Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/1 nk. 12-15
  • Bakipaka lisusu te bandelo oyo ekaboli bikólo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bakipaka lisusu te bandelo oyo ekaboli bikólo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bazali na bomoko atako bafandi na lobwaku oyo esangisi bikólo mibale
  • Nini mpenza esangisaka bato?
  • Bisika na biso ya losambo
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Oyo ezali esika na biso ya losambo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Botongi Bandako ya Bokonzi na mokili mobimba
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/1 nk. 12-15

Bakipaka lisusu te bandelo oyo ekaboli bikólo

Batatoli ya Yehova basalaka makasi bálanda te makambo oyo ekabolaka bato. Balandaka etinda oyo Yesu apesaki bayekoli na ye: “Bino nyonso bozali bandeko.” (Matai 23:8) Likambo yango emonanaka malamu na bisika mibale ya losambo ya Batatoli ya Yehova; moko ezali na Portugal mpe mosusu na Espagne.

VALENÇA DO MINHO, engumba moko oyo ezali na lopango molai zingazinga na yango, na nɔrdi ya ekólo Portugal, etongamaki na ntango ya bitumba. Lopango na yango etalani na ebale Minho oyo ekaboli Espagne ná Portugal. Soki okatisi ebale na esika yango mpe okɔti na Espagne, okokóma mbala moko na Tui, engumba oyo ezali na katedrale moko monene. Katedrale ya Tui mpe lopango ya Valença etongamaki na siɛklɛ ya 17, ntango Espagne ezalaki kobunda na Portugal.

Na 1995, balongolaki basoda oyo bazalaki kotala mikanda mpe basali ya douane na ndelo ya bikólo yango mibale ya Union européenne. Kasi, kosangisa bato ya bikólo mibale esuki kaka te na kolongola basoda na ndelo oyo ekaboli bikólo yango. Esɛngaka mpe kobongola makanisi mpe mitema na bango. Na engumba Valença ezali na mwa ndako moko kitoko oyo emonisaka ete makambo oyo ekabolaka bato ekoki kolongwa. Ndako yango ezali esika ya losambo: Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova, epai masangá ya Batatoli ya Yehova na monɔkɔ ya Espagnol mpe ya Portugais eyanganaka.

Likambo yango ebandaki na 2001, ntango Batatoli ya engumba Tui bakómaki na mposa ya Ndako ya Bokonzi ya sika. Basengelaki kolongwa na esika oyo bazalaki kofutela mpo na kosala makita, kasi bazalaki na mbongo mingi te mpo na kotonga Ndako ya Bokonzi ya sika. Bakokaki mpe te kofutela ndako mosusu mpamba te bazalaki na makoki mingi te mpo lisangá na bango ezalaki moke. Yango wana, bandeko yango ya Espagne basɛngaki bandeko ya Portugal na engumba Valença soki bakoki mpe kosalaka makita na Ndako ya Bokonzi na bango, oyo ezali kaka na ntaka ya mwa bakilomɛtrɛ na engumba Tui.

Eduardo Vila, ndeko moko ya lisangá ya Tui, na Espagne alobaki boye: “Na Desɛmbɛ 2001, tosalaki likita moko mpo na kozwa ekateli yango. Ntango nautaki na likita yango, namonaki ete Yehova asimbaki mitema ya bandeko na biso ya Portugal. Babomaki mpenza nzoto mpo na kotonga Ndako ya Bokonzi wana ya kitoko, mpe ezalaki likambo ya kolendisa komona ndenge bandimaki ete biso mpe tósalaka makita na ndako yango.”

Américo Almeida, Motatoli moko ya Portugal oyo azalaki na likita yango alobi boye: “Tondimaki bandeko ya Espagne básalaka mpe makita na Ndako ya Bokonzi na biso. Tondimaki mpenza ete Yehova akopambola ebongiseli yango, mpe tondimaki ekateli yango biso nyonso.” Batatoli ya bingumba yango mibale oyo ezali ngámbo na ngámbo na ndelo oyo ekaboli bikólo yango bayokanaka malamu. Paolo, ndeko moko oyo afandaka na Valença alobi boye: “Ekoki kokamwisa, kasi tomonaka te ete tozali bato ya bikólo ekeseni. Lokola tosambelaka Yehova, tozali kaka bandeko.”

Moko ya makambo ya liboso oyo bapaya bamonaka na kati ya Ndako ya Bokonzi yango ezali bamontre mibale ya minene oyo ekokani, oyo ezali na efelo ya ndako yango, kasi ezali na ngonga moko te. Espagne ná Portugal ekeseni na ngonga moko. Eloko kaka moko oyo ekaboli bandeko na Ndako ya Bokonzi yango ezali kokesana ya ngonga. Ntango esɛngaki bábongisa Ndako ya Bokonzi yango, komite ya botongi na Espagne etambwisaki mosala oyo bandeko ya masangá nyonso mibale basalaki na esengo. Ndeko Paolo alobi boye: “Bandeko mingi oyo bayebi misala ya mabɔkɔ bautaki na Espagne mpo na kosalisa biso, basusu basalaki mobembo ya kilomɛtrɛ 160. Mosala yango ebakisaki lisusu bolingo na kati ya bandeko ya masangá yango mibale.”

Tótalela ndakisa ya mibale oyo emonisi ndenge ya kolonga makambo oyo ekabolaka bato.

Bazali na bomoko atako bafandi na lobwaku oyo esangisi bikólo mibale

Puigcerdá ezali engumba moko ya Espagne oyo ezali na ndelo oyo ekaboli France ná Espagne. Engumba yango ezali na lobwaku moko oyo ezali na katikati ya bangomba ya Pyrénées. Kala, lobwaku yango mobimba oyo eyebani na nkombo ya Cerdaña, ezalaki ya Espagne. Kasi, na mobu 1659, na boyokani ya kimya oyo babengaka Traité des Pyrénées, Espagne epesaki ndambo ya lobwaku yango na France.

Lelo oyo, bato ya France bakendaka kosomba biloko na Puigcerdá, engumba monene ya lobwaku yango. Mpe kobanda 1997, Batatoli ya Yehova ya Puigcerdá bandimaki mpe bandeko na bango ya France básalaka makita na Ndako ya Bokonzi yango. Na mbula yango, Batatoli ya France basengelaki kotika esika oyo bazalaki kofutela mpo na kosala makita. Mpo bandeko ya France bákende na ndako ya Bokonzi oyo ezali pene, esengelaki básala ngonga moko na motuka; mpe na basanza oyo malili ezalaka makasi, banzela oyo ezali na bangomba oyo esengeli koleka mpo na kokóma kuna etondaka na nɛjɛ.

Ntango Batatoli ya ekólo France bayebisaki ete bazali na mposa ya esika ya makita, mbala moko, Batatoli ya Espagne bandimaki ete básalaka makita na Ndako ya Bokonzi na bango. Prem, ndeko moko ya lisangá yango alobi boye: “Bandeko nyonso ya Espagne basepelaki ete tósalaka makita na biso kuna. Mposa wana ya kosalisa bandeko eutaki na mateya ya Biblia oyo tozwaka banda bambula mingi. Mwa bapɔsɔ na nsima, tobandaki kosala makita na Ndako ya Bokonzi na bango, mpe lelo oyo eumeli mbula 13.”

Eric, nkulutu moko ya lisangá ya Français alobi boye: “Ebongaki mpenza ete tózala na Ndako ya Bokonzi na Puigcerdá. Mpe nabosanaka te ndenge oyo bandeko ya lisangá ya Espagnol bayambaki biso na esengo. Batyaki bafololo ebele na Ndako ya Bokonzi mpe libaya moko oyo bakomaki ete, ‘Boyei malamu, bandeko ya bolingo.’”

Eric abakisi boye: “Bato bakanisaki ete lokola tokangaki Ndako ya Bokonzi na biso na France, lisangá na biso ekozala lisusu te. Kasi ntango bazalaki komona biso mbala na mbala tozali kosakola na teritware yango, mpe kokabola nkasa mpo na kobengisa bato na makita na biso na Espagne, bamonaki ete ezali bongo te. Bato oyo basepelaka na nsango na biso bandimaka mpe kokende makita na Espagne. Longola yango, lokola tokómá kosala makita na Ndako ya Bokonzi moko ná bandeko na biso ya Espagne, yango ebakisá lisusu bolingo kati na biso ná bango. Liboso, toyebaki ete lisangá moko ya Espagnol ezali na ngámbo mosusu, kasi tozalaki koyebana mpenza te. Sikoyo, lokola tokómá kokutana mbala na mbala, tomonaka lisusu te ete tozali kaka biso moko na mboka oyo ya mosika.”

Kokesana ya minɔkɔ mpe bikólo ebimiselaka bandeko yango mikakatano? Ndeko moko ya ekólo France oyo azali na mbula koleka 80 alobaki boye: “Ntango nayokaki ete tokobanda kosala makita na Espagne, namitungisaki mwa moke. Kasi, lokola bandeko ya Puigcerdá bayambaki biso malamu, mbongwana yango etungisaki biso te. Kutu, epesaki biso nde libaku ya komonisa ete basaleli ya Yehova na mokili mobimba bazalaka na bomoko.”

Nini mpenza esangisaka bato?

Bakonzi ya politiki oyo bazwaki likanisi ya kosala Union européenne balobaki ete bikólo oyo ezali na lisangá yango ezalaki “na ekateli ya kosala eloko moko oyo ekosangisa bato ya bikólo na bango ya Mpoto.” Balongolaki basoda na bandelo ya bikólo yango na bambula ya 1980 mpe 1990 mpo na kokokisa nokinoki mokano yango. Kasi, esengelaki mpe kolongola bokabwani yango na makanisi ya bato.

Batatoli ya Yehova basalaka makasi bátika kokanisela basusu mabe mpe bátyelanaka motema. Bayebaka ete kozala na bato ya bikólo mpe minɔkɔ ndenge na ndenge ezali na matomba, mpe bayebaka ete “Nzambe aponaka bilongi te.” (Misala 10:34) Na mayangani na bango oyo esangisaka bato ya mikili mingi mpe na Bandako ya Bokonzi na bango, bamonaka ete “ezali mpenza malamu mpe ezali mpenza esengo ete bandeko báfanda na bomoko!” (Nzembo 133:1) Bomoko oyo ezali kati na Batatoli ya Valença mpe Puigcerdá, bingumba oyo ezali na bikólo mibale ekeseni, emonisi polele likambo yango.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 13]

“Ekoki kokamwisa, kasi tomonaka te ete tozali bato ya bikólo ekeseni. Lokola tosambelaka Yehova, tozali kaka bandeko”

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 14]

“Mosala yango ebakisaki lisusu bolingo na kati ya bandeko ya masangá yango mibale”

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 15]

“Ezali mpenza malamu mpe ezali mpenza esengo ete bandeko báfanda na bomoko!” NZEMBO 133:1

[Elilingi na nkasa 12, 13]

Engumba Tui mpe Ebale Minho ndenge emonanaka na engumba Valença do Minho

[Elilingi na lokasa 14]

Mosala ya kobongisa Ndako ya Bokonzi

[Elilingi na lokasa 15]

Pyrénées mpe lobwaku ya Cerdaña

[Elilingi na lokasa 15]

Bankulutu mibale: moko ya lisangá ya Espagnol, mosusu ya lisangá ya Français, oyo bayanganaka na Ndako ya Bokonzi ya Puigcerdá

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto