wana ya ekeke ya liboso, tosengeli kozala na bompikiliki kati na milende oyo tozali kosala mpo na kosepelisa Yehova mpe mpo na kondimama epai na ye. Lokola ezalaki mpo na mwasi Mogreke wana, Biblia ezali kolendisa biso ete bompikiliki na biso “mpo na kosalaka malamu” ekopesamela mbano.​—Bagalatia 6:9.

Bompikiliki ezali nini? Mpo na nini yango ezali na ntina? Makambo nini makoki kosala ete tóbungisa ezaleli yango, kotika yango to kosundola yango? Mbano nini tokoki kozwa yango soki tomonisi ezaleli ya bompikiliki na kosaleláká Mozalisi mpe Tata na biso, Yehova?

Diksionɛre moko elimboli liloba “komonisa bompikiliki” ete ezali bongo “kotikala ngwi mpe kotingama na mokano, na ezalela, to na likambo moko atako nkaka, makebisi, to mabaku mabe ezali. . . . kokóba kozala; koumela.”

Biblia ezali mbala na mbala kolendisa basaleli ya Yehova ete bákangama ntango nyonso na kosala mokano na ye. Na ndakisa, eyebisi biso ete “na bongo, bólanda koluka liboso Bokonzi,” “bósimba makambo malamu ngwi,” mpe ‘bólɛmba’ te mpo na kosala oyo ezali malamu.​—Matai 6:33 (NW); 1 Batesaloniki 5:21; Baloma 12:12; Bagalatia 6:9.

Kati na makambo matali bomoi na biso ya mokolo na mokolo, bompikiliki ezali ezaleli oyo biso banso tosengeli kozala na yango mpe kokólisa yango mpo na kolónga. Kozanga ezaleli yango, tokoki te kosala likambo moko ya malamu, kozwa eleko moko ya koumela. Tótalela ndakisa ya mwana moke oyo azali komeka kotɛlɛma mpe komeka kobwaka lokolo na ye ya liboso oyo ezali kolɛngalɛnga. Esalemaka mpenza te ete mwana atɛlɛma mpe atambola malamu bobele na mokolo moko. Wana tozalaki bana mike, ekoki mpenza kozala ete biso banso tomekaki mpe tokweaki mbala mingi liboso ete tókoka kolónga mwa moke kotambola malamu. Nini elingaki kobima soki, nsima ya kokwea mbala ya liboso, tozwaki ekateli ya kotika komeka? Mbɛlɛ kino lelo tozali naino konguluma bobele na mabɔ́kɔ mpe mabolɔngɔ! Bompikiliki ezali na ntina mpo na kokokisa mikano ya ntina mpe kozwa bokóli oyo esengeli kati na makoki mpe limemya na biso moko. Lisese moko ya Lingelesi elobi ete, “Baoyo balóngaka batikaka te, mpe baoyo batikaka balóngaka te.”

Babongisi-nzela oyo baumeli mingi bamoni ete makoki ya sikisiki mpe mayele ezali ndanga ya bolóngi te. Esɛngaka molende, ekateli makasi ya kokokisa malamu mpenza mokano ya Yehova, mpe mpiko liboso na mabaku mabe oyo ebimaka na bantango mosusu, ata mpasi na mayoki. Mokano ya kosangana seko kati na mapamboli ya Nzambe esengeli kozala ntango nyonso polele mpenza na makanisi na biso.

Ya solo, biso nyonso baoyo tolukaka kondimama epai na Nzambe mpe tolukaka kolónga kati na momekano ya mbangu mpo na bomoi tosengeli kozala na bompikiliki, kolendendela, mpe koyika mpiko. Kozanga bizaleli oyo, tokoki kobungisa kondimama na Nzambe mpe mbano ya bomoi ya solo.​—Nzembo 18:20; Matai 24:13; 1 Timoté 6:18, 19.

Mbala mingi, ezalaka mpasi mpo na moklisto ete amonisa bompikiliki kati na makambo ya elimo koleka kati na mikumba na ye. Mobali akoki kolanda kosala makasi na mosala ya mosuni mpo na kokokisa bamposa ya mosuni ya libota na ye, kasi akoki ‘kolɛmba mingi’ mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia mbala na mbala elongo na mwasi na ye mpe bana na ye. Makambo nini masalaka ete bompikiliki ezala mpasi kati na misala ya boklisto mpo na bato mingi?

Moko na makambo yango ezali bongo kolɛmba na motema, yango eutaka na mabungá mpe bolɛmbu na biso moko. Soki tozali ntango nyonso kokanisa mabe likoló na mabungá na biso, tokoki kozanga elikya mpe kotika, kokanisáká ete Yehova akoki te kolimbisa masumu nyonso na biso.

Likambo mosusu ezali bongo mopepe ya mokili ya bizaleli ya mbindo, kanyaka mpe koyinana. (1 Yoane 2:15, 16) Moko na “bizaleli malamu” oyo bopusi ya mokili ekoki kobebisa ezali bongo bompikiliki.​—1 Bakolinti 15:33.

Bompikiliki na biso kati na mosala ya kosakola ekoki kolɛmbisama mpo na botɛmɛli ya bato to kozanga komonisa bosepeli na mosala na biso ya bulɛɛ. Mpo na kolɛmba nzoto, tokoki bobele kokanisa ete bato na teritware na biso balingaka solo te. Yango ekoki kopusa biso na kotuna ete: ‘Ntina ezali nini?’ mpe kotika libaku na biso kitoko ya mosala ya kosakola.

Tokoki mpe kopusama na elimo ya komisepelisa oyo ezali kati na mokili. Mpo na nini tosengeli kobunda mpe koboma nzoto nzokande basusu bazali kosepelisa nzoto to bazali komipesa mingi te?​—Kokanisá na Matai 16:23, 24.

Mpo na kolanda ntango nyonso kosala mokano ya Nzambe, tosengeli kolata bomoto ya boklisto mpe kozala na bomoi engebene elimo, kasi mosuni te. (Baloma 8:4-8; Bakolose 3:10, 12, 14) Kozala na makanisi ya Yehova na ntina na likambo yango ekopesa biso nzela ya kokóba misala na biso ya elimo.​—1 Bakolinti 16:13.

Bandakisa ya bompikiliki

Yehova apesi biso bandakisa mingi ya kolendisa ya basaleli na ye oyo batikalaki sembo mpe bakangamaki na ye kati na mimekamo makasi. Na kotaleláká yango, tozali komona lolenge nini tokoki kokólisa mpe kosalela bompikiliki ya boklisto mpe na nini yango ezali na ntina mingi.

Ndakisa eleki monene ezali bongo Yesu, oyo anyokwamaki mingi mpo na kopesa nkembo na nkombo ya Yehova. Biblia ezali kolendisa biso ete tóyekola na likebi nyonso misala na ye ya komipesa mpe ya bompikiliki: “Na bongo mpo na biso, awa ezingelami biso na lipata monene boye na batatoli, tólongola bipekiseli nyonso mpe masumu mazali kokanga biso tópota na etingya na emekaneli na mbangu etyami liboso na biso, awa ezali biso kotala Yesu, ye Mobandisi mpe Mosukisi na kondima. Mpo ete esengo etyami liboso na ye, ayikeli [nzeté ya mpasi, NW] mpiko, atyoli nsɔ́ni na yango mpe azali kofanda na lobɔ́kɔ na mobali na kiti na Bokonzi na Nzambe. Zambi bókanisa ye oyo ayikaki mpiko liboso na zúwa na motindo yango na mabɔ́kɔ na bato na masumu baoyo batɛmɛlaki ye ete bino bózala na pɛtɛpɛtɛ te to na bolɛmbu te kati na mitema na bino.”​—Baebele 12:1-3.

Momekano ya mbangu mpo na bomoi ezali ya nzela molai, kasi ya mokuse te. Yango wana tozali na mposa ya bompikiliki lokola oyo ya Klisto. Mokano, ndelo ya bokómi, ekoki mbala mosusu komonana te na boumeli ya eteni monene ya momekano ya mbangu. Mokano mosengeli kozala ntango nyonso polele kati na makanisi na biso mpo ete tókoka koluka yango na boumeli mobimba ya bopoti mbangu oyo ezali kosɛnga makambo mingi. Yesu azalaki na likanisi motindo wana liboso na ye, mingimingi, “esengo oyo etyamaki liboso na ye.”

Makambo nini mazali kati na esengo yango lelo oyo mpo na Baklisto? Ya liboso, ezali bongo mbano ya bomoi bozangi kufa na likoló mpo mwa ndambo moke ya bato mpe bomoi ya seko na mabelé mpo na ebele ya bato. Lisusu, ezali mayoki ya bosepeli oyo euti na koyeba ete tozali kopesa esengo na motema ya Yehova mpe kosangana na kobulisama ya nkombo ya Nzambe.​—Masese 27:11; Yoane 17:4.

Likambo mosusu oyo ezali kati na esengo yango ezali bongo boyokani ya pene mpe ya esengo elongo na Yehova. (Nzembo 40:8; Yoane 4:34) Boyokani wana epesaka nguya mpe esimbaka bomoi, epesaka makasi ya kopota na momekano ya mbangu na mpiko mpe na etingya. Lisusu, Yehova apambolaka boyokani yango na kosopáká elimo na ye likoló na basaleli na ye, kobimisáká bongo esengo monene mpe mosala oyo etondi na esengo.​—Baloma 12:11; Bagalatia 5:22.

Kotalela ndakisa ya bompikiliki ya kondima ya Yobo ezali kopesa litomba. Azalaki moto ya kozanga kokoka mpe ayebaki malamu te ezalela ya makambo na ye. Yango wana na bantango mosusu, azalaki koluka komilóngisa mpe azalaki kozanga elikya. Nzokande, amonisaki ntango nyonso ekateli ya ngwi ya kobatela bosembo na ye epai na Yehova mpe atikaki te. (Yobo 1:20-22; 2:9, 10; 27:2-6) Yehova apesaki Yobo mbano mpo na bokangami na ye na bompikiliki nyonso, kopesáká ye mapamboli ya elimo mpe ya mosuni mpe elikya ya bomoi ya seko. (Yobo 42:10-17; Yakobo 5:10, 11) Lokola Yobo, tokoki kokutana na mpasi mingi mpe tokoki kobungisa biloko na boumeli ya bomoi na biso ya lelo, kasi tokoki mpe kondimisama ete Yehova akopambola biso mpo tozali koyika mpiko na bosembo nyonso.​—Baebele 6:10-12.

Na mikolo na biso, lokola etuluku, Batatoli ya Yehova bazali komonisa bompikiliki ya boklisto na kosaláká mokano ya Yehova. Na ndakisa, mosala na bango ya ndako na ndako oyo basalaka na bompikiliki nyonso mpe lolenge mosusu ya kosakola epai na bato banso ebendi likebi ya mokili mobimba likoló na bango mpe ya mosala na bango. Bipanzelo ya nsango bizali kolobela mingi molende mpe ekateli makasi na bango ya kosakola nsango malamu atako bakutani na botɛmɛli mpe mimekamo. Moko na yango emonisamaki nkutu kati na fraze moko ya sikisiki oyo ete “Moto moko te akoki kokima Batatoli ya Yehova!”​—Matai 5:16.

Yehova azali kopambola milende ya Batatoli na ye oyo bazali kosala na bompikiliki nyonso na kopesáká bango mbuma mingi kati na mosala ya kosakola. Talá likambo oyo ekómelaki Batatoli ya mpiko na Italie na bambula 1960 na ntango ezalaki na Batatoli 10 000 oyo bazalaki kosakola kati na mboka oyo ezalaki na bato koleka 53 000 000. Kati na engumba moko oyo ezalaki na bato 6 000, Batatoli bazalaki te. Bandeko oyo bakendeki na mboka yango bakutanaki na botɛmɛli.

Ntango nyonso oyo bandeko bazalaki kokende mpo na kosakola, basi mingi, ata mpe mibali, ya engumba yango bazalaki koyanganisa bilenge mibali, kotinda bango ete bálanda Batatoli ya Yehova, kozomeláká bango mpe kotyáká makeléle mingi. Nsima ya mwa ntango, ezalaki kosɛnga ete bandeko bálongwa wana mpe bákende na engumba mosusu. Wana basalaki molende mpo ete bákoka kopesa litatoli ya mobimba ata mbala moko epai na bafandi nyonso ya engumba wana, bandeko bazwaki ekateli ya kokende kosakola kuna bobele na mikolo oyo mbula ezalaki kobeta, na elikya ete etuluku ya bilenge mibali bátungisa bango te. Bamonaki ete bato ya engumba yango balingaki te komipolisa na mbula bobele mpo na kotungisa basakoli. Na lolenge yango, litatoli moko malamu lipesamaki. Bato ya bosepeli bamonanaki. Babandaki boyekoli ya sika ya Biblia. Litomba na yango ezali oyo ete, bobele te lisangá moko oyo ezalaki kokóla malamu esalemaki kati na engumba wana moke kasi lisusu mosala ya kosakola ekómaki kosalema ata na mikolo ya moi makasi. Yehova azali kokóba kopambola bompikiliki ya Batatoli na ye kati na teritware wana mpe na Italie mobimba. Sikawa ezali na Batatoli ya Yehova koleka 200 000 kati na mboka wana.

Mbano oyo ezwamaka na bompikiliki na kosaláká oyo ezali sembo ezali monene. Na nguya ya elimo ya Nzambe, Batatoli ya Yehova bazali na likoki ya kokokisa mosala monene oyo esalemá naino te kati na lisoló ya bato, mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi, na bandako ya bato mpe na lolenge mosusu, epai na bamilió ya bato. (Zakari 4:6) Na esengo nyonso, bazali komona kokokisama ya bisakweli ya Biblia na ntina na bokóli ya kokamwa mpe nguya ya lisangá ya Yehova awa na mabelé. (Yisaya 54:2; 60:22) Bazali na lisosoli malamu liboso na Nzambe, mpe basepelaka na elikya ya bomoi ya seko. Likoló na nyonso, bazali na boyokani ya penepene elongo na Mozalisi, Yehova Nzambe.​—Nzembo 11:7.

[Elilingi na lokasa 25]

Yesu apesaki mbano epai na mwasi Mogreke oyo mpo na bompikiliki mpe komikitisa na ye

[Elilingi na lokasa 26]

Bomoi kati na Paladiso ezali mpe kati na esengo oyo elakami epai na Baklisto na mikolo na biso

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto