Ndenge oyo okoki kozwa kimya
LOKOLA tozali kofanda na mokili oyo ya mobulu, tosengeli kosala milende mpo na kozwa kimya. Ata ntango oyo tozali na mwa kimya, tosengeli ntango nyonso kobunda mpo na kobatela yango. Liloba ya Nzambe elobi nini mpo na kosalisa biso tózwa kimya ya solosolo mpe oyo eumelaka? Mpe ndenge nini tokoki kosalisa basusu básala mpe bongo?
NDENGE YA KOZWA KIMYA YA SOLOSOLO
Mpo na kozwa kimya ya solosolo, tosengeli komiyoka ete tobatelami mpe tozali komitungisa te na makanisi. Tosengeli mpe kosala boninga elongo na basusu. Oyo eleki ntina, mpo na kozwa kimya ya solosolo, tosengeli kosala boninga elongo na Nzambe. Ndenge nini tokoki kosala yango?
Mitungisi ya bomoi elongolaka kimya na biso
Ntango totosaka mibeko mpe mitinda ya sembo ya Yehova, tómonisaka ete totyelaka ye motema mpe tozali na mposa ya kozala na kimya elongo na ye. (Yirimia 17:7, 8; Yakobo 2:22, 23) Yehova mpe apusanaka penepene na biso mpe apesaka biso kimya ya motema. Yisaya 32:17 elobi ete: “Mosala ya boyengebene ya solo ekokóma mpenza kimya; mpe mbuma ya boyengebene ya solo ekokóma kimya mpe libateli mpo na ntango oyo etyami ndelo te.” Tozwaka kimya ya motema ntango totosaka Yehova na motema na biso mobimba.—Yisaya 48:18, 19.
Lisusu, tozwaka mpe kimya oyo eumelaka na nzela ya elimo santu, oyo ezali likabo moko ya kokamwa oyo euti epai ya Tata na biso ya likoló.—Misala 9:31.
ELIMO YA NZAMBE ESALISAKA BISO TÓZWA KIMYA
Ntoma Paulo atángaki kimya na esika ya misato ntango alobelaki bizaleli ya “mbuma ya elimo.” (Bagalatia 5:22, 23) Lokola kimya ya solosolo eutaka na elimo ya Nzambe, tosengeli kotika ete elimo santu etambwisa biso mpo tózwa kimya yango. Tólobela ndenge mibale oyo elimo ya Nzambe ekoki kosalisa biso tózwa kimya.
Ya liboso, tozwaka kimya ntango tozali kotánga Liloba ya Nzambe ntango nyonso. (Nzembo 1:2, 3) Ntango tozali komanyola na nsango oyo ezali na Biblia, elimo santu ekosalisa biso tóyeba likanisi ya Yehova na makambo ndenge na ndenge. Na ndakisa, tokomona ndenge oyo Yehova abatelaka kimya mpe mpo na nini ezali na ntina mingi mpo na ye. Mpe ntango tozali kosalela mateya ya ndenge wana oyo tozali kozwa na Liloba ya Nzambe, tozwaka kimya mingi na bomoi na biso.—Masese 3:1, 2.
Ya mibale, tosengeli kobondela mpo na kosɛnga elimo santu ya Nzambe. (Luka 11:13) Yehova apesi biso elaka ete soki tosɛngi lisalisi na ye, ‘kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na biso mpe makanisi na biso na nzela ya Kristo Yesu.’ (Bafilipi 4:6, 7) Ntango tozali kotyela elimo ya Yehova motema, atondisaka biso na kimya ya motema, oyo apesaka yango kaka na baoyo bazali na boyokani malamu na ye.—Baroma 15:13.
Ndenge nini basusu basalelaki toli yango ya Biblia mpe basalaki bambongwana oyo esengelaki mpo na kosalisa bango bázwa kimya oyo eumelaka elongo na Yehova, ná bango moko mpe na bato mosusu?
NDENGE OYO BAZWAKI KIMYA YA SOLOSOLO
Lelo oyo, na lisangá ya bokristo, ezali na bandeko oyo liboso bazalaki bato oyo ‘balingá kosilika’ kasi bazali sikoyo bato ya malamu, ya boboto, ya motema molai, mpe bato oyo batyaka kimya kati na bandeko.a (Masese 29:22) Tótala ndenge esalemaki mpo na bandeko mibale oyo bazwaki lisalisi mpo na kotika ezaleli ya nkanda mpe kokóma na kimya elongo na basusu.
Kosalela mitinda ya Biblia mpe kosɛnga Nzambe elimo santu na ye na libondeli ekosalisa biso tózwa kimya
Makanisi mabe ya David ebebisaki mpe maloba na ye. Liboso amipesa na Yehova, azalaki koloba mabe mpo na basusu mpe kokatela bato ya libota na ye mangala. Na nsima, amonaki ete asengeli kobongwana mpe kokóma moto ya kimya. Ndenge nini ayekolaki kokóma moto ya kimya? Alobi boye: “Nabandaki kosalela mitinda ya Biblia na bomoi na ngai, yango esalaki ete nakolisa limemya mpo na bato ya libota na ngai.”
Ndenge oyo Rachel abɔkwamá ebebisaki bizaleli na ye. Alobi boye: “Ata sikoyo, nabundaka na ezaleli ya nkanda mpo nabɔkwamá na libota oyo moto nyonso azalaki koyoka nkanda noki.” Nini esalisaki ye akóma moto ya kimya? Ayanoli boye: “Nazalaki kobondela Yehova ntango nyonso mpo asalisa ngai.”
Ndakisa ya David mpe ya Rachel ezali kaka mwa bandakisa ya bato oyo bazwaki kimya ntango babandaki kosalela mitinda ya Biblia mpe kotyela elimo ya Nzambe motema mpo na kozwa lisalisi. Emonani polele ete atako tozali na mokili oyo mabe, tokoki kozala na kimya ya motema oyo esalaka ete tózala na bomoko na kati na mabota mpe na bandeko na biso bakristo. Kasi Yehova asɛngi biso tózala na “kimya na bato nyonso.” (Baroma 12:18) Ekoki mpenza kosalema? Mpe matomba nini tokozwa soki tozali kosala nyonso mpo na kotya kimya?
KOBÁ KOZALA NA KIMYA NA BASUSU
Na nzela ya mosala ya kosakola, tobengaka bato báyoka nsango ya kimya oyo etali Bokonzi ya Nzambe. (Yisaya 9:6, 7; Matai 24:14) Likambo ya esengo, bato mingi bandimaka. Yango esali ete bákóma na elikya mpe bázala nkandankanda te ntango bazali komona makambo oyo ezali kosalema zingazinga na bango. Kutu, bazali sikoyo na elikya ya solosolo mpo na mikolo ezali koya mpe bazali na mposa ya ‘koluka kozwa kimya, mpe kolanda yango.’—Nzembo 34:14.
Nzokande, bato nyonso te nde bandimaka nsango na biso mbala moko. (Yoane 3:19) Atako bongo, elimo ya Nzambe esalisaka biso tósakwela bango nsango malamu na kimya mpe na limemya. Na ndenge yango, tolandaka malako ya Yesu oyo ezali na Matai 10:11-13 mpo na mosala ya kosakola, elobi: “Ntango bokokɔta na ndako, bópesa bato ya ndako mbote; mpe soki ndako yango ebongi, kimya oyo botombeli yango ezala likoló na yango; kasi soki ebongi te, kimya na bino ezongela bino.” Soki tozali kolanda toli ya Yesu, kimya na biso ekoki kozongela biso mpe tokozala na likoki ya kosalisa basusu na mikolo ezali koya.
Totyaka mpe kimya ntango tosololaka na bakonzi ya Leta na limemya nyonso ata baoyo batɛmɛlaka mosala na biso. Na ndakisa, guvɛrnema moko ya ekólo moko ya Afrika ezalaki kokanisela biso mabe mpe eboyaki tózwa ndingisa ya kotonga Bandako ya Bokonzi. Mpo na kosilisa likambo yango na kimya, baponaki ndeko moko oyo azalaki misionɛrɛ na ekólo yango mpo akende kokutana na mokonzi moko ya ekólo yango ya Afrika oyo azalaki na Londres, na Angleterre. Asengelaki koyebisa mokonzi yango ndenge mosala ya Batatoli ya Yehova elendisaka kimya na ekólo yango. Makambo esukaki ndenge nini?
Alobi boye: “Ntango namonaki molato ya mwasi oyo azalaki kosala na esika oyo bayambaka bato, namonaki ete nayekolá monɔkɔ ya mboka oyo autá. Na yango, napesaki ye mbote na monɔkɔ na ye. Akamwaki mpe atunaki ngai, ‘Likambo nini ememi yo awa?’ Na limemya nyonso nayebisaki ye ete nalingi kokutana na mokonzi moko ya ekólo yango. Abengaki mokonzi yango na telefone, ayaki kokutana na ngai mpe apesaki ngai mbote na monɔkɔ ya mboka na bango. Na nsima, ayokaki ngai na likebi ntango nalimbolelaki ye ndenge oyo mosala ya Batatoli ya Yehova etyaka kimya.”
Lokola ndeko na biso alimbolelaki mokonzi wana makambo na limemya nyonso, yango esalaki ete abongisa makanisi na ye mpe atika kokanisa mabe mpo na mosala na biso. Mwa moke na nsima, guvɛrnema ya ekólo yango ya Afrika epesaki bandeko nzela ya kotonga. Bandeko basepelaki mpenza ndenge makambo esukaki na kimya! Na yango, kosalela basusu makambo na limemya ememaka mapamboli mingi ata mpe kimya.
ZALÁ NA KIMYA OYO EKOUMELA SEKO
Lelo oyo, basaleli ya Yehova basepelaka na paradiso ya elimo oyo etondi na kimya. Yo mpe okoki kobakisa kimya yango soki ozali kosala makasi ya komonisa ezaleli yango ya mbuma ya elimo na bomoi na yo. Oyo eleki ntina, Yehova akondima yo mpe okozwa kimya mingi oyo ekoumela seko na mokili ya sika.—2 Petro 3:13, 14.
a Tokolobela ezaleli ya boboto na moko ya masolo oyo ekolobela bizaleli mosusu ya mbuma ya elimo.